Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/4 nk. 16-21
  • “Liloba na Nzambe lizali na bomoi mpe na nguya”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Liloba na Nzambe lizali na bomoi mpe na nguya”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mbongwana ya bomoto na ntango na biso
  • Mosala oyo ezali kokokisama na boyebi ya solo
  • Tolendisami mpo na kosala malamu
  • Lisalisi euti epai mosusu
  • Libota ‘liteyami na Jéhovah’
  • Biblia ezali mokanda mopemami
  • Kobá kolata “bomoto ya sika” nsima ya kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Olingaka kozala moto ya ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Okoki ‘kolongola bomoto ya kala’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • “Tolanda kotambola lokola bana na pole”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/4 nk. 16-21

“Liloba na Nzambe lizali na bomoi mpe na nguya”

1, 2. (a) Nini ezali kobengaka butu oyo bazali kokoma baklisto? (b) Kino na meko nini Biblia ekoki kozala na bopusi likoló na moto?

NA KATIKATI ya ekeke ya liboso ya ntango na biso, ntoma Paulo akomelaki lisangá na boklisto ya Rome. Kati na mokanda na ye, alobelaki makasi likambo oyo ete baklisto ya solo basengelaki kosala mbongwana. Alobelaki bango: “Bolandaka makambo na ntango oyo te kasi bobongwana mpo na kozwa makanisi na sika, mpo ete bokoka kososola bino moko wapi mokano na Nzambe, oyo ezali malamu, ekoki kondimama mpe ebongi.” ’(Baloma 12:2, MN) Nini ezali kobongola bayekoli na Yesu, kobongolaka ata lolenge na bango ya kokanisa? Ezali mpenzampenza, nguya ya Liloba na Nzambe, Biblia.

2 Paulo amonisaki kino na meko nini Biblia ekoki kozala na bopusi likoló na biso na kokomaka ete: “Mpamba te Liloba na Nzambe lizali na bomoi mpe na nguya, lizali na moputu koleka mipanga nyonso mipeli bipai mibale. Lizali kotobola kino ekabwelo na (molimo, MN) mpe elimo, matongi mpe lilongo; ezali komeka (kososola, MN) makanisi mpe mikano na motema.” (Baebele 4:12) Ya solo, nguya ya kokamwa oyo Biblia ezali na yango mpo na kosala mbongwana motindo wana epai na moto ezali elembo ya solo ete ezali bobele liloba na bato te.

3, 4. Na meko nini bomoto ya baklisto ezali kobongwana?

3 Verbe ya greke oyo ebongolami na “bobongwana” kati na Baloma 12:2 euti na liloba métamorphoo, yango elimboli mbongwana mobimba, ndenge mbinzo akobongwanaka mpo na kokoma kipekapeka (papillon). Mbongwana yango ezali mpenza mobimba na boye ete Biblia ezali kolobela yango lokola mbongwana ya bomoto. Kati na mokapo mosusu ya Biblia, totangi boye: “Bolongola bomoto na kala na misala na yango nyonso, mpe bolata bomoto na sika oyo, na nzela na boyebi ya solo, ebongwani na elilingi na Mozalisi na yango.”Bakolose 3:9, 10, MN.

4 Kati na mokanda na ye na lisangá ya Korinte, ntoma Paulo amonisaki ntina ya mbongwana ya bomoto oyo esalemaki na ekeke ya liboso. Akomaki: “Moto na pite mpe basambeli na bikeko mpe bato na ekobo mpe bakembi na nsoni mpe mibali bamibebisi na mibali mpe miyibi mpe bato na ekobo mpe bato na bilulela mpe balangwi masanga mpe batuki mpe baboteli bakosangola bokonzi na Nzambe te. Bamosusu na bino bozalaki bongo. Kasi bosili kosukwama.” (1 Bakolinti 6:9-11) Na yango, bato na pite mpe baswani, miyibi mpe balangwi masanga babongwanaki mpo na kokoma baklisto malamu.

Mbongwana ya bomoto na ntango na biso

5, 6. Mbongwana nini mozindo ya bomoto Biblia esalaki epai na elenge moko?

5 Mbongwana ya bomoto motindo wana ezali kosalema mpe na ntango na biso. Na ndakisa, na Amerike ya Sudi, elenge mobali moko akomaki etike wana azalaki na mibu libwa. Lokola azangaki litambwisi ya baboti na ye, amekolaki bizaleli ya mabe wana ezalaki ye kokola. Alobi ete: “Ntango nakomaki na mibu 18, namesanaki mpenzampenza na drogue, mpe lokola nazalaki koyiba mpo na kosepelisa ezalela mabe na ngai, nakotaki boloko.” Nzokande elenge mobali yango azalaki na tata mwasi moko oyo azalaki Témoin de Jéhovah oyo azwaki likoki ya kosalisa ye.

6 Elenge mobali alobi ete: “Nabandaki koyekola Biblia elongo na tata mwasi na ngai. Sanza nsambo na nsima, natikaki komela drogue.” Atikaki mpe baninga na ye ya kala mpe azwaki baninga ya sika kati na ba Témoins de Jéhovah. Alobi lisusu ete: “Na lisalisi ya baninga na ngai ya sika mpe na boyekoli ya Biblia mbala na mbala, nasalaki bokoli oyo esalisaki ngai na nsima mpo na komipesa na Nzambe mpo na kosalela ye.” Elenge mobali wana oyo kala azalaki momeli drogue mpe moyibi akomaki moklisto ya molende oyo sikawa azali na bomoi ya peto. Nini epesaki nzela na mbongwana wana ya ntina boye? Ezali nguya na Biblia.

7, 8. Limbola ndenge nini elenge mobali moko atikaki bomoto na ye ya kala na lisalisi ya Biblia.

7 Tala ndakisa mosusu euti na sud ya Europe. Elenge mobali moko akolisaki bomoto moko ya mabe ntango azalaki kokola: azalaki moto na nkanda makasi mpe azalaki kobunda na mbala. Mokolo mosusu etumba ebimaki kati na libota, abetaki tata na ye kino akweisaki ye na nse mpe atikaki ye wana! Nzokande, na nsima, abandaki koyekola Biblia elonga na ba Témoins de Jéhovah. Ayebaki bongo mobeko na Nzambe oyo ezwami kati na mokanda epai na Baloma: “Bozongisaka mabe mpo na mabe te. . . . Soko ekokoka, mpe lokoka ezali likambo na bino, bozala na bato nyonso kimya. Balingami, bobukanisa mpo na bino mpenza te, kasi tika esika mpo na nkanda na Nzambe.”​—Baloma 12:17-19.

8 Maloba wana masalisaki ye na koyeba na meko nini makanisi na ye mazalaki mabe. Boyebi malamu ya Biblia epetolaki lisosoli na ye, likambo oyo, na nsima, epesaki ye nzela na komipekisa mpo na ezalela na ye wana ya kotomboka nokinoki. Lokola akomaki mosika kati na boyekoli na ye ya Biblia, mokolo mosusu moto moko abandaki kofinga ye. Lokola momeseno elenge mobali ayokaki ete nkanda ebandaki komata kati na ye. Kasi nokinoki ayokaki likambo mosusu: mayoki na nsoni, epekisaki ye ete apesa nzela na nkanda te. Alonaki ezaleli ya komipekisa, mbuma ya ntina ya elimo. (Bagalatia 5:22, 23) Na lisalisi ya nguya na Liloba na Nzambe, mobali yango abongolaki bomoto na ye.

9. Engebene ntoma Paulo, na nzela nini bomoto ezali kobongwana?

9 Kasi ndenge nini Biblia ezali na bopusi makasi boye? Kati na Bakolose 3:10, Paulo alobi ete bomoto na biso ezali kobongwana na nzela na boyebi ya solo, boyebi oyo tozali kokuta kati na Biblia. Kasi lolenge nini boyebi ezali kobongola moto?

Mosala oyo ezali kokokisama na boyebi ya solo

10, 11. (a) Ntango tozali koyekola Biblia, tozali koyeba nini na ntina na bizaleli kitoko mpe mabe? (b) Longola boyebi, eloko nini mosusu bozali na yango mposa mpo na kobongola bomoto na biso?

10 Ya liboso, Biblia ezali koyebisa bizaleli nini mabe oyo moto asengeli kolongola yango. Totanga “miso na nzombo, lolemo na nkuta, maboko masopi makila na mosembwi, motema mozali kobanzabanza misala mabe, makolo makopotaka mbango kosala masumu, motatoli na lokuta oyo akolobaka maloba na sembo te, mpe ye oyo akoyeisa kowelana kati na bandeko”. (Masese 6:16-19.) Ya mibale, Biblia ezali koyebisa bizaleli oyo tosengeli kolona, kati na yango “bolingo, esengo, kimya, motema petee, boboto, malamu, kondima, bopolo mpe komikanga motema”.​—Bagalatia 5:22, 23.

11 Boyebi wana ya solo esalisaka moto ya motema sembo na komitalela mpe na koyeba soki bizaleli nini azali na yango mposa mpo na kolona mpe wapi oyo asengeli kosala molende mpo na kolongola (Yakobo 1:25) Kasi wana ezali bobele ebandeli. Longola boyebi, azali na mposa ya elendiseli, ya eloko moko oyo ekopusa ye na kolinga kosala mbongwana. Na likambo wana lisusu, azali na mposa ya boyebi ya solo oyo ezwami na Biblia.

Tolendisami mpo na kosala malamu

12. Motindo nini koyeba bomoto na Nzambe ezali kosalisa biso na kobongwana?

12 Paulo alobi ete bomoto ya sika, oyo ya kitoko, ezali kozwa “elilingi na Mozalisi na yango”. (Bakolose 3:10.) Bomoto ya boklisto esengeli bongo kokokana na bomoto ya Nzambe ye moko. (Baefese 5:1) Bomoto ya Nzambe eyebisameli biso na nzela na Biblia, oyo ezali koyebisa biso lolenge na ye ya kosala liboso na bato mpe bizaleli na Ye: na ndakisa, bolingo na ye, boboto na ye, motema malamu na ye, motema mawa na ye mpe boyengebene na ye. Boyebi yango ezali kopusa ye oyo azali sembo na kolinga Nzambe mpe na kolinga kozala lolenge na moto oyo Ye azali kondima (Matai 22:37) Lokola bana batondi na bolingo, tolingi kosepelisa Tata na biso ya likoló, na boye ete tozali koluka komekola na ndenge malamu mpenza bomoto na ye atako tozangi kokoka mpe tozali na bolembu.​—Baefese 5:1.

13. Boyebi nini ezali koteya biso na ‘kolinga boyengebene’ mpe na ‘koyina kilikili’?

13 Elendiseli na biso ezali koyeisama makasi na ndenge Biblia ezali kopesa boyebi oyo ezali komonisa buma ebotamaka na bomoto malamu mpe bomoto mabe. (Nzembo 14:1-5; 15:1-5; 18:20, 24) Tozali koyekola ete David apambolamaki mpo na ezaleli na ye ya komipesa na makambo ya Nzambe mpe mpo na bolingo na ye mpo na boyengebene, kasi ete anyokwamaki ntango abungisaki ezalela na ye ya komipekisa. Tozali komona mpasi oyo ekomelaki Salomo ntango abungisaki bizaleli na ye ya malamu na bobange na ye. Matomba oyo mabimaki mpo na bosembo ya Yosia mpe Ezekiase makeseni mpenza na makambo mabe oyo mabimaki mpo na bolembu ya Akabe mpe mpo na lipengwi ya Manasé. (Bagalatia 6:7) Na bongo tozali koyekola ‘kolinga boyengebene’ mpe ‘koyina kilikili’.​—Baebele 1:9; Nzembo 45:7; 97:10.

14. Mikano nini Jéhovah abongisi mpo na mokili mpe bato oyo bazali na kati?

14 Elendiseli yango eyeisami lisusu makasi na boyebi ya solo ya mikano na Nzambe. Boyebi yango ezali kosalisa biso na kobongwana kino ‘na nguya oyo ezali kopusa elimo na biso’, nguya oyo ezali kolendisa makanisi na biso mpe misala na biso. (Baefese 4:23, 24, MN) Ntango tozali koyekola Biblia, tozali koyekola ete Jéhovah akotika mabe libela te. Mosika te akoboma mokili mabe mpe akotya “makolo ya sika mpe mabelé ya sika kati na yango boyengebene ekofanda”. (2 Petelo 3:8-10, 13.) Nani akozala na bomoi na kati na mokili (mabelé, MN) wana ya sika? “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu akotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili (mabelé, MN) mpe bato na masumu bakopikolama wana.”​—Masese 2:21, 22.

15. Soki tozali mpenza kondima oyo Biblia ezali koloba na ntina na mikano na Jéhovah, yango ekozala na bopusi nini likoló na biso?

15 Soki mpenza tozali kondima elaka yango, lolenge na biso nyonso ya kokanisa ekomonisa yango. Nsima na kosakola mpo na kolongolama na mabe, ntoma Petelo alobaki: “Lokola biloko nyonso bisengeli kobebisama, ebongi na bino kozala bato na lolenge nini na bizaleli na bulee mpe na kobanga Nzambe, kotalela mpe koyeisa noki emonaneli na mokolo na Jéhovah.” (2 Petelo 3:11, 12, MN) Bomoto na biso esengeli kobongolama na nzela na mposa na biso makasi ya kozala kati na bato na sembo oyo bakobatelama na ntango ya kobomama ya bato mabe.

16. Lolenge nini ya bomoto ekondimama te kati na mokili ya sika, mpe boyebi yango esengeli kozala na bopusi nini likoló na biso?

16 Mokanda na Emoniseli ezali kolaka bato na sembo ete nsima na nsuka ya mokili ya lelo “(Nzambe) akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koloka.” Kasi mokanda yango ezali kokebisa biso na nsima ete ‘bagoigoi, bato na ntembe, bato babebi na bosoto, babomi na bato, bato na pite, bato na soloka, basambeli na bikeko, bato na lokuta nyonso’ bakobomama (Emoniseli 21:4, 8) Ezali likambo na mayele mpo na kobwaka bizaleli mabe oyo Nzambe akondima te kati na mokili ya sika!

Lisalisi euti epai mosusu

17.Biblia elendisi biso ete toluka lisalisi ya lolenge nini?

17 Kasi, bato bazali na bolembu, mpe esengeli na bango likambo mosusu koleka boyebi mpe elendiseli mpo na kobongwana. Moto na moto azali na mposa ya lisalisi. Nzokande, Biblia ezali komonisa biso epai wapi tosengeli kozwa yango. Na ndakisa elobi boye: “Ye oyo akotambola na bato na mayele akozala na mayele, nde mpasi ekozwa moto oyo azali kotambola elongo na bazoba.” (Masese 13:20, MN) Motindo moko mpe, soki tozali ntango nyonso elongo na bato oyo bazali komonisa bizaleli oyo biso bolingi kolona, yango ekosalisa biso koleka mpo ete tokokana na bango.​—Genese 6:9; Masese 2:20; 1 Bakolinti 15:33.

18, 19. Likambo nini tozali na yango mposa mpo totika elimo na biso mpe motema na biso epusama na elimo na Nzambe?

18 Lisusu, Jéhovah ye moko azali kopesa lisalisi na lolenge ya elimo santu​—elimo bobele moko oyo asalelaki mpo na kosala bikamwiseli kala. Nkutu, bizaleli kitoko koleka lokola “bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, komipekisa, kokanga motema” ebiangami “mbuma na elimo”. (Bagalatia 5:22, 23.) Ndenge nini tozali kozwa lisalisi ya elimo santu? Lokola Biblia epemamaki na elimo santu, ntango tozali kotanga yango to koloba mpo na yango epai na bazalani na biso, tozali koyambola elimo na biso mpe motema na biso mpo ete epusama na nguya ya elimo santu. (2 Timote 3:16) Ya solo, Yesu alobaki ete soki tozali koloba na ntina na elikya na biso epai na bato mosusu, tokoki komona polele mosala na elimo yango.​—Matai 10:18-20.

19 Lisusu, Biblia epesi etinda oyo: “Bolendendela kati na libondeli.” (Baloma 12:12, MN) Na nzela na libondeli, tozali kosolola na Jéhovah, tozali kokumisa ye, tozali kotondo ye mpe tozali kosenga lisalisi na ye. Soki tozali kosenga lisalisi mpo na kolonga bizaleli mabe lokola nkanda, motó makasi, motema likoló to lolendo, elimo na Nzambe ekolendisa milende oyo tozali kosala na boyokani na libondeli motindo wana.​—Yoane 14:13, 14; Yakobo 1:5; 1 Yoane 5:14.

20. Mpo na nini baklisto basengeli kosala milende makasi mpo na kolata bomoto ya sika?

20 Ezali epai na lisangá ya baklisto babatisami mpe bapakolami na elimo nde ntoma Paulo akomaki: “Bobongwana mpo na kozwa makanisi na sika.” (Baloma 1:7; 12:2) Kati na makomi ya greke ya ebandeli, asalelaki lolenge na verbe oyo elimboli mosala ya ntango molai. Yango emonisi ete mbongwana oyo boyebi ya solo euti na Biblia ezali kokotisa kati na biso ezali kosalema mbala moko te. Lokola baklisto ya eleko na Paulo, tozali kobika kati na mokili oyo etondi na bopusi mabe. Mpe, lokola bango, tozali bato bazangi kokoka, tozali ntango nyonso pene na kosala mabe. (Genese 8:21) Tosengeli bongo kosala makasi mpo na kolonga bomoto na biso ya kala ya moimi, mpe kolata bomoto ya sika, lokola basalaki yango. Baklisto ya yambo balongaki mpenza mpamba te bakabwanaki mobimba na bato ya mokili oyo kati na yango bafandaki. Baklisto ya lelo bazali kosala motindo moko lokola.

Libota ‘liteyami na Jéhovah’

21. Tanga mwa bisakweli oyo bizali kokokana likolo na libota na Nzambe na ntango na biso, na mikolo ya nsuka?

21 Na ntango na biso, elimo na Nzambe ezali bobele kosala likoló ya moto na moto te, kasi likoló na lisangá mobimba ya baklisto, oyo basili kokoma bongo bamilió. Ezali nde likoló na lisangá wana maloba na esakweli oyo ya Yisaya mazali kokokana: “Bikólo mingi bakokenda mpe bakoloba ete: ‘Yakani, tobuta na ngomba na Jéhovah, epai na ndako na Nzambe na Yakobo, ete alakisa biso nzela na ye mpe ete totambola na bipai bikokendaka ye.’” (Yisaya 2:3) Esakweli mosusu oyo ya Yisaya ezali mpe kokokana likoló na bango: “Bana na yo nyonso bakolakisama na Jéhovah, mpe kimya na bana na yo ekozala mingi.” (Yisaya 54:13 MN) Banani yango oyo bazali na kimya mpo ete bateyami na Jéhovah?

22. (a) Na mikolo na biso, etuluku nini ya bato eteyami na Jéhovah? (b) Tanga maloba ya bato oyo bazali kondima ete ba Témoins de Jéhovah bakeseni na bato mosusu?

22 Tala maloba malandi oyo mauti na mokanda moko oyo etindamaki na zulunalo ya Amerike (New Haven Register): “Ata soki lokola ngai boyokisamaki mpasi mpo na kobongwana na bango, tokoki bobele kokumisa komipesa, bopeto, etamboli kitoko mpe bomoi kitoko ya bato yango.” Mokomi ya mokanda yango azalaki koloba mpo na banani? Azalaki kolobela bobele mpo na etuluku oyo zulunalo Herald ya Buenos Aires, na Argentine, elobelaki: ‘Ba Témoins de Jéhovah bamonisaki na boumeli ya mibu ete bazali ba citoyens oyo balingi mosala, bato na bopolo, babateli malamu na biloko mpe bato bazali kobanga Nzambe.’ Ezali lisusu mpo na bango nde La Stampa, zulunalo ya ltalie ekomaki: “Bakosaka te mpo na oyo etali mpako mpe bazangaka te kokokisa mibeko oyo mizali kopesa bango matomba te. Bomoi na bango ‘ya mokolo na mokolo’ ezali bobele na likambo moko bolingo ya mozalani, koboya koyangela, kosala mobulu te mpe kolongobana.”

23. Mpo na nini lokola lisangá ba Témoins de Jehovah bazali kokesana na baninga na bango?

23 Mpo na nini lokola lisangá, ba Témoins de Jéhovah bazali komikesenisa mpenza na bato na ntango ya lelo, na ndakisa ya baklisto ya liboso? Na makambo mingi, bakeseni mpenza na bato mosusu te. Babotamaki na kozanga kokoka ya bomoto lokola bato banso, bazali kokutana na nkaka motindo moko kati na makambo ya nkita mpe bazali na bamposa ya moboko motindo moko. Nzokande, lokola lisangá kati na mokili mobimba, bazali komitika ete Liloba na Nzambe emonisa nguya na yango kati na bomoi na bango. Libota wana ya mokili mobimba ya baklisto na solo emonisi na nguya nyonso ete Biblia ezali Liloba lipemami na Nzambe.​—Nzembo 133:1.

Biblia ezali mokanda mopemami

24. Libondeli nini tozali kosala mpo na bolamu ya bato mingi mosusu?

24 Kati na masolo mibale oyo, touti kotalela bobele bilembo mibale oyo bimonisi ete Biblia ezali Liloba na Nzambe kasi liloba na bato te. Soki bataleli mayele na Biblia oyo maleki nyonso to nguya na yango ya kobongola bato to mpe makambo mingi mosusu oyo mazali kokesenisa yango na mikanda misusu bato ya motema sembo bakondima kozanga nkaka ete yango epemami na Nzambe. Biso baklisto, tozali kosambela mpo ete bato mingi mosusu bakoka kondima solo wana. Na bongo bakozongela maloba kitoko oyo ya mokomi na nzembo: “Ɛ Jéhovah, tala lokola ngai nazali kolinga bilakeli na yo! Bikisa ngai pelamoko na boboto na yo. Liloba na yo mobimba ezali solo mpe bikateli na yo na sembo bikoumela nyonso seko na seko.”​—Nzembo 119:159, 160.

Bozongeli

◻ Bopusi nini Biblia ezali na yango likoló na baklisto ya solo?

◻ Ndenge nini boyebi ya solo ezali kosalisa biso na kobongola bomoto na biso?

◻ Ndenge nini Biblia ezali kosalisa biso na kolona bizaleli malamu mpe na kolonga bizaleli na biso ya mabe?

◻ Lisungi nini tozali na yango mpo na kokolisa bizaleli oyo Nzambe alingi komona epai na biso?

◻ Elembo nini ya basaleli na Jéhovah emonisi ete Biblia epemami na Nzambe?

[Elilingi na lokasa 18]

Matomba mabe ya kozanga bosembo ya Salomo na bobange na ye esengeli kopusa biso na kolinga boyengebene mpe koyina kilikili to bokoli na mibeko.

[Elilingi na lokasa 20]

Soki tozali kosenga lisalisi na Jehovah, elimo na ye ekolendisa milende na biso mpo na kolonga bizaleli mabe na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto