Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp17 No. 5 nk. 4-5
  • Oyo Biblia elobi mpo na baanzelu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyo Biblia elobi mpo na baanzelu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Masolo mosusu
  • Baanzelu bazali banani?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Baanzelu—“Bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Baanzelu basalaka nini mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Baanzelu bazali kosala nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
wp17 No. 5 nk. 4-5
Anzelu-mokonzi elongo na bamiriade ya baanzelu

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | BAANZELU​—BAZALAKA MPENZA? KOYEBA YANGO EZALI NA NTINA?

Oyo Biblia elobi mpo na baanzelu

Okosepela koyeba solo mpo na baanzelu​—soki bazali banani, bautá wapi, mpe basalaka nini? Biblia, Liloba ya Nzambe, nde ekoki kopesa biso biyano na mituna wana. (2 Timote 3:16) Biblia eyebisi biso nini?

  • Kaka ndenge Nzambe azali elimo, baanzelu mpe bazali bilimo, bamonanaka te, mpe ‘bazalaka na misuni te, mikuwa mpe te.’ Baanzelu ya sembo bafandaka na likoló pembeni ya Nzambe.​—Luka 24:39; Matai 18:10; Yoane 4:24.

  • Na ntango ya kala, baanzelu bazalaki kolata nzoto ya bato mpo na kokokisa mikumba oyo Nzambe apesaki bango awa na mabele, na nsima soki basilisi mokumba oyo bazalaki na yango, bazalaki kozongela nzoto na bango ya elimo.​—Basambisi 6:11-23; 13:15-20.

  • Mbala nyonso oyo Biblia elobelaka baanzelu, emonisaka ete bazali mibali, mpe soki balati nzoto ya bato bamonanaka mibali; atako bongo, baanzelu bazalaka mibali te, basi mpe te. Babalanaka te mpo bábota baanzelu mosusu. Longolá yango, baanzelu bazalaki naino te babebe, bana mike, to mikóló awa na mabele. Yehova nde akelaki bango; yango wana Biblia ebengi bango “bana ya Nzambe ya solo.”​—Yobo 1:6; Nzembo 148:2, 5.

  • Lokola Biblia elobeli “minɔkɔ ya bato mpe ya baanzelu,” yango emonisi ete bikelamu ya elimo bazalaka na monɔkɔ na bango mpe na elobeli na bango. Atako Nzambe asalelaki baanzelu mpo na kosolola na bato, alingaka te ete tósambela baanzelu to tóbondela bango.​—1 Bakorinti 13:1; Emoniseli 22:8, 9.

  • Baanzelu bazali bamiriade na bamiriade, mbala mosusu bazali bamiliare na bamiliare.a​—Danyele 7:10; Emoniseli 5:11.

  • Baanzelu bazali “na makasi na kati ya nguya,” baleki bato na nguya mosika, mpe bazali na mayele oyo eleki mayele ya bato. Bakoki kokende mosika na vitɛsi moko ya kosakana te, koleka oyo moto akoki kokanisa.​—Nzembo 103:20; Danyele 9:20-23.

  • Atako baanzelu bazali na mayele mpe nguya mingi ndenge wana, bakoki te kosala makambo nyonso, mpe bayebi makambo nyonso te.​—Matai 24:36; 1 Petro 1:12.

  • Nzambe akelá anzelu mokomoko na bomoto na ye, na bizaleli lokola oyo ya Nzambe, mpe na bonsomi ya kopona. Na yango, ndenge moko na bato, baanzelu bakoki kopona kosala malamu to mabe. Likambo ya mawa, baanzelu mosusu baponaki kotombokela Nzambe.​—Yuda 6.

a Miriade moko ezali 10 000. Miriade moko mbala miriade esali milio 100. Kasi, mokanda ya Emoniseli elobi ete baanzelu bazali “bamiriade na bamiriade.” Yango elingi koloba bankama ya bamilio, mbala mosusu bamiliare ya bikelamu ya elimo!

Ndenge nini baanzelu babongisami?

Anzelu-mokonzi, Mikaele, aleki baanzelu nyonso na bokonzi mpe na nguya. Makomami emonisi polele ete Mikaele ezali nkombo mosusu ya Yesu Kristo.​—1 Batesaloniki 4:16; Yuda 9.

Baserafɛ bazali baanzelu ya lokumu mingi mpe bazali na mikumba mingi koleka, bafandaka zingazinga ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.​—Yisaya 6:1-3.

Bakeruba bazali baanzelu mosusu ya lokumu mingi mpe bakokisaka mikumba oyo ezali na boyokani na nkembo ya Nzambe. Mbala mingi, Biblia emonisaka bango lokola bakɛngɛli oyo Nzambe asalelaka.​—Ebandeli 3:24; Ezekiele 9:3; 11:22.

Bamiriade ya baanzelu batindami bazali baanzelu mosusu oyo Nzambe atindaka mpo na kokokisa mokano na ye.b​—Baebre 1:7, 14.

b Mpo na koyeba makambo mosusu etali baanzelu, talá buku Makambo oyo Biblia eteyaka, mokapo 10 mpe etanda 23 “Mikaele anzelu-mokonzi,” ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali mpe na www.jw.org.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto