Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 226-lok. 231
  • Konɛtwa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Konɛtwa
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Soki moto atuni​—
  • Yesu Kristo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • ‘Bakamatami mpo na kokutana na Nkolo’​—Lolenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Lobiko
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Okokamatama mpo na kokende na Likolo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 226-lok. 231

Konɛtwa

Ndimbola: Liteya oyo elobaka ete bakristo ya sembo bakomemama mbala moko na nzoto na bango uta na mabele, mpe bakokende kokutana na Nkolo “na mopɛpɛ.” Bato mosusu bakanisaka ete liteya ya “konɛtwa” esimbami na 1 Batesaloniki 4:17.

Ntango ntoma Paulo alobaki ete bakristo ‘bakomemama’ mpo na kozala na Nkolo, azalaki kolobela likambo nini?

1 Tes. 4:13-18, hf: “Bandeko, tolingi te ete bozanga koyeba makambo na bango basili kolala [“bato bakufá,” LL] ete boyoka mawa te pelamoko bamosusu baoyo bazali na elikia te. Zambi soko tozali kondima ete Yesu akufi mpe asekwi lisusu, bongo na nzela na Yesu, Nzambe akoyeisa lisusu bango balali esika moko na ye. Mpo na yango tokolobaka na bino na liloba na Nkolo ete biso bato na bomoi baoyo totikali kino komonana na Nkolo, tokoleka liboso na balali te. Mpo ete Nkolo ye moko akokita longwa na Likolo na konganga makasi mpe na mongongo na mokóló na banze mpe na kobɛta na mondule na Nzambe, mpe bakufi kati na Klisto bakosekwa liboso. Na nsima biso bato na bomoi baoyo totikali, tokonɛtwa kati na mopɛpɛ esika moko na bango. Mpe bongo tokozala libela esika moko na Nkolo. Boye, bobɔndisana bino mpenza na maloba oyo.” (Emonani ete bakristo mosusu ya lisangá ya Tesaloniki basilaki kokufa. Ntoma Paulo azalaki kolendisa baoyo batikalaki ete bábɔndisanaka na elikya ya lisekwa. Akundwelaki bango ete Yesu asekwaki nsima ya liwa na ye; na yango, ntango Nkolo akozonga, bakristo ya sembo oyo bakufá bakosekwa mpo bázala elongo na Kristo.)

Banani ‘bakomemama na mapata’ ndenge 1 Batesaloniki 4:17 elobi?

Vɛrsɛ 15 emonisi ete ezali bakristo ya sembo “oyo batikali kino komonana na Nkolo,” elingi koloba, baoyo bakozala na bomoi ntango Kristo akoya. Basengeli kokufa liboso? Soki totaleli Baroma 6:3-5 mpe 1 Bakorinti 15:35, 36, 44 (oyo ezali na nkasa 224, 225), basengeli naino kokufa liboso bázwa bomoi na likoló. Kasi bango bakoumela na kati ya liwa te mpo na kozela kozonga ya Kristo. ‘Bakonɛtwa,’ “na kobwɛta liso,” mpo na kozala elongo na Nkolo.​—1 Ko. 15:51, 52, hf; talá mpe Emoniseli 14:13.

Kristo akomonana boye na mapata mpe na nsima akozwa bakristo ya sembo na likoló wana mokili ezali kotala?

Yesu alobaki ete mokili ekomona ye lisusu boye na miso?

Yoa. 14:19, LNz: ‘Etikali moke, bato bakomono ngai lisusu te. Kasi bino [bayekoli na ye ya sembo] nde bomoni ngai; zambi nazali na bomoi; bino lokola bokozala na bomoi.’ (Talá 1 Timote 6:16.)

Maloba Nkolo “akokita uta na likoló” elimboli nini?

Nkolo “akokita uta na likoló,” ndenge 1 Batesaloniki 4:16 elobi, kozanga ete bato bámona ye na miso boye? Na ntango ya Sodoma ná Gomora, Yehova alobaki ete ‘akokita mpo atala’ makambo oyo bato bazali kosala. (Eba. 18:21, hf) Ntango Yehova ayaki kotala, moto moko te amonaki ye, atako bamonaki baanzelu oyo atindaki. (Yoa. 1:18) Ndenge moko mpe, atako Yesu akozonga na mabele na nzoto te, akotyela bayekoli na ye ya sembo likebi mpo na kopesa bango mbano.

Na yango, na ndimbola nini bato “bakomona” Nkolo “azali koya na lipata”?

Yesu asakolaki ete: “Na ntango yango bakomona Mwana na moto [Yesu Kristo] koya na lipata, na nguya na nkembo mingi.” (Luka 21:27, hf) Vɛrsɛ oyo mpe bavɛrsɛ mosusu oyo ekokani na yango ekweisi te maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 14:19. Tózwa ndakisa: Na Ngomba Sinai, nini esalemaki ntango Nzambe ‘ayaki epai na bato kati na lipata mwindo,’ ndenge Kobima 19:9 elobi yango? (hf) Nzambe azalaki wana, kasi bazalaki komona ye te; Bayisraele bamonaki elembo oyo emonisaki ete Nzambe azali wana, kasi moto moko te amonaki ye na miso. Na yango, ntango Yesu alobaki ete akoya “na lipata,” alingaki koloba ete akomonana te na miso ya bato, kasi bato bakoyeba ete azali. ‘Bakomona’ ye na miso ya makanisi, bakososola ete azali. (Mpo na koyeba makambo mosusu, talá motó ya likambo “Kozonga ya Kristo.”)

Bakristo bakoki komemama na likoló na nzoto na bango ya mosuni?

1 Ko. 15:50, hf: “Bandeko, nazali koloba oyo ete, mosuni mpe makila ekoki kozwaka Bokonzi na Nzambe te. Oyo ekopɔlaka ekosangola yango ezangi kopɔla te.”

Likambo oyo ekómelaki mosakoli Eliya ekweisi makanisi ya vɛrsɛ yango? Te. Mpo na koyeba ndimbola na yango, esengeli kotalela maloba oyo Yesu alobaki polele basiɛklɛ mingi na nsima: “Ata moto moko te asi’abutá na Likolo; kaka Mwana ya Moto nde auti na Likolo.” (Yoa. 3:13, LL) Atako bamonaki lokola nde Eliya “abutaki likoló na mopɛpɛ monene kati na lola,” yango elimboli te ete akendaki na likoló mpenza epai ya Nzambe. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo Biblia emonisi ete na nsima Eliya atindelaki mokonzi ya Yuda mokanda mpo na kopamela ye. (2 Bak. 2:11, hf; 2 Nt. 21:1, 12-15) Lokola na ntango wana bato basalaki naino mpɛpɔ te, Yehova asalelaki likalo ya mɔtɔ mpe mopɛpɛ makasi mpo na komatisa Eliya na likoló epai bandɛkɛ bapumbwaka mpe amemaki ye epai mosusu.​—Talá Ebandeli 1:6-8, 20.

Mbala mosusu bakristo ya sembo bakomemama na likoló, na bongo bakolimwa kaka na mabele kozanga ete bákufa?

Rom. 6:3-5, hf: “Boyebi te ete biso nyonso tobatisami kati na Yesu Klisto, tobatisami kati na kufa na ye? . . . Soki tosili kosangana na ye elongo kati na lolenge na kufa na ye, tokosangana mpe na ye kati na lisekwa na ye.” (Likambo oyo ekómelaki Yesu ezali ndakisa ya likambo oyo esengeli kokómela bayekoli na ye. Bayekoli na ye mpe bato mosusu bayebaki ete akufaki. Azongaki na likoló kaka nsima ya liwa mpe lisekwa na ye.)

1 Ko. 15:35, 36, 44, hf: “Kasi moto moko akotunaka ete, Bakufi bakosekwa nzela nini? Bakoya na nzoto na motindo boni? Zoba! Nkona oyo okokonaka ekozwa bomɔi te bobɛlɛ ete ekufa naino. Ekokonama nzoto na mosuni mpenza, ekosekwa nzoto na [elimo].” (Na yango, moto asengeli kokufa liboso azwa nzoto yango ya elimo, boye te?)

Nkolo akomema bakristo nyonso ya sembo na likoló liboso ya bolɔzi monene?

Mat. 24:21, 22: “Na ntango wana ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo, ɛɛ, mpe ekosalema lisusu te. Kutu, soki mikolo yango eyeisamaka mokuse te, mbɛlɛ ata moto moko abiki te; kasi mpo na bato oyo baponami mikolo yango ekoyeisama mokuse.” (Vɛrsɛ oyo elobi te ete “bato oyo baponami” bakomemama na likoló liboso bolɔzi monene ebanda, boye te? Kasi, emonisi nde ete bamosusu kati na bango ná baninga na bango oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele bakobika na bolɔzi monene.)

Em. 7:9, 10, 14, hf: “Na nsima na makambo oyo natalaki, mpe namoni ebele monene, oyo moto te akoki kotanga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso; batɛlɛmi liboso na kiti na bokonzi mpe liboso na Mwana na Mpate. Balati bilamba mpɛmbɛ, mpe basimbi bitape na mbila na mabɔkɔ na bango. Bangangi na mongongo makasi ete, Lobiko na Nzambe na biso oyo afandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate! . . . Bazali baoyo babimi na monyɔkɔ monene.” (Mpo moto ‘abima’ na esika moko boye, asengeli liboso kokende na esika yango to kozala na esika yango. Na yango, ebele mpenza ya bato yango ezali bato oyo bamonaki bolɔzi monene mpe babiki na yango.) (Mpo na komonisa ete bakozala awa na mabele, talá lokasa 276.)

Ndenge nini bakristo ya solo bakobatelama na bolɔzi monene?

Rom. 10:13, hf: “Moto na moto oyo akobelela nkombo ya Nkolo [“Yehova,” NW] akobika.”

Sef. 2:3, RS: “Bóluka NKOLO [“Yawe,” LNz, hf, LL], bino nyonso bato ya komikitisa ya mabele, oyo botosaka mibeko na ye; bóluka boyengebene, bóluka komikitisa; mbala mosusu bokobombama na mokolo ya nkanda ya NKOLO.” (Talá mpe Yisaya 26:20.)

Bakristo nyonso ya solo mbala mosusu bakomemama na likoló nsima ya bolɔzi monene?

Mat. 5:5, hf: “Mapamboli epai na basɔkɛmi, zambi bakosangola mokili.”

Nz. 37:29, hf: “Bayengebene bakosangola mokili [“mabele,” NW], mpe bakofanda wana libela.” (Talá mpe vɛrsɛ 10, 11, 34.)

1 Ko. 15:50, hf: “Mosuni mpe makila ekoki kozwaka Bokonzi ya Nzambe te.”

Talá mpe motó ya likambo “Likoló.”

Mpo na nini bakristo mosusu bakokende na likoló mpo na kozala elongo na Kristo?

Em. 20:6, hf: “Bakozala banganga na Nzambe mpe na Klisto; bakozala bakonzi esika moko na ye mbula nkóto.” (Lokola bakoyangela elongo na Kristo, esengeli kozala na bato oyo bango bakoyangela. Bato yango banani? Talá Matai 5:5 mpe Nzembo 37:29.)

Talá mpe motó ya likambo “Kobotama lisusu.”

Baoyo bakokende na likoló bakozonga lisusu na mabele mpo na kofanda libela na Paradiso?

Mas. 2:21, hf: “Basembwi bakofanda na mokili [“mabele,” NE] mpe bato malamu bakotikala na yango.” (Simbá ete vɛrsɛ yango elobi te ete basembwi bakozonga na mabele, kasi nde bakotikala wana.)

1 Tes. 4:17, hf: ‘Mpe bongo [biso bakristo oyo tokomemama na likoló] tokozala libela esika moko na Nkolo.’

Soki moto atuni​—

‘Bondimaka ete bakristo bakonɛtwa?’

Okoki koyanola: ‘Namonaka ete bato nyonso bazalaka na likanisi moko te mpo na likambo yango. Mpo na yo, konɛtwa ezali nini? . . . Na likambo nyonso, ezalaka malamu kotalela soki makanisi na biso eyokani na Biblia. (Salelá mwa makanisi oyo tolobeli na lisolo oyo, oyo ekoki kosalisa moto yango.)’

To okoki koloba: ‘Bayebisá ngai ete bakristo bakonɛtwa mpo na kokima kobebisama ya mokili. Bato mingi bakanisaka ete na ndenge wana nde bakobika na bolɔzi monene. Bongo yo okanisi nini?’ Okoki kobakisa: (1) ‘Na ntembe te tokolinga mpenza ete Nzambe abatela biso na ntango wana, mpe nasepelaka mingi na bavɛrsɛ oyo emonisi ndenge oyo tokoki kobatelama na ntango wana. (Sef. 2:3)’ (2) ‘Likambo ya ntina ezali ete Biblia emonisi ete Nzambe akobatela bato mosusu ya sembo awa na mabele. (Mas. 2:21, 22) Yango eyokani na mokano ya Nzambe ntango azalisaki Adama mpe atyaki ye na Paradiso, boye te?’

Ndenge mosusu ya koyanola: ‘Ntango ozali kolobela konɛtwa, olingi koloba ete bakristo oyo bakozala na bomoi na nsuka ya ntango oyo ya mabe bakomemama na likoló, bongo te? . . . Osilá komituna nini bakokende kosala kuna? . . . Talá oyo Emoniseli 20:6 (mpe 5:9, 10) elobi. . . . Kasi bakoyangela banani? (Nz. 37:10, 11, 29)’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto