Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/6 nk. 7-12
  • Yehova​—⁠Nzambe oyo akomonisaka makambo mabombami

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova​—⁠Nzambe oyo akomonisaka makambo mabombami
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Atako azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso kasi atondi na bolingo
  • Bato oyo Yehova azali kosalela babongi na limemya
  • Na polele to na nkuku?
  • Tosengeli koyebisa to kobomba?
  • Libombami oyo baklisto basengeli koyebisa polele!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Ndenge nini koyekola koyeba Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Bwanya ya Nzambe na kati ya sɛkɛlɛ moko mosantu”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Nyoka amonisami polele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/6 nk. 7-12

Yehova​—Nzambe oyo akomonisaka makambo mabombami

“Nzambe azali na lola, oyo akomonisaka makambo mabombami.”​—DANYELE 2:28.

1, 2. (a) Na lolenge nini Yehova akeseni na Monguna na ye monene? (b) Na lolenge nini bato bazali komonisa bokeseni yango?

YEHOVA, Nzambe ya bolingo mpe oyo aleki likoló kati na molɔ́ngɔ́ mobimba, Mozalisi bobele moko, azali Nzambe ya mayele mpe ya boyengebene. Azali ata na mposa moko te ya kobomba bomoto na ye, misala na ye, to mikano na ye. Na ntango ye moko alingi mpe engebene mokano na ye, amimonisaka ye moko. Na lolenge wana, akeseni na Monguna na ye, Satana Zábolo, oyo abombaka bomoto na ye mpenza mpe mikano na ye.

2 Lokola Yehova na Satana bazali banguna, basambeli na bango mpe bazali banguna. Baoyo bazali kolanda litambwisi ya Satana bayebani na bizaleli na bango ya bongolabongola mpe ya bokosi. Bamekaka komimonisa lokola bato oyo bakoki kopesa bolamu, nzokande bazali kosala misala ya molili. Bayebisaki na baklisto ya mboka Kolinti ete bákamwa na likambo yango te. “Mpo ete bato yango bazali bantoma na lokuta, basali na kozimbisa, baoyo bakomimonisaka lokola bantoma na Klisto. Bókamwa te, mpo ete ata Satana akomimonisaka lokola ntoma na moi.” (2 Bakolinti 11:13, 14) Epai mosusu, baklisto bazali kotalela Klisto ete azali Motambwisi na bango. Ntango azalaki awa na mabelé, amonisaki na lolenge ya kokoka mpenza bomoto ya Tata na ye, Yehova Nzambe. (Baebele 1:1-3) Na yango, na kolandáká Klisto, baklisto bazali komekola Yehova, Nzambe ya solo, oyo asalaka makambo polele. Bango mpe bazali na mposa te ya kobomba bomoto na bango, misala na bango, to mikano na bango.​—Baefese 4:17-​19; 5:1, 2.

3. Ndenge nini tokoki kokweisa likanisi oyo ete bato oyo bakómaka Batatoli ya Yehova bazali kokɔta na “mwa lingomba ya nkuku”?

3 Na ntango amoni ete ezali malamu koleka, Yehova abimisaka polele makambo matali mikano na ye mpe makambo matali mikolo mizali koya, oyo liboso mayebanaka te epai na bato. Na motindo yango azali Nzambe oyo amonisaka makambo mabombami. Na bongo, bato oyo balingi kosalela ye babyangami​—ɛɛ basɛngisami⁠—ete báyekola makambo yango mamonisami. Na 1994, ankɛtɛ moko esalemaki likoló ya Batatoli koleka 145 000 na mokili moko ya Mpótó emonisaki ete, na mwayene mokomoko kati na bango atalelaki ye moko mateya ya Batatoli ya Yehova na boumeli ya mbula misato liboso ya kozwa ekateli ya kokóma Motatoli. Basalaki liponi na bolingi na bango moko kozanga ete bápusa bango na makasi. Mpe bazali kokóba kosala na bolingi mpe na bonsomi na bango. Na ndakisa, mpo ete basusu bakómaki koboya mitindá mitombwani ya bizaleli malamu mitaleli baklisto, na yango bazwaki ekateli ete balingi te kokóba kozala Batatoli. Nzokande, likambo ya kosepelisa ezali ete na boumeli ya mbula mitano oyo euti koleka, motángo monene ya Batatoli yango ya kala bazongelaki kosangana na mosala na bango lokola Batatoli.

4. Nini esengeli te kobulunganisa baklisto ya sembo, mpe mpo na nini?

4 Ya solo, Batatoli nyonso te ya kala nde bazongaki, mpe kati na bango ezali na baoyo bazalaki na mikumba kati na lisangá ya boklisto. Yango esengeli kokamwisa biso te, mpamba te ata moko kati na bayekoli ya Yesu oyo bazalaki penepene na ye, ntoma Yuda Mokeliota, abungaki nzela. (Matai 26:14-​16, 20-​25) Kasi yango ezali nde ntina ya kobulunganisama na ntina na losambo ya boklisto? Yango ezali nde kokweisa bolóngi oyo Batatoli ya Yehova bazali kozwa kati na mosala ya koteya? Soko moke te, bobele bongo mayele mabe ya Yuda Mokeliota etɛmisaki mikano ya Nzambe te.

Atako azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso kasi atondi na bolingo

5. Ndenge nini toyebi ete Yehova mpe Yesu balingi bato, mpe na lolenge nini basili komonisa bolingo yango?

5 Yehova azali Nzambe ya bolingo. Amibanzabanzaka mpo na bato. (1 Yoane 4:7-​11) Atako etɛlɛmɛlo na ye eleki monene, asepelaka kosala boninga na bato. Na ntina na mosaleli na ye moko ya kala, tozali kotánga boye: “Abalayama andimaki Nzambe mpe yango etángameli ye mpo na boyengebene; abyangami mpe Moninga na Nzambe.” (Yakobo 2:23; 2 Ntango 20:7; Yisaya 41:8) Lolenge moko bato oyo bazali baninga bazalaka na makambo na bango ya nkuku, to basɛkɛlɛ́, Yehova asalaka mpe bongo mpo na baninga na ye. Na motindo yango, Yesu amekolaki Tata na ye, mpamba te asalaki boninga na bayekoli na ye mpe bazalaki na basɛkɛlɛ́. Ayebisaki bango ete: “Nakobyanga bino lisusu baombo te, zambi moombo ayebi yango ekosalaka nkolo na ye te. Nde nasili kobyanga bino baninga, zambi nayebisi bino makambo nyonso mayoki ngai epai na Tata na ngai.” (Yoane 15:15) Makambo ya nkuku to “basɛkɛlɛ́,” oyo ezali kati na Yehova, Mwana na ye mpe baninga na ye ezali kosangisa bango kati na ekanganeli ya bolingo mpe ya komipesa oyo ekoki kobebisama te.​—Bakolose 3:14.

6. Mpo na nini Yehova azali na mposa te ya kobomba mikano na ye?

6 Ndimbola ya nkombo Yehova, “Ye oyo asalaka ete ekóma” ezali komonisa likoki na ye ya kokóma lolenge nyonso oyo alingi mpo na kokokisa mokano na ye. Na bokeseni na bato, Yehova azali na mposa ya kobomba mikano na ye te mpo na kobanga ete basusu bakoki kopekisa ye kokokisa yango. Lokola akoki kokwea soko moke te, na bongo azali komonisa polele kati na Liloba na ye, Biblia, makambo mingi oyo azali kokana kosala. Alaki ete: “Liloba . . . na ngai; ekobutwa epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolónga na likambo litindaki ngai yango.”​—Yisaya 55:11.

7. (a) Likambo nini Yehova asakolaki na Edene, mpe na lolenge nini Satana amonisaki ete Nzambe azalaki na elónga? (b) Na lolenge nini etindá ezwami na 2 Bakolinti 13:8 ezali ntango nyonso komonana solo?

7 Mwa moke nsima na botomboki na Edene, Yehova amonisaki na mokuse lolenge ntembe oyo ebimaki kati na ye mpe Monguna na ye, Satana esengelaki kosuka. Mombóto oyo Nzambe alakaki asengelaki koswama makasi mpenza, kasi kino kobebisama te, nzokande Satana asengelaki mpenza kosasama. (Genese 3:15) Na mobu 33 T.B., Zábolo aswaki Mombóto, Klisto Yesu, na kosaláká ete abomama. Na bongo, Satana akokisaki Makomami mpe yango emonisaki ete Yehova azali Nzambe na solo, atako yango ezalaki mpenza te mposa ya Satana. Lokola ayini solo mpe boyengebene, bakisa mpe lolɛndɔ na ye, ezalela ya kozanga kobongola motema, epusaki ye na kosala bobele lokola Nzambe asakolaki ete asengelaki kosala. Ɛɛ, epai na batɛmɛli nyonso na solo, ata epai na Satana ye mpenza, etindá yango emonanaki solo: “Mpo tokoki kosala likambo moko te kotɛmɛla makambo na solo, nde bobele makambo makosungaka makambo na solo.”​—2 Bakolinti 13:8.

8, 9. (a) Satana ayebi likambo nini, kasi boyebi yango ezali nde kotya kokokisama ya mikano ya Yehova na likámá? (b) Likebisi nini batɛmɛli ya Yehova bazali koboya kolanda, mpe mpo na nini?

8 Banda Bokonzi ya Nzambe etyamaki kozanga komonana na 1914, Emoniseli 12:12 esili kokokisama: “Na bongo bósepela, ɛ likoló, mpe bino bafandi wana! Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” Kasi, koyeba ete ntango na ye ezali mokuse esali ete Satana abongola banzela na ye? Yango esengelaki komonisa Satana ete Yehova azali Nzambe na solo mpe ete lokola azali Moyangeli Mokonzi, bobele ye moko nde abongi na kopesamela losambo. Nzokande, Zábolo azali kolinga kondima kokwea te, atako ayebi makambo yango na ntina na Nzambe.

9 Yehova azali komonisa polele makambo oyo makosalema ntango Yesu akokweisa bikateli na ye likoló na ebongiseli ya mokili ya Satana. (Matai 24:29-​31; 25:31-​46) Na ntina yango, Liloba na ye lilobi na ntina na bayangeli ya mokili ete: “Ekolobaka bato ete, Kimya ezali, makambo mazali te, wana libebi ekokwela bango pwasa pelamoko mpasi ekoyela mwasi na zemi.” (1 Batesaloniki 5:3) Baoyo bazali kolanda ndakisa ya Satana bazali koyeba polele te likebisi yango. Bakufi miso na ntina na mitema na bango mabe, mpe yango ezali kopekisa bango kobongola mitema na banzela na bango mabe mpe kobongola banzela mpe myango na bango oyo ezali kotɛmɛla mikano ya Yehova.

10. (a) Na meko nini 1 Batesaloniki 5:3 esili kokokisama, kasi libota ya Yehova basengeli kosala nini? (b) Mpo na nini na mikolo mizali koya bato bazangi kondima bakoki kokóma mabe koleka kotɛmɛláká basaleli ya Nzambe?

10 Mingimingi kobanda mobu 1986, ntango mobu yango esakolamaki na Mabota Masangani ete ezali Mobu ya Kimya na Mokili mobimba, mokili esili kotonda na masukúlu matali kimya mpe libateli. Matambe ya ntina masili kosalema mpo na milende ya kotombola kimya ya mokili mpe milende yango misili kozwa mwa bolóngi. Yango ezali nde kokokisama ya esakweli yango na mobimba, to tokoki nde komizela na motindo mosusu ya kosakolama oyo ekobenda likebi koleka na mikolo mizali koya? Yehova akongɛngisa likambo yango na ntango ebongi. Wana tozali kozela, tiká ete tósɛnzɛlaka na elimo, “tózelaka mpe tóbatelaka ntango nyonso na makanisi mokolo na Nkolo.” (2 Petelo 3:12, NW) Wana ntango ezali kokóba koleka mpe masukúlu matali kimya mpe libateli mazali sé kobakisama, bato mosusu oyo bayebi likebisi yango, kasi bazali kotyela yango likebi te, bakoki kokóma na ntembe ete Yehova akoki te, to akokokisa liloba na ye te. (Kokanisá na Mosakoli 8:11-​13; 2 Petelo 3:3, 4.) Kasi baklisto ya solo bayebi ete Nzambe akokokisa mokano na ye!

Bato oyo Yehova azali kosalela babongi na limemya

11. Danyele mpe Yosefe bayekolaki nini na ntina na Yehova?

11 Ntango Mokonzi Nebukadanesala, moyangeli ya bokonzi ya Babilone, alɔ́taki ndɔ́tɔ oyo ebulunganisaki ye, oyo akokaki komikundwela yango te, asɛngaki lisungi. Banganga na ye, bato na zonga, mpe bandɔki bakokaki te koyebisa ye soki ndɔ́tɔ yango ezalaki nini to elimbolaki nini. Nzokande, Danyele, mosaleli ya Nzambe, akokaki kosala bongo, atako na ebandeli mpenza ayambolaki ete koyebisama ya ndɔ́tɔ mpe ndimbola na yango eutaki na mayele na ye moko te. Danyele alobaki ete: “Nzambe azali na lola, oyo akomonisaka makambo mabombami mpe ye ayebisi mokonzi Nebukadanesala makambo makobima na mikolo na nsuka.” (Danyele 2:1-​30) Bikeke mingi liboso, Yosefe, mosakoli mosusu ya Nzambe, akutanaki na likambo lolenge yango ete Yehova azali Momonisi na makambo mabombami.​—Genese 40:8-​22; Amosa 3:7, 8.

12, 13. (a) Nani azalaki mosakoli ya Nzambe oyo aleki basakoli nyonso, mpe mpo na nini oyanoli bongo? (b) Lelo oyo, banani bazali kosala lokola ‘basaleli ya makambo mabombami ya Nzambe,’ mpe lolenge nini tosengeli kotalela bango?

12 Mosakoli oyo aleki basakoli nyonso oyo Yehova asalelaki awa na mabelé ezali bongo Yesu. (Misala 3:19-​24) Paulo alimbolaki ete: “Kalakala Nzambe asololaki na bankɔkɔ na minɔkɔ na basakoli na mbala mingi mpe na mitindo mingi. Na mikolo oyo na nsuka asololi na biso kati na Mwana oyo atii ye mosangoli na libula na biloko nyonso; na ye mpe azalisaki bikeke.”​—Baebele 1:1, 2.

13 Yehova alobaki na baklisto ya liboso na nzela na Mwana na ye, Yesu, oyo amonisaki bango makambo mabombami ya Nzambe. Yesu ayebisaki bango ete: “Makambo na nkuku na Bokonzi na Nzambe, bino bokoki koyoka yango, nde bango bakoki koyoka te.” (Luka 8:10) Na nsima Paulo alobaki na ntina na baklisto bapakolami ete bazali “basali na Klisto mpe babateli na makambo mabombami na Nzambe.” (1 Bakolinti 4:1) Lelo oyo, baklisto bapakolami bazali kokóba kosala bongo, basali kelasi ya moombo ya sembo mpe ya mayele oyo na nzela na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kopesa bilei na ntango ebongi. (Matai 24:45-​47) Soki tozali mpenza na limemya mpo na basakoli oyo bapemamaki na Nzambe na ntango ya kala, mpe mingimingi Mwana ya Nzambe, tokomemya mpe moombo ya sembo mpe ya mayele oyo Yehova azali kosalela lelo mpo na komonisa makambo ya Biblia oyo mazali na ntina mpo na basaleli na ye na ntango oyo ya mpasi, boye te?​—2 Timoté 3:1-5, 13.

Na polele to na nkuku?

14. Ntango nini baklisto bakokisaka misala na bango na nkuku, na yango bazali kolanda ndakisa ya nani?

14 Ezaleli ya Yehova ya komonisa makambo polele elingi nde koloba ete baklisto basengeli ntango nyonso mpe na mabaku nyonso kobimisa makambo nyonso oyo bayebi? Baklisto bazali kolanda toli ya Yesu oyo apesaki na bantoma na ye, ya kozala “na mayele lokola banyoka mpe na bopɔlɔ lokola bibenga.” (Matai 10:16) Soki bayebisi bango ete bakoki te kosambela Nzambe lokola lisosoli na bango ezali kosɛnga, baklisto bakóbaka “kotosa Nzambe,” mpamba te bayebi ete moto moko te azali na lotómo ya kopekisa losambo ya Yehova. (Misala 5:29) Kútu Yesu ye mpenza amonisaki ntina na yango. Tozali kotánga boye: “Nsima na makambo oyo, Yesu atamboli kati na Galilai mpo ete alingaki kotambolaka kati na Yuda te zambi Bayuda baluki ete báboma ye. Elambo na Bayuda ebɛlɛmi, Elambo na Mingombo. Na bongo, Yesu alobi na bango [bandeko na ye ya mosuni oyo bakómaki naino bandimi te] ete, . . . Bino bóbuta na Elambo. Ngai nakobuta na Elambo oyo te mpo ete naino elaka na ngai ekokisami te. Esilisi ye koloba makambo oyo na bango, atikali na Galilai. Kasi, esili bandeko na ye kobuta na Elambo, ye mpe abuti nde polele te kasi lokola na nkuku.”​—Yoane 7:1, 2, 6, 8-​10.

Tosengeli koyebisa to kobomba?

15. Ndenge nini Yosefe amonisaki ete kobomba sɛkɛlɛ́ ezalaka ntango mosusu likambo ya bolingo oyo esengeli kosala?

15 Na mabaku mosusu, kobomba makambo ya nkuku ezali bobele likambo ya mayele te kasi mpe ya bolingo. Na ndakisa, na lolenge nini Yosefe, tata-mobokoli ya Yesu asalaki ntango ayaki koyeba ete mobandami na ye Malia azwaki zemi? Tozali kotánga boye: “Mobali na ye Yosefe, azalaki moto na boyengebene mpe alingaki koyokisa ye nsɔni na miso ya bato te; akani kolongola ye na nkuku.” (Matai 1:18, 19, NW) Oyo nde ezaleli ya kozanga boboto ekokaki komonana soki asambwisaki ye na miso ya bato banso!

16. Mokumba nini bankulutu mpe basangani mosusu ya lisangá bazali na yango na ntina na makambo ya nkuku?

16 Makambo ya nkuku oyo ekoki kobulunganisa to koyokisa mpasi esengeli te koyebisama epai na bato oyo bazali na ndingisa te ya koyeba yango. Bankulutu baklisto babatelaka likambo yango na makanisi na bango ntango basengeli kopesa toli na moto moko to kobɔndisa baninga baklisto to mpe mbala mosusu ntango basengeli kopesa disipilini mpo na lisumu monene oyo moto asaleli Yehova. Kosala makambo motindo wana na lolenge Makomami endimi ezali na ntina mingi; kasi kobimisa basɛkɛlɛ́ epai na baoyo batalelami te ezali ezaleli malamu te mpe ezali komonisa kozanga bolingo. Ya solo, basangani ya lisangá ya boklisto basengeli te koluka koyeba makambo mabombami ya bankulutu, na esika ete básala bongo, basengeli nde komemya mikumba ya bankulutu ya kobomba makambo ya nkuku. Masese 25:9 elobi ete: “Lobaná likambo na yo elongo na mozalani na yo mpe yebisá likambo na nkuku epai na moto mosusu te.”

17. Mpo na nini na mabaku mingi baklisto babombaka makambo ya nkuku, kasi mpo na nini bakoki te kosala ntango nyonso bongo?

17 Etindá yango etali kobatela makambo ya nkuku ebongi mpe kati na basangani ya libota to kati na baninga ya motema. Kobomba makambo mosusu ya nkuku ezali na ntina mpo na kopɛngola matata mpe kobebisa boninga. “Mopɛpɛ uta na epai na likoló ekoyeisa mbula; boye lolemo na kotuka ekobimisa bilongi mabe.” (Masese 25:23) Ya solo, bosembo epai na Yehova mpe mitindá na ye ya boyengebene, bakisa mpe bolingo mpo na bato babungi nzela, ekoki na mabaku mosusu kosɛnga koyebisa makambo ya nkuku epai na baboti, epai na bankulutu baklisto to epai na baoyo bazali na ndingisa ya koyeba yango.a Kasi, na mabaku mingi, baklisto babombaka makambo ya nkuku ya bato mosusu, kobateláká yango lokola babatelaka oyo ya bango moko.

18. Wapi bizaleli misato ya boklisto oyo ekoki kosalisa biso na koyeba nini tosengeli koloba mpe nini tosengeli koloba te?

18 Na bokuse, moklisto azali komekola Yehova na kobombáká makambo mosusu ya nkuku ntango esengeli kobomba yango, kobimisa yango bobele soki esɛngeli. Na kozwáká ekateli na oyo asengeli koloba mpe na oyo asengeli koloba te, moklisto atambwisami na ezaleli ya komikitisa, kondima mpe bolingo. Ezaleli ya komikitisa ekopekisa ye ete amipesa motuya mingi koleka na koluka kokamwisa basusu na koyebisáká bango makambo nyonso oyo ayebi to na kotungisa bango na makambo ya nkuku oyo akoki koloba yango te. Kondima kati na Liloba ya Yehova mpe lisangá ya boklisto ezali kopusa ye na koteya makambo ya Biblia mauti na Nzambe na kozaláká na likebi ete apɛngola koloba makambo oyo makoki kozokisa basusu wana bazali naino na ebandeli. Ɛɛ, bolingo ezali kopusa ye na koloba polele makambo oyo mazali kokumisa Nzambe mpe oyo bato bazali na mposa ya koyeba yango mpo na kozwa bomoi. Epai mosusu, makambo na ye moko ya nkuku abimisaka yango te, koyebáká ete mbala mingi na kobimisáká yango emonisaka ezaleli ya kozanga bolingo.

19. Likambo nini esalisaka na koyeba baklisto ya solosolo, mpe yango epesaka matomba nini?

19 Botaleli yango ya bokatikati ezali kosalisa biso ete tóyeba baklisto ya solosolo. Babombaka bomoto ya Nzambe te na koboyáká kosalela nkombo na ye to na kosaleláká endimeli ya Bosato oyo ekoki kolimbolama te. Banzambe oyo bayebani te bazali elembo ya mangomba ya lokuta kasi ya lingomba ya solo te. (Talá Misala 17:22, 23.) Batatoli bapakolami ya Yehova bazali mpenza komonisa motuya na libaku malamu ya kozala ‘babateli ya makambo mabombami ya Nzambe.’ Na koyebisáká polele makambo yango mabombami epai na basusu, bazali kosalisa bato ya motema sembo ete bálukaka kokóma baninga ya Yehova.​—1 Bakolinti 4:1; 14:22-​25; Zekalia 8:23; Malaki 3:18.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisoló “Kosangana na masumu ya basusu te” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛ́mbɛ 1985, ebimeli ya Lifalansé.

Okoyanola ndenge nini?

◻ Mpo na nini Yehova azali na mposa te ya kobomba mikano na ye?

◻ Epai na banani Yehova amonisaka makambo mabombami?

◻ Mokumba nini baklisto bazali na yango na ntina na makambo ya nkuku?

◻ Bizaleli misato nini ekosalisa baklisto na koyeba nini basengeli koloba mpe nini basengeli koloba te?

[Bililingi na lokasa 8, 9]

Yehova amonisaka makambo mabombami na nzela ya Liloba na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto