Oyo biblia elobi na ntina na kimya mpe libateli
Bala mingi bazali na elikya makasi lelo kati na likanisi oyo ya kosangisa bikólo ya mokili mpe na yango kotya kimya mpe libateli. Bango nyonso bazali kolikya ete mbongwana ya makambo motindo wana akomema na mokili kitoko. Nzokande, Biblia azali komonisa makambo na lolenge lokeseni.
Klmya mpe libateli, ezali likambo oyo lizali mpenzampenza kotalela baklisto, mpamba te bayebi ete, wana apemamaki na Nzambe, ntoma Paulo akomaki mokanda na lisangá na boklisto ya ekeke ya liboso. Maloba na ye makomami kati na Biblia na 1 Batesaloniki 5:3, ete: “Ekoloba bango ete: ‘Kimya ezali, makambo mazali te’ wana libebi likokwela bango pwasa lokola mpasi ekoyela mwasi na zemi mpe nzela na kokima ekozala te.” Mokapo oyo ya Makomami ezali kobimisa mituna ya ntina mingi.
Kimya mpe libateli: ezali kosakola likambo nini likoya nsima?
Soki tozongisi maloba ya Paulo oyo mazali awa likoló kati na ba versets ya zingazinga, tokomona ete “kimya mpe libateli” esakolami na baklisto ya bokengi te, kasi nde na bato oyo bayebi mpenza te makambo oyo mazali koleka. Bato yango bazali kati na likámá, nde bayebi te, mpamba te bakanisi ete makambo mazali mpenza kobongwana Nzokande, Paulo alobaki epai na baklisto ete: “Bandeko, bozali na bosɛnga te ete nakomela bino mpo na ntango mpe bileko.” (1 Batesaloniki 5:1, MN) Ya solo, tosengeli te kobosana manáka ya makambo oyo matyami na Nzambe. Mpo na nini bongo? Mpo ete Paulo asakolaki ete na “mokolo na Jéhovah,” libebi na pwasa likoya mpenza “lokola moyibi kati na butu.”—1 Batesaloniki 5:2.
Makambo masakolamaki na ntina na kimya mpe libateli etaleli nini? Ezali mpenza likambo ya kopesana makanisi mpamba te. Bato bazali kolobela kimya mpo na bitumba oyo bazali kobunda uta kala. Maloba na ntoma Paulo masengeli kolakisa eleko moko oyo mabota bakokanisa ete basili kotya kimya mpe libateli mpenza. Kasi ekozala bobele bokosi. Kimya mpe libateli oyo ezali komema na libebi ya pwasa, ezali kimya mpe libateli ya solo te.
Yesu mpe alobelaki libebi wana ya pwasa. Abengaki yango “bolozi monene oyo emonani naino te uta ebandeli ya mokili kino sikawa. Ekobima mpe lisusu te.” Bikeke mingi liboso na koya na Yesu, mosakoli Danyele alobelaki yango lokola, mpe alakisaki yango lokola “ntango na bolozi lokola ezalaki te longwa na ebandeli ya mabota kino ntango yango.”—Matai 24:21; Danyele 12:1.
Ata soko ebengami ete bolozi monene to ntango na bolozi, bisakweli nyonso mibale bizali komonisa ete, longwa na mabelé mobimba, libebi yango likolongola mokili nyonso ya Satana. Na esika ete ezala elembo ya kondimama na Nzambe, makambo masakolami na ntina na kimya mpe libateli mazali nde komema na likambo oyo likeseni na makanisi na bato.—Tala Sofoni 3:8.
Bilakiseli bisili kopesama mpo na koyeba eleko
Mbongwana oyo bato bauti kosala mpo na koyokanisa mokili mobimba, mbongwana oyo ezali kopesa bilikya na kimya mpe libateli, ezali nde kokokana ya likebisi na esakweli oyo epesamaki na Paulo? Lokola Mosenzeli ezali kolobela yango, uta 1914, tozali komona kokokana ya bisakweli mingi na Biblia na ntina na koya na Yesu, oyo azwi nguya na Bokonzi kuna na likoló. (Matai mokapo 24 mpe mokapo 25; 2 Timoté 3:1-5; Emoniseli 6:1-8) Yesu alobaki na sikisiki ete bato oyo basengelaki komona ebandeli ya eleko wana, basengeli mpe kozala na bomoi na ntango mokolo na Jéhovah mokoya, mpo na komema libebi pwasa epai na bato mabe—Luka 21:29-33.
Ntoma Paulo apesaki elakiseli mosusu. Alobaki ete: “Wana bakoloba mpo na kimya mpe libateli, likámá monene likokwela bango na pwasa.” Ezali motindo wana nde babongoli maloba na Paulo kati na The New English Bible, mpe yango ezali komonisa polele ete bolozi monene ekokóma “wana bakoloba.” Lokola koya na moyibi kati na butu ekoyebanaka te, bobele bongo libebi likoya na ntango oyo bato bakomizela na yango te, wana bakobongwana mpo na kotya likebi na elikya na bango ya kimya mpe libateli. Tokoki mpenza koloba te ete, makambo oyo mazali kosalema lelo na ntina na kimya mpe libateli ezali kokokisa esakweli na Paulo—tokoki mpe koyebisa te kino ntango nini bato basengeli koloba lisusu mpe koyokana na ntina na kimya mpe libateli. Kasi lokola kimya mpe libateli elobelami mingi sikawa koleka na liboso, baklisto basosoli ntina ya komisenzela ntango nyonso.
‘Kotutana’ kati na banguya minene ya mokili
Wana mosakoli Danyele alobelaki ntango na bolozi, apesaki mpe elakiseli oyo ezali kopesa nzela na kososola eleko oyo yango ekosalema. Amonisaki ete ntango na bolozi ekoya na nsuka na koswana ya ntango molai kati na banguya minene mibale ya politike, moko ebengami “mokonzi na epai na likolo” mpe mosusu “mokonzi na epai na ngele.” (Danyele 11:5-43) Uta nsuka na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, banguya mibale wana emonisami na “mokonzi na epai na ngele” oyo akosalelaka politike babengi ete capitaliste mpe “mokonzi na epai na likoló” oyo akosalelaka politike babengi ete socialiste.
Danyele asakolaki ete bonguna makasi kati na banguya mibale wana, ekokokana na ‘kotutana,’ lokola babundi mibale bazali kowelana elonga; ezali yango nde tokoki mpenza komona uta koleka mibu 45 sikawa. Mikolo oyo, emonani lokola ete kotutana ekiti. Yango wana, na sanza ya Mai ya mbula euti koleka, ministre ya makambo na bapaya ya Union soviétique alobaki ete koswana mpe kokanelana esili. Na sanza ya Juin, zulunalo Time elobelaki likita monene oyo lisalemaki kati na Etats-Unis mpe Union soviétique, ete: “Mwa bambula liboso, mwa boyokani bosalemi na ntina etali kotika kosala bibundeli mpe kotika komeka ba bombes ya nikleere, mbɛlɛ ekokaki komonana lokola likambo monene. Kasi sikawa, ata tosangisi yango nyonso esika moko, boyokani yango ezali komonana lokola eloko mpamba.”
Mikolo mikoya mikomonisa soki boyokani malamu oyo bozali kati na banguya minene ya mokili ezali mpo na ntango mokuse to mpo na libela. Ata nini ekosalema, kasi likambo oyo lizali solo: eleko oyo Yesu alobelaki esili mpenza kobɛlɛma. Mpe makambo mazali kobima na mokili elakisi ete tobɛlɛmi na komona kokokana ya makambo oyo masakolamaki na ntoma Paulo mpe mosakoli Danyele. Ata soko mangomba ya boklisto ya lokutá batyaki mwa maboko mpo na mbongwana euti kosalema na makambo ya politike, kasi yango ekomema na kimya ya solo te. Nyonso emonisi ete makambo wana nde makomema mabota na ezalela ya mpasi.
[Bililingi na lokasa 6]
Mikolo mikoya mikomonisa soki boyokani malamu oyo bouti kosalema kati banguya minene ekoumela kino nyongo nini
[Eutelo ya bafɔtɔ]
USSR Mission to the UN