Ndenge ya kozwa mpenza matomba na botángi ya Biblia
“Nasepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe.”—ROM. 7:22.
1-3. Matomba nini tokozwa soki tozali kotánga Biblia mpe kosalela mateya na yango?
“NAPESAKA Yehova matɔndi ntɔngɔ nyonso ndenge asalisaka ngai nakanga ntina ya makambo oyo ezali na Biblia.” Ndeko mwasi ya mobange oyo alobaki maloba wana asilá kotánga Biblia mbala 40, mpe azali se kokoba. Ndeko mwasi mosusu oyo azali naino elenge akomaki ete kotánga Biblia esalisaki ye amona ete Yehova azali moto ya solo. Yango esalisaki ye apusana lisusu penepene na Tata na ye ya likoló. Alobaki ete: “Sikoyo, nazali na esengo mingi koleka na bomoi na ngai!”
2 Ntoma Petro alendisaki bakristo nyonso ‘bázalaka na mposa makasi ya mabɛlɛ oyo ezali na liloba ya Nzambe.’ (1 Pe. 2:2) Baoyo bakokisaka mposa wana na nzela ya boyekoli ya Biblia mpe basalelaka mateya na yango bazalaka na lisosoli ya pɛto mpe bazalaka na bomoi oyo ezali mpenza na ntina. Bakómaka baninga ya solosolo ya bato mosusu oyo balingaka Nzambe ya solo mpe basalelaka ye. Nyonso wana esengeli kotinda biso ‘tósepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe.’ (Rom. 7:22) Kasi ezali na matomba ebele oyo tokoki kozwa. Wapi matomba yango mosusu?
3 Soki ozali koyekola makambo mingi oyo etali Yehova ná Mwana na ye, okolinga bango lisusu mingi, okolinga mpe bazalani na yo lisusu mingi. Koyeba Makomami malamumalamu ekosalisa yo omona ndenge oyo mosika te Nzambe akobikisa bato ya botosi ntango akoboma mokili oyo. Ozali na nsango moko malamu ya koyebisa bato na mosala ya kosakola. Yehova akopambola yo soki ozali koteya basusu makambo oyo oyekolaki na botángi na yo ya Biblia.
TÁNGÁ MPE MANYOLÁ
4. Kotánga Biblia “na mongongo ya nse” elimboli nini?
4 Yehova alingaka te ete basaleli na ye bátángaka Liloba na ye mbangumbangu. Na ntango ya kala, ayebisaki Yosua ete: “Buku oyo ya mobeko esengeli kolongwa na monɔkɔ na yo te, mpe osengeli kotángaka yango na mongongo ya nse butu moi.” (Yos. 1:8; Nz. 1:2) Etinda wana elimboli nde ete osengeli mpenza kobimisa na mongongo ya nse maloba nyonso oyo ozali kotánga kobanda na Ebandeli tii na Emoniseli? Te. Elimboli ete osengeli kotángaka mbangumbangu te mpo ozala na likoki ya komanyola. Soki ozali kotánga Biblia “na mongongo ya nse,” yango ekopesa yo nzela otya likebi na bisika oyo ekoki mpenza kosalisa yo mpe kolendisa yo na ntango wana. Soki okómi na bafraze, bavɛrsɛ, to masolo ya ndenge wana, tángá yango malɛmbɛ; ntango mosusu okoki kosala ete lolemo mpe mbɛbu na yo emonisa ete ozali kotánga. Mbala mosusu okomona ete vɛrsɛ moko oyo otángi esimbi mpenza motema na yo. Mpo na nini yango ezali na ntina? Mpamba te soki okangi ntina ya toli moko ya Nzambe, okomona ntina oyo osengeli kosalela yango.
5-7. Pesá ndakisa oyo emonisi ete kotánga Liloba ya Nzambe na mongongo ya nse ekoki kosalisa yo (a) okoba kozala na etamboli ya pɛto; (b) omonisela basusu motema molai mpe boboto; (c) otyela Yehova motema ata na ntango ya mpasi.
5 Kotánga na mongongo ya nse esalisaka mingimingi ntango ozali kotánga mikanda ya Biblia oyo omesani na yango te. Bandakisa misato oyo elandi emonisi likambo yango. Ya liboso, kanisá ete na botángi na ye ya Biblia, ndeko mobali moko oyo azali elenge akómi na esakweli ya Hosea. Na mokapo ya 4, apemi mwa moke nsima ya kotánga vɛrsɛ ya 11 tii 13 na mongongo ya nse. (Tángá Hosea 4:11-13.) Mpo na nini? Bavɛrsɛ wana ebendi likebi na ye mpamba te azali kosala makasi mpo na kotɛmɛla baninga ya kelasi oyo bazali kotya ye mbamba mpo na kosala makambo ya mbindo. Amanyoli na bavɛrsɛ yango mpe akanisi boye: ‘Yehova amonaka makambo ya mabe oyo bato basalaka ata na kobombana. Nalingi te kosilikisa ye.’ Ndeko yango azwi ekateli ya kozala ntango nyonso na etamboli ya pɛto na miso ya Nzambe.
6 Na ndakisa ya mibale, kanisá ete ndeko mwasi moko azali kotánga esakweli ya Yoele, mpe akómi na mokapo ya 2, vɛrsɛ ya 13. (Tángá Yoele 2:13.) Ntango atángi vɛrsɛ wana na mongongo ya nse, amanyoli na ndenge oyo asengeli komekola Yehova, oyo “azali na ngɔlu mpe na motema mawa, ayokaka nkanda noki te mpe azali na motema boboto mingi.” Azwi ekateli ya koboya maloba ya kotyola mpe ya nkanda oyo, na mbala mosusu abimisaka ntango azali koloba na mobali na ye mpe na bato mosusu.
7 Na ndakisa ya misato, kanisá ete tata ya libota moko abungisi mosala na ye mpe azali komitungisa mpo na ndenge oyo akokokisa bamposa ya mwasi na ye mpe bana na ye. Na Nahumu 1:7, atángi na mongongo ya nse ete Yehova “ayebaka baoyo bazali koluka esika ya kokima epai na ye” mpe abatelaka bango lokola “esika makasi ya libateli na mokolo ya mpasi.” Likanisi wana ebɔndisi ye. Asosoli ete Yehova azali kotyela ye likebi, mpe atiki komitungisa koleka ndelo. Na nsima, atángi vɛrsɛ ya 15 na mongongo ya nse. (Tángá Nahumu 1:15.) Ndeko yango asosoli ete soki azali kosakola nsango malamu na ntango ya mpasi, akomonisa ete azali mpenza kondima ete Yehova azali mpo na ye esika makasi ya libateli. Atako ndeko yango azali kokoba koluka mosala, amoni ete asengeli mpe kobimaka na mosala ya kosakola mikolo mosusu na kati ya pɔsɔ.
8. Yebisá na mokuse likambo moko ya kolendisa oyo oyekolaki na nzela ya botángi na yo ya Biblia.
8 Makanisi ya ntina oyo touti kolobela euti na mikanda ya Biblia oyo bato mosusu bakoki kokanisa ete ezali mpasi mpo na kokanga ntina na yango. Soki ozali kotánga mokanda ya Hosea, ya Yoele, mpe ya Nahumu na mposa ya koyeba, ekozala malamu otánga bavɛrsɛ na yango mosusu na mongongo ya nse. Kanisá ndenge oyo mikanda ya basakoli wana ekoki kosalisa yo okóma na bwanya mingi mpe kobɔndisa yo! Kasi, tokoloba nini mpo na mikanda mosusu ya Biblia? Liloba ya Nzambe ezali lokola esika oyo batimolaka mpo na koluka diama. Osengeli kotimola malamu. Ntango ozali kotánga Biblia, zaláká na mokano ya koluka litambwisi mpe bilendiseli ya Nzambe, oyo ezali lokola mabanga ya ntalo.
SALÁ MAKASI OKANGA NTINA
9. Tokoki kosala nini mpo na koyeba mokano ya Nzambe malamu koleka?
9 Ezali na ntina mingi otángaka Biblia mokolo na mokolo, kasi osengeli mpe koluka kokanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga mpe kosolola yango. Yango wana, saleláká malamu mikanda ya ebongiseli ya Yehova mpo na koluka koyeba bomoi ya bato oyo balobeli, bisika, mpe makambo oyo otángi na lisolo moko. To, soki ozali koluka koyeba ndenge nini liteya moko ya Biblia ekoki kosalisa yo, okoki kotuna nkulutu moko to mokristo moko oyo akɔmɛli na elimo mpo asalisa yo. Mpo na komonisa ntina ya koyeba mokano ya Nzambe malamu koleka, tótalela ndakisa ya mokristo moko ya siɛklɛ ya liboso oyo asalaki makasi mpo na kosala bongo. Nkombo na ye Apolosi.
10, 11. (a) Ndenge nini basalisaki Apolosi akolisa makoki na ye ya kosakola nsango malamu? (b) Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Apolosi? (Talá etanda “Oteyaka makambo ya kala?”)
10 Apolosi azalaki mokristo moko Moyuda, oyo “ayebaki Makomami malamumalamu” mpe “azalaki kopela na elimo.” Mokanda ya Misala elobi boye mpo na ye: “Abandaki kosakola mpe koteya na ndenge ya malamu mpenza makambo oyo etali Yesu, kasi ayebaki kaka batisimo ya Yoane.” Kozanga ete ayeba yango, Apolosi azalaki koteya makambo ya kala na oyo etali ndimbola ya batisimo. Nsima ya koyoka ndenge oyo azalaki koteya, Akila ná Prisile, mobali moko ná mwasi na ye oyo bazalaki mpe bakristo, bamonisaki ye “nzela ya Nzambe na ndenge ya malamu lisusu koleka.” (Mis. 18:24-26) Ndenge nini yango esalisaki Apolosi?
11 Nsima ya kosakola na Efese, Apolosi akendaki na Akaya. “Ntango akómaki kuna, asalisaki mpenza baoyo bandimaki mpo na boboto monene ya Nzambe; mpo azalaki komonisa na bokasi mpenza polele na miso ya bato ete Bayuda bazalaki na libunga, wana azalaki komonisa na nzela ya Makomami ete Yesu azali Kristo.” (Mis. 18:27, 28) Na ntango wana, Apolosi akokaki kolimbola batisimo ya bakristo na ndenge oyo ebongi. Lokola akómaki sikoyo na boyebi mingi, “asalisaki mpenza” bato ya sika bákola na makambo etali losambo ya solo. Liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango? Lokola Apolosi, tosalaka makasi tókanga ntina ya makambo oyo tozali kotánga na Biblia. Kasi, soki mokristo moko oyo akɔmɛli na elimo apesi biso toli oyo ekoki kosalisa biso tóteyaka malamu koleka, tosengeli kondima toli na ye na komikitisa nyonso mpe komonisa botɔndi. Soki tosali bongo, tokosalela Nzambe lisusu malamu koleka.
SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI MPO NA KOSALISA BASUSU
12, 13. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo okoki kosalela malamu Makomaki mpo na kosalisa moyekoli ya Biblia akola na elimo.
12 Lokola Akila, Prisile, mpe Apolosi, tokoki kozala lipamboli mpo na basusu. Omiyokaka ndenge nini soki maloba na yo ya kolendisa esalisi moto moko oyo abandi kosepela na mateya ya solo alonga mokakatano moko oyo ezalaki kopekisa ye akola na elimo? To soki ozali nkulutu, omiyokaka ndenge nini soki ndeko moko apesi yo matɔndi mpo toli moko ya Biblia oyo opesaki ye esalisaki ye ntango azalaki na mikakatano? Kozanga ntembe, kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kosalisa basusu bákóma na bomoi ya malamu koleka epesaka esengo mingi.a Luká ndenge oyo yo mpe okoki kosala bongo.
13 Na mikolo ya Eliya, Bayisraele mingi bazalaki kokakatana mpo na kozwa ekateli na oyo etali losambo ya solo to ya lokuta. Toli oyo Eliya apesaki bato yango ekoki kosalisa moyekoli ya Biblia oyo azali kokoka te kozwa ekateli mpo na kokola na elimo. (Tángá 1 Bakonzi 18:21.) Tózwa ndakisa mosusu: Soki moto moko oyo azali kosepela na mateya ya solo azali kobanga oyo baninga na ye to bato ya libota na ye bakoloba, okoki kolendisa ye mpo akangama na ekateli oyo azwi ya kosambela Yehova soki otaleli elongo na ye Yisaya 51:12, 13.—Tángá.
14. Nini ekosalisa yo omikundola bavɛrsɛ ya Biblia ntango ozali na mposa na yango mpo na kosalisa basusu?
14 Tomoni polele ete Biblia ezali na maloba mingi oyo ekoki kolendisa motángi, kosembola ye, mpe kopesa ye makasi. Kasi mbala mosusu okoki komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kozwa bavɛrsɛ ntango nazali na mposa na yango?’ Tángáká Biblia mpe manyoláká na makanisi ya Nzambe mokolo na mokolo. Soki ozali kosala bongo, okoyeba makambo mingi oyo elimo ya Yehova ekosalisa yo omikundola ntango okozala na mposa na yango.—Mrk. 13:11; tángá Yoane 14:26.b
15. Nini ekosalisa yo oyeba Liloba ya Nzambe malamumalamu?
15 Lokola mokonzi Salomo, bondelá Yehova apesa yo bwanya mpo okokisa malamu mikumba na yo na lisangá. (2 Nt. 1:7-10) Ndenge basakoli ya kala basalaki, ‘tunátuná na molende mpe lukáluká mpenza’ na Liloba ya Nzambe mpo na koyeba malamumalamu Yehova mpe mokano na ye. (1 Pe. 1:10-12) Ntoma Paulo alendisaki Timote aleisa makanisi na ye na “maloba ya kondima mpe mateya malamu.” (1 Tim. 4:6) Soki yo mpe osali bongo, okozala mpenza na likoki ya kosalisa basusu na elimo. Longola yango, okotonga mpe kondima na yo moko.
LILOBA YA NZAMBE EBATELAKA MPENZA
16. (a) Ndenge nini “kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo” esalisaki bato ya Beroya? (b) Mpo na nini kotánga Biblia mokolo na mokolo ezali na ntina mingi lelo oyo?
16 Bayuda oyo bazalaki na Beroya, engumba moko ya Masedonia, bazalaki na momeseno ya “kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo.” Ntango Paulo asakwelaki Bayuda yango nsango malamu, balukaki koyeba soki maloba na ye eyokani na boyebi ya Makomami oyo bazalaki na yango. Yango ebimisaki litomba nini? Mingi na bango bandimaki ete azalaki koteya solo, mpe “bakómaki bandimi.” (Mis. 17:10-12) Yango emonisi ete kotánga Biblia mokolo na mokolo esalisaka moto azala na kondima makasi epai na Yehova. Soki tolingi kobika mpe kokɔta na mokili ya sika ya Nzambe, tosengeli kozala na kondima ya ndenge wana, elingi koloba ‘kozela na motema mobimba biloko oyo tozali kolikya kozwa.’—Ebr. 11:1.
17, 18. (a) Ndenge nini kondima makasi mpe bolingo ebatelaka motema ya elilingi ya mokristo? (b) Ndenge nini elikya ebatelaka biso mpo tózwa likama te?
17 Paulo azalaki mpenza na ntina ya kokoma ete: “Nde biso baoyo tozali bato ya moi, tóbatela makanisi na biso mpe tólata ebateli-ntolo ya kondima mpe bolingo mpe ekɔti oyo ezali elikya ya lobiko.” (1 Tes. 5:8) Soda asengeli kobatela motema na ye mpo monguna azokisa yango te. Ndenge moko mpe, mokristo asengeli kobatela motema na ye ya elilingi mpo nguya ya lisumu ebebisa yango te. Nini ekosalema soki mosaleli ya Yehova azali na kondima makasi na bilaka ya Nzambe, kasi azali mpe kolinga Nzambe mpe bazalani na ye? Ezali lokola nde mokristo yango alati ebateli-ntolo ya elimo oyo ekobatela ye malamu mpenza. Ekozala mpasi ete asala likambo moko oyo ekobebisa boyokani na ye ná Nzambe.
18 Paulo alobeli mpe ekɔti, elingi koloba “elikya ya lobiko.” Na ntango ya kala, soki soda abateli motó na ye te, akokaki kokufa na etumba. Kasi soki alati ekɔti ya malamu, mbanzi to makula oyo ezalaki kozwa ye na motó ekokaki kozokisa ye makasi te. Ndenge moko mpe, soki tozali koyekola Liloba ya Yehova, tokokóma na elikya ete akobikisa biso. Elikya makasi ekosalisa biso tótɛmɛla bapɛngwi mpe “bilobaloba mpamba” na bango oyo epalanganaka lokola mpota oyo elyaka nzoto. (2 Tim. 2:16-19) Elikya na biso ekosalisa mpe biso tóboya kolanda baoyo balingi kotinda biso tósala makambo oyo Yehova apekisi.
EZALI NA NTINA MINGI MPO NA KOBIKA
19, 20. Mpo na nini tozwaka Liloba ya Nzambe na motuya mingi, mpe ndenge nini tomonisaka ete tosepelaka na yango? (Talá etanda “Yehova apesaka ngai mpenza oyo nasengeli na yango.”)
19 Lokola nsuka ezali se kokóma pene, biso mpe tosengeli kotyela Liloba ya Yehova motema lisusu mingi koleka. Batoli na yango ekosalisa biso tótika bizaleli ya mabe mpe tópekisa bamposa na biso ya kosala masumu. Bilendiseli mpe libɔndisi na yango ekosalisa biso tólonga komekama ya Satana mpe mokili na ye. Litambwisi oyo Yehova azali kopesa na nzela ya Liloba na ye ekosalisa biso tótikala na nzela ya bomoi.
20 Kobosana te ete mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika.” Basaleli ya Yehova bazali mpe na kati ya “bato ya ndenge nyonso.” Ezali mpe bongo mpo na bato oyo tokoki kosalisa na nzela ya mosala na biso ya kosakola mpe ya koteya. Kasi baoyo nyonso bazali na mposa ya kobika basengeli “kozwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4) Na yango, mpo tóbika na mikolo oyo ya nsuka, tosengeli kotángaka Biblia mpe kotosa malako na yango. Ya solo, soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, tokomonisa ete tozali kozwa na motuya mingi Liloba ya Yehova, oyo ezali solo.—Yoa. 17:17.
a Ya solo, tosengeli te kosalela batoli ya Biblia mpo na kotya basusu mbamba to kopesa bango foti. Tosengeli komonisela ata bayekoli ya Biblia motema molai mpe boboto, kaka ndenge Yehova asalaka mpo na biso.—Nz. 103:8.
b Okosala nini soki oyebi kaka maloba ya ntina ya vɛrsɛ moko, kasi obosani mokanda, mokapo, mpe vɛrsɛ? Na ntembe te, okozwa vɛrsɛ yango soki oluki maloba yango na Index oyo ezali na nsuka ya Biblia, na Watchtower Library, to na buku Concordance.