Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Poná malamu baninga na yo
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
    • 1. Baninga bakoki kosala nini epai na yo?

      Mbala mingi tozwaka bizaleli ya malamu to ya mabe ya bato oyo tolekisaka ntango elongo na bango, ezala na nzela ya Internet. Biblia elobi ete: “Moto oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, Kasi moto oyo azali moninga ya bazoba akosuka mabe.” (Masese 13:20) Baninga oyo basambelaka Yehova mpe balingaka ye, bakoki kosalisa yo ozwaka bikateli ya malamu mpe okóma na boninga makasi ná Yehova. Kasi baninga oyo balingaka Yehova te, bakoki kosala ete okóma mosika na ye. Yango wana Biblia eyebisi biso tópona malamu baninga na biso! Soki baninga na biso balingaka Nzambe, bakosalisa biso, biso mpe tokosalisa bango. Kutu, Biblia elobi ete ‘tokokoba kobɔndisana mpe kolendisana.’​—1 Batesaloniki 5:11.

  • Ndenge nini maloba na biso ekoki kosepelisa Yehova?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
    • Ntango Yehova asalaki biso, apesaki biso likabo moko kitoko, likoki ya koloba. Ndenge oyo tosalelaka likabo yango ezali mpenza na ntina na miso na ye? Ɛɛ! (Tángá Yakobo 1:26.) Na yango, ndenge nini tokoki kosalela likoki na biso ya koloba na ndenge oyo ekosepelisa Yehova?

      1. Ndenge nini tokoki kosalela malamu likoki ya koloba?

      Biblia eyebisi biso ete “[tókoba] kobɔndisana mpe kolendisana.” (1 Batesaloniki 5:11) Oyebi bato oyo bazali na mposa bálendisa bango? Okoki kosala nini mpo bámiyoka malamu? Yebisá bango ete ozwaka bango na valɛrɛ mingi. Okoki koyebisa bango likambo moko ya malamu oyo osepelaka na yango epai na bango. Okoki mpe kolakisa bango vɛrsɛ moko oyo ekoki kosalisa bango! Bavɛrsɛ oyo okoki kosalela ezali mingi. Kobosana te: Maloba na yo mpe ndenge oyo ozali koloba ekoki kosalisa basusu to kopesa bango mpasi. Yango wana, salá makasi olobaka ntango nyonso na boboto.​—Masese 15:1.

      2. Tosengeli koboya maloba ya ndenge nini?

      Biblia elobi: “Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te.” (Tángá Baefese 4:29.) Yango elingi koloba ete tosengeli te kozala na maloba mabe, maloba makasi mpe maloba ya kozokisa oyo ekosala moto mpasi na motema. Tosengeli mpe te kokosela bato makambo to kotɔnga bango.​—Tángá Masese 16:28.

      3. Tosengeli kosala nini mpo tózala na maloba ya kolendisa?

      Mbala mingi, makambo oyo tolobaka emonisaka mpenza oyo ezali na motema to na makanisi na biso. (Luka 6:45) Yango wana, tosengeli kosala makasi tókanisaka makambo ya malamu, ya pɛto, makambo oyo ekoki kolingama mpe makambo oyo ebongi kokumisama. (Bafilipi 4:8) Mpo tótya makanisi na makambo yango, tosengeli kopona malamu baninga, masano mpe makambo mosusu. (Masese 13:20) Lisusu, ekozala malamu tózwaka ntango ya kokanisa liboso ya koloba. Talá oyo maloba na yo ekoki kosala basusu. Biblia elobi: “Koloba kozanga kokanisa ezali lokola kozokisa na mopanga, Kasi lolemo ya bato ya bwanya ebikisaka.”​—Masese 12:18.

      KƆTÁ NA MOZINDO

      Luká koyeba oyo okoki kosala mpo maloba na yo esepelisa Yehova mpe esalisa basusu.

      4. Zalá na maloba ya malamu

      Na bantango mosusu, biso nyonso tolobaka maloba oyo na nsima epesaka biso mawa. (Yakobo 3:2) Tángá Bagalatia 5:22, 23, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

      • Na bizaleli oyo bavɛrsɛ oyo elobeli, oyo wapi okoki kosɛnga Yehova mpo esalisa yo ozala na maloba ya malamu? Ndenge nini bizaleli yango ekoki kosalisa yo?

      Tángá 1 Bakorinti 15:33, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

      • Baninga mpe masano to makambo mosusu ekoki kosala ete okóma na maloba ya ndenge nini?

      Bililingi: Makambo oyo etindaka mobali akóma kogangelaka mwasi na ye. 1. Azali koyoka miziki oyo ezali kotinda na mobulu. 2. Azali kosepela kotala lisano ya bitumba na TV elongo na moninga na ye. Bililingi: Makambo oyo etindaka mobali asolola na mwasi na ye na boboto 1. Azali kotánga Biblia. 2. Ye ná mwasi na ye bazali kosolola na moninga moko na Ndako ya Bokonzi.

      Nini ekoki kosala ete okóma na maloba ya malamu to ya mabe?

      Tángá Mosakoli 3:1, 7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

      • Ntango nini ebongi kofanda kimya to kozela ntango ya malamu mpo na koloba?

      5. Lobáká malamu mpo na basusu

      Ndenge nini tokoki koboya kofinga basusu to koloba na bango mabe? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

      VIDEO: Lobáká na basusu “oyo ezali malamu mpo na kotonga” (4:07)

      • Na video yango, mpo na nini ndeko mobali alingaki kobongola ndenge oyo azalaki koloba na basusu?

      • Asalaki nini?

      Tángá Mosakoli 7:16, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

      • Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tolingi koloba mabe mpo na basusu?

      Tángá Mosakoli 7:21, 22, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

      • Ndenge nini bavɛrsɛ yango ekoki kosalisa yo osilika te ntango moto moko alobi mabe mpo na yo?

      6. Zalá na boboto ntango ozali kosolola na bato ya libota na yo

      Yehova alingi ete tómonisaka boboto mpe bolingo ntango tozali kosolola na bato ya libota na biso. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

      VIDEO: Bolingo mpe limemya esalisaka libota ezala na bomoko (3:08)

      • Nini ekosalisa yo olobaka na bato ya libota na yo na boboto?

      Tángá Baefese 4:31, 32, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

      • Maloba ya ndenge nini esalaka ete bato ya libota bámiyoka malamu?

      Yehova alobaki polele ete alingaka mwana na ye, Yesu. Tángá Matai 17:5, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

      • Ndenge nini okoki komekola Yehova ntango ozali kosolola na bato ya libota na yo?

      Mama azali kopesa mwana na ye ya mwasi oyo azali koyema longonya.

      Luká mabaku oyo ekosalisa yo oyebisa basusu makambo ya malamu oyo osepelaka na yango epai na bango

      SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Nalobaka nyonso oyo eyelaka ngai na motó. Bato básepela, básepela te, etali ngai te.”

      • Yo mpe okanisaka bongo? Mpo na nini?

      NA MOKUSE

      Makambo oyo tolobaka ekoki kosalisa basusu to kopesa bango mpasi. Yango wana, tosengeli kokanisa malamumalamu makambo oyo tokoloba, ntango oyo tokoloba yango, mpe ndenge oyo tokoloba yango.

      Bozongeli

      • Ndenge nini okoki koloba mpo na kosalisa basusu?

      • Maloba ya ndenge nini tosengeli koboya?

      • Nini ekosalisa biso tózala ntango nyonso na maloba ya boboto mpe oyo elendisaka?

      Oyo okoki kosala

      MAKANISI MOSUSU

      Nini ekoki kosalisa biso tózala na maloba malamu?

      Kómá na lolemo ya bato ya bwanya (8:04)

      Talá makambo oyo ekoki kosalisa yo oboya maloba mabe.

      “Mpo na nini koboya koloba maloba ya mabe?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

      Talá oyo okoki kosala mpo okwea te na motambo ya kotɔnga basusu.

      Nasala nini mpo natika matɔngi? (2:36)

      Talá ndenge Yehova asalisaki moto moko atika maloba mabe.

      “Nakómaki komituna mpenza soki bomoi na ngai ezalaki kokende wapi” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/2013)

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto