Tókoba kolendisana
1 Ntoma Paulo asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kolendisa bandimi mosusu. (Mis. 14:19-22) Biso mpe, tosengeli kosala bongo ntango bandeko na biso bazali na mikakatano, mpe tosengeli kosalisa bango. Biblia emonisi ete bato nyonso, kaka bankulutu te, basengeli komibanzabanzaka mpo na basusu. (Lom. 15:1, 2) Tótalela makambo mibale oyo ekoki kosalisa biso tókokisa etinda oyo ya bolingo ete: “Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana.”—1 Tes. 5:11.
2 Luká koyeba bamposa ya basusu: Liloba ya Nzambe elobi ete Dolokasi “atondaki na misala ya malamu mpe na makabo ya motema mawa.” (Mis. 9:36, 39) Dolokasi azalaki kotya likebi epai na baoyo bazalaki na bosɛnga mpe azalaki kosala oyo akoki mpo na kosalisa bango. Oyo nde ndakisa malamu mpo na biso! Okoki koyoka ete mobange moko azali kozanga transport mpo na kokende na makita. To ekoki kozala na mobongisi-nzela moko oyo azali na moto ya kobima na ye na mosala ya kosakola te na bampokwa. Soki omoni ete ndeko moko azali na bosɛnga ndenge wana mpe osalisi ye, ntembe ezali te ete yango ekolendisa ye mpenza!
3 Masolo ya elimo: Tokoki mpe kolendisa basusu na maloba na biso. (Ef. 4:29) Nkulutu moko oyo aumeli alobaki boye: “Soki olingi kolendisa basusu, lobelá makambo ya elimo. Mpo na kobanda lisolo moko ya kolendisa, okoki kaka kotuna motuna lokola oyo, ‘Ndenge nini oyebaki solo?’ ” Monisá mpenza ete omibanzabanzaka mpo na bilenge na lisangá. Monisá baoyo balɛmbi mpe baoyo bazalaka nsɔninsɔni ete omibanzabanzaka mpo na bango. (Mas. 12:25) Kotika te ete masolo ya kominanola ya mokili ezangisa yo ntango ya kosolola masolo ya elimo elongo na bandeko.—Lom. 1:11, 12.
4 Kasi, okoki koloba nini mpo na kolendisa basusu? Ntango otángaki to oyekolaki Biblia yo moko, omonaki etinda moko oyo esalisaki yo okóma na botɔndi mingi epai na Yehova? Ezali nde na likambo moko oyo oyokaki na lisukulu to na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elendisaki yo? To motema na yo esimbamaki nde na likambo moko oyo elendisaki kondima na yo, oyo okutanaki na yango? Soki ozali kotalela biloko wana ya elimo na motuya mingi, okozala ntango nyonso na makambo ya kolendisa ya kolobela elongo na basusu.—Mas. 2:1; Luka 6:45.
5 Soki tozali kosalisana mpe kosalela malamu lolemo na biso, tokokoba kolendisana.—Mas. 12:18.