Tótambola lokola bato balakisami na Nzambe
“Tiká ete tóbuta na ngomba ya Yehova . . . , mpe akolakisa biso banzela na ye, mpe tokotambola na bilekelo na ye.”—MIKA 4:2, NW.
1. Engebene Mika, Nzambe akosala nini mpo na libota na ye na mikolo ya nsuka?
MIKA, mosakoli ya Nzambe asakolaki ete na “mikolo ya nsuka,” na ntango na biso, bato mingi basengelaki na molende nyonso koluka Nzambe mpo na kosambela ye. Bango basengelaki kolendisana, kolobáká ete: “Tiká ete tóbuta na ngomba ya Yehova . . . , mpe akolakisa biso banzela na ye, mpe tokotambola na bilekelo na ye.”—Mika 4:1, 2, NW.
2, 3. Lolenge nini esakweli ya Paulo na ntina na bato oyo bazali balingi na mosolo ezali kokokisama na eleko na biso?
2 Boyekoli na biso ya 2 Timoté 3:1-5 ekoki kosalisa biso na komona matomba ya kolakisama na Nzambe na “mikolo ya nsuka.” Kati na lisoló ya liboso, tomonaki matomba mazwami na baoyo bazali kotya motema na likebisi ya Paulo, ya kozala te bato oyo bazali “balingi na bango moko.” Paulo abakisaki ete na ntango na biso bato basengelaki lisusu kozala “balingi na mosolo.”
3 Esengeli te bobele kozala na lipɔlɔ́mi ya eteyelo monene na lisoló ya makambo ya ntango na biso mpo na koyeba ete maloba wana makokani mpenzampenza na ntango na biso. Otangá naino te masoló ya bato ya mimbongo mpe bankolo kompanyi, baoyo bazali kosepela te na bamilió oyo bazali kozwa mbula na mbula? Nzokande, balingi wana na mosolo bazali ntango nyonso koluka kozwa mingi koleka, ata na myango oyo mindimami te na mibeko ya Leta. Maloba ya Paulo mazali mpe kotalela bato mingi ya mikolo na biso, baoyo, atako bazali bazwi te, bazali bato na bilulela mpe basepelaka mpenza te na oyo bazali na yango. Ekoki kozala ete oyebi mingi na bato motindo wana na etúká na bino.
4-6. Lolenge nini Biblia ezali kosalisa baklisto ete bápengola kokóma balingi na mosolo?
4 Likambo oyo Paulo alobeli, ezali bobele motindo oyo mokoki kopɛngolama te kati na bizaleli ya bato? Ezali bongo te, soki totaleli makanisi ya Mobandisi ya Biblia, oyo uta kala, ayebisaki solo oyo ete: “Mposa na mosɔlɔ ejali ntina na mabe yɔnsɔ. Mpɔ na yango, bamosusu basili kopɛngwa longwa na kondima mpe bamitɔbɔli bango mpenja na bolɔji mingi.” Omoni ete Nzambe alobi te ete, ‘mosɔlɔ ejali ntina na mabe yɔnsɔ.’ Alobi ete ezali nde “mposa na mosɔlɔ.”—1 Timɔtɛ 6:10.
5 Likambo ya kosepelisa ezali ete, makambo mazali zingazinga na maloba wana ya Paulo mamonisi ete na ekeke ya liboso baklisto mosusu ya malamu bazalaki bazwi kati na ebongiseli ya biloko oyo, ezala ete basangolaki bozwi yango, to ete bazwaki yango bango moko. (1 Timoté 6:17) Ezali bongo polele ete, ata tozali na bozwi mingi to tozali na yango mingi te, Biblia ezali kokebisa biso na likámá ya kokóma balingi na mosolo. Biblia ezali nde kopesa malako mosusu ya ntina mpo na lolenge ya kokima mbeba wana ya mpasi, oyo epalangani mingi? Ee, na ndakisa kati na Lisoló na Yesu likoló ya Ngomba. Bwanya oyo bozali kati na yango boyebani na mokili mobimba. Talá oyo Yesu alobaki na Matai 6:26-33.
6 Engebene lisoló lizwami na Luka 12:15-21, Yesu alobaki na ntina na mozwi moko oyo azalaki ntango nyonso kobomba bozwi mingi mpe na mbalakáká abungisaki bomoi na ye. Yesu alingaki koteya nini? Alobaki ete: “Keba mpe sɛnjɛla na ntina na lokoso yɔnsɔ, mpɔ ete bomɔi na moto ejali kati na motuya na bilɔkɔ bijali na ye tɛ.” Longola toli oyo yango epesi, Biblia ezali kokweisa goigoi mpe ezali kolendisa ntina ya mosala ya kolongobana. (1 Batɛsalɔniki 4:11, 12) Bato mosusu bakoki koloba ete mateya oyo mabongi te na mikolo na biso—nzokande mabongi mpenza, mpe mazali kobota mbuma.
Balakisami mpe bazali kozwa matomba
7. Ntina nini tozali na yango ya kolikya ete tokoki kosalela mpenza batoli ya Biblia mpo na oyo etali bozwi?
7 Na mikili mingi, okoki kokuta bandakisa ya mibali mpe basi ya mitindo nyonso, baoyo basili kosalela kati na bomoi na bango, mitindá wana ya Nzambe na ntina na mbongo. Bango moko mpe mabota na bango basili kozwa matomba, oyo bato ya zingazinga na bango bakoki komona yango. Na ndakisa, kati na búku Makambo ya losambo kati na Amerika ya ntango na biso (na Lingelesi) oyo ebimisamaki na mokomi ya eteyelo monene ya Princeton, moto moko ya mayele oyo akoyekolaka bizaleli ya bato, akomaki ete: “Kati na mikanda [ya Batatoli] mpe na masukúlu oyo bazali koyoka kati na lisangá, bazali kokundwela bango ete bomoi na bango etaleli te motuka ya sika, bilamba ya motuya to kozala na bomoi moko ya lokumu. Atako bongo, Motatoli asengeli kopesa epai ya nkolo na mosala na ye, bangonga ya mosala oyo esɛngami [mpe kozala] na kolongobana mpenza . . . Bizaleli wana bizali kosala ete moto ázala mosáli ya ntina mingi, ata soki azali na makoki mingi te; mpe na nɔ́rdi ya Philadelphie, Batatoli mosusu bazwaki mikumba minene kati na mosala.” Ya solo, bato oyo bandimaki malako oyo mauti na Nzambe na nzela ya Liloba na ye, basili kokebisama na ntina na bizaleli oyo bikoki kobakisa mpasi kati na ezalela ya ntango oyo. Ndakisa na bango emonisi ete mateya ya Biblia mamemaka na bomoi moko ya kitoko koleka mpe ya esengo mingi.
8. Mpo na nini “bato na lofundo,” “bato na ngambo,” mpe “batuki” bakoki kotyama esika moko, mpe ndimbola ya maloba wana misato ezali nini?
8 Tokoki kokangisa esika moko makambo misato oyo ntoma Paulo atángi na nsima. Na mikolo ya nsuka, bato bakozala “bato na lofundo, bato na ngambo, batuki.” Bizaleli mabe wana misato bizali lolenge moko te, kasi yango nyonso ekangami na lolendo. Ya liboso ezali “bato na lofundo.” Diksionere moko elobi ete liloba ya Greke ya ebandeli oyo libongolami awa, elimboli: “‘Moto oyo azali komikumisa ye moko mpo na likambo moko nzokande ezali bongo te’ to ‘oyo alaki makambo mingi oyo akolónga kokokisa yango te.’” Tomoni sikawa mpo na nini Biblia mosusu ezali kosalela liloba “moto na komikumisa.” Na nsima ezali “bato na ngambo” to, na ndimbola na yango mpenza, “bazali komonana lokola ete baleki basusu.” Mpo na kosukisa, ezali “batuki.” Bato mosusu bakoki kokanisa mpo na bato oyo bazali koloba na lolenge ya kozanga limemya epai na Nzambe, kasi liloba yango lisangisi mpe maloba ya kozokisa, ya kotyola to ya kofinga bato. Maloba ya kotuka oyo ntoma Paulo azali kolobela awa, elobami bongo epai na Nzambe mpe epai na bato.
9. Na kokesena na bizaleli mabe oyo epalangani mingi, bizaleli nini Biblia ezali kolendisa bato ete bákólisa yango?
9 Mayoki nini ozalaka na yango, wana ozali elongo na bato oyo bakokani na bizaleli oyo Paulo atángi, ezala ete bazali baninga ya mosala, baninga ya kelasi to bandeko ya mosuni? Bayeisaka bomoi na yo pɛtɛɛ? To babimisaka nde mindɔndɔ́ mingi na bomoi na yo, kokómisáká yango mpasi mingi mpenza na ntango oyo tozali kobika kati na yango? Nzokande, Liloba ya Nzambe lizali koteya biso ete tókima bizaleli lolenge yango, kopesáká biso batoli lokola oyo ezali na 1 Bakolinti 4:7; Bakolose 3:12, 13; mpe Baefese 4:29.
10. Nini emonisi ete libota ya Yehova lizali kozwa matomba na kondimáká malako ya Biblia?
10 Atako baklisto bazali bato bazangi kokoka, kosalela malako kitoko oyo, ezali kosalisa bango mingi na eleko oyo ya mpasi. Zulunalo moko ya mboka Italie, La Civiltà Cattolica, elobelaki moko na bantina mpo na yango Batatoli ya Yehova bazali ntango nyonso kobakisama “ezali ete lisangá yango lizali kopesa epai na basangani na yango, lolenge ya sikisiki ya kobatela lokumu na bango.” Na liloba “lokumu na bango,” mokomi alingaki kolobela “bato na lofundo, bato na ngambo, batuki?” Na esika ete ezala bongo, zulunalo wana ya ba Jésuites emonisaki ete lisangá wana “ezali kopesa epai na basangani na yango lolenge ya sikisiki ya kobatela lokumu na bango, mpe ezali esika basangani na yango bazali koyambana na mɔ́tɔ nyonso mpe na liyoki ya bondeko mpe ya kosalisana.” Ezali polele ete makambo oyo bazali koteya Batatoli mazali mpenza kosalisa bango, boye te?
Malako oyo mazali kopesa matomba epai na basangani ya libota
11, 12. Lolenge nini Paulo amonisaki na bosikisiki nyonso ezalela oyo ekozala kati na mabota mingi?
11 Tokoki kotya esika moko makambo minei oyo malandi, oyo mazali na boyokani kati na yango. Paulo asakolaki ete, na mikolo ya nsuka, mingi bakozala “bato bazangi botosi epai na baboti, bato bazangi matɔ́ndi, bazangi sembo, bazangi bolingo ya motema.” Oyebi ete mibale kati na bizaleli mabe wana—kozanga botɔ́ndi mpe kozanga sembo—epalangani mingi mpenza zingazinga na biso. Na yango, kozanga nkaká okoki komona mpo na nini Paulo atángaki yango katikati na ‘kozanga botosi epai na baboti’ mpe ‘kozanga bolingo ya motema.’ Makambo wana minei makangisami esika moko.
12 Moto nyonso, elenge to mokóló, oyo azali na bososoli akondima ete kozanga botosi epai na baboti epalangani mingi, mpe ezali sé kokóla. Baboti mingi bazali komilelalela ete bana na bango bazali na botɔ́ndi te mpo na nyonso oyo bazali kosala mpo na bango. Bilenge mingi bazali koloba polele ete baboti na bango bazali sembo te epai na bango (to epai na libota mobimba) mpe bamipesi mingi na mosala na bango, na bisengo na bango moko to na bomoto na bango moko. Na esika ya koluka koyeba soki nani azali na libungá, tótalela nde mbuma na yango. Bokabwani kati na mikóló mpe bilenge bozali mbala mingi komema bilenge na komityela bango moko mitindá ya bizaleli malamu. Makámá nini yango ezali kobimisa? Bokóli monene kati na motuya ya bilenge basi oyo bazali kokumba zemi na balabála, kosopa zemi mpe bokɔnɔ oyo bokopalanganaka na bosangisi nzoto. Mbala mingi, kozanga bolingo ya motema ezalaka ntina ya matáta kati na libota. Mbala mosusu okoki koyebisa makambo oyo masalemaki penepene na bino, oyo emonisi malamu ete bolingo ya motema ezali mpenza kolimwa.
13, 14. (a) Na kotalela kobeba ya mabota mingi, mpo na nini tosengeli kotya likebi na Biblia? (b) Batoli nini ya bwanya Nzambe azali kopesa na ntina na bomoi ya libota?
13 Yango ezali mbala mosusu kolimbola ntina oyo mbala na mbala bato bazali kotombokela bato mosusu, atako bango nyonso bazali bato ya libota moko, etúlúká moko, etúká moko to ekólo moko. Nzokande, kobosana te ete, mokano na biso, awa tozali kolobela makambo oyo, ezali te ya kolobela makambo mabe ya bomoi na ntango na biso. Makambo mibale ya ntina oyo tolingi komonisa yango oyo: Ya liboso, mateya ya Biblia makoki kosalisa biso na kopɛngola mpasi euti na makambo mabe oyo Paulo atángi? Ya mibale, kosalela mateya ya Biblia kati na bomoi na biso ekoki komemela biso matomba? Biyano bizali ee, lokola yango emonani polele na makambo minei oyo Paulo atángaki.
14 Tozali na likoki ya koloba ete: liteya moko te lileki oyo ezali kati na Biblia mpo na oyo etali kobimisa bomoi ya libota ya kosepelisa mpe ya esengo. Talá ndakisa bobele moko ya batoli oyo tozali kokuta kati na yango mpe oyo ekoki kosalisa basangani ya libota, bobele mpo na kopɛngola mikakatano te, kasi lisusu mpo na kolónga mpenza malamu. Bakolose 3:18-21 ezali komonisa yango malamu, atako ezali mpe na mikapo misusu mingi ya kitoko oyo mitali mibali, basi ya mabala mpe bana. Malako wana mazali kopesa matomba na mikolo na biso. Ezali solo ete, ata kati na mabota ya baklisto ya solo mikakatano mpe mimekamo mizalaka! Nzokande, matomba nyonso oyo mazwami, mamonisi ete Biblia ezali kopesa mateya ya ntina mingi mpo na mabota.
15, 16. Molukiluki moko amonaki nini wana azalaki koyekola Batatoli ya Yehova na mboka Zambie?
15 Na boumeli ya mbula moko na ndambo, molukiluki moko ya mwasi na eteyelo monene ya Lethbridge, na Canada, ayekolaki bomoi ya bato na mboka Zambie. Akómaki na bosukisi oyo: “Batatoli ya Yehova balóngaka malamu koleka basangani ya mangomba mosusu mpo na kobatela bikanganeli ya libala. . . . Bolóngi na bango euti na mbongwana kati na boyokani ya mwasi mpe mobali, oyo, kati na milende na bango ya sika mpo na kosala elongo, epai makaneli mazali te, bakómi bato oyo basengeli kozongisa monoko na mokonzi na bango ya sika, Nzambe, mpo na lolenge bazali kosala moko epai na mosusu. . . . Bazali koteya epai na mobali Motatoli ya Yehova ete ákomela mpo na kokokisa mikumba na ye mpo na bolamu ya mwasi na ye mpe ya bana na ye. . . . Mobali mpe mwasi balendisami na komonisa bosembo. . . . Lisɛngami wana ya kozala sembo nde ezali kolendisa bomoko ya libala.”
16 Boyekoli wana etóngamaki likoló na makambo mingi oyo amonaki. Na ndakisa molukiluki wana alobaki ete, na kokesena na mimeseno ya bonkɔ́kɔ, “epai na Batatoli ya Yehova, tomonaki mbala mingi mibali bazali kosalisa basi na bango na bilanga, bobele na ntango ya kokata te, kasi lisusu na ntango ya kolóna mpe ya kotimola mabelé.” Na bongo, ezali polele ete, ebele na makambo mazali komonisa kati na mabelé mobimba ete malako ya Biblia mazali mpenza na bopusi likoló na bomoi ya bato.
17, 18. Bosukisi nini ya kokamwa emonisamaki kati na boyekoli na ntina na lisangó ya lingomba mpe kosangisa nzoto liboso na kobala?
17 Lisoló ya liboso lilobelaki bosukisi ya bolukiluki ya Zulunalo ya boyekoli ya mangomba na motindo ya siansi (na Lingelesi). Na 1991, zulunalo yango ezalaki na lisoló moko na motó ya likambo ete: “Lisangó ya lingomba mpe kosangisa nzoto liboso ya kobala: bilembeteli kati na etuluku moko ya mikóló ya ekólo na biso oyo bauti kobima na bolenge.” Na ntembe te oyebi lolenge kosangisa nzoto liboso ya kobala epalangani mingi. Wana bazali naino bilenge, mingi bazali mpenza komitika na mposa ya nzoto, mpe bilenge mingi bazali kosangisa nzoto elongo na mibali to basi mingi bakeseni. Mateya ya Biblia makoki kobongola momeseno wana?
18 Balakisi misato ya eteyelo monene oyo bayekolaki likambo yango bazalaki komizela ete ‘bilenge mpe mikóló baoyo babɔkwamaki na libota ya boklisto, oyo ebatelaka mateya ya lingomba, bámipesa mingi te na kosangisa nzoto liboso ya kobala.’ Makambo nini bamonaki? Bilenge nyonso, katikati na 70 % mpe 82 % basangisaki nzoto liboso ya kobala. Mpo na mangomba mosusu ya Protestá, “mateya ya lingomba [ekitisaki] motuya wana, kasi epai na bilenge te.” Balukiluki balobelaki bilenge oyo bautaki na mabota mamonani lokola ete mazali ya boklisto, oyo kati na bango “motuya ya kosangisa nzoto liboso ya kobala emataki mingi koleka oyo bazali kati na mangomba minene ya Protestá.”—Biso nde totɛ́ngisi makomi wana.
19, 20. Lolenge nini malako ya Nzambe masili kosalisa mpe kobatela bilenge mingi kati na Batatoli ya Yehova?
19 Balakisi wana ya eteyelo monene bamonaki mpenzampenza bokeseni epai ya bilenge Batatoli ya Yehova, oyo bazalaki “na etuluku oyo emikesenisi mpenza na bituluku mosusu.” Mpo na nini? Mpo ete “bonene ya mikumba na bango mpe kondimama na bango kati na etuluku oyo euti na mimeseno, na etamboli oyo basengeli komonisa mpe kosangana na misala. . . ezali mingimingi kobimisa bokangami makasi na mitinda ya kondima.” Babakisaki ete: “Epai na Batatoli, bilenge mpe mikóló basengeli kokokisa mikumba ya misionere.”
20 Na yango, malako ya Biblia mazali mpenza kosala bopusi malamu likoló na Batatoli ya Yehova, mpamba te ezali kosalisa bango na kokima etamboli ya mbindo. Yango ezali kobatela bango na bokɔnɔ oyo bokopalanganaka na bosangisi nzoto, oyo mosusu na yango ezali na nkisi te mpe mosusu ekobomaka. Lisusu, basi balendisami ete basopa zemi te, mpamba te Biblia ezali koteya ete yango ezali bongo koboma moto. Lisusu, bilenge bazali na lisosoli ya pɛto wana bazali kokɔta na libala. Yango elimboli ete mabala na bango matóngami likoló na moboko moko makasi mpenza. Ezali mateya lolenge oyo nde makoki kosalisa biso na kolónga mikakatano na biso, mpe na kozala na kolɔngɔ́nɔ́ malamu mpe na esengo mingi.
Malako oyo mazali kopesa matomba
21. Makambo nini Paulo asakolaki na bosikisiki nyonso mpo na ntango na biso?
21 Sikawa, tózonga na 2 Timoté 3:3, 4, mpe tótalela makambo mosusu oyo Paulo alobaki ete ekokómisa ntango na biso mpasi koleka mpo na bato mingi—kasi mpo na bato nyonso te: “[bato bakozala] bato bazangi boboto, batɔ́ngi, bato bazangi komipekisa, bato na yauli, bayini na malamu, basúli, bato na mitó makasi, bato bavimbi na lolendo, [mpe] balingi na bisengo na esika ya kozala balingi na Nzambe.” Yango ezali mpenza solo! Nzokande, mateya mauti na Biblia makoki kobatela biso mpe kobongisa biso mpo na koyika mpiko na mimekamo, mpe mpo na kolónga yango.
22, 23. Paulo asukisaki botángi na ye ya makambo oyo alobeli na toli nini ya kolendisa, mpe ntina na yango ezali nini?
22 Ntoma Paulo asukisi botángi na ye na maloba ya kolendisa. Akómisaki likambo ya nsuka, etindá ya Nzambe oyo ekoki mpe kopesa biso bolamu mingi. Paulo alobeli baoyo “bazali na lolenge ya kosambela kasi bazali koangana nguya na yango; mpe ótangwa na bango.” Bómikundola ete, bilenge kati na Mangomba mosusu bamipesi mingi koleka mwayene na kosangisa nzoto liboso ya kobala. Na yango, ata soki etamboli ya mbindo ya bandimi wana ya sika ekokanaki na mwayene, yango elingaki komonisi ete lolenge na bango ya kosambela ezangi nguya, boye te? Epai mosusu, mateya ya mangomba mazali mpenza kobongola lolenge oyo bato bamitambwisaka kati na mimbongo, lolenge oyo basalelaka bato oyo bazali na nsé na bango to bandeko na bango ya mosuni?
23 Maloba ya Paulo mamonisi ete tosengeli kosalela makambo oyo tozali koyekola kati na Liloba ya Nzambe, na komonisáká lolenge ya kosambela oyo ezali komonisa nguya mpenza ya boklisto. Kolobeláká baoyo losambo na bango ezangi nguya, Paulo alobi ete: “Ótangwa na bango.” Etindá yango ezali polele, mpe ekopesa biso bolamu ya solosolo.
24. Lolenge nini elendiseli oyo ezwami na Emoniseli mokapo 18 ekokani na toli ya Paulo?
24 Na lolenge nini? Mokanda ya nsuka ya Biblia emonisi mwasi moko ya elilingi, mwasi na pite, abéngami Babilone Monene. Bilembeteli bizali komonisa ete Babilone Monene elimboli mpenzampenza lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta, oyo Yehova Nzambe asili kotalela yango mpe kobwaka yango. Nzokande, tosɛngisami te kozala kati na baoyo bakozwa etumbu elongo na ye. Emɔnisɛli 18:4, elendisi biso ete: “Bino bato na ngai bobima na ye, ete bosangana na masumu na ye tɛ, ete bojwa mɔkɔ na malɔji na ye mpe tɛ.” Yango ekokani na maloba na Paulo oyo ete: “Ótangwa na bango,” boye te? Botosi na biso ezali mwango mosusu oyo, na nzela na yango, tokoki kozwa matomba na malako mauti na Nzambe.
25, 26. Makambo nini mabombameli baoyo bazali kondima mpe kolanda uta sikawa malako mauti na Yehova Nzambe?
25 Mosika te Nzambe akotya mabɔkɔ kati na makambo ya bato. Akoboma mangomba nyonso ya lokuta mpe eteni oyo etikalaki ya ebongiseli mabe ya ntango oyo. Ekozala mpenza ntina ya esengo, lokola Emoniseli 19:1, 2 ezali komonisa yango. Na mabelé, baoyo bazali kondima mpe kolanda malako ya Nzambe, bakopesamela libaku ya kokóba kolanda mateya mauti na Nzambe wana mikakatano ya ntango na biso oyo ya mpasi mikolimwa.—Emoniseli 21:3, 4.
26 Ya solo, kofanda na mabelé wana mabongwani Paladiso, ekozala esengo monene oyo tokoki kokanisa yango te. Nzambe alaki biso ete yango ekosalema mpo na biso, mpe tokoki kotyela ye mpenza motema. Na yango, apesi biso bantina nyonso ya kondima mpe ya kolanda mateya na ye oyo mazali kopesa matomba. Ntango nini? Tiká ete tólanda mateya na ye uta sikawa, na ntango na biso oyo ya mpasi kino kati na Paladiso oyo alaki biso.—Mika 4:3, 4.
Makambo oyo tosengeli kokanisa
◻ Matomba nini libota ya Yehova lizali kozwa na kolanda batoli na ye mpo na oyo etali bozwi?
◻ Zulunalo moko ya ba Jésuites elobeli matomba nini malamu oyo basaleli ya Nzambe bazali kozwa na kosaleláká Liloba na ye?
◻ Boyekoli moko na mboka Zambie emonisaki matomba nini epai na mabota oyo mazali kosalela malako ya Nzambe?
◻ Malako mauti na Nzambe mazali kopesa libateli nini epai na bilenge?
[Etanda na lokasa 15]
OYO NDE LIKÁMÁ!
Lapólo moko oyo epesamaki na liyangani litali SIDA mpe bilenge elobaki ete: “Bilenge bazali liboso na likámá monene ya SIDA mpo ete balingi komeka bosangisi nzoto mpe bilangwiseli; mpe lokola bazali kooka ete bakoki kokufa te, bazali komitya na likámá mpo na bisengo ya ntango mokuse mpe bazali kotyola bokonzi.”—New York Daily News, Mokolo mwa Eyenga, Mársi 7, 1993.
“Bolukiluki moko ya O.N.U. na Mpótó, na Afrika mpe na Súdi-Ɛ́sti ya Azia emonisaki ete ‘Bilenge basi oyo bamipesi na kosangisa nzoto bazali na ‘molɔngɔ́ ya liboso’ ya bato oyo bakozwama na bokɔnɔ ya SIDA na mikolo mizali koya.’”—The New York Times, Mokolo mwa Mitano, Yulí 30, 1993.
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Malako ya Biblia mazali kopesa matomba epai na Batatoli ya Yehova kati na lisangá mpe na ndako