Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/5 nk. 24-28
  • Bilenge​—Bólanda mikano oyo ekumisaka Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge​—Bólanda mikano oyo ekumisaka Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoi ya Timote
  • Bandakisa ya malamu
  • Koyekola “makomi mosantu”
  • “Bundá etumba ya malamu mingi”
  • Tyá makanisi na yo nyonso na mikano ya elimo
  • Mapamboli sikoyo mpe na mikolo ekoya
  • Timote—“Mwana na solo kati na kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Mwana na ngai ya bolingo mpe ya sembo na kati ya Nkolo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Timote alingaki kosalisa bato
    Teyá bana na yo
  • Timote—Amilengelaki mpe azalaki na mposa ya kosala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/5 nk. 24-28

Bilenge​—Bólanda mikano oyo ekumisaka Nzambe

“Salaká ngalasisi na mokano ya kokóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe.”​—1 TIMOTE 4:7.

1, 2. (a) Mpo na nini Paulo akumisaki Timote? (b) Ndenge nini bilenge lelo oyo bazali ‘kosala ngalasisi na mokano ya kokóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe’?

“NAZALI na moto mosusu te oyo azali na ezaleli lokola ya ye, oyo akomitungisa mpenza mpo na makambo oyo etali bino. . . . Lokola mwana ná tata na ye asalaki lokola moombo elongo na ngai mpo nsango malamu ekende liboso.” (Bafilipi 2:20, 22) Ntoma Paulo akomaki maloba wana ya kolendisa na mokanda oyo atindelaki baklisto ya ekeke ya liboso na Filipi. Azalaki kolobela nani? Azalaki kolobela elenge Timote, moninga na ye ya mibembo. Kanisá naino ndenge Timote asepelaki ntango ayokaki ete Paulo alingaka ye mpe atyelaka ye motema!

2 Bilenge oyo babangaka Nzambe lokola Timote bazalaka ntango nyonso na motuya mingi na kati ya lisangá. (Nzembo 110:3) Lelo oyo, ebongiseli ya Nzambe ezali na ebele ya bilenge oyo bazali babongisi-nzela, bamisionɛrɛ, baoyo bamipesi mpo na misala ya kotonga mpe baoyo basalaka na Betele. Tozali mpe kopesa longonya na baoyo bazali kosala na molende mpenza misala ya lisangá, wana bazali mpe kokokisa mikumba mosusu. Bilenge ya ndenge wana bazali na esengo ya solosolo, oyo moto azalaka na yango ntango azali kolanda mikano oyo ekumisaka Yehova, Tata na biso ya likoló. Bazali mpenza ‘kosala ngalasisi na mokano ya kokóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe.’​—1 Timote 4:7, 8.

3. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

3 Elenge, osili komityela mikano ya elimo? Epai wapi okoki kozwa lisalisi mpe bilendiseli mpo na komityela mikano yango? Ndenge nini okoki kolonga elimo ya mokili ya komipesa na koluka biloko ya mosuni? Mapamboli nini okoki kozwa soki ozali kolanda mikano oyo ekumisaka Nzambe? Mpo na kozwa biyano na mituna wana, tótalela bomoi mpe mosala ya Timote.

Bomoi ya Timote

4. Lobelá na mokuse makambo oyo Timote asalaki na lisangá ya boklisto.

4 Timote akolaki na Lisitala, mwa engumba moko moke na etúká ya Galatia. Emonani ete ayebaki solo banda bolenge na ye, ntango Paulo asakolaki na Lisitala, soki na mobu 47 ya ntango na biso (T.B.). Mosika te, bandeko ya Lisitala bakómaki kosepela na Timote mingi. Ntango Paulo azongaki lisusu na Lisitala mbula mibale na nsima mpe ayokaki bansango ya malamu mpo na Timote, aponaki ye lokola moninga na ye ya mosala ya misionɛrɛ. (Misala 14:5-20; 16:1-3) Ntango Timote akolaki na elimo, bapesaki ye mikumba ya minene lisusu koleka, ná oyo ya kolendisa bandeko na masangá. Paulo atindelaki Timote mokanda wana ntango azalaki na bolɔkɔ na Loma, soki na mobu 65 T.B. Na ntango wana, Timote azalaki nkulutu na lisangá ya Efese.

5. Na kotalela 2 Timote 3:14, 15, wapi makambo mibale oyo etindaki Timote azwa ekateli ya kolanda mikano ya elimo?

5 Emonani mpenza ete Timote aponaki kolanda mikano ya elimo. Kasi, nini etindaki ye asala yango? Na mokanda ya mibale oyo Paulo atindelaki Timote, alobelaki makambo mibale oyo etindaki Timote amityela mikano ya elimo. Akomaki boye: “Kangamá na makambo oyo oyekolaki mpe oyo ondimisamaki bosolo na yango, koyebáká epai ya banani oyekolaki yango mpe ete banda na bomwana na yo mpenza oyebi makomi mosantu.” (2 Timote 3:14, 15) Tótalela naino ndenge baklisto mosusu basalisaki Timote mpo azwa bikateli yango.

Bandakisa ya malamu

6. Mateya nini bateyaki Timote, mpe ndenge nini atalelaki yango?

6 Baboti ya Timote bazalaki na lingomba moko te. Tata na ye azalaki moto ya Grèce, kasi mama na ye Enisi ná nkɔkɔ na ye Loisi bazalaki Bayuda. (Misala 16:1) Banda bomwana ya Timote, Enisi ná Loisi bateyaki ye Makomami ya Liebele. Na ntembe te, ntango mpe bakómaki baklisto, basalisaki ye andima mateya ya boklisto. Emonani ete mateya yango esalisaki mpenza Timote. Paulo akomaki boye: “Nazali kokanisa lisusu kondima oyo ezali na kati na yo oyo ezangi bokosi, mpe oyo efandaki liboso na kati ya nkɔkɔ na yo ya mwasi Loisi mpe na kati ya mama na yo Enisi, kasi oyo nandimi mpenza ete ezali mpe na kati na yo.”​—2 Timote 1:5.

7. Libaku malamu nini bilenge mingi bazali na yango lelo oyo, mpe yango ezali na litomba nini?

7 Lelo oyo, bilenge mingi bazali na libaku malamu ya kozala na batata, bamama mpe bankɔkɔ oyo babangaka Nzambe mpe, lokola Loisi ná Enisi, bayebi litomba ya mikano ya elimo. Na ndakisa, Samira abosanaka te masolo milaimilai oyo azalaki kosolola na baboti na ye ntango azalaki naino elenge. Alobi boye: “Tata ná mama basalisaki ngai nakóma kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango mpe natya mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na ngai. Bazalaki ntango nyonso kolendisa ngai nasala mosala ya ntango nyonso.” Samira ayokelaki baboti na ye mpe lelo oyo azali kosala na Betele ya ekólo na bango. Soki baboti na yo bazali kolendisa yo omityela mikano ya elimo, yokelá bango. Bazali koluka kaka bolamu na yo.​—Masese 1:5.

8. Ndenge nini kokangama na baklisto oyo bazalaki makasi na elimo esalisaki Timote?

8 Ezali mpe na ntina ete okangama na bandeko ya lisangá oyo bakoki kolendisa yo. Timote ayebanaki mpenza epai ya bankulutu ya lisangá na bango mpe ya lisangá ya Ikoniumu, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 30. (Misala 16:1, 2) Akómaki mpenza moninga ya Paulo, oyo azalaki moklisto ya molende mpenza. (Bafilipi 3:14) Mikanda ya Paulo emonisi ete Timote azalaki koyoka toli mpe azalaki kokakatana te mpo na kolanda ndakisa ya bato ya kondima. (1 Bakolinti 4:17; 1 Timote 4:6, 12-16) Paulo akomaki boye: “Olandi malamu mpenza mateya na ngai, ndenge ya bomoi na ngai, mokano na ngai, kondima na ngai, motema molai na ngai, bolingo na ngai, ezaleli na ngai ya koyika mpiko.” (2 Timote 3:10) Ɛɛ, Timote alandaki mpenza ndakisa ya Paulo. Ndenge moko, soki yo okangami na bandeko oyo bazali makasi na elimo na kati ya lisangá, bakosalisa yo omityela mikano ya elimo.​—2 Timote 2:20-22.

Koyekola “makomi mosantu”

9. Longola kopona baninga ya malamu, ndenge nini okoki ‘kosala ngalasisi na mokano ya kokóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe’?

9 Kokangama na bato oyo bazali makasi na elimo kaka nde ekoki kosalisa yo omityela mikano ya elimo? Te. Lokola Timote, osengeli mpe koyekola “makomi mosantu” na mozindo. Ekoki kozala ete osepelaka mpenza koyekola te, kasi kobosana te ete Timote asengelaki ‘kosalaka ngalasisi na mokano ya kokóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe.’ Mbala mingi mpo na kolonga na masano, basani basalaka ngalasisi makasi na boumeli ya ebele ya basanza. Ndenge moko, mpo na kokokisa mikano ya elimo, esɛngaka komipimela makambo mingi mpe kosala milende makasi. (1 Timote 4:7, 8, 10) Ntango mosusu okoki komituna boye: ‘Kasi ndenge nini koyekola Biblia ekoki kosalisa ngai nakokisa mikano na ngai ya elimo?’ Tiká tótalela makambo misato oyo ekoki kosalisa yo.

10, 11. Mpo na nini Makomami ekoki kotinda yo olanda mikano ya elimo? Pesá ndakisa.

10 Ya liboso, Makomami ekopesa yo makanisi ya malamu. Makomami esalisaka biso tóyeba bomoto kitoko ya Tata na biso ya likoló, bolingo monene oyo amonisá mpo na biso mpe mapamboli ya libelá oyo abombeli basaleli na ye ya sembo. (Amosa 3:7; Yoane 3:16; Baloma 15:4) Ntango boyebi na yo ya Yehova ezali kobakisama, bolingo na yo mpo na ye mpe mposa ya komipesa epai na ye ekokóma mpe makasi.

11 Bilenge baklisto mingi balobaka ete momeseno ya koyekola Biblia esalisá bango báfandisa mpenza solo na mitema na bango. Na ndakisa, Adele abɔkɔlamaki na baboti baklisto, kasi amityelaki ata mokano moko te ya elimo. Alobi boye: “Baboti na ngai bazalaki kokende na ngai na Ndako ya Bokonzi, kasi nazalaki koyekola Biblia te, nazalaki mpe kolanda makambo oyo bazalaki koloba na makita te.” Ntango yaya na ye ya mwasi azwaki batisimo, Adele abandaki komipesa mpenza na koyekola solo. “Nabandaki kotánga Biblia. Soki natángi mwa moke, nazalaki kokoma makanisi oyo nazwi. Nabombaka makambo oyo nazalaki kokoma tii lelo oyo. Natángaki Biblia mobimba na mbula moko.” Yango etindaki Adele amipesa na Yehova. Lelo oyo, atako abɛlaka, azali mobongisi-nzela.

12, 13. (a) Koyekola Biblia ekosalisa elenge asala mbongwana nini mpe ndenge nini akosala yango? (b) Pesá bandakisa oyo ezali komonisa bwanya ya Liloba ya Nzambe.

12 Ya mibale, Biblia ekosalisa yo obongola bomoto na yo. Paulo ayebisaki Timote ete “makomi mosantu” ezali “na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene, mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Timote 3:16, 17) Soki ozali na momeseno ya kokanisa na mozindo makambo oyo ozali kotánga na Liloba ya Nzambe mpe kolanda mitinda na yango, okopesa elimo ya Nzambe nzela ebongisa bomoto na yo. Ekosalisa yo olona bizaleli ya ntina mingi lokola komikitisa, mpiko, molende mpe bolingo ya solosolo mpo na bandeko na yo baklisto. (1 Timote 4:15) Timote azalaki na bizaleli wana, yango wana akómaki mosungi monene, ezala mpo na Paulo to mpo na masangá oyo asalelaki.​—Bafilipi 2:20-22.

13 Ya misato, Liloba ya Nzambe ezali liziba ya bwanya oyo ebongi. (Nzembo 1:1-3; 19:7; 2 Timote 2:7; 3:15) Ekosalisa yo oyeba kopona baninga ya malamu, lolenge ya kominanola ya malamu mpe kozwa bikateli mosusu. (Genese 34:1, 2; Nzembo 119:37; 1 Bakolinti 7:36) Kozwa bikateli ya malamu lelo oyo ekosalisa yo mpenza okokisa mikano na yo ya elimo.

“Bundá etumba ya malamu mingi”

14. Mpo na nini kolanda mikano ya elimo ezali likambo ya pɛtɛɛ te?

14 Kotya mikano oyo ekumisaka Nzambe na esika ya liboso ezali nzela ya bwanya, kasi ezali mpe pɛtɛɛ te. Na ndakisa, soki olingi kopona mosala oyo okosala na bomoi na yo, bandeko, baninga mpe balakisi oyo bakanisaka ete kotánga mingi mpe kozwa mosala oyo efutaka malamu nde esalisaka moto azala na bomoi ya malamu mpe ya esengo, bakoki kobanda kopesa yo makanisi kilikili. (Baloma 12:2) Ekosɛnga ‘obunda etumba ya malamu mingi’ lokola Timote, mpo ‘osimba makasi bomoi ya seko’ oyo Yehova atye liboso na yo.​—1 Timote 6:12; 2 Timote 3:12.

15. Tokanisi ete Timote akutanaki na botɛmɛli ya ndenge nini?

15 Soki bato ya libota na yo oyo bazali bandimi te bazali kotɛmɛla mikano na yo, kondima na yo ekoki komekama makasi. Ekoki kozala ete Timote akutanaki na botɛmɛli ya ndenge wana. Ndenge buku moko elobi yango, ekoki kozala ete libota ya Timote “bazalaki bato batángá mingi mpe bazalaki na bozwi mingi.” Mbala mosusu tata na ye azalaki kolinga atánga mingi mpo akoba kotambwisa misala mpe bozwi ya libota na bango.a Kanisá naino ndenge tata ya Timote ayokaki ntango amonaki ete mwana na ye Timote aponi nde kosala elongo na Paulo, mosala ya misionɛrɛ oyo etondi na makama mpe ezangá mbongo!

16. Ndenge nini elenge moko alongaki botɛmɛli ya tata na ye?

16 Bilenge baklisto ya lelo bazali mpe kokutana na mikakatano ya ndenge wana. Matthew, oyo asalaka na biro moko ya filiale ya Batatoli ya Yehova alobi boye: “Ntango nakómaki mobongisi-nzela, tata ayokaki mabe mpenza. Ntango nakómaki kosukola bandako mpo nazwaka mwa mbongo ya kobikela na mosala na ngai ya kosakola, amonaki ete bakelasi nyonso oyo natángaki ‘ekei na mai.’ Azalaki kosɛka ngai mpe koyebisa ngai mbala na mbala ete nakokaki kozwa mbongo mingi soki nalukaki mosala mosusu.” Ndenge nini Matthew alongaki mokakatano wana? “Nazalaki ntango nyonso kotánga Biblia mpe kobondela, mingimingi soki namoni ete nabandi kosilika.” Ekateli makasi oyo Matthew azwaki efutaki. Nsukansuka, ye ná tata na ye bakómaki koyokana. Matthew akómá mpe na boyokani malamu mpenza na Yehova. Alobi boye: “Namoni ndenge Yehova azali kokokisa bamposa na ngai, kolendisa ngai mpe kobatela ngai mpo nazwa bikateli ya mabe te. Nakokaki kozwa matomba nyonso wana te soki nalandaka mikano ya elimo te.”

Tyá makanisi na yo nyonso na mikano ya elimo

17. Ndenge nini baklisto mosusu, kozanga koyeba, bakoki kolɛmbisa baoyo balingi kosala mosala ya ntango nyonso? (Matai 16:22)

17 Bandeko ya lisangá mpe bakoki kolɛmbisa biso mpo tólanda mikano ya elimo te. Bamosusu bakoki kotuna yo boye: ‘Mpo na nini ozala mobongisi-nzela? Okoki kozala kaka lokola bato nyonso, bongo obimaka mpe na mosala ya kosakola! Luká mosala ya malamu mpo okóma na mbongo mingi.’ Okoki komona yango toli ya malamu mpenza, kasi yango ekosalisa yo mpenza osala ngalasisi na mokano ya kokóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe?

18, 19. (a) Nini ekoki kosalisa yo otya makanisi na yo nyonso na mikano na yo ya elimo? (b) Elenge, yebisá makambo oyo ozali komipimela mpo na Bokonzi.

18 Na ntembe te, baklisto mosusu na ntango ya Timote bazalaki na makanisi ya ndenge wana. (1 Timote 6:17) Mpo na kosalisa Timote abosana mikano na ye ya elimo te, Paulo alendisaki ye na maloba oyo: “Moto moko te oyo azali kosala lokola soda amikɔtisaka na mimbongo ya bomoi, na ntina ete andimama na moto oyo azwaki ye lokola soda.” (2 Timote 2:4) Soda oyo azali na mosala akoki te kotika mosala na ye mpo na komipesa na makambo mosusu. Mpo na kotya bomoi na ye ná oyo ya bato mosusu na likama te, asengeli ntango nyonso kolanda mitindo ya mokonzi na ye. Yo mpe soda ya Klisto, osengeli kotya makanisi na yo nyonso na mosala ya Klisto mpe koboya komipesa na koluka bozwi ya mokili oyo ezangi ntina, oyo ekoki kopekisa yo osala malamumalamu mosala ya kosakola oyo ezali kobikisa bomoi ya bato.​—Matai 6:24; 1 Timote 4:16; 2 Timote 4:2, 5.

19 Na esika ya koluka kozala kaka na bomɛngo, osengeli kozala na elimo ya komipimela. “Lokola ozali soda malamu mpenza ya Klisto Yesu ndimá komona oyo ya yo mpasi.” (2 Timote 2:3) Ntango Timote azalaki kotambola elongo na Paulo, ayekolaki sɛkɛlɛ ya kosepela ata na bomoi ya mpasi ndenge nini. (Bafilipi 4:11, 12; 1 Timote 6:6-8) Yo mpe okoki kosala bongo. Okoki komipimela makambo mosusu mpo na Bokonzi?

Mapamboli sikoyo mpe na mikolo ekoya

20, 21. (a) Lobelá mwa mapamboli oyo tokoki kozwa soki tozali kolanda mikano ya elimo. (b) Ozwi ekateli nini?

20 Timote asalaki elongo na Paulo na boumeli ya mbula soki 15. Amonaki na miso ndenge masangá ya sika ezalaki kobotama, wana nsango malamu ezalaki kopalangana pene na teritware mobimba na nɔrdi ya Mai Monene ya Méditerranée. Azalaki na bomoi ya esengo koleka lolenge ya bomoi nyonso oyo akokaki kozala na yango soki aponaka oyo bato babengaka bomoi ya malamu. Soki ozali kolanda mikano ya elimo, yo mpe okozwa mapamboli kitoko ya elimo. Okopusana penepene na Yehova mpe bandeko ya lisangá bakokóma kolinga mpe komemya yo mingi. Na esika ya kozala na mitungisi mpe mikakatano oyo bato oyo bamipesi na koluka bomengo ya mokili bazalaka na yango, okozala na esengo ya solosolo oyo eutaka na kopesa. Likambo eleki ntina, ‘okosimba makasi bomoi ya solosolo,” elingi koloba bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé.​—1 Timote 6:9, 10, 17-19; Misala 20:35.

21 Na yango, soki obandi naino te kosala ngalasisi na mokano ya kokóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe, tozali kolendisa yo obanda kaka sikoyo. Kangamá na bandeko ya lisangá oyo bakoki kosalisa yo omityela mikano ya elimo, mpe luká toli epai na bango. Tyá boyekoli ya Liloba ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na yo. Zwá ekateli ya koboya mpenza elimo ya mokili oyo ya komipesa na koluka bomengo. Mpe kobosana ata mokolo moko te ete Nzambe “oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela” alaki ete soki oponi kolanda mikano oyo ekumisaka ye, akosopela yo ebele ya mapamboli, sikoyo mpe na mikolo mikoya.​—1 Timote 6:17.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kotánga mingi ezalaki likambo ya ntina mingi epai ya Bagrɛki. Plutarque, moto moko ya ntango ya Timote, akomaki boye: “Kotánga malamu ezali liziba mpe mosisa ya makambo nyonso ya malamu. . . . Nakoki koloba ete yango nde esalisaka moto azala na bizaleli malamu mpe na esengo. . . . Makambo mosusu oyo tolandaka ezali kaka bamposa ya bomoto, ezangi ntina, mpe tokoki kobomela yango nzoto te.”​—Œuvres morales, I, “L’Éducation des enfants.”

Ozali koyeba lisusu?

• Epai wapi bilenge bakoki kozwa lisalisi mpo bámityela mikano ya elimo?

• Mpo na nini koyekolaka Biblia na likebi mpenza ezali na ntina mingi?

• Ndenge nini bilenge bakoki kolonga elimo ya mokili oyo ya komipesa na koluka bomengo?

• Mapamboli nini tokoki kozwa soki tozali kolanda mikano ya elimo?

[Elilingi na lokasa 24]

Timote alandaki mikano ya malamu mpenza

[Bililingi na lokasa 25]

Wapi makambo oyo esalisaki Timote?

[Bililingi na lokasa 26]

Ozali na mikano ya elimo?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto