Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/4 nk. 8-11
  • Baboti, bópesa bana na bino ndakisa malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baboti, bópesa bana na bino ndakisa malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libota—ebongiseli ya Nzambe
  • Bóbatela bana na bino
  • Bóminanolaka elongo na bana na bino
  • Baboti oyo babɔkɔlaka bana kaka bango moko bakoki kolonga
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/4 nk. 8-11

Baboti, bópesa bana na bino ndakisa malamu

“BATO ya pisikoloji bakoki kotika bolukiluki oyo bazali kosala banda bikeke na bikeke mpo na koyeba lolenge ya malamu ya kobɔkɔla bana; basengeli kotika yango te mpo basili koyeba yango, kasi nde mpo ezali te.” Zulunalo moko (Time) nde ekomaki bongo ntango elobelaki buku moko oyo elobeli ndenge ya kobɔkɔla bana. Buku yango elobi ete bilenge balandaka libosoliboso makambo ya baninga na bango, kasi te oyo ya baboti na bango.

Tokoki kowangana te ete baninga bazalaka na bopusi makasi mpenza. (Masese 13:20; 1 Bakolinti 15:33) William Brown, mokomi na zulunalo moko, alobaki boye: “Soki ezali na likambo oyo bilenge bamonaka ete ezali na ntina mingi, ezali kozala lokola baninga. . . . Mpo na bilenge, kokesene na baninga ezali mabe mingi koleka kutu liwa.” Lokola bato bazali na makambo mingi ya kosala lelo oyo, baboti mingi bazali kolonga te kokómisa ndako na bango esika moko ya esengo to bazali kolekisa ntango mingi te elongo na bana na bango; na ndenge yango, bazali nde kotinda bana na bango bálanda bizaleli mabe ya baninga na bango.

Lisusu, na “mikolo ya nsuka” oyo, mabota ekómi mpenza na likama mpamba te, ndenge Biblia esakolaki, bato bamipesi mingi na mbongo, na bisengo mpe na koluka matomba na bango moko. Tosengeli nde kokamwa na komona ete bilenge bazali kokóma “bato bazangi botosi epai ya baboti, bato bazangi botɔndi, bato bazangi bosembo, bazangi bolingo ya libota”?​—2 Timote 3:1-3.

Na Biblia, maloba “bolingo ya libota” ezali bolingo oyo emonanaka na kati ya libota. Ezali bolingo oyo etindaka baboti bákokisa bamposa ya bana na bango mpe bana bákangama na baboti na bango. Nzokande, soki baboti bazangi bolingo ya libota, bana bakoluka yango epai mosusu, mingimingi epai ya baninga na bango, mpe na ntembe te bakoki kolanda makambo mpe etamboli na bango. Kasi, yango ekoki kosalema te soki baboti batiki mitinda ya Biblia etambwisa libota na bango.​—Masese 3:5, 6.

Libota—ebongiseli ya Nzambe

Nsima ya kosangisa Adama ná Eva lokola mwasi na mobali, Nzambe apesaki bango etinda oyo: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili.” Na nsima, libota esalemaki, ebongiseli oyo esangisi tata, mama mpe bana. (Genese 1:28; 5:3, 4; Baefese 3:14, 15) Mpo na kosalisa bato na kobɔkɔla bana na bango, Yehova apesaki bango motema ya baboti. Kasi, na bokeseni na banyama, bato basengeli na lisalisi mosusu; yango wana Yehova apesaki bango mokanda moko ya malako mpo na kotambwisa bango. Na kati ya makambo oyo akomelaki bango ezali mpe na malako etali bizaleli malamu, makambo ya elimo mpe lolenge ebongi ya kobɔkɔla bana.​—Masese 4:1-4.

Epai ya batata, Nzambe alobaki boye: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingia na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛma yo.” (Deteronome 6:6, 7; Masese 1:8, 9) Simbá ete baboti basengelaki naino kotya mibeko ya Nzambe na mitema na bango moko. Mpo na nini yango ezalaki na ntina? Mpamba te mateya oyo esimbaka mpenza mitema ya bato eutaka na motema, kasi na monɔkɔ kaka te. Baboti bakoki kosimba mitema ya bana na bango kaka soki bazali koteya bango makambo oyo euti na motema. Baboti ya ndenge wana bakopesa mpe ndakisa malamu epai ya bana na bango, oyo baumelaka te koyeba soki moto azali koloba solo te.​—Baloma 2:21.

Biblia ezali kosɛnga na baboti báteya bana na bango banda bomwana “mateya mpe disipilini mpe batoli mpe malako ya Nkolo.” (Baefese 6:4, The Amplified Bible; 2 Timote 3:15) Banda bomwana? Ɛɛ! Mama moko akomaki boye: “Ntango mosusu, biso baboti tokanisaka ete bana bakoki kosala likambo moko ya malonga te. Tondimaka makoki na bango te. Bazali na makoki. Biso baboti tosengeli kosalela makoki yango.” Ya solo, bana balingaka koyeba makambo mingi, mpe soki bateyami na baboti oyo babangaka Nzambe, bakoyeba mpe kolinga basusu. Bana ya ndenge wana bakotalela mibeko oyo baboti bazali kotyela bango lokola bolɔkɔ te. Na yango, baboti ya malamu basalaka nyonso mpo bázala baninga ya bolingo ya bana na bango, basololaka na bango, bateyaka bango na motema mpiɔ kasi bapesaka bango disipilini soki esengeli, mpe basalaka ete bana na bango bákola na esika moko ya malamu.a

Bóbatela bana na bino

Na mokanda moko oyo akomelaki baboti, mokambi ya eteyelo moko na Allemagne alobaki boye: “Baboti ya bolingo, tolingi kolendisa bino ete bómipesa bino moko mpo na kobɔkɔla bana na bino; bótikela te televizyo to bato ya balabala [mokumba] na bino ya koteya bango.”

Kutu, soki botikeli televizyo to bato ya balabala mokumba ya koteya bana na bino, wana nde bopesi nzela ete bákola na elimo ya mokili. (Baefese 2:1, 2) Lokola mopɛpɛ ya makasi, elimo yango ya mokili, oyo ezali na boyokani ata moke te na elimo ya Nzambe, ememaka mboto ya makanisi “ya nse, ya bonyama, ya bademo” mpe elonaka yango na mitema ya bato oyo bakɔmelá te to bazoba. (Yakobo 3:15) Nsukansuka, makanisi ya ndenge wana, oyo ezali lokola matiti mabe, ebebisaka motema ya moto. Yesu ayebisaki oyo ekómelaka moto soki mboto ya mabe ekɔti na motema na ye: “Moto malamu abimisaka malamu na eloko ya motuya ya malamu ya motema na ye, kasi moto mabe abimisaka oyo ezali mabe na eloko ya motuya na ye ya mabe; mpo uta na makambo oyo etondi na motema nde monɔkɔ na ye elobaka.” (Luka 6:45) Yango wana, Biblia ezali kolendisa biso boye: “Koleka eloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo, mpo makambo ya bomoi eutaka na yango.”​—Masese 4:23, NW.

Bana bazali kaka bana, mpe mingi kati na bango balingaka kosala kaka oyo motema na bango elingi, ata mpe kokóma batomboki. (Genese 8:21) Baboti bakoki kosala nini? Biblia elobi boye: “Ebebe ezwami na motema ya mwana; nde [fimbo] ya etumbu ekobengana yango mosika na ye.” (Masese 22:15) Bato mosusu bamonaka ete kosalela fimbo ezali nde konyokola bana, mpe balobaka ete ezali likambo oyo eleká ngala. Ya solo, Biblia epekisi konyokola bato, ezala na kosimba bango na nzoto to na maloba. Kasi, “fimbo” oyo balobeli awa, atako mbala mosusu ezalaka fimbo ya solo, ezali mpenza nde komonisa bokonzi ya baboti, oyo basalelaka na lisɛki te, kasi mpe na bolingo mpe na ndenge ebongi, mpo na bolamu ya libela ya bana na bango.​—Baebele 12:7-11.

Bóminanolaka elongo na bana na bino

Eyebani malamu ete mpo bana bákola malamu, basengeli kosakanaka mpe kominanolaka. Soki ntango emonani, baboti ya bwanya balingaka kosakana to kominanola elongo na bana na bango, mpo na kokolisa boyokani kati na bango ná bana. Na ndenge yango, baboti balakisaka bana kaka te kopona lolenge ya kominanola ya malamu, kasi bamonisaka mpe ete basepelaka kozala elongo na bango.

Tata moko oyo azali Motatoli alobi ete mbala mingi soki auti mosala, azalaki kobɛta bale na mwana na ye ya mobali. Mama moko alobi ete azalaki na momeseno ya kobɛta masano lokola ngola mpe dame elongo na bana na ye. Mwasi moko akanisi lisusu ntango azalaki elenge, ndenge bazalaki kosakana na bavelo na libota na bango. Lelo oyo, bana wana nyonso bakómá mikóló, kasi bolingo na bango mpo na baboti na bango mpe mpo na Yehova ezali kaka makasi to mpe ekómá lisusu makasi koleka.

Ya solo, baboti oyo bamonisaka na maloba mpe na misala ete balingaka bana na bango mpe balingaka kozala elongo na bango, bapesaka bango ndakisa oyo mbala mingi esalisaka bango bomoi na bango mobimba. Na ndakisa, bana-kelasi mingi ya kelasi moko ya Gileadi, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia, balobaki ete ekoki kozala ete ndakisa mpe bilendiseli ya baboti na bango nde epesaki bango mposa ya kolanda mosala ya ntango nyonso. Oyo nde libula kitoko mpo na bana mpe lipamboli monene mpo na baboti! Toboyi te, bana nyonso te nde bakozala na likoki ya kolanda mosala ya ntango nyonso ntango bakokola, kasi na ntembe te bango nyonso bakozwa litomba na baboti oyo babangaka Nzambe, oyo bazwaka bango lokola baninga mpe bazali kopesa bango ndakisa malamu, mpe bakokumisa bango.​—Masese 22:6; Baefese 6:2, 3.

Baboti oyo babɔkɔlaka bana kaka bango moko bakoki kolonga

Lelo oyo, bana mingi bazali kobɔkɔlama kaka na tata to mama na bango ye moko. Atako ezalaka pɛtɛɛ te kobɔkɔla mwana kaka yo moko, okoki mpe kolonga. Baboti ya ndenge wana bakoki kolendisama na ndakisa ya Biblia oyo elobeli Enisi, mwasi moko Moyuda oyo azalaki moklisto na ekeke ya liboso. Lokola mobali ya Enisi azalaki moklisto te, emonani ete azalaki kopesa ye mabɔkɔ te na makambo ya losambo. Atako bongo, ateyaki Timote malamu mpenza. Ndakisa malamu oyo azalaki kopesa Timote banda bomwana na ye, bakisá mpe oyo ya Loisi, nkɔkɔ ya Timote, ezalaki na nguya makasi likoló ya Timote koleka makambo nyonso ya mabe oyo Timote akokaki komona epai ya baninga na ye mosusu.​—Misala 16:1, 2; 2 Timote 1:5; 3:15.

Lelo oyo, bilenge mingi oyo babɔkɔlami na baboti oyo kaka moko nde azali moklisto to na moboti kaka moko, bazali mpe komonisa bizaleli malamu oyo Timote azalaki na yango. Na ndakisa, Ryan, oyo azali sikoyo na mbula 22 mpe azali mobongisi-nzela, mama na bango abɔkɔlaki ye ná yaya na ye ya mobali mpe oyo ya mwasi kaka ye moko. Tata na bango azalaki molangwi monene ya masanga, mpe asundolaki bango ntango Ryan azalaki kaka na mbula minei. Ryan alobi boye: “Mama azalaki mpenza na ekateli ete libota na biso ekoba kosalela Yehova, mpe akangamaki kaka na ekateli yango na motema na ye mobimba.”

Ryan alobi lisusu boye: “Na ndakisa, mama azalaki kosala nyonso mpo biso bana na ye tózala na baninga ya malamu. Azalaki ata moke te kotika biso tótambola elongo na bato oyo Biblia ebengi baninga mabe, ezala na libándá to na kati ya lisangá. Alakisaki biso mpe kotalela bakelasi na bokatikati.” Atako mbala mingi, soki auti mosala, mama ya Ryan azalaki na makambo mingi ya kosala mpe azalaki kolɛmba mingi, yango ezalaki kopekisa ye te kotyela bana na ye likebi. Abakisi lisusu boye: “Azalaki ntango nyonso kosepela kofanda elongo na biso mpe kosolola na biso. Azalaki moteyi moko ya motema molai, kasi azalaki kozwa makambo na liseki te, mpe azalaki kosala nyonso mpo tózangisa te koyekola Biblia na libota. Azalaki ‘kokakola’ mitinda ya Biblia te.”

Soki Ryan akanisi bomwana na ye, amonaka ete soki ye ná bayaya na ye bazali ndenge bazali, ezali mingimingi mpo na mama na bango, oyo azalaki na bolingo ya solosolo mpo na Nzambe mpe mpo na bana na ye. Na yango, yo moboti moklisto, ezala ozali na molongani to molongani na yo akufá to azali moklisto te, kolɛmba to kozonga nsima ata moke te na milende oyo ozali kosala mpo na koteya bana na yo. Lokola mwana ya kilikili, bilenge mosusu bakoki ntango mosusu kopesa solo mokɔngɔ. Kasi, soki bamoni bango moko ndenge mokili ezali na ntina te mpe ezali mabe, bakoki kozongela solo. Ya solo, “moyengebene akotambola na sembo na ye; bana na ye bakopambolama nsima na ye.”​—Masese 20:7; 23:24, 25; Luka 15:11-24.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Okoki kozwa makanisi mosusu na ntina na makambo wana na nkasa 55-59 ya buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda/​Bililingi na lokasa 11]

Nzambe ye moko nde aponaki baboti ya Yesu

Ntango Yehova atindaki mwana na ye abotama lokola moto, ye moko nde aponelaki ye baboti na likebi mpenza. Likambo ya kokamwa, aponaki mobali ná mwasi oyo bazalaki bato mpamba, oyo bazalaki komipesa na makambo ya elimo mingi, oyo babebisaki Yesu te, kasi bateyaki ye Liloba ya Nzambe mpe ntina ya komipesa na mosala mpe ya kondima mikumba. (Masese 29:21; Bileli 3:27) Yozefe alakisaki Yesu mosala ya mabaya, mpe na ntembe te Yozefe ná Malia basɛngaki Yesu, mwana na bango ya liboso, asalisa bango na kobɔkɔla bana na bango mosusu, oyo bakokaki kozala motoba.​—Malako 6:3.

Kanisá naino ndenge Yozefe ná libota na ye bazalaki kosala elongo na ntango ya Elekeli mpo na kobongisa mobembo oyo bazalaki kosala na makolo mbula na mbula mpo na kokende tii na Yelusaleme, kilomɛtrɛ 200 mobimba mpo na kokende mpe kozonga. Na ntembe te, mpo na kosala mobembo ya ndenge wana, libota ya bato libwa to koleka esengelaki komibongisa malamu mpenza. (Luka 2:39, 41) Atako ezalaki pɛtɛɛ te, emonani ete Yozefe ná Malia bazalaki kosepela na mabaku wana mingi, ntango mosusu bazalaki mpe kosalela yango mpo na koteya bana na bango makambo mosusu ya kala oyo Biblia elobelá.

Ntango Yesu azalaki naino na ndako ya baboti, “azalaki kaka kotosa” baboti na ye mpe “akobaki kokola na bwanya mpe na bokoli ya nzoto mpe na boboto epai ya Nzambe mpe epai ya bato.” (Luka 2:51, 52) Ya solo, Yozefe ná Malia babongaki mpenza ete Yehova atyela bango motema. Batiká mpenza ndakisa malamu oyo baboti basengeli kolanda lelo oyo!​—Nzembo 127:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto