“Longwa na bomwana na yo, osili koyeba”
BOLUKILUKI ya siansi na mikolo oyo emonisi ete kosolola na bana mike ezalaka na bopusi mingi na bokoli ya bɔɔngɔ na bango, elendisaka makoki na bango ya kokanisa, ya komanyola, mpe ya kosilisa mikakatano. Yango esalemaka bongo mingi mpenza na boumeli ya mbula ya liboso ya bomoi ya bebe. Zulunalo International Herald Tribune eyebisi ete sikawa balukiluki mosusu bakanisi ete “motuya ya maloba oyo mwana moke ayokaka mokolo na mokolo ezali elembo monene mpo na komonisa ete akozala na mayele, akolonga na kelasi mpe akozala na makoki na bomoi na ye ntango akokóma mokóló.”
Kasi, maloba oyo akoyoka masengeli kouta na monɔkɔ ya moto. Emonani ete televizyo to radio ekoki kosalelama te na esika ya moto.
Nganga-mayele moko ayekolaka ba nerfs na Iniversite Washington na engumba Seattle, na États-Unis alobaki ete: “Sikawa toyebi ete bikanganeli ya ba nerfs esalemaka na ebandeli mpenza ya bomoi mpe toyebi ete bɔɔngɔ ya mwana moke ezelaka se ete makambo mákɔta kati na yango mpo na koyeba lolenge oyo bikanganeli yango bisalemi. Esili koleka mwa mikolo tososolaki ete ebongiseli yango ebandaka liboso mpenza. Na ndakisa, bana mike bayekolaki mingongo ya lokota oyo ezali kolobama esika babotami ntango bakokisaki sanza motoba.”
Bolukiluki ya mikolo oyo ekweisi makanisi oyo mapalangani mingi ete mayele ya babebe ekolaka bobele na komoniseláká bango bolingo mingi. Bolukiluki yango ezali mpe komonisa ete baboti bazali na mokumba monene kati na bokoli ya mwana.
Likambo yango ezali kokundwela biso maloba ya mokanda mopemami oyo ntoma Paulo atindelaki Timoté: “Longwa na bomwana na yo, osili koyeba Makomi na bulɛɛ, makoki kopesa yo boyebi mpo na kobika na nzela na kondima.” Emonani ete makomi ya bulɛɛ, oyo mama mpe nkɔkɔ ya Timoté, basi oyo bazalaki na kondima, bateyaki ye, esalaki bopusi monene mingi na bokoli na ye mpo na kokóma mosaleli monene ya Nzambe.—2 Timoté 1:5; 3:15.