Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/3 nk. 12-17
  • Komipesa mpe bonsomi ya kopona

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Komipesa mpe bonsomi ya kopona
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komipesa na “Nzambe na Yisalaele”
  • Komipesa ya “Yisalaele na Nzambe”
  • Tósalela na mayele bonsomi oyo Nzambe apesi biso
  • Oponi kozala moombo ya nani?
  • Tóyekola komizwela litomba
  • Bazalaki kobotama na ekólo oyo Nzambe aponaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bomoi na yo emonisaka mpenza ete omipesi na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tómitambwisa “mokolo na mokolo” engebene komipesa na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mpo na nini osengeli komipesa na Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/3 nk. 12-17

Komipesa mpe bonsomi ya kopona

“Klisto akangoli biso mpo na bonsomi.”​—BAGALATIA 5:1.

1. Maloba ya Liebele mpe ya Greke oyo mabongolami na “komipesa,” “bofungoli,” to “kopesama” masalelamaka mingimingi mpo na nini?

BAKOMI ya Biblia basalelaki maloba mingi ya Liebele mpe ya Greke mpo na komonisa likanisi ya kokabolama, to kotyama pembeni, mpo na kokokisa mokano moko ya bulɛɛ. Na Babiblia ya Lingala maloba yango mabongolami na maloba lokola “komipesa,” “bofungoli,” to “kopesama.” Ntango mosusu maloba yango masalelamaka mpo na bandako oyo etongami—mingimingi tempelo ya Nzambe na Yelusaleme ya kala mpe losambo oyo ezalaki kosalema kuna. Maloba yango masalelami mingi te na makambo matali losambo te.

Komipesa na “Nzambe na Yisalaele”

2. Mpo na nini Yehova abongaki mpenza kobéngama “Nzambe na Yisalaele”?

2 Na mobu 1513 L.T.B., Nzambe alongolaki Bayisalaele na boombo na Ezipito. Mwa moke na nsima, atyaki bango pembeni lokola libota na ye, asalaki na bango boyokani na nzela ya kondimana. Ayebisaki bango ete: “Soko bokotosa monɔkɔ na ngai mpe bobateli kondimana na ngai, mbɛlɛ bokozala bato na ngai mpenza kati na bato nyonso, mpo ete mokili mobimba ezali na ngai.” (Exode 19:5; Nzembo 135:4) Lokola akómisaki Yisalaele libota na ye, Yehova abongaki mpenza kobéngama “Nzambe na Yisalaele.”​—Yosua 24:23.

3. Mpo na nini Yehova amonisaki koponapona te wana azwaki Yisalaele lokola libota na ye?

3 Na kokómisáká Bayisalaele libota na ye oyo emipesi, Yehova azalaki na koponapona te, mpamba te amonisaki mpe bolingo na komibanzabanzáká mpo na bato oyo bazalaki Bayisalaele te. Ayebisaki libota na ye ete: “Wana ekofanda mopaya epai na yo na mokili na yo, okosalela ye mabe te. Mopaya oyo afandi epai na bino akozala lokola moto abotami kati na bino, mpe okolinga ye lokola yo mpenza, mpo ete bino bozalaki bapaya na mokili na Ezipito. Ngai nazali [Yehova] Nzambe na bino.” (Levitike 19:33, 34) Bikeke mingi na nsima, ntoma Petelo asosolaki mpenza likanisi ya Nzambe, mpe andimaki ete: “Na solo namoni ete Nzambe [akoponaka, NW] bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”​—Misala 10:34, 35.

4. Bayisalaele basengelaki kokokisa masɛngami nini mpo ete bázala na boyokani elongo na Nzambe, mpe Bayisalaele bakokisaki nde masɛngami yango?

4 Mpe, tóbosana te ete mpo na kozala libota ya Nzambe oyo emipesi, basengelaki kokokisa masɛngami. Balingaki kozala “libota na ye” bobele soki batosaki mongongo ya Nzambe mpe babatelaki kondimana na ye. Likambo ya mawa, Bayisalaele bakokisaki masɛngami yango te. Nsima ya koboya Masiya oyo Nzambe atindaki na ekeke ya liboso T.B., babungisaki etɛlɛmɛlo malamu wana. Yehova azalaki lisusu “Nzambe na Yisalaele” te. Mpe Bayisalaele ya mosuni bazalaki lisusu libota oyo emipesi na Nzambe te.​—Kokanisá na Matai 23:23.

Komipesa ya “Yisalaele na Nzambe”

5, 6. (a) Yesu alingaki koloba nini na maloba na ye ya esakweli oyo mazwami na Matai 21:42, 43? (b) Ntango nini mpe lolenge nini “Yisalaele na Nzambe” ebotamaki?

5 Yango elimbolaki nde ete Yehova alingaki lisusu kozala na libota emipesi na ye te? Te. Kozongeláká maloba ya mokomi na nzembo, Yesu Klisto asakolaki ete: “Botángi naino kati na [Makomami, NW] te ete, Libanga liboyaki batongi esili kokóma motó na nsuka. Likambo oyo esalami na Nkolo mpe ezali eloko na kokamwa na miso na bino. Bongo nazali koloba na bino ete Bokonzi na Nzambe ekolongwa na bino mpe ekopesama na libota likobimisa mbuma na yango.”​—Matai 21:42, 43.

6 Emonani ete ‘libota likobimisa mbuma na yango’ ezali bongo lisangá ya boklisto. Na boumeli ya bambula oyo alekisaki awa na mabelé, Yesu aponaki baoyo basengelaki kokóma basangani na yango ya liboso. Kasi na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., Yehova Nzambe ye moko abandisaki lisangá ya boklisto na kosopáká elimo santu likoló na basangani na yango ya liboso, bato pene na 120. (Misala 1:15; 2:1-4) Lokola ntoma Petelo akomaki yango na nsima, lisangá yango oyo liutaki kosalema sika likómaki na ntango wana “libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulɛɛ, bato baponami.” Baponami na ntina nini? Mpo ete basengeli ‘koyebisa malamu ya oyo abyangi bango kobima na molili [mpo na] kokɔta na moi na ye na kokamwisa.’ (1 Petelo 2:9) Bayekoli ya Klisto, bapakolami na elimo ya Nzambe, bakómaki na ntango wana libota oyo emipesi, “Yisalaele na Nzambe.”​—Bagalatia 6:16.

7. Basangani ya Yisalaele ya Nzambe basengelaki kosepela na makambo nini, mpe na bongo bayebisaki bango ete báboya makambo nini?

7 Atako basangani ya libota ya bulɛɛ bazalaki “libota liponami,” basengelaki kokóma baombo te. Kutu, basengelaki kozala na bonsomi koleka oyo Yisalaele ya mosuni, libota emipesaki na Nzambe, ezalaki na yango. Yesu alakaki na baoyo basengelaki kokóma basangani ya libota yango ya sika ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Ntoma Paulo amonisaki ete baklisto basikwamaki na masɛngami ya kondimana ya Mibeko. Na ntina yango ayebisaki baninga na ye bandimi oyo bazalaki na Galatia ete: “Klisto akangoli biso mpo na bonsomi. Bongo bótɛlɛma ngwi mpe bóingela lisusu kati na ekanganeli na boombo te.”​—Bagalatia 5:1.

8. Na makambo nini ebongiseli ya boklisto ezali kopesa moto na moto bonsomi mingi koleka oyo ezalaki na kondimana ya Mibeko?

8 Na bokeseni na Yisalaele ya kala, kino lelo oyo Yisalaele ya Nzambe ezali kotosa masɛngami mpo na kozala libota oyo emipesi na Nzambe. Yango esengeli kokamwisa biso te mpamba te basangani na yango baponi kotosa na bonsomi nyonso. Wana basangani ya Yisalaele ya mosuni bamipesaki se mpo ete babotamaki na libota wana, basangani ya Yisalaele ya Nzambe bamipesi na nzela ya liponi. Na bongo, ebongiseli ya boklisto ekesanaki na kondimana ya Mibeko ya Bayuda, oyo esɛngisaki bato ete bámipesa kozanga kotikela bango bonsomi ya kopona.

9, 10. (a) Lolenge nini Yilimia amonisaki ete komipesa ekobongwana? (b) Mpo na nini tokoki koloba te ete baklisto nyonso bamipesi bazali basangani ya Yisalaele ya Nzambe?

9 Yilimia asakolaki ete mbongwana ekosalema na ntina na komipesa wana akomaki ete: “Talá mikolo [m]ikoya wana nakokata kondimana na sika na ndako na Yisalaele mpe na ndako na Yuda, pelamoko kondimana oyo ekataki ngai na batata na bango te na mokolo wana nakambaki bango na lobɔkɔ mpo na kobimisa bango na mokili na Ezipito; babebisaki kondimana na ngai, ata ngai nazalaki mobali epai na bango; [Yehova] alobi bongo. Kasi oyo ekozala kondimana ekokata ngai na ndako na Yisalaele nsima na mikolo yango; [Yehova] alobi bongo. Nakotya Mobeko na ngai na kati na bango, nakokoma yango na mitema na bango; nakozala Nzambe na bango mpe bango bakozala bato na ngai.”​—Yilimia 31:31-33.

10 Basangani ya Yisalaele ya Nzambe bapusami na komitambwisa engebene komipesa na bango mpamba te mibeko ya Nzambe mizali “kati na bango,” lokola nde ete mikomami “na mitema na bango.” Mposa na bango ezali makasi koleka oyo ya Bayisalaele ya mosuni, oyo mpo na bango komipesa ezalaki likambo ya kobotama, kasi baponaki yango te. Lelo oyo, mposa makasi ya kosala mokano ya Nzambe, oyo Yisalaele ya Nzambe bazali komonisa, ezali mpe epai ya baninga na bango koleka milió mitano na mokili mobimba oyo basangani na bango na losambo. Bango mpe basili kopesa bomoi na bango epai ya Yehova Nzambe mpo na kosala mokano na ye. Atako bato yango bazali na elikya ya kozala na bomoi na likoló te lokola oyo basangani ya Yisalaele ya Nzambe bazali na yango, bazali kosepela na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé na nse ya boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na likoló. Bazali kosepela na Yisalaele ya elimo na kosungáká etuluku moke ya batikali na yango na kokokisa mokumba na bango ya “koyebisa malamu na oyo abyangi [bango] kobima na molili [mpo na] kokɔta na moi na ye na kokamwa.”

Tósalela na mayele bonsomi oyo Nzambe apesi biso

11. Moto azalisamaki na likoki nini, mpe lolenge nini esengeli kosalelama?

11 Nzambe azalisaki bato na boye ete bálingaka bonsomi. Apesaki bango likoki ya kopona engebene mposa na bango. Babalani ya liboso basalelaki bonsomi na bango ya kopona. Nzokande, na kozanga mayele mpe na kozanga bolingo, basalaki liponi oyo ememelaki bango mpe bakitani na bango mpasi. Kasi, yango emonisi polele ete Yehova atindikaka soko moke te bikelamu na ye ya mayele ete bálanda na makasi nzela oyo motema to bamposa na bango eponi te. Mpe lokola “Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo,” lolenge bobele moko ya komipesa endimami na ye, ezali oyo etongami likoló ya bolingo, oyo moto asali yango na motema na ye moko mpe na esengo, oyo etongami likoló ya bonsomi ya kopona. (2 Bakolinti 9:7) Komipesa ya lolenge mosusu nyonso endimami te.

12, 13. Na nini Timoté azali ndakisa na oyo etali kobɔkwama ya mwana, mpe ndakisa na ye ememi bilenge mingi na kosala nini?

12 Koyebáká malamu lisɛngami yango, Batatoli ya Yehova balendisaka komipesa ya moto ye moko na Nzambe, kasi batindikaka moto na makasi soko moke te, ata bana na bango moko. Na bokeseni na mangomba mingi, Batatoli babatisaka bana na bango te ntango bazali mike, lokola nde bazali na likoki ya kotindika bango na makasi ete bámipesa kozanga ete bango moko bápona kosala yango. Ndakisa euti na Makomami oyo bazali kolanda ezali bongo ya elenge Timoté. Wana akómaki mokóló, ntoma Paulo ayebisaki ye ete: “Oumela kati na yango eyekoli yo mpe endimi yo, awa eyebi yo ete oyekoli yango epai na banani; mpe ete longwa na bomwana na yo, osili koyeba Mako[ma]mi na bulɛɛ, makoki kopesa yo boyebi mpo na kobika na nzela na kondima kati na Klisto Yesu.”​—2 Timoté 3:14, 15.

13 Ezali polele ete Timoté ayebaki makomi ya bulɛɛ mpamba te bateyaki ye yango uta bomwana. Mama na ye mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi bandimisaki ye—kasi batindikaki ye te—ete andima mateya ya boklisto. (2 Timoté 1:5) Mpo na yango, Timoté amonaki ete kokóma moyekoli ya Klisto ezali likambo ya mayele mpe ye moko aponaki ete amipesa lokola moklisto. Na mikolo na biso, bankóto mingi ya bilenge mibali mpe bilenge basi oyo baboti na bango bazali Batatoli basili kolanda ndakisa yango. (Nzembo 110:3) Basusu baboyi na bango. Ezali se liponi ya moto ye moko.

Oponi kozala moombo ya nani?

14. Baloma 6:16 eyebisi biso nini na ntina na bonsomi ezangi ndelo?

14 Moto moko te azali na bonsomi oyo ezangi ndelo. Bonsomi ya moto na moto ezali na ndelo na ntina na bipekiseli ya mibeko ya bozalisi, lokola oyo esalaka ete eloko nyonso ebwakami likoló ekita na nse (loi de la pesanteur), oyo moto akoki te kobuka yango kozanga ete azwa likama. Bobele bongo, na lolenge ya elimo, moto moko te azali na bonsomi ezangi ndelo. Paulo alobaki boye: “Boyebi te ete soko bokomipesa bino mpenza epai na moto ete bósalela ye na botosi, bozali baombo na ye oyo bokotosaka, soko baombo na masumu oyo ikokamba kino kufa, soko baombo na botosi oyo ekokamba kino boyengebene?”—Baloma 6:16.

15. (a) Bato bazalaka na likanisi nini na ntina na boombo, kasi mingi basukaka na kosala nini? (b) Mituna nini tosengeli mpenza komituna?

15 Bato mingi basepelaka te na likanisi ya kozala moombo ya moto moko. Kasi, na mokili ya lelo, ezali solo ete mbala mingi bato bamitikaka kobendama mpe kopusama na myango mingi ya mayele mabe oyo mizali komema bango, kozanga ete bálinga yango, na kosala makambo oyo bato mosusu balingi. Na ndakisa, bakompanyi ya piblisité mpe ya makambo ya kominanola ezali kosala nyonso mpo na kopusa bato ete bámitambwisaka mpe bákanisaka ndenge moko, bazali kotyela bango mitinda oyo basengeli kolanda. Bibongiseli ya politiki mpe ya mangomba ezali kopusa bato ete bándima makanisi mpe mikano na yango, mpe mingimingi bazali kosala yango te na makanisi ya solosolo oyo makoki kondimisa, kasi mbala mingi bapesaka bato likanisi ete na kosaláká bongo bazali kosalisana mpe bazali sembo. Lokola Paulo amonisaki ete ‘tozali baombo ya baoyo tozali kotosa,’ moto na moto kati na biso asengeli mpenza komituna ete, ‘Nazali moombo ya nani? Nani azali na bopusi mingi likoló na bikateli na ngai mpe lolenge ya bomoi na ngai? Ezali bongo bakonzi ya mangomba, bato ya politiki, bato minene ya mombongo, to bato ya masano? Natosaka nani—Nzambe to bato?’

16. Na ndimbola nini baklisto bazali baombo ya Nzambe, mpe lolenge nini ya malamu tosengeli kotalela boombo motindo yango?

16 Mpo na baklisto, kotosa Nzambe ezali te likambo oyo ezali kolongola bonsomi na bango. Bazali na mposa ya kosalela bonsomi na bango na kolandáká ye oyo azali Ndakisa na bango, Yesu Klisto, basalaka ete bamposa na bango mpe makambo na bango oyo maleki ntina máyokana na mokano ya Nzambe. (Yoane 5:30; 6:38) Bazali kokolisa “makanisi na Klisto,” komisɔkisáká liboso na ye lokola Mokonzi ya lisangá. (1 Bakolinti 2:14-16; Bakolose 1:15-18) Yango ezali lolenge moko na mwasi oyo babali ye mpe andimi kosalana elongo na mobali oyo alingaka. Kutu, lisangani ya baklisto bapakolami ebéngami ngɔndɔ oyo alakami na libala epai ya Klisto.​—2 Bakolinti 11:2; Baefese 5:23, 24; Emoniseli 19:7, 8.

17. Batatoli nyonso ya Yehova baponaki kokóma banani?

17 Motatoli nyonso ya Yehova, ezala oyo azali na elikya ya kokende na likoló to ya kofanda na mabelé, asili komipesa ye moko epai ya Nzambe mpo na kosala mokano na ye mpe kotosa ye lokola Mokonzi. Motatoli mokomoko amipesaki mpo ete ye moko aponaki kokóma moombo ya Nzambe na esika ya kozala ntango nyonso moombo ya bato. Yango eyokani na toli ya ntoma Paulo ete: “Bosikwi mpo na motuya! Bókóma baombo na bato te.”​—1 Bakolinti 7:23.

Tóyekola komizwela litomba

18. Ntango nini moto oyo alingi kokóma Motatoli abongi mpo na kozwa batisimo?

18 Liboso ete moto andimama mpo na kokóma Motatoli ya Yehova, asɛngeli kokokisa masɛngami ya Makomami. Bankulutu batalelaka na likebi mpo na koyeba soki moto oyo alingi kokóma Motatoli azali solo kokanga ntina ya makambo oyo komipesa lokola moklisto esɛngaka. Alingi mpenza kokóma Motatoli ya Yehova? Alingi mpenza komitambwisa engebene makambo oyo komipesa na ye esɛngi? Soki ezali boye te, abongi te mpo na kozwa batisimo.

19. Mpo na nini ntina ezali te ya koloba mabe mpo na moto oyo azwi ekateli ya komipesa mpo na kosalela Nzambe?

19 Nzokande, soki moto akokisi masɛngami wana nyonso, mpo na nini koloba mabe na ekateli oyo ye moko azwi ya komitika kozwa bopusi ya Nzambe mpe ya Liloba na ye lipemami? Ebongi te ete moto amitika na bopusi ya Nzambe na esika ya komitika na bopusi ya bato? To yango ezali nde na litomba moke? Batatoli ya Yehova bakanisaka bongo te. Bandimaka na motema moko maloba ya Nzambe oyo Yisaya akomaki ete: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.”​—Yisaya 48:17.

20. Solo ya Biblia ezali kosikola bato na makambo nini?

20 Solo ya Biblia ezali kosikola bato na mateya ya lokuta ya mangomba, lokola minyoko ya seko kati na lifelo ya mɔ́tɔ. (Mosakoli 9:5, 10) Nzokande, ezali kotondisa mitema na bango na botɔ́ndi mpo na elikya ya solo mpo na bakufi—lisekwa oyo ekoki kozwama na moboko ya mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto. (Matai 20:28; Misala 24:15; Baloma 6:23) Solo ya Biblia ezali kolongola epai ya bato mayoki ya mpasi oyo mauti na kotyela bilaka ya bato ya politiki motema, oyo ntango nyonso bizali kokokisama te. Nzokande, ezali kosepelisa mitema na bango na koyebáká ete Bokonzi ya Yehova esilaki kobanda koyangela na likoló mpe mosika te ekoyangela mabelé mobimba. Solo ya Biblia ezali kosikola bato na misala oyo, atako mizali kosepelisa nzoto ya masumu, mizali nde kobwaka nsɔni likoló ya Nzambe mpe ezali kotyela bato bozito monene oyo ezali komonana na kobeba ya boyokani, maladi, mpe liwa ya mobesu. Na mokuse, kozala moombo ya Nzambe ezali na litomba mingi koleka kozala moombo ya bato. Ya solo, komipesa epai ya Nzambe ekomema matomba “na ntango oyo . . . mpe bomoi ya seko na ebongiseli ya biloko oyo ezali koya.”​—Malako 10:29, 30, NW.

21. Lolenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka komipesa na Nzambe, mpe mposa na bango ezali nini?

21 Lelo oyo, baoyo bazali Batatoli ya Yehova bakómi basangani ya libota oyo emipesi na Nzambe na nzela ya kobotama te lolenge ezalaki Bayisalaele ya kala. Batatoli bazali basangani ya lisangá ya baklisto oyo bamipesi. Motatoli mokomoko oyo azwi batisimo asili komipesa na kosaleláká bonsomi na ye ya kopona. Ɛɛ, mpo na Batatoli ya Yehova, komipesa eutaka na boyokani ya esengo elongo na Nzambe oyo ezali komonisama na kosalela ye na mposa ya motema. Bazali na mposa ya kobatela na motema mobimba boyokani wana ya esengo, mpo na libela, kokangamáká na bonsomi oyo, mpo na yango, Yesu Klisto asikoli bango.

Okoyanola ndenge nini?

◻ Mpo na nini Nzambe azalaki na koponapona te na kozwáká Yisalaele lokola “libota na ye”?

◻ Mpo na nini okoki koloba ete komipesa ya boklisto elimboli kobungisa bonsomi te?

◻ Wapi matomba ya komipesa na Nzambe?

◻ Mpo na nini eleki malamu kozala mosaleli ya Yehova na esika ya kozala moombo ya bato?

[Elilingi na lokasa 15]

Na Yisalalele ya kala, komipesa epai ya Nzambe ezalaki likambo ya kobotama

[Elilingi na lokasa 16]

Komipesa ya boklisto ezali likambo ya kopona

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto