Baboti, bósepela mpo na bana na bino
“Tata na yo mpe mama na yo bakosepela.”—MASESE 23:25.
1. Nini ekosala ete baboti básepela mpo na bana na bango?
OYO nde esengo komona nzeté moke kokóla kino kokóma nzeté monene kitoko mpo na kotala mpe oyo ezali kopesa malili—esengo yango eyokamaka mingingi soki yo nde olónaki nzeté yango mpe obatelaki yango! Bobele bongo, baboti baye bazali kobɔkɔla bana oyo bakóli kino kokóma basaleli bakɔmeli ya Nzambe, bazalaka na bosepeli monene na ntina na bango, lokola lisese oyo ya Biblia elobi yango: “Tata na moyengebene akosepela mingi; ye oyo aboti mwana na mayele akomona esengo mpo na ye. Tata na yo mpe mama na yo bakosepela mpe mama oyo aboti yo akoyoka esengo.”—Masese 23:24, 25.
2, 3. (a) Lolenge nini baboti bakoki kopɛngola mawa mpe motema mpasi? (b) Nzeté mike mpe bana bazalaka na mposa ya nini mpo na kokóma liziba ya bosepeli?
2 Nzokande, mwana akómaka “moyengebene” mpe “mayele” na mbala moko te. Motindo moko mosala mosɛngami mpo ete nzeté moke ekóma nzeté monene oyo ezali na bitape, bobele bongo milende makasi misengeli kosalema mpo na kopɛngola ete bana na yo bákóma te liziba ya “mawa” mpe ya kopesa “motema mpasi.” (Masese 17:21, 25) Na ndakisa, ngonzí ekoki kosimba nzeté moke ete ekóla semba mpe na makasi. Komwangisa yango mai mokolo na mokolo ezali na ntina, lisusu nzeté moke esengeli mpe kobatelama mpo ete ebebisama na bamaladi te. Na nsuka, kokata bitape ya mabe esalaka ete nzeté emonana kitoko.
3 Liloba ya Nzambe lizali komonisa ete bana bazali na mposa ya makambo oyo, koteyama ya Nzambe, komwangisama mai oyo ete solo ya Biblia, kobatelama ete bábebisama te na bizaleli mabe, mpe disipilini epesami na bolingo nyonso mpo na kolongola bizaleli ya mabe. Mpo na kokokisa bamposa wana, mingimingi esɛngami na batata ete bábɔkɔla bana na bango “kati na disipilini mpe na kolakisama ya Yehova.” (Baefese 6:4, NW ) Yango esɛngi nini?
Lobelá mingi Maloba ya Yehova
4. Mokumba nini baboti bazali na yango epai na bana na bango, mpe nini esɛngami liboso ete bákokisa yango?
4 “Kolakisama ya Yehova” elimboli kosembola makanisi na biso mpo na koyokanisa yango na mokano ya Yehova. Na bongo, baboti basengeli kokɔtisa kati na bana na bango makanisi ya Yehova. Mpe basengeli lisusu komekola ndakisa ya Yehova ya kopesa disipilini oyo ezali komonisa motema mawa, to koteya na mokano ya kosembola. (Nzembo 103:10, 11; Masese 3:11, 12) Kasi liboso ete baboti bákoka kosala bongo, basengeli bango moko komikɔtisela maloba ya Yehova, lokola Mose, mosakoli ya Nzambe, akebisaki Bayisalaele na ntango ya kala ete: “Maloba [ya Yehova] oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo.”—Deteronome 6:6.
5. Ntango nini mpe lolenge nini baboti Bayisalaele basengelaki koteya bana na bango, mpe “kolakisa na etingia” elimboli nini?
5 Boyekoli ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, bomanyoli mpe libondeli ezali kosalisa baboti ete bákokisa oyo Mose asɛngaki na nsima: “Okolakisa na etingia [maloba ya Yehova] na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛlɛma yo.” Liloba ya Liebele oyo libongolami na “kolakisa na etingia” elimboli “kozongela,” “koloba mbala na mbala,” “komonisa na polele nyonso.” Talá lolenge Mose alobelaki mingi ntina ya kotosa maloba ya Yehova na esika ya liboso: “Okokanga yango lokola elembo na lobɔkɔ na yo, mpe ikozala lokola bikaniseli na kati na miso na yo. Okokoma yango na makonzi na monɔkɔ na ndako na yo mpe na bikuke na yo.” Emonani polele ete Yehova azali kosɛnga na baboti ete bátyela bana na bango ntango nyonso likebi oyo etondi na bolingo!—Deteronome 6:7-9.
6. Makambo nini baboti basengelaki kolakisa na etingia epai na bana na bango, mpe yango ezalaki na litomba nini?
6 Nini ezali “maloba yango” ya Yehova oyo baboti basengeli kolakisa na etingia epai na bana na bango? Mose azongelaki bobele oyo ezalaki kobéngama ete Mibeko Zomi, sangisá mibeko oyo milobi ete okoboma te, okosala ekobo te, okoyiba te, okoloba matatoli ya lokuta te, mpe okolula te. Masɛngami wana matali bizaleli malamu, mpe mobeko oyo ete “okolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba,” ezalaki mingimingi yango nde baboti Bayisalaele basengelaki kolakisa na etingia epai na bana na bango. (Deteronome 5:6-21; 6:1-5) Okondima solo ete yango ezali lolenge ya mateya oyo bana bazali na yango mposa lelo oyo, boye te?
7. (a) Kati na Biblia, bana bakokisami na nini? (b) Nini tokotalela sikawa?
7 Elobamaki epai na Tata Moyisalaele ete: “Mwasi na yo akozala lokola nkamba na vinyo na kobota mbuma mingi kati na ndako na yo; bana na yo bakozingela mesa na yo lokola mwa nzeté na sika na nzeté ya [olive].” (Nzembo 128:3) Nzokande, mpo ete baboti básepela na “nzeté moke” na bango na esika ya koyoka mawa, basengeli mokolo na mokolo komibanzabanza mpo na mwana moko na moko. (Masese 10:1; 13:24; 29:15, 17) Tiká tótalela lolenge baboti bakoki komwangisa bana na bango mai na elimo, kobatela bango, mpe kopesa bango disipilini na bolingo nyonso na boye ete bázwa bosepeli ya solosolo na ntina na bango.
Teyá bango uta bazali naino moke mpenza
8. (a) Banani bazalaki lokola ngonzí mpo na Timoté? (b) Ntango nini koteyama na ye ebandaki, mpe litomba na yango ezalaki nini?
8 Tótalela ndakisa ya Timoté, oyo na elobeli ya elilingi, asungamaki na ngonzí mibale ya makasi—mama na ye mpe nkɔ́kɔ na ye ya mwasi. Mpo ete tata ya Timoté azalaki Mogreke mpe emonani ete azalaki mondimi te, ezalaki Enise, mama na ye oyo azalaki Moyuda mpe Loise, nkɔ́kɔ na ye ya mwasi nde bateyaki elenge wana ‘uta azalaki naino moke mpenza kati na makomi mosantu.’ (2 Timoté 1:5; 3:15, NW; Misala 16:1) Milende na bango mpo na koteya Timoté—ata wana azalaki sé elɛzi—‘misala na kokamwa oyo Yehova asili kosala’ ebimisaki litomba. (Nzembo 78:1, 3, 4) Timoté akómaki misionere na bamboka mosika, mbala mosusu wana azalaki naino elenge, mpe asalaki mosala monene mpo na kolendisa masangá ya ebandeli ya boklisto.—Misala 16:2-5; 1 Bakolinti 4:17; Bafilipi 2:19-23.
9. Lolenge nini bilenge bakoki kopɛngola mitambo ya mposa ya biloko ya mosuni?
9 Baboti, bozali ngonzí ya lolenge nini? Na ndakisa, bolingaka ete bana na bino bakólisa ezaleli ya bokatikati mpo na oyo etali biloko ya mosuni? Na bongo, bosengeli kopesa ndakisa malamu na kozangáká kolanda mposa ya kozala na biloko nyonso ebimi ya sika to biloko mosusu oyo bozali mpenza na yango mposa te. Soki boponi kolanda koluka biloko mingi ya mosuni, bókamwa te ntango bokomona ete bana bamekoli bino. (Matai 6:24; 1 Timoté 6:9, 10) Ya solo, soki ngonzí ezali semba te, lolenge nini nzeté moke oyo yango ezali kosimba ekoki kozala semba?
10. Litambwisi ya nani baboti basengeli koluka ntango nyonso, mpe basengeli kozala na ezaleli nini?
10 Baboti oyo bazali kosepela na ntina na bana na bango bakoluka ntango nyonso lisalisi ya Nzambe mpo na koteya bango; bakotalela ntango nyonso oyo ezali mpenza bamposa malamu na elimo ya bana na bango. Mama moko ya bana minei alobaki ete: “Liboso kútu ete bana na biso bábotama, tozalaki ntango nyonso kobondela Yehova ete asalisa biso ete tózala baboti malamu, tótambwisama na Liloba na ye, mpe tósalela yango kati na bomoi na biso.” Abakisaki ete: “Maloba oyo ete ‘Yehova azala na esika ya liboso,’ esukaki bobele na maloba te, kasi ezalaki lolenge ya bomoi na biso.”—Basambisi 13:8.
Komwangisa “mai” mokolo na mokolo
11. Nzeté mike mpe bana bazalaka na mposa ya nini mpo na kokóla?
11 Nzeté mike izalaka mingimingi na mposa ete izwa mai ntango nyonso, lokola yango emonisami na lolenge malamu oyo nzeté ikólaka pembeni na ebale. (Kokanisá na Emoniseli 22:1, 2.) Bobele bongo, bilɛzi bakokóla na elimo soki bazali mokolo na mokolo komwangisama mai oyo ete solo ya Biblia. Kasi baboti basengeli koyeba soki mwana na bango azali na likoki ya kobatela likebi na ye esika moko na boumeli ya ntango boni. Mbala mosusu kopesa mateya mokuse mokolo na mokolo ezali malamu koleka kopesa mateya milaimilai nsima na kolekisa mikolo mingi. Kotyola te motuya ya mateya wana oyo mapesami na boumeli ya ntango mokuse. Kolekisa ntango esika moko ezali na ntina mingi mpo na kosala ete boyokani ya malamu ezala kati na moboti mpe mwana, boyokani oyo elendisami mbala mingi kati na Makomami.—Deteronome 6:6-9; 11:18-21; Masese 22:6.
12. Wapi ntina ya kobondela elongo na bana mike?
12 Moko na bileko oyo tokoki kolekisa elongo na bana mike mpo na koteya bango ekoki kozala bongo na mpokwa. Elenge moko azali komikundola ete: “Baboti na ngai bazalaki kofanda pembeni ya mbeto na biso butu nyonso mpe bazalaki koyoka biso wana tozalaki kobondela.” Lokola litomba ya kosala bongo, mwana mosusu alobaki ete: “Yango epesaki ngai momeseno ya kobondela Yehova butu nyonso liboso ya kolala.” Ntango bana bazali koyoka mokolo na mokolo baboti na bango koloba na ntina na Yehova mpe kobondela ye, boye, bana bakotalela ye ete azali mpenza moto ya solosolo. Mwana moko ya mobali alobaki ete: “Nakoki kokanga miso na ngai mpo na kobondela Yehova mpe komona ye mpenza nkɔ́kɔ na ngai ya mobali. Baboti na ngai basalisaki ngai na komona ete Yehova azali na esika monene kati na makambo nyonso tosalaka mpe tolobaka.”
13. Makambo nini makoki kokɔtisama kati na mateya oyo mapesami mokolo na mokolo?
13 Mpo na kosalisa bana ete bámela mai oyo ete solo ya Biblia, baboti bakoki kolobela makambo oyo makoki mpenza kosalelama na ntango bazali koteya bango mokolo na mokolo. Baboti ya bilenge mibale oyo bakokisi naino mibu zomi na misato te balobaki ete: “Bana yango mibale babandaki kozwa mateya na lolenge ya kofanda kimya kati na Ndako ya Bokonzi uta bapɔ́sɔ ya liboso ya bomoi na bango.” Tata moko alobelaki lolenge libota na ye ezalaki kosala: “Tozalaki kokoma mikanda nyonso ya Biblia na nkasa mikemike mpe tozalaki komeka kotya yango na molɔngɔ́, biso banso moto na moto na ngala na ye. Bana bazalaki ntango nyonso kozela yango na esengo.” Mabota mingi makɔtisaki mateya ya mokuse ezala liboso to nsima ya kolya. Tata moko alobaki ete: “Ntango ya kolya bilei ya mpokwa ezalaki ntango moko malamu mpo na biso kotalela mokapo ya Biblia mpo na mokolo na mokolo.”
14. (a) Misala nini mipesaka litomba oyo bana bakoki kosangana na yango? (b) Makoki nini bana bazali na yango mpo na koyekola makambo?
14 Bana mpe basepelaka koyoka masoló ya Biblia ya kosimba motema, oyo mazali kati na Mokanda mpo na Masolo ya Biblia.a Mobali moko mpe mwasi na ye balobaki ete: “Ntango bana na biso bazalaki mpenza mike, tozalaki kotalela lisoló moko kati na búku Masolo ya Biblia, mpe na nsima bana bazalaki kolata bilamba mpe kosala lokola bato balobelami na lisoló yango na lolenge ya mwa lisano-liteya ya moke. Bazalaki kolinga yango mpe mbala mingi bazalaki kosɛnga ete tósala masoló mingi na boyekoli moko.” Bótalela na motuya moke te makoki oyo mwana na bino azali na yango mpo na koyekola! Bana ya mibu minei basili kosimba mikapo nyonso ya búku Masolo ya Biblia na motó mpe basili ata koyeba kotánga Biblia! Elenge mwasi moko amikundoli ete ntango azalaki soko na mibu misato na ndambo, azalaki mbala na mbala kokakatana mpo na kobénga malamu “judicial decisions” (bikateli), kasi tata na ye alendisaki ye ete akóba kosala makasi.
15. Makambo nini makoki kokɔtisama na masoló elongo na bana, mpe elembeteli nini emonisi ete masoló motindo wana ezali na ntina?
15 Bileko oyo bozali kolekisa elongo na bana na bino ekoki mpe kosalelama mpo na kobongisa bango ete báyeba lolenge ya kokabola mai oyo ete solo elongo na bato mosusu, na ndakisa na kopesáká biyano na makita. (Baebele 10:24, 25) Elenge moko amikundoli ete: “Na boumeli ya ntango oyo tozalaki koyekola, nazalaki koyanola na maloba na ngai moko. Nasengelaki kosuka te bobele na kotánga kozanga ete nakanga ntina.” Lisusu, bana bakoki kobongisama na lolenge ya malamu mpo na kosangana na mosala ya kosakola. Mwasi moko oyo abɔkwamaki na baboti oyo bazali kobanga Nzambe alobi ete: “Tozalaki soko moke te lokola bawagó ya engbunduka, bobele kolandáká baboti na biso wana bango bakei na mosala ya kosakola. Toyebaki ete tosengelaki kosangana na yango, ata soki esengelaki bobele kobɛta ngonga oyo ezalaka liboso ya lopango to mpe kotika trakte epai na moto moko. Na komibongisáká malamu libosoliboso mpo na mosala ya kosakola na nsuka ya pɔ́sɔ, toyebaki makambo nini tosengelaki koloba. Ezali na mokolo moko te Mwapɔ́sɔ oyo, nsima ya kolamuka na ntɔ́ngɔ́, tomitunaki soki tokobima na mosala ya kosakola. Toyebaki ete esengelaki na biso kobima.”
16. Mpo na nini ezali ntina kosala boyekoli ya libota pɔ́sɔ na pɔ́sɔ elongo na bana?
16 Tokolɛmba te kozongela kolobela mbala na mbala ntina ya kopesa bana mai oyo ete solo ya Biblia mokolo na mokolo, yango elimboli ete boyekoli ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kati na libota ezali na motuya mpenza. Tata moko oyo azali na bana mibale alobi ete “likambo monene oyo lisilikisaka bana ezali bongo ezaleli ya kobongolabongola makambo.” (Baefese 6:4) Alobaki ete: “Ngai mpe mwasi na ngai tozalaki kopona mokolo mpe ntango, mpe tozalaki na bosembo nyonso kotambwisa boyekoli ya libota na kolanda manáka wana. Nokinoki, bana bakómaki kozela yango na ntango wana.” Koteya motindo wana uta bomwana mpenza ezali na ntina mingi, ekokisi likambo oyo ya solo ete: ‘Lolenge oyo nzeté moke ezali kobongisama, ezali lolenge yango nde ekokóla ntango yango ekokóma nzeté monene.’
17. Longola koteya bana solo ya Biblia, likambo nini mosusu lizali na ntina?
17 Kopesa bana mike solo ya Biblia ezali na ntina, kasi ndakisa ya baboti ezali mpe na ntina lokola. Bana na yo bamonaka yo koyekola, koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita, kosangana na mosala ya kosakola, mpe kosepela kosala mokano ya Yehova? (Nzembo 40:8) Ezali na ntina ete bámona yango. Likambo ya ntina, elenge mwasi moko alobaki na ntina na mama na ye, oyo ayikaki mpiko na botɛmɛli ya mobali na ye mpe abɔkɔlaki bana motoba kino bakómaki Batatoli ya sembo: “Oyo ezalaki na bopusi makasi mpenza likoló na biso ezalaki bongo ndakisa ya mama—ezalaki na ntina koleka maloba mpamba.”
Lolenge ya kobatela bana
18. (a) Lolenge nini baboti bakoki kopesa bana libateli oyo basengeli na yango? (b) Kati na Yisalaele, lolenge nini ya malako bana bazalaki kozwa na ntina na biboteli?
18 Lokola esɛngaka ete nzeté mike ibatelama mpo na bamaladi oyo ekoki kobebisa yango, bobele bongo kati na ebongiseli mabe ya biloko oyo, bana basengeli kobatelama mpo na “bato mabe.” (2 Timoté 3:1-5, 13) Lolenge nini baboti bakoki kopesa bango libateli yango? Na kosalisáká bango na kozwa mayele mauti na Nzambe! (Mosakoli 7:12) Yehova asɛngaki na Bayisalaele—bakisá mpe “bana” na bango—ete báyoka botángi ya Mibeko na ye, oyo etalelaki mpe koyeba kokesenisa etamboli ya malamu mpe ya mabe na makambo matali kosangisa nzoto. (Deteronome 31:12; Levitike 18:6-24) Binama ya nzoto oyo bipesaka nzela na kobota bilobelami mbala mingi, kati na yango “mbuma ya mibali” mpe “biboteli.” (Levitike 15:1-3, 16; 21:20; 22:24; Mituya 25:8; Deteronome 23:10) Na ntina na kobeba ya mokili ya lelo, bana basengeli koyeba lolenge lobongi mpe lolenge lobongi te ya kosalela biteni wana ya nzoto oyo etángami kati na biloko Nzambe azalisaki, oyo na ntina na yango alobaki ete ezalaki “malamu mingi.”—Genese 1:31; 1 Bakolinti 12:21-24.
19. Malako nini mabongi masengeli kopesama epai na bana na ntina na binama na bango oyo ebongi te na komonana na miso ya bato?
19 Na lolenge ya malamu, baboti mibale, to mokóló nyonso oyo azali tata-mobɔkɔli to mama-mobɔkɔli, asengeli kosalisa bana ete báyeba binama oyo bibongi te komonana na miso ya bato. Na nsima, basengeli kolimbwela bango ete moto mosusu asengeli te kopesamela ndingisa ya kosimba yango. Lokola babebisi-bana mbala mingi bamekaka bana mike mpo na koyeba soki bakondima to bakoboya masɛnginya na bango, mwana asengeli koteyama lolenge ya kotɛmɛla yango na ngwi nyonso mpe koloba ete, “Nakei kofunda yo!” Bóteya bana na bino ete, atako makaneli ya lolenge nini oyo bakoki kokanela bango, basengeli ntango nyonso kofunda moto nyonso oyo azali komeka kosimba bango na nzoto na lolenge ete bamiyoki malamu te.
Tópesa disipilini na bolingo
20. (a) Lolenge nini disipilini ekokani na kokata bitape mabe na nzeté? (b) Disipilini ezalaka lolenge nini na ebandeli, kasi litomba na yango ezali nini?
20 Bana bazwaka litomba na disipilini oyo epesami na bolingo nyonso, motindo moko nzeté ezwaka litomba soki bitape na yango ya mabe bikatami. (Masese 1:8, 9; 4:13; 13:1) Ntango bitape mabe bilongolami, bitape ya malamu bikokóla na lolenge lobongi. Bobele bongo, soki bana na bino batye likebi na bango mingimingi likoló na biloko ya mosuni to soki bazali kobendama epai na baninga ya mabe to na kominanola ya mabe, bamposa wana ya mabe ezali lokola bitape oyo bisengeli kokamatama. Soki yango elongolami, bana na bino bakosalisama na kokóla na elimo. Na ebandeli disipilini motindo wana ekoki kozala likambo ya esengo te, motindo moko, kokata bitape mbala mosusu ekoki kosala nzeté mabe. Kasi litomba malamu ya disipilini ezali bongo bokóli na lolenge ya sika kati na nzela oyo bolingi ete mwana akóla.—Baebele 12:5-11.
21, 22. (a) Nini emonisi ete disipilini esepelisaka te ezala mpo na kopesa yango to mpo na kozwa yango? (b) Mpo na nini baboti basengeli te koboya kopesa disipilini?
21 Endimami kozanga kokatana ete disipilini ezalaka likambo ya esengo te, ezala mpo na kopesa yango to mpo na kozwa yango. Tata moko alobaki ete: “Mwana na ngai azalaki kolekisa mwa ntango elongo na elenge moko oyo bankulutu bakebisaki ngai ete azalaki moninga malamu te. Nasengelaki kosala nokinoki mpenza koleka. Atako mwana na ngai amikɔtisaki mpenza naino te na etamboli ya mabe, nzokande esɛngaki ngai mwa ntango mpo na kosembola makanisi na ye.” Mwana alobaki ete: “Ntango nakabwanaki na moninga na ngai wana ya motema, nayokaki mawa mingi.” Kasi abakisaki ete: “Yango ezalaki ekateli ya malamu, mpamba te mwa ntango moke na nsima, moninga yango abimisamaki na lisangá.”
22 Liloba ya Nzambe elobi ete: “Mpamela na kolakisama izali nzela epai na bomoi.” Na bongo, atako ezalaka mpasi mpo na kopesa disipilini, komipekisa te mpo na kopesa yango epai na bana na bino. (Masese 6:23; 23:13; 29:17) Na mikolo mikoya, bakozala na botɔ́ndi lokola bozalaki kosembola bango. Elenge moko amikundoli ete: “Nazalaki kosilikela baboti na ngai ntango bazalaki kopesa ngai disipilini. Lelo oyo nalingaki kútu nde kosilika makasi soki baboti na ngai baboyaki kopesa ngai disipilini yango.”
Milende oyo mibongi kozwa mbano
23. Mpo na nini likebi nyonso oyo epesami mpo na bana ezali mpenza na ntina?
23 Ntembe ekoki kozala na likambo oyo te ete, bana oyo baboti na bango, to bato mosusu, bazali kosepela na bango, bazali mbano ya likebi ya bolingo oyo lipesamaki mokolo na mokolo. Nzokande, milende nyonso oyo mizali kosalema mpo na bango—bázala bana oyo toboti to bana na biso na elimo—ebongi mpenza kozwa mbano oyo ekoki kosepelisa. Mobangé ntoma Yoane amonisaki yango ntango akomaki ete: “Nazali na esengo eleki oyo te ete nayoka ete bana na ngai bazali kotambolaka kati na makambo na solo.”—3 Yoane 4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Ozali komikundola?
◻ Nzeté mike mpe bana bazali na mposa ya nini mpo ete bákumisama na nsima?
◻ Lolenge nini baboti bakoki kosala lokola ngonzí ya malamu?
◻ Makambo nini makoki kokɔtisama na ntango ya koteya bana, mpe basengeli koteyama na kotɛmɛla nini?
◻ Motindo moko kokata bitape mabe ezali na litomba mpo na nzeté, bobele bongo disipilini ezali na litomba mpo na mwana?