Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/3 nk. 10-15
  • Okebaka ntango nyonso na mateya na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okebaka ntango nyonso na mateya na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Balakisi na kati ya lisangá
  • Bamemi bango tii na kondima
  • Okebaka na mateya na yo
  • Bayekoli ya Liloba ya Nzambe
  • Bolingo mpe limemya mpo na bato oyo ozali koteya
  • Tókokisa bamposa na bango
  • Zalá na mɔ́tɔ!
  • Tyá likebi na ‘mayele na yo ya koteya’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • ‘Omibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tómekola Yesu—Tóteyaka na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ndenge ya kosalisa bato bátosa mitindo ya Kristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/3 nk. 10-15

Okebaka ntango nyonso na mateya na yo

“Okebaka ntango nyonso na yo moko mpe na mateya na yo. Kangamá na makambo yango, mpamba te soki okosala boye okomibikisa mpe okobikisa baoyo bazali koyoka yo.”​—1 TIMOTE 4:16, NW.

1, 2. Mpo na nini lelo oyo tozali na mposa makasi ya balakisi ya molende?

“BÓKENDA kozalisa bayekoli na mabota nyonso, . . . kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Na kotalela etinda oyo ya Yesu Klisto, baklisto ya solo nyonso basengeli kosala milende mpo na kokóma balakisi. Tozali na mposa ya balakisi ya molende mpo na kosalisa bato ya mitema sembo bázwa boyebi ya Nzambe lokola ntango ezali naino. (Baloma 13:11) Ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Osakola liloba, ozala na etingya na bilaka malamu mpe na bilaka malamu te.” (2 Timote 4:2) Yango esɛngi koteya, ezala na lisangá to na bisika mosusu. Ɛɛ, etinda ya kosakola esuki kaka na koyebisa bato nsango ya Nzambe te. Mpo bato oyo basepeli na solo bákóma bayekoli, tosengeli koteya bango malamu.

2 Lelo oyo tozali na “ntango ya mpasi.” (2 Timote 3:1) Filozofi mpe mateya ya lokuta ekɔteli mpenza bato. Bato mingi bazali na “makanisi ya molili” mpe “babungisi bizaleli ya malamu nyonso.” (Baefese 4:18, 19, NW) Bato mosusu bazali konyokwama na mayoki. Ya solo, bato “batikali mpamba mpe batɛlɛngani lokola bameme oyo ezangi mobateli.” (Matai 9:36, NW) Atako bongo, soki tozali koteya malamu, tokoki kosalisa bato ya mitema sembo ete bábongwana.

Balakisi na kati ya lisangá

3. (a) Makambo nini etalelami mpe na etinda ya Yesu ya koteya? (b) Koteya na kati ya lisangá ezali libosoliboso mokumba ya banani?

3 Bamilio ya bato bazali koyekola makambo mingi na nzela ya boyekoli ya Biblia na bandako na bango. Kasi, nsima ya kozwa batisimo, bato oyo bayei sika na ebongiseli ya Yehova, basengeli lisusu kozwa lisungi mpo na “kopikama mpe kotɛngatɛnga te likoló ya moboko.” (Baefese 3:17, NW) Ntango tozali kokokisa etinda ya Yesu oyo ezali na Matai 28:19, 20 mpe tozali komema bato ya sika na ebongiseli ya Yehova, bazali koteyama mbala moko na kati ya lisangá. Baefese 4:11-13 elobi ete mibali baponami mpo na kosala lokola “babateli mpe balakisi, mpo na kobongisa Babulami, mpo na mosala na kosungaka, mpo na kotongaka nzoto na Klisto.” Ntango mosusu, epai na bango koteya malamu esɛngaka ‘kosembola, kopamela, kopesa toli, kolendisa, na motema molai nyonso.’ (2 Timote 4:2, NW) Mosala ya balakisi ezalaki na ntina mingi mpenza, yango wana, ntango Paulo akomelaki Bakolinti mokanda, atángaki bango nsima ya bantoma mpe basakoli.​—1 Bakolinti 12:28.

4. Ndenge nini koteya malamu esalisaka biso na kotosa elendiseli ya Paulo oyo ekomami na Baebele 10:24, 25?

4 Ya solo, ezali baklisto nyonso te nde basalaka lokola bankulutu to bakɛngɛli. Atako bongo, baklisto nyonso bateyami ete bálendisana bamoko na bamosusu na “kolinganaka mpe kosalaka misala malamu.” (Baebele 10:24, 25) Na makita, yango esɛngi kopesa biyano oyo ebongisami malamu mpe euti na motema, mpe oyo ekoki kotonga mpe kolendisa basusu. Basakoli ya Bokonzi oyo bameseni mingi na mosala bakoki mpe ‘kolendisa na kosala misala malamu’ ntango bazali koyebisa bato oyo babandi kosakola sika makambo oyo bayebi mpe makambo oyo bakutaná na yango ntango bazali kobima na bango elongo na mosala ya kosakola. Na mabaku yango mpe ata na mabaku nini mosusu, bakoki koteya makambo ya ntina mingi. Na ndakisa, basi oyo bakɔmeli balendisami ete bázala “balakisi na makambo malamu.”​—Tito 2:3.

Bamemi bango tii na kondima

5, 6. (a) Ndenge nini boklisto ya solo ekeseni na losambo ya lokuta? (b) Ndenge nini bankulutu basalisaka bato ya sika na kozwa bikateli ya malamu?

5 Na bongo, boklisto ya solo ekeseni mpenza na mangomba ya lokuta, oyo mingi kati na yango elukaka kozala na bokonzi na makanisi ya bandimi na yango. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, bakonzi ya mangomba balukaki kotya miso na makambo nyonso ya bomoi ya bato na nzela ya mibeko ya bonkɔkɔ oyo euti na bato mpe ezalaki kilo epai na bango. (Luka 11:46) Mbala mingi, bakonzi ya mangomba ya boklisto basalaki mpe bongo.

6 Nzokande, losambo ya solo ezali “mosala ya bulɛɛ” oyo tozali kokokisa na “lisosoli” na biso. (Baloma 12:1, NW) Basaleli ya Yehova ‘bamemi bango tii na kondima.’ (2 Timote 3:14, NW) Ntango mosusu, baoyo bazali kotambwisa lisangá bakoki komona malamu kopesa mwa malako mpe koyebisa ndenge ya kosala makambo mpo lisangá etambola malamu. Kasi, na esika ya kozwa bikateli mpo na baninga na bango baklisto, bankulutu bateyaka bango “kokesenisa mabe na malamu.” (Baebele 5:14, NW) Bankulutu basalaka yango libosoliboso ntango bazali koleisa lisangá “maloba na kondima mpe mateya malamu.”​—1 Timote 4:6.

Okebaka na mateya na yo

7, 8. (a) Ndenge nini bato oyo bazali na makoki mingi te bakoki kozala balakisi malamu? (b) Eloko nini emonisi ete molende ya moto ye moko ezali na ntina mpo na kokóma molakisi malamu?

7 Kasi, tózonga naino na etinda ya koteya oyo etaleli biso nyonso. Mpo na kosala mosala yango, esɛngi nde kozala na makoki ya kokamwa, kotánga kelasi mingi, to kozala na mayele mingi? Ezali mpenza bongo te. Mosala ya koteya bato ezali kosalema na mokili mobimba mingimingi na bato oyo bazali lokola bato nyonso, bazali na makoki ya kokamwa te. (1 Bakolinti 1:26-29) Paulo alobi ete: “Tozali na eloko oyo ya motuya [mosala ya kosakola] na kati ya mbɛki [nzoto ezangi kokoka], mpo ete nguya oyo eleki nguya ya bato ezala ya Nzambe, kasi oyo euti epai na biso te.” (2 Bakolinti 4:7, NW) Mbuma malamu mingi oyo tozwi na mosala ya kosakola Bokonzi na mokili mobimba ezali elembo ya nguya ya elimo ya Yehova!

8 Atako bongo, esɛngaka ete moto asala mpenza molende mpo na kokóma ‘mosali oyo abongi koyoka nsɔni te, oyo azali kosembola liloba na solo.’ (2 Timote 2:15) Paulo ayebisaki Timote ete: “Okebaka ntango nyonso na yo moko mpe na mateya na yo. Kangamá na makambo yango, mpamba te soki okosala boye okomibikisa mpe okobikisa baoyo bazali koyoka yo.” (1 Timote 4:16, NW) Ndenge nini moto asengeli kokeba na mateya na ye, ezala na kati ya lisangá to na esika mosusu? Kosala yango esɛngi ete moto akóma na makoki mingi mpe na mayele mingi ya koteya?

9. Eloko nini ezali na ntina mingi koleka makoki oyo tobotamaka na yango?

9 Na Lisolo na ye likoló ya Ngomba, na ntembe te Yesu amonisaki makoki ya koteya oyo moto mosusu te azali na yango. Ntango asilisaki koloba, ‘ebele bakamwaki mateya na ye.’ (Matai 7:28) Ya solo, na kati na biso, moto moko te akoki koteya lokola Yesu. Kasi, esɛngi te ete tózala naino balobi minene mpo na kozala bateyi malamu. Kutu, Yobo 12:7 (NW) elobi ete ata “bibwele” mpe “bandɛkɛ ya likoló” bakoki koteya kozanga maloba! Longola makoki oyo tobotamaka na yango to mayele oyo tokoki kozala na yango, eloko oyo ezali na ntina mingi ezali ‘lolenge ya bato’ oyo tozali, bizaleli na biso mpe mimeseno ya elimo oyo tokolisi, oyo bayekoli bakoki komekola.​—2 Petelo 3:11, NW; Luka 6:40.

Bayekoli ya Liloba ya Nzambe

10. Ndenge nini Yesu apesaki ndakisa malamu lokola moyekoli ya Liloba ya Nzambe?

10 Molakisi malamu ya solo ya Makomami asengeli kozala moyekoli ya Liloba ya Nzambe. (Baloma 2:21) Yesu Klisto apesaki ndakisa monene na likambo yango. Na boumeli ya mosala na ye ya kosakola, Yesu atángaki to abimisaki makanisi ya bavɛrsɛ oyo euti soki na ndambo moko likoló na mibale ya mikanda ya Makomami ya Liebele.a Bato bamonaki ete ayebi Liloba ya Nzambe ntango azalaki naino na mbula 12; bakutaki ye ‘afandi katikati na balakisi azali koyoka bango mpe kotuna bango.’ (Luka 2:46) Ntango akómaki mokóló, Yesu azalaki na momeseno ya kokende na eyanganelo epai bazalaki kotánga Liloba ya Nzambe.​—Luka 4:16.

11. Wapi mimeseno malamu ya boyekoli oyo molakisi asengeli kolona?

11 Otángaka Liloba ya Nzambe na mposa makasi? Soki ozali kotimola Liloba yango “okososola botosi kotosa [Yehova] mpe okozwana na boyebi na koyeba Nzambe.” (Masese 2:4, 5) Na yango, zwá momeseno malamu ya koyekola. Salá makasi ete otángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. (Nzembo 1:2) Zalá na momeseno ya kotánga nimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! kaka na ntango ozwi yango. Tyaká likebi mpenza ntango ozali kolanda makita ya lisangá. Yekolá kosala bolukiluki ya bozindo. Soki omimesenisi na ‘kolukaluka ntina na makambo nyonso na bosikisiki,’ okobakisa makanisi na yo moko te mpe okobanda koloba na bosembo ntango ozali koteya.​—Luka 1:3.

Bolingo mpe limemya mpo na bato oyo ozali koteya

12. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela bato oyo azalaki koteya?

12 Likambo mosusu ya ntina mingi ezali ndenge malamu ya kotalela bato oyo ozali koteya. Bafalisai bazalaki kotyola bato oyo bazalaki koyoka Yesu. Balobaki ete: “Ebele oyo na bato bayebi Mibeko te basili kolakelama mabe.” (Yoane 7:49) Kasi, Yesu azalaki na bolingo mpe na limemya mingi mpo na bayekoli na ye. Alobaki ete: “Nakobyanga bino lisusu baombo te, zambi moombo ayebi yango ekosalaka nkolo na ye te. Nde nasili kobyanga bino baninga, zambi nayebisi bino makambo nyonso mayoki ngai epai na Tata na ngai.” (Yoane 15:15) Likambo yango emonisaki ndenge oyo bayekoli ya Yesu basengeli kosala mosala na bango ya koteya.

13. Paulo azalaki na mayoki nini mpo na bato oyo azalaki koteya?

13 Na ndakisa, Paulo na bato oyo azalaki koyekola na bango bazalaki koyokana malamu, kasi bazalaki lokola bato ya mombongo te oyo batalaka se matomba na bango. Ayebisaki Bakolinti ete: “Zambi ata bozali na balakisi nkóto na nkóto, kati na Klisto, nde bozali na batata mpenza mingi te. Mpo ete ngai nabotaki bino kati na Klisto Yesu na nzela na Nsango Malamu.” (1 Bakolinti 4:15) Na bantango mosusu, Paulo azalaki kotangisa mpisoli wana azalaki kokebisa bato oyo ateyaki! (Misala 20:31) Azalaki mpe na motema molai mpe na boboto mingi. Yango wana alobaki na Batesaloniki ete: “Tokómi bato na malɛmbɛ na kati na bino [lokola] mama oyo azali kobɔkɔla bana na ye mpenza.”​—1 Batesaloniki 2:7.

14. Mpo na nini ezali na ntina tómibanzabanzaka mpo na bato oyo tozali koteya Biblia? Pesá ndakisa.

14 Olandaka ndakisa ya Yesu na Paulo? Soki tozali na bolingo ya solosolo mpo na bato oyo tozali koyekola na bango, ekosalisa bango mingi ata soki tozali na makoki mingi te na makambo mosusu. Bato oyo toyekolisaka Biblia bamonaka mpenza ete tomibanzabanzaka mpo na bango? Tolukaka koyeba bango malamu? Ndeko mwasi moko azalaki na mokakatano mpo na kosalisa moyekoli moko na kokola na elimo; mokolo mosusu atunaki ye na boboto nyonso ete: “Ozali na likambo oyo ezali kotungisa yo?” Mwasi yango abandaki koyebisa makambo oyo ezalaki na motema na ye, ayebisaki mitungisi mpe mabanzo na ye. Lisolo wana ya boninga esalisaki mwasi yango na kosala mbongwana na bomoi na ye. Na makambo motindo oyo, ebongi kobimisa makanisi oyo euti na Makomami mpe kozala na maloba ya kobɔndisa mpe ya kolendisa. Kasi, tosengeli kokeba: Ekoki kozala ete moyekoli moko ya Biblia azali kokola mbangumbangu na boyebi kasi azali naino na mimeseno mosusu oyo ebongi na moklisto te. Mbala mosusu ekozala malamu te kosala na ye boninga makasi. Boninga na biso esengeli kozala na ndelo mpo tóbatela etamboli malamu ya boklisto.​—1 Bakolinti 15:33.

15. Ndenge nini tokoki komonisa limemya mpo na bato oyo tozali koteya Biblia?

15 Soki tozali na limemya mpo na bato oyo tozali koyekola na bango tokoluka te kolandela makambo oyo etali se bango moko. (1 Batesaloniki 4:11) Na ndakisa, ekoki kozala ete tozali koyekola na mwasi oyo afandi makango na mobali moko. Mbala mosusu aboti na ye bana. Nsima ya kozwa boyebi ya Nzambe, mwasi yango alingi koyokanisa bomoi na ye na mitinda ya Yehova. (Baebele 13:4) Asengeli nde kobalana na moto yango to kokabwana na ye? Mbala mosusu na makanisi na biso, tokoki komona ete soki mwasi yango abalani na moto oyo asepelaka mpenza na makambo ya elimo te to asepelaka na yango ata moke te, ekopekisa bokoli ya elimo ya mwasi yango. To mpe tokoki kokanisa ete mpo na bolamu ya bana oyo baboti, ebongi bábalana. Ata soki tozali na likanisi nini, kokɔta na makambo ya moto oyo tozali koyekola na ye mpe komeka kondimisa ye makanisi na biso na makambo ya ndenge wana ezali kozanga limemya mpe kozanga bolingo. Tóbosana te ete ezali ye moko nde akobuka mbuma ya ekateli na ye. Na yango, tokanisi ete eleki malamu kosalisa moyekoli yango asalela “makoki na ye ya kososola” mpe azwa ekateli ye moko, boye te?​—Baebele 5:14.

16. Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa bolingo mpe limemya mpo na etonga ya Nzambe?

16 Ezali mpenza na ntina ete bankulutu ya lisangá bázala na limemya mpe bolingo mpo na etonga. Na mokanda oyo akomelaki Filemona, Paulo alobaki boye: “Ata nazali na molende kati na Klisto kolaka yo yango ekoki kosalama, nde mpo na bolingo eleki malamu ete nalɔmba yo.” (Filemona 8, 9) Ntango mosusu, makambo oyo elɛmbisaka ekoki kobima na lisangá. Ekoki ata kosɛnga kozwa ekateli ya makasi. Paulo alendisaki Tito na ‘kopamela [bato oyo babungi nzela] na makasi ete bábonga kati na kondima.’ (Tito 1:13) Atako bongo, bakɛngɛli basengeli kokeba ete bázanga boboto te ntango bazali koloba na lisangá. Paulo akomaki ete: “Ebongi te ete moombo na Nkolo aswanaka kasi azala na boboto liboso na bato nyonso, azala molakisi malamu, azala na motema pɛtɛɛ.”​—2 Timote 2:24; Nzembo 141:3.

17. Mose asalaki libunga nini, mpe bankulutu bakoki kozwa liteya nini na likambo yango?

17 Bakɛngɛli basengeli ntango nyonso kobosana te ete bazali kobatela “etonga ya Nzambe.” (1 Petelo 5:2) Atako Mose azalaki moto ya komikitisa, abungisaki mwa moke makanisi malamu na ye. Bayisalaele “banyokolaki [elimo, NW] na ye, boye ye alobaki mabe na bibebu na ye.” (Nzembo 106:33) Nzambe asepelaki ata moke te na ndenge oyo basalelaki etonga na Ye, atako etonga yango esalaki mabe. (Mituya 20:2-12) Lelo oyo, soki bankulutu bakutani na mikakatano ya ndenge yango, basengeli kosala makasi ete báteya mpe bálakisa na mayele mpe na boboto. Bandeko basepelaka mingi soki bazali kopesa bango limemya mpe bazali kotalela bango lokola bato oyo bazali na mposa ya lisungi, kasi te lokola basali na mabe oyo bazali matoi mangbongi. Bankulutu basengeli kozala na makanisi malamu lokola oyo Paulo amonisaki ntango akomaki ete: “Tosili kondima na Nkolo mpo na bino ete bozali kosala mpe bokosala nsima makambo malaki biso.”​—2 Batesaloniki 3:4.

Tókokisa bamposa na bango

18, 19. (a) Ndenge nini tokoki kosalisa bayekoli ya Biblia oyo bazali na makoki mingi te? (b) Ndenge nini tokoki kosalisa bayekoli oyo bazali na mokakatano na likambo moko?

18 Molakisi malamu alukaka koyokanisa mateya na ye na makoki ya bayekoli. (Talá Yoane 16:12.) Na lisese na ye ya batalanta, Yesu alobaki ete nkolo apesaki moto na moto mikumba “na kotalela makoki na ye.” (Matai 25:15, NW) Tokoki mpe kolanda ndakisa yango ntango tozali kotambwisa boyekoli ya Biblia. Ya solo, ezali malamu mingi soki tokoki kosilisa mokanda mobimba na mwa ntango mokuse. Kasi, tosengeli kobosana te ete bato mosusu bayebi kotánga malamu te to bakokaka kosimba makambo mbala moko te. Yango wana, ntango tozali koyekola, tosengeli kozala na bososoli mpo na koyeba ntango nini koleka na likanisi mosusu soki bato oyo bazali kosepela bazali kokoka te kolanda boyekoli oyo ezali kosalema mbangumbangu. Na esika ete tóluka kosilisa mokanda na ntango oyo tomityeli, eloko eleki ntina ezali nde ya kosalisa bayekoli bákanga ntina ya makambo oyo bazali koyekola.​—Matai 13:51.

19 Ezali mpe ndenge moko mpo na bayekoli ya Biblia oyo bazali na mokakatano na mateya mosusu lokola Bosato to bafeti ya mangomba. Mbala mingi, ntango tozali koyekola na moto, ezalaka na ntina te ete tókɔtisa makambo mosusu ya Biblia oyo toyebi na bolukiluki na biso moko, kasi tokoki kosala yango na mabaku mosusu soki emonani ete ekozala na litomba. Tosengeli kozala na bososoli malamu mpo tólongola makambo mingi oyo ekoki kopekisa bokoli ya moyekoli.

Zalá na mɔ́tɔ!

20. Paulo apesaki ndakisa nini ya kozala na mɔ́tɔ mpe ya kondima na mateya na ye?

20 Paulo alobi ete: “Mpo na [elimo, NW], bópela na mɔ́tɔ.” (Baloma 12:11) Ezala ete tozali kotambwisa boyekoli ya Biblia to tozali kosala lisolo na makita ya lisangá, tosengeli kosala yango na molende mpe na mɔ́tɔ. Paulo ayebisaki Batesaloniki ete: “Nsango Malamu na biso eyeli bino bobele na maloba te kasi na nguya na [elimo santu, NW] mpe na bososoli nyonso.” (1 Batesaloniki 1:5) Elingi koloba ete Paulo na baninga na ye bateyaki “bobele Nsango Malamu na Nzambe te kasi bomoi na [bango] mpenza.”​—1 Batesaloniki 2:8.

21. Ndenge nini tokoki kobatela esengo mpo na mikumba na biso ya koteya?

21 Mɔ́tɔ ya solosolo eyaka na ntango tondimi mpenza ete bato oyo tozali koyekola na bango Biblia bazali na mposa ya koyoka makambo oyo tolingi koyebisa bango. Mokumba nyonso ya koteya oyo bapesi biso tosengeli te kotalela yango lokola likambo ya pɛtɛɛ oyo tomeseni na yango. Na ntembe te ezali na ndenge yango nde mokomeli Ezela atyaki likebi na mateya na ye. ‘Abongisaki motema na ye ete ayekola Mobeko na Yehova mpe ete atosa yango mpe ete alakisa yango na Yisalaele.’ (Ezela 7:10, NW) Biso mpe tosengeli kosala bongo; tóbongisa malamumalamu makambo oyo tokoteya mpe tókanisa na mozindo mpo na koyeba ntina na yango. Tóbondela Yehova apesa biso kondima mingi. (Luka 17:5) Soki tozali na mɔ́tɔ, yango ekoki kosalisa bato oyo tozali koyekola na bango ete bálinga mpenza solo. Kasi, kokeba na mateya na biso ekoki kosɛnga kosalela mayele ya sikisiki ya koteya. Na lisolo oyo elandi tokolobela mwa ndambo ya mayele yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá buku Étude perspicace des Écritures, volimi 1, lokasa 770, ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.

Oyebi lisusu?

◻ Mpo na nini lelo oyo tozali na mposa ya baklisto oyo bayebi kolakisa malamu?

◻ Wapi mimeseno malamu ya koyekola oyo tokoki kolona?

◻ Mpo na nini bolingo mpe limemya mpo na bato oyo tozali koteya ezali na ntina mingi?

◻ Ndenge nini tokoki kokokisa bamposa ya bato oyo tozali koyekola na bango Biblia?

◻ Mpo na nini esengo mpe kondima ezali na ntina mingi ntango tozali koteya bato mosusu?

[Elilingi na lokasa 10]

Balakisi malamu bazali mpe bayekoli ya Liloba ya Nzambe

[Elilingi na lokasa 13]

Omibanzabanza mpo na bayekoli ya Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto