Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • kl mok. 11 nk. 98-107
  • Oyo ezali mikolo ya nsuka!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyo ezali mikolo ya nsuka!
  • Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO YA MIKOLO YA NSUKA
  • OYO OSENGELI KOSALA
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Tozali mpenza na “mikolo ya nsuka”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Okotosa likebisi na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nsuka ya mokili ekómi pene?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
kl mok. 11 nk. 98-107

Mokapo 11

Oyo ezali mikolo ya nsuka!

1. Mpo na nini bato mingi bazali kobulungana ntango bazali kotala makambo mazali koleka na mokili, kasi epai wapi tokoki kozwa ndimbola ebongi kotyela motema ya makambo mazali koleka na mokili?

LOLENGE nini mokili na biso ekómi yikiyiki? Epai wapi tozali kokende? Osilá komituna mituna motindo oyo? Bato mingi babulunganaka ntango bazali kotala makambo mazali koleka na mokili. Makambo lokola bitumba, bokɔnɔ mpe mobulu ezali kotinda bato na komituna soki eloko nini ezali kozela bango na mikolo mizali koya. Bayangeli bazali kopesa sé elikya moke. Nzokande, ndimbola ebongi kotyela motema ya mikolo oyo ya mpasi ekoki kozwama epai na Nzambe kati na Liloba na ye. Na bosolo nyonso, Biblia ezali kosalisa biso na komona epai wapi tokómi kati na ntango. Ezali komonisa biso ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya biloko ya lelo.​—2 Timoté 3:1, NW.

2. Bayekoli ya Yesu batunaki ye motuna nini, mpe lolenge nini ayanolaki?

2 Na ndakisa, tótalela eyano Yesu apesaki na mituna misusu ya bayekoli na ye. Mikolo misato liboso ete Yesu akufa, batunaki ye ete: “Nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko?”a (Matai 24:3, NW) Mpo na eyano, Yesu ayebisaki bizalela mpe makambo ya sikisiki oyo na mokili esengelaki komonisa polele ete ebongiseli oyo na biloko mabe esili kokɔta na mikolo na yango ya nsuka.

3. Mpo na nini makambo mabebaki mingi na mabelé ntango Yesu abandaki koyangela?

3 Lokola touti komona yango na mokapo moleki, kolandana ya ntango ya Biblia ememi biso na koloba ete Bokonzi ya Nzambe esilaki kobanda koyangela. Lolenge nini ekoki kozala bongo? Makambo mabebi mingi koleka. Ya solo, yango nde ezali elembeteli mpenza ete Bokonzi ya Nzambe esili kobanda koyangela. Mpo na nini? Nzembo 110:2 eyebisi biso ete mpo na mwa ntango Yesu asengelaki koyangela ‘katikati na banguna na ye.’ Na yango, likambo ya liboso oyo asalaki lokola Mokonzi ya likoló ezalaki bongo ya kobwaka Satana mpe baanzelu na ye bademó zingazinga na mabelé. (Emoniseli 12:9) Yango ebimisaki likambo nini? Emoniseli 12:12 (NW), esakolaki yango ete: “Mawa na mabelé mpe na mai monene, mpamba te Zábolo akiteli bino na nkanda makasi, awa eyebi ye ete azali na ntango mokuse.” Tozali sikawa kobika kati na ‘ntango mokuse yango.’

4. Tángá mwa ndambo na makambo ya mikolo ya nsuka, mpe yango ezali komonisa nini? (Talá etánda.)

4 Na yango, likambo ya kokamwa ezali te, ntango batunaki Yesu soki elembo ya kozala na ye mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko ekozala nini, eyano na ye ezalaki ya kokamwisa. Makambo makeseni ya elembo yango mamonisami na etánda oyo ezali na lokasa 102. Lokola okoki komona yango, bantoma baklisto Paulo, Petelo mpe Yoane babakisaki makambo mosusu na ntina na mikolo ya nsuka. Ya solo, makambo mingi ya elembo mpe ya mikolo ya nsuka ezali makambo ya mpasi. Nzokande, kokokisama ya bisakweli wana esengeli kondimisa biso ete ebongiseli oyo mabe ekómi pene na nsuka na yango. Tiká ete tótalela malamumalamu mwa ndambo na makambo minene mamonisi ete oyo ezali mikolo ya nsuka.

MAKAMBO YA MIKOLO YA NSUKA

5, 6. Lolenge nini bisakweli bitali bitumba mpe nzala bikokisami?

5 “Libota moko ekotɛlɛmɛla libota mosusu mpe bokonzi moko ekotɛlɛmɛla bokonzi mosusu.” (Matai 24:7; Emoniseli 6:4) Mokomi Ernest Hemingway abéngaki Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ete “libomi oyo elekaki monene, elekaki mabe mpe ezalaki mobulu oyo emonanaki naino liboso te awa na mabelé.” Engebene búku Mokili kati na komekama na mɔ́tɔ—1914-1919 (na Lingelesi), yango ezalaki “etumba ya sika oyo elekaki monene, etumba ya liboso kati na lisoló ya bato mpo ete etalaki mokili mobimba. Boumeli na yango, mobulu na yango mpe bonene na yango elekaki nyonso oyo esalemaki liboso to oyo bato bazalaki komizela na yango.” Na nsima, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebimaki, oyo ebomaki mingi koleka Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Hugh Thomas, molakisi ya Istware, alobi ete: “Ekeke ya ntuku mibale eyebani mingi na mitrayɛte, na tanki, na mpɛpo B-52, na bombe atomike mpe na misile. Emikesenisi mingi na ntina na bitumba oyo bileki kosopa makila mpe oyo bileki koboma koleka bileko nyonso mosusu.” Ya solo, makambo mingi masili kolobama na ntina na kotika kosalela bibundeli nsima wana kokanelana kati na Wɛ́sti mpe Ɛ́sti esilaki. Nzokande, lapólo moko emonisi ete nsima ya bokitisi, bibundeli ya nikleere soko 10 000 kino 20 000 ekotikala naino—elingi koloba koleka mbala 900 bibundeli nyonso basalelaki na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.

6 “Nzala ekozala.” (Matai 24:7; Emoniseli 6:5, 6, 8) Kobanda 1914, ezalaki na nzala minene pene na 20. Ezwaki mikili lokola Bangladesh, Burundi, Cambodge, Chine, Ethiopie, Grèce, Inde, Nigeria, Russie, Rwanda, Somalie mpe Soudan. Kasi nzala ezalaka ntango nyonso te bobele na ntina na kozanga bilei. Etuluku moko ya bato na mayele na makambo matali bilanga mpe makambo ya nkita, basukisaki ete: “Bilei na mokili na boumeli ya bambula oyo euti koleka ebakisamaki mingi koleka bafandi na yango. Kasi mpo ete bato pene na bamilió 800 bazali kati na bobólá makasi, . . . bazali na likoki te ya komisombela boike ya bilei bikoki kolongola bango na ezalela ya kozanga kolya malamu oyo eumeli mingi.” Na makambo mosusu, tokoki mpe kotánga matáta ya politiki. Molakisi Abdelgalil Elmekki na Eteyelo monene ya Toronto atángi ndakisa ya mikili mibale kati na yango bankóto ya bato bazali kokufa na nzala kasi mokili na bango ezali kotekisa bilei mingi na mikili misusu. Biyangeli bizali koluka liboso mbongo ya mikili ya bopaya to devize mpo na kosomba bibundeli na esika ya koleisa bato na bango. Bosukisi ya molakisi Elmekki ezalaki nini? Mbala mingi nzala ezali kokɔta mpo ete “bilei bikabolami malamu te mpe politiki ya biyangeli ezali mabe.”

7. Tokoki koloba nini mpo na maladi mabe na mikolo na biso?

7 “Maladi mabe.” (Luka 21:11; Emoniseli 6:8) Bokɔnɔ bobéngami grippe espagnole ya 1918-19 ebomaki pene na bamilió 21 ya bato. A. A. Hoehling akomaki kati na búku Epidemi monene (na Lingelesi) ete: “Na boumeli na lisoló na yango mobimba, mokili emonaki naino te mobómi moko oyo abomaki ebele ya bato sé na eleko mokuse.” Lelo oyo, bamaladi mabe ezali sé kobakisama. Mbula na mbula, kanser ezali koboma milio mitano ya bato, bokɔnɔ ya koleka-libumu ezali koboma koleka milió misato ya bilɛzi mpe bana mike, mpe maladi ya ntólo ezali koboma milió misato ya bato. Maladi ya mpema, mingimingi maladi ya mpanzi, ezali koboma mbula na mbula milió misato na ndambo ya bana oyo bakokisi naino mibu mitano te. Mpe motángo ya kokamwisa ya bamiliare mibale na ndambo—elingi koloba katikati ya bafandi ya mokili—bazali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ te mpo ete bazangi mai ya malamu mpe bafandi na bisika ya bosɔtɔ. Bokɔnɔ ya sida ezali kokundwela moto ete, atako bokóli na ye na makambo matali mayele ya monganga, azali na likoki te ya kosilisa maladi mabe.

8. Lolenge nini bato bamimonisi ete bazali “balingi na mosolo”?

8 “Bato bakozala . . . balingi na mosolo.” (2 Timoté 3:2, NW) Bipai binso kati na mokili, emonani ete bato bazali na mposa makasi ya kozala na bozwi mingi. “Kolónga” mbala mingi ekokisamaka na mosolo oyo moto azwaka na sanza, mpe “kobonga” etalelaka biloko ya mosuni oyo moto asili konduka. Mwasi moko mokambi-molandi ya kompanyi moko ya piblisité alobaki na 1989 ete: “Mposa ya kozala na biloko mingi ya mosuni ekolanda kozala nguya moko oyo ezali na bopusi mingi epai na Baameriké . . . mpe nguya oyo ezali sé kokóla kati na mikili misusu ya bozwi.” Yango ezali komonana na mboka oyo yo ofandi?

9. Tokoki koloba nini na ntina na kozanga botosi epai na baboti lokola esakolamaki?

9 “Kozanga kotosa baboti.” (2 Timoté 3:2, NW) Lelo oyo, baboti, balakisi mpe bato mosusu bazali na bilembeteli ya sikisiki oyo bimonisi ete bana mingi bazali na limemya te mpe na botosi te. Bamoko na bilenge yango basili kobeba mpo na etamboli mabe ya baboti na bango, to bazali komekola bango. Motuya mozali sé komata ya bana bazali kotya motema lisusu te ezala na—kelasi, na mibeko, na lingomba mpe ata na baboti na bango—mpe bazali kotomboka.” Molakisi moko oyo aumeli na mosala ya kolakisa alobi ete: “Bipai binso, emonani ete bilenge bazali na limemya ata mpo na eloko moko te.” Atako bongo, likambo ya esengo, bana mingi oyo babangaka Nzambe bazali na etamboli malamu mingi.

10, 11. Bilembeteli nini tozali na yango ete bato bazali na yauli mpe bazangi bolingo ya libota?

10 “Yauli.” (2 Timoté 3:3) Liloba ya Greke oyo ebongolami na “yauli” elimboli ‘oyo abɔkwami te, oyo azali lokola nyama ya zámba, oyo azangi mawa mpe akookaka eloko te.’ Oyo nde maloba makokani na bato mingi oyo lelo bamipesi na kosala makambo ya nsɔ́mɔ! Mokomi moko ya zulunalo alobi ete: “Bomoi etondi na makambo ya nsɔ́mɔ, etondi na kosopa makila na boye ete esengeli mpenza kokanga mayoki ya motema na yo mpo na kokoka kotánga bazulunalo mokolo na mokolo.” Polisi moko, mobateli-ndako monene, amonisaki ete bilenge mingi bazali koboya kotalela eloko nini ekolanda nsima na misala na bango. Alobaki ete: “Bazali na liyoki oyo ete, ‘Nalingi koyeba likambo moko na ntina na lobi te. Nakozwa oyo nalingi bobele lelo.’”

11 “Bazangi bolingo ya motema.” (2 Timoté 3:3, NW) Maloba oyo mabongolami longwa na liloba ya Greke oyo elimboli “kozanga motema, kozanga mayoki ya bomoto” mpe emonisi kozanga “bolingo ya motema mpe bolingo ya libota.” (Diksionere ya sika ya mokili mobimba mpo na teoloji ya Kondimana ya Sika [Na Lingelesi]) Ee, bolingo ya motema ezali kozanga kati na esika mpenza oyo yango esengelaki kozala—kati na libota. Balapólo mingi na ntina na minyoko epai na mobalani, epai na bana mpe ata epai na baboti oyo basili konuna ekómi likambo oyo ezali kobangisa mpenza. Ekipi moko ya balukiluki balobaki ete: “Mobulu ya bato—ezala kobɛta mbáta to kotindika, kozokisa na mbɛli to kobɛta masasi—ezali komonana mingi kati na libota koleka na bisika mosusu.”

12. Mpo na nini tokoki koloba ete bato bazali bobele na lolenge ya libándá ya kosambela Nzambe?

12 “Bazali na lolenge ya kosambela kasi bazali koangana nguya na yango.” (2 Timoté 3:5, NW) Biblia ezali na nguya ya kobongola bomoi ya bato ete ekóma malamu. (Baefese 4:22-24) Nzokande, mingi lelo oyo bazali kosalela lingomba na bango lokola ezipeli oyo nsima na yango bazali kosala misala mabe oyo mizali kosepelisa Nzambe te. Mbala mingi, bakonzi ya mangomba bazali kokanga miso na bizaleli mabe lokola lokuta, koyiba mpe bonsɔ́ni. Mangomba mingi mazali kolobela bolingo kasi mazali kopesa mabɔkɔ na bitumba. Lisoló moko kati na zulunalo India Today, elobi ete: “Na nkombo ya Mozalisi Monene, bato bayeisaki bampasi mingi likoló na baninga na bango bato.” Ezali boye solo, mpamba te, bitumba oyo bisopaki makila mingi na ntango na biso—Etumba ya Liboso mpe Etumba ya Mibale ya mokili mobimba—ebimaki kati na mikili oyo emitángaka ete ya boklisto.

13. Elembeteli nini tozali na yango emonisi ete mabelé masili kobebisama na moto?

13 “Bazali kobebisa mabelé.” (Emoniseli 11:18) Bato ya siansi koleka 1 600 sangisá bato 104 oyo bazwaki lifuti libéngami Prix Nobel, oyo bautaki na mikili mikeseni bandimaki likebisi oyo lipesamaki na UCS (Lisangá ya bato ya siansi oyo bazali komibanzabanza), oyo elobaki ete: “Bato mpe bikelamu mosusu ya bomoi bazali kokende liboso ya likámá moko monene. . . . Etikali bobele bambula moke mpo na kopɛngola mbeba oyo ezali kokanela biso lelo.” Lapólo eyebisaki malamumalamu ete bisalasala mabe ya moto “ekoki kobebisa mpenza mokili na boye ete ekozala lisusu na likoki te ya kosimba bomoi na lolenge oyo toyebi yango.” Kokita ya nivo ya ozone, kobeba ya mai mpe mopɛpɛ, kosilisa bazámba, kobebisa mabelé, mpe kolimwa ya mitindo mingi ya banyama mpe bitwɛlɛ etángamaki lokola mikakatano oyo misengeli kotalelama nokinoki.” UCS elobaki ete: “Na kobebisáká biloko bisimbi bomoi, tokoki kobimisa makámá maleki minene, mingi mpenza koboma bibongiseli nyonso ya bikelamu ya bomoi oyo toyebi te ndenge makambo na yango nyonso mazali kotambola.”

14. Lolenge nini okoki komonisa ete Matai 24:14 ezali kokokisama na mikolo na biso?

14 “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo bato bafandi.” (Matai 24:14, NW) Yesu alobaki ete nsango malamu ya Bokonzi esengeli kosakolama na mabelé mobimba, lokola litatoli na mabota nyonso. Na lisalisi mpe na lipamboli ya Nzambe, bamilió ya Batatoli ya Yehova bazali kolekisa ebele ya bangonga kati na mosala wana ya kosakola mpe ya kozalisa bayekoli. (Matai 28:19, 20) Ee, Batatoli bayebi ete bakoki kozala na nyongo ya makila soki bazali kosakola nsango malamu te. (Ezekiele 3:18, 19) Kasi bazali na esengo na komona ete mbula na mbula bankóto ya bato bazali koyamba na botɔ́ndi nyonso nsango ya Bokonzi mpe bazali kokamata ekateli ya kokóma baklisto ya solo, elingi koloba Batatoli ya Yehova. Kosalela Yehova mpe kopalanganisa boyebi ya Nzambe ezali libaku moko kitoko mpenza. Mpe nsima wana nsango malamu ekosila kosakolama na mabelé mobimba oyo bato bafandi, nsuka ya ebongiseli oyo ya mabe ekoya.

OYO OSENGELI KOSALA

15. Lolenge nini ebongiseli mabe ya lelo ekosuka?

15 Lolenge nini ebongiseli oyo ekosuka? Biblia esakoli “bolózi monene” oyo ekobanda na etumba oyo bakonzi ya politiki bakoyeisa likoló na “Babilone Monene,” lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta. (Matai 24:21; Emoniseli 17:5, 16) Yesu alobaki ete na boumeli ya eleko wana ‘moi ekoyinda mpe sanza ekopesa pole na yango te mpe minzoto mikokwea longwa na likoló, mpe nguya na likoló ekotetema.’ (Matai 24:29) Ekoki kozala ete ekosalema mpenza bongo. Ata ndenge nini, bakonzi na mangomba ya mokili oyo bazali kongɛnga lokola pole bakomonana ete bazali babuki na lokuta mpe bakobomama. Na nsima, Satana, oyo abéngami “Gog ya mokili ya Magog,” akosalela bato ya mabe mpo na kobundisa libota ya Yehova. Kasi Satana akolónga te, mpamba te Nzambe akobikisa libota na ye. (Ezekiele 38:1, 2, 14-23, NW) “Bolózi monene” ekondongwana mpenza na Armagedon, “etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” Etumba yango ekosila koboma lisangá ya Satana awa na mabelé, mpe ekofungola nzela mpo ete mapamboli mazangi nsuka másopama likoló na bato oyo bakobika.​—Emoniseli 7:9, 14; 11:15; 16:14, 16; 21:3, 4.

16. Lolenge nini toyebi ete makambo masakolamaki ya mikolo na nsuka mataleli ntango na biso?

16 Na kotalela yango mokomoko, makambo mosusu ya bisakweli oyo bizali komonisa mikolo ya nsuka ekoki komonana ete ebimaki mpe na bileko mosusu ya lisoló ya bato. Kasi soki tosangisi yango elongo, bilembeteli oyo bisakolamaki bikokani na eleko na biso. Tókamata ndakisa moko: Bilembo ya misapi ya moto moko ekoki te kokokana na oyo ya moto mosusu. Bobele bongo, mikolo ya nsuka mizali na bilembo na yango moko, to makambo na yango moko. Yango esali lokola “bilembo ya misapi” oyo ekokani na eleko mosusu te. Ntango tozali kotalela bilembo ya Biblia oyo bimonisi ete Bokonzi na Nzambe na likoló esili kobanda koyangela, bilembeteli bimonisi ete oyo ezali mpenza mikolo ya nsuka. Makomami mazali komonisa polele ete mosika te ebongiseli mabe ya lelo ekobomama.

17. Awa toyebi ete oyo ezali mikolo ya nsuka, tosengeli kosala nini?

17 Osengeli kosala nini nsima na komona bilembeteli oyo bimonisi ete oyo ezali mikolo ya nsuka? Kanisá naino: Soki mopɛpɛ moko makasi mozali koya, tokamataka bibongiseli kozanga koumela. Ee, oyo Biblia esakoli na ntina na ebongiseli ya lelo esengeli kopusa biso na kosala eloko. (Matai 16:1-3) Tozali komona polele ete tozali kobika na mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo ya mokili mobimba. Yango esengeli kopusa biso na kosala mabongwani masengeli mpo na kondimama epai na Nzambe. (2 Petelo 3:3, 10-12) Kolobáká na ntina na ye moko lokola esaleli mpo na lobiko, Yesu apesaki libyangi oyo ya nokinoki: “Kebá na bino ete mitema na bino mikóma makasi te mpo na kolyaka mingi to komelaka mingi mpe na mitungisi ya bomoi, mpe mokolo yango ebimela bino pwasa te, lokola motambo. Mpamba te ekobimela bato nyonso bafandi na mikili nyonso. Bósɛnzɛla mpe bóbondela ntango nyonso ete bózala na makasi ya kokima makambo oyo nyonso malingi koya, mpe kotɛlɛma liboso na Mwana na moto.”​—Luka 21:34-36, NW.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Biblia mosusu esalelaka liloba “mokili” na esika ya “ebongiseli ya biloko.” Kati na búku na ye Diksionere ya bolimboli maloba ya Kondimana ya Sika (na Lingelesi), W. E. Vine alobi ete liloba ya Greke ai·onʹ “elimboli eleko oyo boumeli na yango eyebani te, to ntango oyo etalelami na boyokani na makambo mazali koleka na boumeli ya eleko moko.” Búku Diksionere ya Greke mpe ya Lingelesi ya Kondimana ya Sika (na Lingelesi) ekomami na Parkhurst (lokasa 17) esaleli maloba “ebongiseli ya biloko” wana ezali yango kolobela lolenge ya kosalela liloba ai·oʹnes (boike) na Baebele 1:2. Na yango, libongoli “ebongiseli ya biloko” ezali na boyokani na makomi ya Greke ya ebandeli.

MEKÁ BOYEBI NA YO

Biblia esakolaki nini na ntina na makambo oyo masengelaki kobima na mokili na ebandeli ya boyangeli ya Klisto?

Tángá mwa ndambo na makambo mamonisi ete tozali na mikolo ya nsuka?

Nini endimisi yo ete oyo ezali mikolo ya nsuka?

[Etanda na lokasa 102]

MWA NDAMBO NA MAKAMBO MAMONISI ETE OYO EZALI MIKOLO YA NSUKA

• Bitumba oyo bimonanaki liboso te.​—Matai 24:7; Emoniseli 6:4.

• Nzala.​—Matai 24:7; Emoniseli 6:5, 6, 8.

• Maladi mabe.​—Luka 21:11; Emoniseli 6:8.

• Bokóli ya ezaleli ya kotyola mibeko.​—Matai 24:12.

• Kobebisa mabelé.​—Emoniseli 11:18.

• Koningana ya mabelé.​—Matai 24:7.

• Ntango ya mpasi mpe ya mikakatano.​—2 Timoté 3:1.

• Bolingo makasi ya mosolo.​—2 Timoté 3:2.

• Kozanga botosi epai na baboti.​—2 Timoté 3:2.

• Kozanga bolingo ya libota.​—2 Timoté 3:3.

• Kolinga bisengo koleka kolinga Nzambe.​—2 Timoté 3:4.

• Kozanga komipekisa.​—2 Timoté 3:3.

• Kozanga kolinga makambo ya malamu.​—2 Timoté 3:3.

• Kozanga kotya likebi na likámá oyo ezali koya.​—Matai 24:39.

• Basɛki bazali koboya kondima bilembeteli ya mikolo ya nsuka.​—2 Petelo 3:3, 4.

• Kosakolama ya Bokonzi na Nzambe na mokili mobimba.​—Matai 24:14.

[Elilingi na lokasa mobimba 101]

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto