Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Moná bokeseni kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe oyo asalelaka ye te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli)—2018 | Janvier
    • 9. Nini ekoki kosalisa bana bátosaka baboti na bango?

      9 Nini ekoki kosalisa mwana atosaka baboti na ye, ata soki bana mosusu batosaka te? Asengeli kokanisa makambo nyonso ya malamu oyo baboti basalelaka ye. Asengeli mpe koyeba ete Nzambe, Tata na biso nyonso, asɛngi ye atosaka baboti na ye. Lisusu, soki elenge azali koloba malamu ya baboti na ye, akotinda baninga bámemyaka mpe baboti na bango. Baboti mpe basengeli komonisela bana na bango bolingo na kati ya libota, soki te ekozala mpasi mingi mpo bana bátosa bango. Kasi soki mwana amoni ete baboti na ye balingaka ye mpenza, ekoki kosalisa ye atosa bango ata na ntango oyo ezali mpasi. Ndeko mobali moko na nkombo Austin alobi: “Nazalaki mbala mingi koluka kosala nyonso oyo nalingi, kasi baboti na ngai batyelaki ngai mibeko oyo ebongi, bamonisaki ngai ntina na yango, mpe tozalaki kosolola mingi. Yango esalisaki ngai natosaka. Namonaki ete bazali kotyela ngai likebi, mpe ezalaki kotinda ngai nasepelisa bango.”

      10, 11. (a) Bizaleli nini ya mabe emonisi ete bato balinganaka te? (b) Ndenge nini bakristo ya solo bamonisaka ete balingaka bazalani na bango?

      10 Ntoma Paulo alobelaki mpe bizaleli mosusu oyo emonisaka ete bato balinganaka te. Nsima ya kolobela bato oyo batosaka baboti te, alobelaki bato oyo bazangi botɔndi. Yango ebongi mpenza, mpo bato oyo bazalaka na botɔndi te bazwaka na motuya te makambo malamu oyo basusu basalelaka bango. Na nsima, Paulo alobaki ete bato bakozala bato oyo bazangi bosembo, mpe oyo balingaka kosala boyokani te, elingi koloba bakolinga te kotya kimya na basusu. Bakozala bato oyo bafingaka mpe oyo batɛkaka bamosusu, oyo babimisaka maloba ya mabe mpe ya kofinga basusu, ata mpe Nzambe. Mpe bakozala bato oyo bakoselaka bato makambo, oyo balobaka lokuta mpo na kobebisa lokumu ya basusu.a

  • Moná bokeseni kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe oyo asalelaka ye te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli)—2018 | Janvier
    • a Liloba ya Grɛki oyo basaleli mpo na “moto oyo akoselaka bato makambo” to “mofundi,” ezali diabolos. Biblia esaleli yango mpo na kolobela Satana, moto mabe oyo afundaka Nzambe.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto