Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 239-240
  • Mokanda ya Biblia nimero 56—Tito

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 56—Tito
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA TITO
  • LITOMBA NA YANGO
  • Tito “Mosalani na ngai mpo na bolamu na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Bokémba kati na kondima!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tiká ete mateya oyo mazali kopesa litomba mázala lolenge ya bomoi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Yokeláká lisosoli na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 239-240

Mokanda ya Biblia nimero 56—Tito

Mokomi: Paulo

Esika ya bokomi: Makedonia (?)

Nsuka ya bokomi: soko 61-64 T.B.

1. (a) Tito apesamelaki mokumba nini? (b) Masangá ya Kelete masalemaki kati na ezingelo ya lolenge nini, mpe baklisto oyo bazalaki na Kelete basengelaki kosala nini?

“NGAI Paulo, nazali moombo na Nzambe mpe ntoma na Yesu Klisto . . . Nazali kokomela yo, Tito, mwana na ngai na solo kati na kondima na biso nyonso.” (Tito 1:1, 4) Wana ezali maloba ya ebandeli ya mokanda ya Paulo epai na Tito, mosalani mpe mosangani na ye na boumeli ya mbula mingi, oyo Paulo atikaki ye na esanga ya Kelete mpo na kobongisa masangá na lolenge malamu koleka. Tito azalaki na mokumba monene na mabɔkɔ na ye. Esanga yango, oyo elobelamaki ete ezalaki efandelo ya “tata ya banzambe mpe ya bato,” ezalaki eutelo ya lisese oyo ete, “kokómisa Mokelete moto na Kelete,” oyo elimboli “kokosa mokosi.”a Lokuta ya bato na yango ekómaki kino kosalelama kati na masese, kútu, Paulo atángaki maloba ya moko na basakoli na bango mpenza na kolobáká ete: “Bakelete bazali seko babuki na nkuta, banyama mabe, bato na lokoso mpe na gɔigɔi.” (1:12) Bakelete ya mikolo ya Paulo mpe balobelamaki na maloba malandi: “Ezaleli ya bato yango ezalaki ya bongolabongola, ezangi sembo, mpe ya koswana ntango nyonso; bamipesaki na lokoso, na bosɔ́ni, na lokuta, mpe na kolangwa masanga koleka bato nyonso; mpe emonanaki ete Bayuda oyo bazalaki kofanda kati na bango balekaki mpenza bakóló-mboka na likambo litali kosala makambo ya mbindo.”b Ezalaki kati na ezingelo wana nde masangá ya Kelete masalamaki; boye, esengelaki mpenza na bandimi ete ‘báboya kotuka Nzambe mpe kobila mposa na mokili, kasi bázala na bizaleli na kokanga motema mpe na boyengebene mpe na bokangami epai na Nzambe,’ lokola Paulo alendisaki yango.​—2:12.

2, 3. (a) Na lolenge nini Tito asalanaki elongo na Paulo? (b) Na kotalela lolenge makambo mazali komonana, Paulo akomaki mokanda ya Tito uta na esika nini, mpe mpo na mokano nini?

2 Mokanda ya Tito yango moko mozali kopesa mayebisi mingi te na ntina na bosalani kati na Paulo mpe Tito. Nzokande, na kotalela lolenge Tito alobelami kati na mikanda mosusu ya Paulo, tokoki kozwa mayebisi mingi na ntina na bosalani yango. Tito, oyo azalaki Mogreke, azalaki mbala mingi kokende elongo na Paulo mpe, na mbala moko to koleka, akendaki elongo na ye kino Yelusaleme. (Gal. 2:1-5) Paulo alobi mpo na ye ete azali “mosangani na [ye] mpe mosalani na [ye].” Ezalaki Tito nde Paulo atindaki na Kolinti nsima na kokoma mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti uta na Efese. Ntango azalaki na Kolinti, Tito azalaki kotalela kokɔngɔlama ya makabo oyo mazalaki kopesama mpo na bandeko na Yelusaleme, mpe na nsima na yango azongaki epai Paulo azalaki mpo na kokokisa kosangisama ya makabo yango. Ezalaki na boumeli ya mobembo na ye ya bozongi na Kolinti uta na likita oyo asalaki elongo na Paulo na Makedonia nde Tito atindamaki mpo na komemela Bakolinti mokanda ya mibale oyo Paulo akomelaki bango.​—2 Kol. 8:16-24; 2:13; 7:5-7.

3 Na nsima ya kobimisama na ye na bolɔ́kɔ ya liboso na mboka Loma, Paulo akutanaki lisusu na Timoté mpe Tito na boumeli ya bambula ya nsuka ya mosala na ye. Emonani ete yango esangisaki mosala oyo asalaki na Kelete, na Grèce, mpe na Makedonia. Na nsuka, eyebisami ete Paulo azalaki kokende na Nikopoli, na nɔ́rdi-ɛ́sti ya Grèce, epai kuna makambo mamonisi ete akangamaki mpe amemamaki na Loma mpo na bolɔ́kɔ na ye ya nsuka mpe kobomama na ye. Ezalaki na boumeli ya boleki na ye na Kelete nde Paulo atikaki Tito kuna mpo na ‘kobongisa makambo oyo mazalaki kotambola malamu te mpe . . . kopona bankulutu na mboka mokomoko,’ na boyokani na malako oyo Paulo apesaki ye. Emonani ete mokanda ya Paulo [epai na Tito] mokomamaki mwa moke nsima wana atikaki Tito na Kelete, mingimingi mpenza uta na Makedonia. (Tito 1:5; 3:12; 1 Tim. 1:3; 2 Tim. 4:13, 20) Emonani ete mokanda yango mokokisaki mokano bobele moko na oyo ya Timoté ya Liboso, elingi koloba, mokano ya kopesa lilendisi epai na mosalani ya Paulo mpe kopesa ye malako makoki kosunga ye kati na mikumba na ye.

4. Ntango nini mokanda ya Tito mokomamaki, mpe wapi bilembeteli ya bosolo na yango?

4 Paulo akomaki mokanda yango na boumeli ya eleko oyo ezalaki kati na kokangama na ye ya liboso mpe oyo ya mibale na Loma, to soko na mobu 61 kino 64 T.B. Nguya ya bilembeteli oyo bizali kondimisa bosolo ya mokanda ya Tito ezali lolenge moko na oyo ya mikanda ya Timoté oyo mikomamaki sé na eleko wana; mikanda wana misato ya Biblia mibéngamaka mbala mingi ete “mikanda ya bokambi bampate” ya Paulo. Ekomeli na yango ekokani. Irénée mpe Origène batángaki maloba ya mokanda ya Tito, mpe ebele na bato mosusu ya kala bandimisaki ete mokanda yango mozali eteni ya Makomami mapemami. Mokanda ya Tito mozwami kati na bamaniskri Sinaïticus mpe Alexandrinus. Na kati na bibliotɛkɛ babéngi John Rylands, ezali na eteni moko ya papirise, P32, oyo ezali lokasa ya codex eye ekomamaki soko na ekeke ya misato T.B., codex oyo ezali na Tito 1:11-15 mpe 2:3-8 kati na yango.c Ntembe ezali te ete mokanda yango mozali mpenza eteni ya solo ya Makomami mapemami.

MAKAMBO MAZALI KATI NA TITO

5. (a) Masɛngami nini matali bakɛngɛli Paulo alobeli mingi, mpe mpo na nini yango ezali na ntina mingi? (b) Mpo na nini Tito asengeli kopamela na makasi nyonso, mpe nini elobami mpo na bato na misala ya mbindo?

5 Bakɛngɛli mpo na kolendisa na mateya ya sembo (1:1-16). Nsima ya kopesa mbote etondi na bolingo, Paulo alobeli masɛngami oyo bakɛngɛli basengeli kokokisa. Yango elobi polele mpenza ete mokɛngɛli asengeli kozala ‘moto oyo azangi efundeli,’ molingi na malamu, moyengebene, mosembwi, “ye oyo azali kosimba makasi Liloba na sembo lizali ye kolakisa ete ayeba kolakisa na mateya na sembo mpe kozongisa monɔkɔ na bango bakokotolaka yango [“bakotyaka ntembe,” NW].” Yango ezali na ntina mpo na kotɛmɛla “bazimbisi” oyo bazali ata kobebisa mabota nyonso mpo na matomba ya moimi. Na yango, Tito asengeli ‘kopamela bango makasi ete bábonga kati na kondima, bátya likebi na masapo ya Bayuda te.’ Bato na bizaleli ya mbindo bakoki koloba polele ete bayebi Nzambe, kasi bazali kowangana ye na misala na bango ya kozanga botosi.​—1:6-10, 13, 14.

6. Toli nini epesami likoló na etamboli ya boklisto?

6 Kozala na makanisi malamu, na boyengebene, mpe na bokangami epai na Nzambe (2:1–3:15). Mibangé mibali mpe mibangé basi basengeli kozala bato na mobulu te nde na limemya mozindo. Bilenge basi basengeli kolinga mibali na bango mpe bana na bango mpe basengeli kotosa mibali na bango “ete Liloba na Nzambe litukama te.” Bilenge mibali basengeli kozala ndakisa na misala malamu mpe na maloba mabongi. Baombo basengeli komonisa ‘bosembo malamu kati na nyonso.’ Ngɔlu ya Nzambe, oyo ezali komema na lobiko, esili komonisama mpe ezali kolendisa makanisi malamu, boyengebene, mpe bokangami epai na Nzambe kati na baoyo Ye apɛtoli na nzela ya Klisto Yesu ete bázala “libota na ye mpenza, baoyo bazali na mposa na kosalaka misala malamu.”​—2:5, 10, 14.

7. Nini Paulo alobeli makasi na ntina na botosi, lobiko, mpe misala malamu?

7 Paulo alobeli makasi botosi mpe limemya epai na biyangeli mpe ntina ya ‘komonisa bopɔlɔ epai na bato nyonso.’ Na kala, Paulo mpe baninga na ye baklisto bazalaki mpe bato mabe motindo moko na basusu. Kotyáká motema na misala na bango moko te, kasi na ntina na ngɔlu ya Nzambe, bolingo, mpe motema mawa na ye, basili kobikisama na elimo santu mpe bakómi basangoli na libula ya elikya ya bomoi ya seko. Na yango, baoyo bazali kondimela Nzambe basengeli ‘kolanda kotya makanisi na bango likoló na misala malamu.’ Basengeli koboya ntembe ya bozoba mpe kowelana likoló na Mibeko, mpe mpo na moto oyo azali kolendisa mikabwano na bituluku mikemike na lingomba, basengeli kobwaka ye libándá, nsima ya kokebisa ye mbala mibale. Paulo asɛngi na Tito ete aya epai na ye na Nikopoli mpe, nsima ya kopesa malako mosusu ya mosala ya misionere, alobeli makasi lisusu ntina ya kosala misala malamu, mpo na kozala te moto oyo azangi kobota mbuma.​—3:2, 7, 8.

LITOMBA NA YANGO

8. Nini, kati na mokanda ya Tito, ezali likambo “kitoko mpe na litomba” mpo na biso lelo oyo, mpe mpo na nini?

8 Baklisto ya Kelete bazalaki kofanda kati na bato oyo batondi na lokuta, na makambo mabe, mpe na lokoso. Basengelaki nde komitambwisa na boyokani na bato oyo bazalaki kosala makambo yango? To basengelaki nde kokamata bibongiseli ya sikisiki mpo na kokabwana na bango mpenza mpe kosala lokola libota ya bulɛɛ mpo na Yehova Nzambe? Na koyebisáká na nzela ya Tito ete Bakelete basengelaki ‘kotya makanisi na bango na kosala misala malamu,’ Paulo alobaki ete: “[misala] yango izali kitoko mpe na lisungi [“litomba,” NW] epai na bato.” Lelo oyo mpe, yango ezali likambo ‘kitoko mpe na litomba’ kati na mokili oyo mosili kozinda na pɔtɔpɔ́tɔ ya misala ya lokuta mpe ya kozanga kolongobana, ete baklisto ya solosolo “báyekola komitya na misala kitoko,” kobotáká mbuma mingi kati na mosala ya Nzambe. (3:8, 14) Paulo akweisi pite mpe mabe oyo elingaki kobebisa masangá ya Kelete; likambo yango lizali bongo likebisi mpo na biso na eleko oyo ‘ngɔlu ya Nzambe ezali koteya biso ete tóboya ezaleli ya kozanga bobángi Nzambe mpe bamposa ya mokili, mpe ete tózala na makanisi malamu, na boyengebene, mpe na bokangami epai na Nzambe katikati na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo.’ Baklisto basengeli mpe kozala pene mpo na “misala nyonso malamu” kati na likambo litali kotosa biyangeli, kobateláká lisosoli malamu.​—2:11, 12; 3:1.

9. Lolenge nini motuya ya mateya ya sembo emonisami polele, mingimingi mpenza lokola mokumba ya mokɛngɛli?

9 Tito 1:5-9 ebakisami na 1 Timoté 3:2-7 mpo na komonisa masɛngami ya elimo santu epai na bakɛngɛli. Yango elobeli makasi mpenza likambo oyo ete bakɛngɛli basengeli “kosimba makasi Liloba na sembo” mpe basengeli kozala bateyi kati na lisangá. Yango ezali mpenza na ntina mpo na komema bato banso kino na ezaleli ya kokɔmela! Ya solo, mposa ya mateya ya sembo elobelami mpenza mbala mingi kati na mokanda ya Tito. Paulo alendisi Tito ete “oloba makambo mabongi na mateya na sembo.” Mibangé basi basengeli kozala “balakisi na makambo malamu,” mpe baombo basengeli ‘kokɛmbisa mateya ya Nzambe Mobikisi na bango, kati na makambo nyonso.’ (Tito 1:9; 2:1, 3, 10) Kolobeláká na makasi nyonso mposa oyo ezalaki ete Tito, ye mokɛngɛli, azala makasi mpe abanga eloko te kati na mateya na ye, Paulo alobi ete: “Oloba makambo oyo, lakisá mpe pamelá na bokonzi nyonso.” Mpe mpo na baoyo baboyi kotosa, alobi ete: “Opamela bango na makasi ete bábonga kati na kondima.” Na yango, mokanda ya Paulo epai na Tito mozali mpenza na “litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini kati na boyengebene.”​—Tito 2:15; 1:13; 2 Tim. 3:16, NW.

10. Mokanda ya Tito mozali kolendisa biso na likambo nini, mpe elikya nini ya esengo mokanda yango ezali kolamwisa?

10 Mokanda ya Tito mozali kolamwisa botɔ́ndi na biso mpo na ngɔlu ya Nzambe mpe mozali kolendisa biso na kobwaka ezaleli ya kozanga bobángi Nzambe oyo ezali komonana kati na mokili ‘wana tozali kozela elikya ya esengo mpe komonana ya nkembo ya Nzambe monene mpe ya Mobikisi na biso, Klisto Yesu.’ Kosaláká bongo, baoyo batángami bayengebene na nzela na Klisto Yesu bakoki kokóma “basangoli na libula mpo na elikya na bomoi na seko” kati na Bokonzi ya Nzambe.​—Tito 2:13; 3:7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Búku Cyclopedia ya McClintock mpe Strong, ebimeli ya 1981, Vol. II, lokasa 564; The New Schaff-Herzog Encyclopedia of Religious Knowledge, 1958, Vol. III, lokasa 306.

b Búku Cyclopedia ya McClintock mpe Strong, ebimeli ya 1981, Vol. X, lokasa 442.

c The Text of the New Testament, ebimisami na Kurt mpe Barbara Aland, ebongolami na E. F. Rhodes, 1987, lokasa 98.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto