Mokapo 17
Tóluka kobatelama kati na libota ya Nzambe
1, 2. Lolenge nini ezalela ya libota ya bato ekokani na oyo ya bato oyo bazali na etúká oyo ebebisami na mopɛpɛ?
KANISÁ ete mopɛpɛ moko makasi mobebisi etúká epai yo ofandi. Ndako na yo ebebi, mpe biloko na yo nyonso bibungi. Bilei bizali mingi te. Ezalela yango emonani lokola ete ezangi elikya. Na bongo, kozanga komizela na yango omoni biloko ya lisungi biyei. Bilei mpe bilamba bipesami mingi. Ndako moko ya sika etongami mpo na yo. Ya solo, okozala mpenza na botɔ́ndi epai na moto oyo akamataki bibongiseli wana.
2 Likambo motindo moko lizali kosalema lelo oyo. Lokola mopɛpɛ makasi wana, botomboki ya Adama mpe Eva eyeisaki mpasi monene likoló na bato. Paladiso oyo ezalaki efandelo ya moto ebungaki. Uta ntango wana, biyangeli ya bato bilóngi te na kobatela bato longwa na bitumba, mobulu mpe bokɛsɛnɛ. Mangomba mazali kotika bibele ya bato kati na nzala na elimo. Nzokande, na elobeli ya elimo, Yehova Nzambe azali lelo kopesa bilei, bilamba mpe efandelo. Lolenge nini azali kosala yango?
“MOOMBO YA SEMBO MPE YA MAYELE”
3. Lolenge nini Yehova azali kopesa lisungi epai ya bato, mpe bandakisa nini emonisi yango?
3 Biloko ya lisungi mbala mingi bipesamaka na nzela ya ebongiseli moko, mpe bobele bongo Yehova azali kopesa bilei ya elimo epai na libota na ye. Na ndakisa, Bayisraele bazalaki “lisangá ya Yehova” na boumeli ya bambula soko 1 500. Kati na bango ezalaki na baoyo basalelamaki lokola nzela ebongisamaki na Nzambe mpo na koteya Mibeko na ye. (1 Ntango 28:8; 2 Ntango 17:7-9) Na ekeke ya liboso T.B., Yehova asalaki ebongiseli ya boklisto. Masangá masalemaki, mpe mazalaki kosala na nsé ya litambwisi ya lisangani ya mikóló-bakambi oyo esalemaki na bantoma mpe na bankulutu. (Misala 15:22-31) Bobele bongo lelo oyo, Yehova azali kobatela libota na ye na nzela ya etuluku moko ebongisami malamu. Lolenge nini toyebi yango?
4. Nani amonanaki ete azali “moombo ya sembo mpe ya mayele” na ntango na biso, mpe lolenge nini Nzambe azali kopesa bilei ya elimo?
4 Yesu alobaki ete na ntango ya kozala na ye kati na nguya ya Bokonzi, akokuta “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa “bilei na ntango ekoki” epai na bayekoli na Ye. (Matai 24:45-47, NW) Ntango Yesu akómaki Mokonzi na likoló na 1914, nani amonanaki ete azali “moombo” yango? Ezalaki te bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba. Ntalo eleki monene na kati na bango, bazalaki koleisa bitongá na bango na makanisi oyo mazalaki mpo na kosunga bikólo na bango oyo bikɔtaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Kasi bilei bibongi mpe na ntango ekoki bizalaki kopesama na nzela ya etuluku ya baklisto ya solo oyo bapakolamaki na elimo santu ya Nzambe mpe bazalaki basangani ya oyo Yesu abéngaki ete “etongá moke.” (Luka 12:32) Baklisto bapakolami wana basakolaki Bokonzi ya Nzambe na esika ya kosakola biyangeli ya bato. Mpo na yango, na boumeli ya bambula, bamilió ya “bampate mosusu” oyo balingi boyengebene basanganaki elongo na “moombo” mopakolami mpo na kosalela lingomba ya solo. (Yoane 10:16) Kosaleláká “moombo ya sembo” mpe Lisangani ya Mikóló-Bakambi na yango na mikolo na biso, Nzambe azali kotambwisa libota na ye libongisami malamu mpo na kopesa na ndimbola ya elimo, bilei, bilamba, mpe ebombamelo ebongi mpo na baoyo nyonso balingi kozwa yango.
“BILEI NA NTANGO EKOKI”
5. Ezalela ya elimo ya mokili ezali nini lelo oyo, kasi Yehova azali kosala nini mpo na yango?
5 Yesu alobaki ete: “Moto akobika bobele na mampa te nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ na Yehova.” (Matai 4:4, NW) Kasi, na mawa nyonso, ebele ya bato bazali kotya likebi na maloba ya Nzambe te. Lokola Amosa, mosakoli ya Yehova, asakolaki yango, lelo “nzala ezali kasi nzala ya mampa te, mposa ezali kasi mposa ya mai te; ezali nde nzala mpe mposa ya koyoka maloba na Yehova.” (Amosa 8:11, NW) Ata bato oyo bamipesi na mangomba bazali mpenza na nzala ya elimo. Nzokande, mokano ya Yehova ezali ete “lolenge nyonso ya bato bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timoté 2:3, 4, NW) Yango wana azali kopesa bilei mingi ya elimo. Kasi epai wapi okoki kozwa yango?
6. Lolenge nini Yehova aleisaki libota na ye na elimo na ntango ya kala?
6 Na boumeli ya lisoló ya bato, Yehova asili kopesa bilei ya elimo epai na libota na ye lokola lisangá. (Yisaya 65:13) Na ndakisa, banganga ya Yisraele bazalaki koyanganisa mibali, basi mpe bana mpo na koteya bango nyonso kati na Mibeko ya Nzambe. (Deteronome 31:9, 12) Na nsé ya litambwisi ya lisangani ya mikóló-bakambi, baklisto ya ekeke ya liboso basalaki masangá mpe bazalaki kosala makita mpo na koteyama mpe kolendisama bango nyonso. (Baloma 16:5; Filemona 1, 2) Batatoli ya Yehova bazali kolanda elakiseli wana. Obyangami na bolingo nyonso koyangana na makita na bango nyonso.
7. Lolenge nini koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya boklisto ezali na boyokani na boyebi mpe na kondima?
7 Ya solo, ekoki kozala ete osili koyekola makambo mingi kati na boyekoli na yo moko ya Biblia. Mbala mosusu, moto moko azali kosalisa yo. (Misala 8:30-35) Kasi kondima na yo ekoki kokokisama na etwɛlɛ oyo ekokauka mpe ekokufa soki eleisami malamu te. Na yango, osengeli kozwa bilei ya elimo lokola ebongi. (1 Timoté 4:6) Makita ya boklisto mazali kopesa ebongiseli ya mateya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ oyo ezali na mokano ya koleisa yo na elimo mpe kosalisa yo ete okóla kati na kondima wana ezali yo kobakisa boyebi ya Nzambe.—Bakolose 1:9, 10.
8. Mpo na nini tolendisami na koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova?
8 Makita mazali mpe kokokisa mokano mosusu ya ntina. Paulo akomaki ete: “Tiká ete tótalanaka biso na biso mpo tólendisana ete tózala na bolingo mpe na misala malamu, tótika koyangana elongo moko te.” (Baebele 10:24, 25, NW) Liloba ya Greke oyo ebongolami na “kolendisana” ekoki mpe kolimbola “kopelisa.” Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Ebende ekopelisaka ebende mosusu. Boye moto akopelisaka elongi ya moto mosusu.” (Masese 27:17, NW) Biso banso tozali na mposa ya ‘kopelisama’ ntango nyonso. Mikakatano ya mokolo na mokolo oyo mokili ezali kobimisela biso mikoki kolɛmbisa kondima na biso kino ekokóma lokola mbɛli oyo esili mino. Ntango toyangani na makita ya boklisto, tozali kolendisana biso na biso. (Baloma 1:11, 12) Basangani ya lisangá bazali kolanda toli ya ntoma Paulo oyo ete “bólendisanaka bino mpenza mpe bósungana,” kosaláká bongo, tozali kopelisa kondima na biso. (1 Batesaloniki 5:11) Koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya boklisto ezali mpe komonisa ete tolingi Nzambe mpe ezali kopesa biso mabaku ya kosanzola ye.—Nzembo 35:18.
“BÓMILATISA BOLINGO”
9. Lolenge nini Yehova asili kopesa ndakisa mpo na oyo etali komonisa bolingo?
9 Paulo akomaki ete: “Bómilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.” (Bakolose 3:14) Na boboto nyonso, Yehova asili kopesa biso elamba wana. Na lolenge nini? Baklisto bakoki komonisa bolingo mpamba te yango ezali moko na mbuma ya elimo santu ya Yehova, oyo Nzambe apesaka. (Bagalatia 5:22, 23) Yehova ye moko asili komonisa bolingo monene na kotindáká Mwana na ye mobotami-bobele moko mpo ete tókoka kozwa bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Komonisama wana ya bolingo boleki monene epesi biso elakiseli mpo ete biso mpe tómonisa ezaleli wana. Ntoma Yoane akomaki ete: “Soko Nzambe alingaki biso boye, ekoki mpe na biso ete tólingana.”—1 Yoane 4:11.
10. Lolenge nini tokoki kozwa litomba na “libota mobimba ya bandeko”?
10 Koyangana na yo na makita na Ndako ya Bokonzi ekopesa yo mabaku kitoko ya komonisa bolingo na yo. Kuna okokuta bato ndenge na ndenge. Na ntembe te, okobendama nokinoki na mingi kati na bango. Ya solo, bomoto ekeseni ata kati na baoyo bazali kosalela Yehova. Ekoki kozala ete kala ozalaki kolinga kozala esika moko te na bato oyo bamposa na bango mpe bizaleli na bango ekesanaki na oyo ya yo. Nzokande, baklisto basengeli “kolinga libota mobimba ya bandeko.” (1 Petelo 2:17, NW) Na yango, salá ete mokano na yo ezala ya koyebana na baoyo bayaka na Ndako ya Bokonzi—ata bato oyo mbula na bango, bomoto na bango, ekólo na bango to kelasi oyo batángá ekeseni na oyo ya yo. Okomona mpenza ete moko na moko azali na likambo ya malamu mingi mpo na yango okoki kokangama na ye.
11. Mpo na nini osengeli te kobulunganisama na ntina na bomoto ekeseni oyo okuti kati na libota ya Yehova?
11 Bokeseni ya bomoto kati na lisangá esengeli te kobulunganisa yo. Mpo na komonisa likambo yango, kanisá ete ebele ya mituka mizali kotambola na nzela pene na oyo ya yo. Nyonso ezali kotambola na mbangu ndenge moko te, nyonso mpe ezali makasi ndenge moko te. Misusu esili kotambola bakilomɛtɛlɛ mingi, kasi misusu lokola oyo ya yo ebandi kotambola bobele sika. Nzokande, atako bokeseni wana, nyonso ezali kotambola sé na nzela moko. Ezali bobele bongo mpo na bato oyo bazali kati na lisangá. Nyonso bakólisaka bizaleli ya boklisto na mbangu ndenge moko te. Lisusu, ezalela ya nzoto mpe ya mayoki ya banso ezali ndenge moko te. Bamoko bazali kosambela Yehova uta bambula mingi; basusu babandi bobele sika. Nzokande, bango nyonso bazali kotambola na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko, “wana basangani kati na elimo bobele moko mpe na makanisi bobele moko.” (1 Bakolinti 1:10, NW) Na yango, talelá bizaleli malamu, kasi kotalela te bolɛmbu ya basangani na lisangá. Kosala yango ekopesa yo nsáí na motema, mpamba te okososola ete Nzambe azali mpenza kati na bato wana. Mpe kozanga ntembe okolinga kozala kati na bango.—1 Bakolinti 14:25.
12, 13. (a) Soki moto moko kati na lisangá asaleli yo mabe, okoki kosala nini? (b) Mpo na nini ezali na ntina ete obomba nkanda na motema te?
12 Lokola bato banso bazangi kokoka, na bantango mosusu, moto moko kati na lisangá akoki koloba to kosala likambo oyo likoki kotungisa yo. (Baloma 3:23) Na lolenge lobongi, moyekoli Yakobo akomaki ete: “Mpo ete biso nyonso tokokweaka na makambo mingi. Soko moto akokweaka na liloba na ye te, ye moto abongi nyonso.” (Yakobo 3:2) Lolenge nini okosala soko moto moko asaleli yo mabe? Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Bososoli na moto na mayele [ekolɛmbisa] nkanda na ye; nkembo na ye ezali ete akolimbisa masumu.” (Masese 19:11) Kozala na bososoli elimboli koyeba kotalela likambo na mozindo, kokanga ntina ya makambo oyo mapusaki moto na koloba to na kosala bongo. Mingi kati na biso tosalelaka bososoli mpo na kolimbisa mabungá na biso moko. Mpo na nini te kosalela yango mpo na kokanga ntina mpe kozipa mabungá ya basusu?—Matai 7:1-5; Bakolose 3:13.
13 Tóbosana soko moke te ete tosengeli kolimbisa basusu soki tolingi ete Yehova alimbisa biso. (Matai 6:9, 12, 14, 15) Soki tozali kotambola na solo, tokosalela basusu makambo na bolingo. (1 Yoane 1:6, 7; 3:14-16; 4:20, 21) Na yango, soki ozali na likambo elongo na moto moko kati na lisangá, bundisá makasi ezaleli ya kobomba nkanda na motema. Soki omilatisi bolingo, okosala makasi na kosilisa likambo yango, mpe okokakatana te na kosɛnga bolimbisi soki osalelaki moto mabe.—Matai 5:23, 24; 18:15-17.
14. Bizaleli nini tosengeli komilatisa?
14 Molato na biso ya elimo esengeli kosangisa bizaleli mosusu oyo bikangani na bolingo. Paulo akomaki ete: “Bómilatisa mitema na mawa, na boboto, na kosɔkɛma, na bopɔlɔ, na mitema pɛtɛɛ.” Bizaleli wana bisangani na bolingo, bizali eteni ya “bomoto ya sika” ya moto oyo abangaka Nzambe. (Bakolose 3:10, 12) Okosala milende mpo na kolata yango? Mingimingi soki omilatisi bolingo mpo na bandeko, okozala na elembo oyo emonisaka bayekoli ya Yesu, mpamba te ye alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”—Yoane 13:35.
ESIKA YA KOBATELAMA
15. Lolenge nini lisangá ezali lokola ebombamelo?
15 Lisangá ezali mpe kosala lokola esika ya kobombama, epai okoki komiyoka ete obatelami. Kati na yango, okokuta bato na kolongobana oyo bazali kosala makasi na kosala oyo ezali malamu na miso ya Nzambe. Mingi kati na bango basili kobwaka misala mpe bizaleli ya mabe oyo mbala mosusu yo ozali kobunda na yango. (Tito 3:3) Bakoki kosalisa yo, mpamba te eyebisameli biso ete “bókumbanaka bozito.” (Bagalatia 6:2) Kasi, kolanda nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko ezali mokumba oyo bobele yo moko osengeli kokumba yango. (Bagalatia 6:5; Bafilipi 2:12) Nzokande, na nzela na lisangá ya boklisto, Yehova azali kopesa lisalisi mpe lisungi. Atako lolenge nini ya mikakatano oyo okutani na yango, ozali na lisungi ya motuya—lisangá oyo etondi na bolingo mpe oyo ekosunga yo na ntango ya mawa to ya kokelela.—Kokanisá na Luka 10:29-37; Misala 20:35.
16. Lisalisi nini bankulutu bapesaka kati na lisangá?
16 Kati na baoyo bakoki kosalisa yo, ezali bongo na “makabo na motindo na mibali”—bankulutu to bakɛngɛli, oyo bazali kobatela etongá na kopusama te, kasi na mitema malamu. (Baefese 4:8, 11, 12; Misala 20:28; 1 Petelo 5:2, 3) Na ntina na bango, Yisaya asakolaki ete: “Moto na moto akozala lokola ebombamelo mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekauki, mpe lokola molili na libanga monene kati na mokili molɛmbisami na moi.”—Yisaya 32:2.
17. (a) Lolenge nini ya lisalisi Yesu alingaki mingimingi kopesa? (b) Ebongiseli nini Nzambe alakaki kopesa mpo na bolamu ya libota na ye?
17 Na mawa nyonso, ntango Yesu azalaki awa na mabelé, amonaki ete bakonzi na mangomba bazalaki na bolingo motindo oyo te epai na bitongá na bango. Ayokaki mawa mingi na kotala ezalela ya bato mpe aokaki mposa ya kosalisa bango mingimingi na elimo. Yesu ayokelaki bango mawa mpamba te “balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te.” (Matai 9:36) Yango ezali mpenza ezalela ya bato mingi lelo oyo bazali kokutana na makambo mazali kopesa bango mpasi na motema kozanga moto oyo bakoki komibalola epai na ye mpo na kozwa lisalisi mpe kobɔndisama ya elimo! Kasi libota ya Yehova lizali kozwa lisungi na elimo, mpamba te ye alakaki ete: “Nakotya babateli likoló na bango baoyo bakoleisa bango; bakobanga lisusu te, bakoyoka nsɔ́mɔ te, moko na bango akozanga mpe te.”—Yilimia 23:4.
18. Mpo na nini tosengeli koloba na nkulutu moko soki tozali na mposa ya lisalisi ya elimo?
18 Luká koyebana na bankulutu ya lisangá. Bango bameseni mingi na lolenge ya kosalela boyebi ya Nzambe, mpamba te bakokisi masɛngami mazali na Biblia mpo na kozala bakɛngɛli. (1 Timoté 3:1-7; Tito 1:5-9) Kokakatana te mpo na koloba epai na moko kati na bango soki ozali na mposa ya lisalisi ya elimo mpo na kolónga momeseno moko to ezaleli moko oyo eyokani te na masɛngami ya Nzambe. Okomona ete bankulutu bazali kolanda toli oyo ya Paulo: “Bózala na maloba ya kobɔndisa epai na milimo minyokwami na makanisi, bósunga bato na bolɛmbu, bózala na motema molai epai na bato nyonso.”—1 Batesaloniki 2:7, 8; 5:14, NW.
SEPELÁ NA KOBATELAMA ELONGO NA LIBOTA YA YEHOVA
19. Mapamboli nini Yehova azali kosopa likoló na baoyo bazali koluka kobatelama kati na lisangá na ye?
19 Atako tozali lelo na bomoi kati na ezalela ya kozanga kokoka, Yehova azali kopesa biso, na elobeli ya elimo, bilei, bilamba mpe ebombamelo. Ya solo, tosengeli kozela mokili ya sika ya Nzambe mpo na kozwa bolamu kati na paladiso mpenza. Kasi baoyo bazali kati na lisangá ya Yehova bazali uta sikawa kosepela na kobatelama na paladiso ya elimo. Na ntina na bango, Ezekiele asakolaki ete: “Bakofanda na kimya mpe moto akobangisa bango te.”—Ezekiele 34:28; Nzembo 4:8.
20. Lolenge nini Yehova akopesa mbano mpo na eloko nyonso oyo tokoki kobungisa na ntina na losambo na ye?
20 Oyo nde botɔ́ndi tozali na yango epai na Yehova mpo na bibongiseli ya bolingo mingi oyo asili kokamata na nzela ya Liloba na ye mpe ya lisangá na ye! Sanganá na libota ya Nzambe. Kokakatana te na kosala yango na ntina na bobangi ya oyo baninga mpe bandeko bakoki kokanisa likoló na yo mpo ete oyambi boyebi ya Nzambe. Basusu bakoki kotyola yo mpamba te ozali kosangana elongo na Batatoli ya Yehova mpe ozali koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi. Kasi Nzambe akopesa yo mbano mingi koleka eloko nyonso oyo okobungisa na ntina na losambo na ye. (Malaki 3:10) Lisusu, Yesu alobaki ete: “Soko moto nani atiki ndako soko bandeko mibali soko bandeko basi soko mama soko tata soko bana soko bilanga mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu, moto yango akozwa na ntango oyo ndako mpe bandeko mibali mpe bandeko basi mpe bamama mpe bana mpe bilanga mbala monkámá na minyoko lokola, mpe na ekeke ekoya akozwa bomoi na seko.” (Malako 10:29, 30) Ee, ezala eloko nini oyo okobungisa to oyo okoyikela yango mpiko, okoki kozwa baninga malamu mpe kobatelama ya elimo kati na libota ya Nzambe.
MEKÁ BOYEBI NA YO
Nani azali “moombo ya sembo mpe ya mayele”?
Bibongiseli nini Yehova asili kokamata mpo na koleisa biso na elimo?
Lolenge nini basangani na lisangá ya boklisto bakoki kosalisa biso?
[Elilingi na lokasa mobimba 165]