Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/9 nk. 14-19
  • Mibeko ya Klisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mibeko ya Klisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kondimana ya sika
  • Mibeko na bonsɔ́mi
  • Yesu mpe Bafalisai
  • Mibeko ya Klisto mipesaka nzela na etamboli ya lolenge nyonso?
  • Boklisto ya nkombo mpamba ebebisi mibeko ya Klisto
  • Tózwa liteya uta na mabungá ya boklisto ya nkombo mpamba
  • Mibeko liboso na Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Mobeko ya Yehova ezali ya kokoka”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/9 nk. 14-19

Mibeko ya Klisto

“Nakangami na mibeko na Klisto.”​—1 BAKOLINTI 9:21.

1, 2. (a) Lolenge nini bato mingi na mokili mbɛlɛ bakokaki kopɛngola mabungá? (b) Mateya nini boklisto ya nkombo mpamba ezangaki kozwa yango kati na lisoló ya lingomba ya Bayuda?

ATA mbala moko te bato mpe biyangeli basilá kozwa liteya uta na masoló ya makambo ya kala matali mokili, batosaka te mitindá oyo mibimi uta na makambo yango.” Wana ezali maloba ya Filozofe moko ya Allemagne ya ekeke na 19. Ya solo, lisoló ya bato elobelami lokola “nzela ya bolɛma,” kolandana ya mabungá mpe ya mikakatano minene, oyo mingi na yango ekokaki kopɛngolama soki bato bamonisaki bolingo malamu ya kozwa mateya uta na mabungá ya kala.

2 Ezaleli motindo wana ya koboya kozwa liteya uta na mabungá ya kala emonisami na lisoló oyo elobeli mibeko miuti na Nzambe. Yehova Nzambe akitanyaki Mibeko ya Mose na mibeko mosusu ya malamu kútu koleka​—mibeko ya Klisto. Nzokande, bakonzi ya boklisto ya nkombo mpamba, oyo balobaka ete bateyaka mpe batosaka mibeko yango, bazangi kozwa liteya na bolɛma monene ya Bafalisai. Na yango, Baklisto ya nkombo mpamba basili kobongolabongola mpe kobebisa mibeko ya Klisto bobele lokola lingomba ya Bayuda esalaki yango mpo na Mibeko ya Mose. Na lolenge nini? Liboso, tiká ete tólobela mobeko yango moko​—soki ezali nini, soki etambwisaka banani mpe na lolenge nini, mpe soki eloko nini ekesenisi yango na Mibeko ya Mose. Na nsima tokotalela lolenge nini boklisto ya nkombo mpamba esili kosalela yango na lolenge mabe. Tiká ete tózwa liteya uta na makambo maleká mpe tózwela yango matomba!

Kondimana ya sika

3. Elaka nini Yehova apesaki na ntina na kondimana ya sika?

3 Soki Nzambe te, nani mosusu akoki kopesa mibeko ya kokoka? Mibeko ya Mose mizalaki ya kokoka. (Nzembo 19:7) Atako bongo, Yehova alakaki ete: “Talá mikolo ikoya wana nakokata kondimana na sika na ndako na Yisalaele mpe na ndako na Yuda, pelamoko kondimana oyo ekataki ngai na batata na bango te.” Mibeko Zomi​—moboko ya Mibeko ya Mose​—mikomamaki likoló na mabángá. Kasi na ntina na kondimana ya sika, Yehova alobaki ete: “Nakotya Mobeko na ngai na kati na bango, nakokoma yango na mitema na bango.”​—Yilimia 31:31-34.

4. (a) Yisalaele nini ekɔtisami kati na kondimana ya sika? (b) Longolá Bayisalaele ya elimo, banani mosusu bazali na nsé ya mibeko ya Klisto?

4 Nani asengelaki kokɔtisama kati na kondimana wana ya sika? Na ntembe te, “ndako na Yisalaele” na mosuni esengelaki kokɔtisama te, mpamba te ebwakaki Moyokanisi ya kondimana yango. (Baebele 9:15) Yisalaele wana ya sika esengelaki bongo kozala “Yisalaele na Nzambe,” ekólo ya Bayisalaele na elimo. (Bagalatia 6:16; Baloma 2:28, 29) Etuluku wana moke ya baklisto bapakolami esengelaki na nsima kosangana elongo na “ebele monene” bauti na bikólo nyonso oyo basengeli mpe koluka kosambela Yehova. (Emoniseli 7:9, 10; Zekalia 8:23) Atako ebele monene yango basangani na kondimana ya sika te, kasi basengeli mpe kotosa mibeko. (Kokanisá na Levitike 24:22; Mituya 15:15.) Lokola bazali “etongá moko” na nsé ya litambwisi ya “mobateli na mpate moko,” bango nyonso basengeli ‘kokangama na mibeko na Klisto,’ lokola ntoma Paulo akomaki yango. (Yoane 10:16; 1 Bakolinti 9:21) Paulo abéngaki kondimana oyo ya sika ete “[kondimana eleki malamu, NW].” Mpo na nini? Moko na bantina ezali oyo ete, ezwi moboko na yango likoló na bilaka bikokisami, kasi te likoló na bililingi ya makambo makoya nsima.​—Baebele 8:6; 9:11-14.

5. Mokano ya kondimana ya sika ezali nini, mpe mpo na nini yango ekolónga?

5 Ntina ya kondimana yango ezali nini? Ezali mpo na kobimisa ekólo ya bakonzi mpe banganga mpo na kopambola bato nyonso. (Exode 19:6; 1 Petelo 2:9; Emoniseli 5:10) Kondimana ya Mibeko ya Mose ebimisaki ekólo motindo wana te na lolenge oyo esengelaki mpenza, mpamba te Yisalaele etombokaki mpe ebungisaki libaku yango. (Kokanisá na Baloma 11:17-21.) Nzokande, ntembe ezali te ete kondimana ya sika ekolónga mpenza, mpamba te ekangani na mibeko oyo mikeseni mpenza. Mikeseni na ndenge nini?

Mibeko na bonsɔ́mi

6, 7. Lolenge nini mibeko ya Klisto mizali kopesa bonsɔ́mi koleka lolenge oyo Mibeko ya Mose misalaki yango?

6 Mbala na mbala mibeko ya Klisto miyokanisamaka na bonsɔ́mi. (Yoane 8:31, 32) Ebéngami “mibeko ya libota ya bonsɔ́mi” mpe “mibeko ya kokoka mizwami kati na bonsɔ́mi.” (Yakobo 1:25; 2:12, NW) Ya solo, bonsɔ́mi nyonso kati na bato ezali na ndelo. Nzokande, mibeko oyo mizali na bonsɔ́mi mingi koleka Mibeko ya Mose oyo ezalaki liboso. Na ndimbola nini?

7 Tókamata ndakisa moko: moto moko te abotami na nsé ya mobeko ya Klisto. Makambo lokola libota to esika moto abotami ezali na ntina te. Baklisto ya solo baponaka na bonsɔ́mi nyonso kati na mitema na bango komitya na nsé ya ekanganeli ya kotosa mibeko yango. Na kosaláká bongo, bazali komona ete ezali ekanganeli ya boboto, mokumba ya pɛpɛlɛ. (Matai 11:28-30) Nzokande, mibeko ya Mose mibimisamaki mpe mpo na kolakisa moto ete azali na masumu mpe azali na bosɛnga mpenza ete mbeka ya lisiko ebikisa ye. (Bagalatia 3:19) Mibeko ya Klisto mizali kolakisa ete Masiya asilá koya, ete apesaki bomoi na ye lokola mbeka mpo na lisiko, mpe ete afungolelaki biso nzela ete tólongwa na nsé ya konyokwama makasi ya lisumu mpe ya liwa! (Baloma 5:20, 21) Mpo na kozwela yango litomba, tosengeli ‘komonisa kondima’ kati na mbeka yango.​—Yoane 3:16.

8. Mibeko ya Klisto misangisi nini, kasi mpo na nini kotosa yango elimboli te kokanga bankámá ya mibeko na motó?

8 ‘Komonisa kondima’ elimboli kotosa mibeko ya Klisto. Esangisi mitindá nyonso ya Klisto. Yango elimboli nde kokanga bankámá ya mibeko na motó? Te. Atako Mose moyokanisi ya kondimana ya kala akomaki Mibeko na ye, kasi Yesu Moyokanisi ya kondima ya sika akomaki ata mobeko moko te. Nzokande, atosaki mibeko yango. Na lisalisi ya lolenge ya bomoi na ye ya kokoka, atikaki ndakisa mpo na bato nyonso ete bákoka kolanda yango. (1 Petelo 2:21) Ekoki kozala mpo na yango nde losambo ya baklisto ya liboso ebéngamaki “Nzela.” (Misala 9:2; 19:9, 23; 22:4; 24:22) Bomoi ya Klisto ezalaki ndakisa mpo na bango, mpo na oyo etali kotosa mibeko. Komekola Yesu elimbolaki kotosa mibeko na ye. Bolingo monene oyo bazalaki na yango mpo na ye elimbolaki ete mibeko yango mikomamaki solo kati na mitema na bango, lokola yango esakolamaki. (Yilimia 31:33; 1 Petelo 4:8) Mpe moto oyo atosaka mpo ete apusami na bolingo amiyokaka soko moke te ete anyokolami​—oyo ezali ntina mosusu mpo na yango mibeko ya Klisto mibéngami “mibeko ya bato na bonsɔ́mi.”

9. Nini ezali mpenza moboko ya mibeko ya Klisto, mpe na lolenge nini mibeko yango etaleli etindá ya sika?

9 Bolingo ezalaki na ntina kati na Mibeko ya Mose, kasi kati na Mibeko ya Klisto bolingo ezali nde moboko na yango mpenza. Na yango, mibeko ya Klisto mikɔtisaki etindá ya sika kati na yango​—baklisto basengeli kozala na bolingo ezangi moimi, moko epai na mosusu. Basengeli komonisa bolingo lokola Yesu asalaki yango; akakatanaki te mpo na kopesa bomoi na ye mpo na baninga na ye. (Yoane 13:34, 35; 15:13) Na yango, tokoki koloba ete mibeko ya Klisto mizali elembo etombwani mpenza ya teokrasi koleka Mibeko ya Mose. Lokola zulunalo oyo esilá koloba yango: “Teokrasi ezali boyangeli ya Nzambe; Nzambe azali bolingo; na yango, teokrasi elimboli koyangela na bolingo.”

Yesu mpe Bafalisai

10. Lolenge nini mateya ya Yesu makesanaki na oyo ya Bafalisai?

10 Na bongo, ezali likambo ya kokamwa te ete Yesu azalaki koyokana te na bakonzi ya Lingomba ya Bayuda na eleko na ye. Bakomeli mpe Bafalisai batalelaki soko moke te “Mibeko ya kokoka mizwami kati na bonsɔ́mi.” Balukaki kotambwisa bato na nzela ya mibeko misalemi na bato. Mateya na bango makómaki ya konyokola, ya kokweisa bato, ya kopesa bato mpasi. Na bokeseni monene, mateya ya Yesu mazalaki mpenza ya kolendisa mpe ya kopesa matomba! Azalaki koteya makambo oyo makoki mpenza kosalelama mpe azalaki kolobela bamposa mpenza ya bato mpe mabanzo na bango. Azalaki koteya na lolenge ya pɛtɛɛ mpe na mayoki ya solosolo, kosaleláká bililingi ya makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo mpe na kosaleláká Liloba ya Nzambe lokola moboko ya mateya na ye. Na yango, “ebele bakamwaki mateyo na ye.” (Matai 7:28) Ee, mateya ya Yesu masimbaki mitema na bango!

11. Lolenge nini Yesu amonisaki ete Mibeko ya Mose misengeli kosalelama na kozanga makambo makasi mpe na komonisáká motema mawa?

11 Na esika ete abakisa bipekiseli mosusu likoló na Mibeko ya Mose, Yesu amonisaki lolenge oyo mbɛlɛ Bayuda basengelaki kosalela Mibeko wana​—na kozaláká na makambo makasi te mpe na komonisáká motema mawa. Na ndakisa, tómikundola naino mokolo oyo mwasi moko azalaki na maladi ya kotanga makila apusanaki pene na ye. Engebene Mibeko ya Mose, moto nyonso oyo mwasi wana akokaki kosimba asengelaki kokóma mbindo, na ntembe te, ezalaki mpo na yango nde asengelaki te komikɔtisa kati na etuluku ya bato! (Levitike 15:25-27) Kasi azalaki na mposa makasi ya kobikisama na boye ete alukaki nzela katikati na ebele ya bato mpe asimbaki elamba ya Yesu. Na mbala moko, makila matikaki kotanga. Apamelaki ye mpo ete abukaki Mibeko? Te; nzokande, amityaki na esika na ye mpo na ezalela ya mpasi oyo azalaki kati na yango mpe amonisaki etindá eleki monene kati na Mibeko​—bolingo. Na boboto nyonso, ayebisaki ye ete: “Mwana mwasi, kondima na yo esili kobikisa yo; kendá na kimya, zalá na nzoto malamu mpe na mpasi na yo lisusu te.”​—Malako 5:25-34.

Mibeko ya Klisto mipesaka nzela na etamboli ya lolenge nyonso?

12. (a) Mpo na nini tokoki te koloba ete mibeko ya Klisto mipesaka nzela na etamboli ya lolenge nyonso? (b) Nini emonisi ete kobimisa mibeko mingi ememaka mpe na kobimisama ya nzela mingi ya komilóngisa?

12 Na bongo, tosengeli nde kosukisa ete lokola ‘mibeko ya klisto mizali ya bonsɔ́mi’ mipesaka nzela na etamboli ya lolenge nyonso, nzokande Bafalisai, na mibeko na bango mikomami te, balóngaki mwa moke kobatela etamboli ya bato na lisalisi ya bipekiseli makasi? Te. Bibongiseli ya mibeko ya mikolo na biso emonisi ete soki mibeko mizali mingi, bato bakozwa mpe kati na yango nzela mingi ya komilóngisa.a Na mikolo ya Yesu, lokola Bafalisai babimisaki ebele ya mibeko, yango elendisaki bato ete bálukaka nzela ya komilóngisa, kosala misala kozanga kopusama na bolingo, mpe bokóli ya ezaleli ya komimonisa malamu na libándá na kobombáká libebi na nsé ya motema.​—Matai 23:23, 24.

13. Mpo na nini mibeko ya Klisto mizali kobimisa etindá moko ya etamboli etombwani koleka mibeko nyonso mikomami?

13 Na bokeseni, Mibeko ya Klisto ekólisaka bizaleli motindo wana te. Ya solo, kotosa mibeko oyo mizwi moboko na yango likoló na bolingo ya Yehova mpe oyo etosami na kolandáká bolingo ezangi moimi, na motindo oyo Yesu amonisaki yango epai na bato mosusu, ebimisaka etamboli malamu koleka ebele ya mibeko oyo mikomami na mikanda. Bolingo elukaka komilóngisa te; ebatelaka biso ete tósala te makambo oyo makoki kopesa biso mpasi, oyo ebele ya mibeko mikomami na mikanda mikoki te kolimbola polele. (Talá Matai 5:27, 28.) Na yango, mibeko ya Klisto mikopusa biso ete tósalela bato mosusu​—komonisa elimo ya bokabi, ya boyambi bapaya, mpe bolingo​—na meko oyo mobeko moko te mokomami mokoki kopusa biso na kosala bongo.​—Misala 20:35; 2 Bakolinti 9:7; Baebele 13:16.

14. Kotosa mibeko ya Klisto ezalaki na bopusi nini likoló na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso?

14 Na meko oyo basangani na yango batosaki mibeko ya Klisto, lisangá ya boklisto ya ebandeli ezalaki na esengo, na bolingo; ezaleli ya makambo makasi, ya kosambisasambisa, mpe ya bokosi oyo ezalaki komonana mingi kati na biyanganelo ya eleko wana ezalaki kati na baklisto te. Ya solo, basangani ya masangá wana ya sika basosolaki ete bazalaki kotosa “mibeko ya bato na bonsɔ́mi”!

15. Milende nini ya liboso Satana asalaki mpo na kobebisa lisangá ya boklisto?

15 Nzokande, Satana azalaki na mposa makasi ya kobebisa lisangá ya boklisto uta na kati na yango mpenza, bobele lokola abebisaki ekólo ya Yisalaele. Ntoma Paulo apesaki makebisi na ntina na bato bakokani na nkɔi na yauli, oyo basengelaki “kolakisa mateyo na kokosa” mpe konyokola etongá ya Nzambe. (Misala 20:29, 30) Asengelaki kowelana na bapalanganisi ya mateya ya Bayuda oyo bazalaki koluka kosombitinya bonsɔ́mi ya mibeko ya Klisto na boombo ya Mibeko ya Mose oyo Klisto asilaki kokokisa. (Matai 5:17; Misala 15:1; Baloma 10:4) Nsima wana ntoma ya nsuka akufaki, moto mosusu azalaki te mpo na kotɛmɛla lipɛngwi wana. Na yango, libebi ekólaki mingi.​—2 Batesaloniki 2:6, 7.

Boklisto ya nkombo mpamba ebebisi mibeko ya Klisto

16, 17. (a) Libebi likɔtaki ndenge nini kati na Boklisto ya nkombo mpamba? (b) Lolenge nini mibeko ya Lingomba ya Katolike mikólisaki likanisi elongobani te likoló na likambo litali kosangisa nzoto?

16 Bobele lokola esalemaki kati na lingomba ya Bayuda, libebi ekólaki na mitindo ndenge na ndenge kati na boklisto ya nkombo mpamba. Kozanga nkaká, mateya ya lokuta mpe na etamboli ya mbindo ekɔtaki kati na yango. Mpe milende oyo yango ezalaki kosala mpo na kobatela etongá na bopusi oyo ezalaki kouta na libándá ezalaki nde kobebisa ata mwa ndambo ya makambo ya pɛto oyo losambo ya solo etikaki. Mibeko ya makasimakasi mpe euti na Makomi te mikómaki mingi.

17 Lingomba ya Katolike esili kozwa esika ya liboso mpo na oyo etali kobimisa mibeko mingi ya lingomba. Mibeko yango mibebisi mingi mpenza makambo matali kosangisa nzoto. Engebene búku Sexuality and Catholicism (Bosangisi nzoto mpe Lingomba ya Katolike), lingomba likɔtisaki kati na yango filozofi ya Bastoisié, oyo ezalaki kopekisa lolenge nyonso ya bisengo. Lingomba eyaki koteya ete bosepeli kati na kosangisa nzoto, ata kati na libala oyo elongobani mpenza, ezali lisumu. (Kesenisá na Masese 5:18, 19.) Enama ya bobali to ya bomwasi ezali bobele mpo na kobotela, kasi mpo na esengo ya kosangisa nzoto te. Yango wana lingomba ekweisaki kosalelama ya myango ya kopekisa kobota lokola ete ezali lisumu monene, oyo na ntango mosusu esɛngaka kotubelama na boumeli ya bambula mingi. Lisusu, bapekisaki banganga-nzambe kobala, mobeko oyo esili kokólisa pite mingi, mpe kobebisama ya bana mike.​—1 Timoté 4:1-3.

18. Kobimisama ya ebele ya mibeko ya lingomba ebotaki mbuma nini?

18 Wana mibeko ya lingomba mizalaki kokóma mingi, mityamaki kati na babúku. Babúku yango ebandaki kotya Biblia na molili mpe kotya yango pembeni. (Kokanisá na Matai 15:3, 9.) Lolenge moko na lingomba ya Bayuda, lingomba ya Katolike ezalaki koboya kokomama ya babúku mosusu mpe batalelaki mingi na yango ete ezali likámá. Likanisi wana elekaki ndelo ya likebisi oyo Biblia epesi likoló na likambo yango. (Mosakoli 12:12; Bakolose 2:8) Jérôme, mokomi moko ya lingomba na ekeke ya minei T.B. alobaki ete: “Ɛ Nkolo, soki mokolo mosusu nazwi lisusu búku ya mokili to natángi yango, wana nde nawangani yo.” Na nsima, lingomba ekómaki kotalela búku na bokɛngi makasi​—ata oyo ezalaki kolobela bobele makambo ya mokili. Na yango, batalelaki na bokɛngi nyonso makambo oyo Gallilée, moyekoli ya minzɔ́tɔ na ekeke na 17 akomaki ete mabelé makobalukaka zingazinga na moi. Molende oyo lingomba esalaki mpo na kondimisa bato ete yango ezali esika oyo makambo nyonso masengeli kozwa moboko malamu​—ata makambo matali zébi ya minzɔ́tɔ​—eyaki na nsima kobebisa kondima oyo bato basengeli kozala na yango kati na Biblia.

19. Lolenge nini bamonastɛrɛ ekólisaki bokonzi eleki ndelo?

19 Ezaleli oyo lingomba ezalaki na yango ya kobimisa mibeko mingimingi ekólaki mingi kati na monastɛrɛ, epai kuna bamwánɛ bazalaki komikabola na bato mpo na kozala na lolenge ya bomoi ya komiboya. Monastɛrɛ mingi ya Katolike ezalaki kolanda “Mibeko ya Santu Benedict.” Bokonzi nyonso ezalaki epai na ba abbés (liloba oyo liuti na lokótá ya Aramɛyɛ elimboli “tata”). (Kokanisá na Matai 23:9.) Soki mwánɛ moko azwi likabo liuti na baboti na ye, abbé akokamata ekateli soki mwánɛ yango to moto mosusu nde akozwa likabo yango. Kolongola makambo mosusu ya mikemike, moko na mibeko epekisaki kosolola masoló mikemike mpe masɛki, elobaki ete: “Moyekoli moko te asengeli koloba makambo motindo oyo.”

20. Nini emonisi ete Lingomba ya Protestá mpe endimaki lolenge ya bokonzi eleki ndelo oyo eyokani na Makomami te?

20 Lingomba ya Protestá, oyo elukaki kosembola makambo maleki ndelo ya Makomami oyo Lingomba ya Katolike ezalaki koteya, nokinoki bango moko mpe bakómaki kotya mibeko makasimakasi kozanga ete mizwa moboko na yango kati na mibeko ya Klisto. Na ndakisa, moko na baoyo babandisaki mbongwana yango, Jean Calvin, akómaki kobéngama “mopesi mibeko na Lingomba ya sika.” Akambaki lingomba ya Protestá na engumba Genève na ebele ya mibeko oyo “bankulutu” bazalaki kotosisa, oyo Calvin alobaki na ntina na bango ete “mokumba na bango ezali ya kokɛngɛla bomoi ya moto mokomoko.” (Kesenisá na 2 Bakolinti 1:24.) Lingomba ezalaki kokɛngɛla bandako ya mobémbo mpe etyaki mibeko likoló na lolenge ya masoló oyo makokaki kopesamela nzela. Bitumbu makasi bizalaki kopesama epai na baoyo bazalaki kobuka mibeko, na ndakisa na koyembáká nzembo ya mpambampamba to na kobináká.b

Tózwa liteya uta na mabungá ya boklisto ya nkombo mpamba

21. Ezaleli oyo emonani kati na boklisto ya nkombo mpamba ya “koleka makambo makomami” esili kobimisa mbuma nini?

21 Mitindá mpe mibeko wana nyonso mibatelaki boklisto ya nkombo mpamba ete ebebisama te? Soko moke te! Lelo oyo boklisto ya nkombo mpamba esili kokabwana na bankámá ya mangomba mikemike, oyo eyeisaka makambo makasi mingi mpe oyo epesaka nzela na makambo nyonso ya mabe. Nyonso wana, na lolenge moko to mosusu, ‘basili koleka makambo makomami,’ kotikáká nzela na lolenge ya kokanisa ya bomoto ete etambwisa etongá mpe ete ekanga nzela na mibeko miuti na Nzambe.​—1 Bakolinti 4:6.

22. Mpo na nini kobebisama ya boklisto ya nkombo mpamba elimboli te nsuka ya mibeko ya Klisto?

22 Nzokande, mibeko ya Klisto milóngamaki te. Yehova Nzambe akoki kotika te ete bato bálongola mibeko na ye. Mibeko ya Klisto mizali na nguya mingi lelo oyo kati na baklisto ya solo, mpe bango bazali na libaku monene ya kotosa yango. Kasi nsima ya kotalela makambo oyo lingomba ya Bayuda mpe boklisto ya nkombo mpamba esalaki likoló na mibeko miuti na Nzambe, tokoki mpenza komituna ete: ‘Lolenge nini tozali kotosa mibeko ya Klisto na kopɛngoláká kokwea na motambo ya kobebisa liloba ya Nzambe na makanisi mpe na mibeko ya bato, oyo elongolaka mpenza ndimbola ya solosolo ya mibeko miuti na Nzambe? Mibeko ya Klisto misengeli kopesa biso likanisi nini ya bokatikati lelo oyo?’ Lisoló lilandi likoyanola na mituna yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ezali mpo na Bafalisai nde losambo ya Bayuda na mikolo na biso ezali lolenge yango ezali lelo; na bongo ezali likambo ya kokamwa te ete kino lelo lingomba ya Bayuda elukaka banzela ya komilóngisa kati na bipekiseli na yango oyo ebakisami likoló na Sabata. Na ndakisa, moto oyo akei na lopitalo moko ya Bayuda akoki komona etómbola (ascenceur) ezali kotɛlɛma yango moko na etazi mokomoko mpo ete baoyo bamati kati na yango bázwa “mosala” ya lisumu te na kofináká butó ya etómbola. Minganga mosusu oyo bazali basangani ya lingomba ya Ortodoksi bakomelaka bato nkisi na kosaleláká mai ya mokanda oyo ekoki kobomama nsima ya mwa mikolo. Mpo na nini? Mishnah etalelaka kokoma lokola “mosala,” kasi epesi ndimbola ete “kokoma” ezali bongo kotya bilembo oyo bikoki kotikala libela.

b Servetus, abimisaki ntembe na ntina na makanisi mosusu ya teoloji ya Calvin, atumbamaki na nzeté lokola motomboki.

Okoyanola lolenge nini?

◻ Nini ezali moboko mpenza ya mibeko ya Klisto?

◻ Lolenge ya koteya ya Yesu ekesanaki na oyo ya Bafalisai na motindo nini?

◻ Lolenge nini Satana asalelaki elimo ya makambo makasi, ya kobimisa ebele ya mibeko, mpo na kobebisa boklisto ya nkombo mpamba?

◻ Wapi mwa matomba ya kotosa mibeko ya Klisto?

[Elilingi na lokasa 16]

Yesu asalelaki Mibeko ya Mose na kozanga makambo makasi mpe na komonisáká motema mawa

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto