Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/7 lok. 32
  • Talatálá emonisaka nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Talatálá emonisaka nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/7 lok. 32

Talatálá emonisaka nini?

TALÁ talatála. Ozali komona nini? Na bantango mosusu, kotala talatála emonisaka mbeba moko na nzoto na yo oyo okozala na esengo ya kobongisa yango liboso ete basusu bámona yango.

Biblia ekokani mpenza na talatála. Ekoki kosalisa biso ete tómitalela na lolenge lobongi mpenza, yango ekopekisa biso ete tómitalela te na lolenge loleki ndelo​—to na motuya moke​—na ntina etali motuya oyo biso tozali na yango na miso ya Nzambe. (Matai 10:29-31; Baloma 12:3) Lisusu, Biblia ekoki komonisa mbeba kati na maloba na biso, misala na biso, mpe bizaleli na biso oyo tosengeli kobongisa. Na ntango oyo yango ekomi, okoboya kotya likebi na oyo talatála emonisi?

Yakobo, moko na bakomi ya Biblia, alobi ete: “Ye oyo akoyokaka liloba mpe akotosaka yango te azali lokola mobali oyo amitali elongi na nzoto na ye na talatála. Amitali mpe alongwi nde nokinoki abosani soko azali motindo nini.”​—Yakobo 1:23, 24.

Na kokesana, Yakobo alobeli mobali mosusu, ye oyo “azali kotalatala na Mobeko mobongi, Mobeko na bonsomi mpe aumeli kotalatala wana, azali moyoki oyo akobosana te.” (Yakobo 1:25) Liloba ya Greke oyo ebongolami na “kotalatala” elimboli kongumbama pembeni to kongumba na liboso mpo na kotala. Búku Theological Dictionary of the New Testament elobi ete “elimboli te bobele kobwaka liso.” Liloba yango ezali kopesa likanisi ya koluka na mozindo mpo na komona eloko oyo ebombami. Molimboli moko ya Biblia, R. V. G. Tasker, akomi ete: “Ezali na likambo moko ya ntina oyo motáli asengeli komona, ata soki ekoki kozala mpasi mpo na ye ete amona yango nyonso mpe akanga ntina na yango nyonso na mbala moko.”

Okomitalela yo moko malamumalamu kati na talatála ya Liloba ya Nzambe mpe na bongo komiyokanisa na oyo yango ezali kosɛnga? Yakobo akóbi ete: “Azali moyoki oyo akobosana te kasi akosalaka misala; ye wana akozala na esengo kati na misala na ye.”​—Yakobo 1:25.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto