Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/12 nk. 13-18
  • Tólongisa kondima na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólongisa kondima na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Tiká ete bato nyonso bámona ete bozali na makambo makasi te”
  • Ntango nini kozala nyɛɛ, ntango nini koloba
  • Ntango bakoseli biso makambo
  • Tósalela mibeko mpo na kolongisa nsango malamu
  • Lolenge Baklisto bakoki koyika mpiko na botyoli ya bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Bayinami mpo na kondima na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Batatoli ya Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova balandaka te mabe nyonso oyo balobaka mpo na bango?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/12 nk. 13-18

Tólongisa kondima na biso

“Bóbulisa Klisto lokola Nkolo kati na mitema na bino; bóselingwaka mikolo nyonso mpo na kozongisa monɔkɔ na moto na moto oyo akotuna bino mpo na ntina na elikya ezali kati na bino.”​—1 PETELO 3:15.

1, 2. Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakamwaka te soki bakutani na botɛmɛli, kasi mposa na bango ezali nini?

NA MIKILI mingi, Batatoli ya Yehova bayebani lokola bato ya bosembo mpe bazali na etamboli malamu. Mingi bamonaka ete bazali bazalani ya malamu oyo balukelaka bato mindɔndɔ te. Kasi, likambo ya kokamwa, baklisto yango oyo balingi kimya banyokwami mingi atako basalaka makambo ya mabe te—ezala na ntango ya bitumba to na ntango ya kimya. Botɛmɛli motindo wana ekamwisaka bango te. Kutu, bayebaka ete ekoki kokómela bango. Bayebi ete na ekeke ya liboso T.B., baklisto ya sembo ‘bayinamaki,’ boye mpo na nini ekozala bongo te mpo na bayekoli ya solo ya Klisto lelo oyo? (Matai 10:22) Lisusu, Biblia elobi: “Bango nyonso bazali na mposa na ezaleli na kosambela kati na Klisto Yesu bakonyokolama.”​—2 Timote 3:12.

2 Batatoli ya Yehova balukaka minyoko te, mpe basepelaka na mpasi te lokola kofuta lomande, bolɔkɔ, to kobɛtama. Mposa na bango ezalaka ete ‘bátambola na bizaleli na kimya mpe na kozanga mobulu’ mpo ete básakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe kozanga epekiseli. (1 Timote 2:1, 2) Basepelaka na bonsomi oyo bazali na yango na bikólo mingi mpo na kosambela Nzambe na bango, mpe na motema mobimba, basalaka nyonso oyo ekoki mpo na ‘kozala na bato nyonso na kimya,’ bakisa mpe bakonzi ya Leta. (Baloma 12:18; 13:1-7) Kasi, mpo na nini ‘bayinaka’ bango?

3. Wapi ntina moko ezangi sembo oyo bazali koyina Batatoli ya Yehova?

3 Soki totali malamu, Batatoli ya Yehova bayinami bobele mpo na bantina oyo baklisto ya ekeke ya liboso banyokwamaki na yango. Ya liboso, bato mingi basepelaka te na ndenge oyo Batatoli ya Yehova batosaka bindimeli ya lingomba na bango. Na ndakisa, basakolaka nsango malamu ya Bokonzi na molende, kasi mbala mingi bato bayebaka ntina ya molende na bango te. Batalelaka mosala na bango lokola ete ezali “koluka kobongwanisa bato na makasi.” (Talá Misala 4:19, 20.) Lisusu, bakɔtaka na makambo ya politiki mpe na bitumba ya bikólo te, mpe mpo na likambo yango, mbala mosusu bato balobaka ete Batatoli balingaka ekólo na bango te.​—Mika 4:3, 4.

4, 5. (a) Makambo nini bazali kokosela Batatoli ya Yehova? (b) Mbala mingi banani mpenzampenza babimiselaki basaleli ya Yehova minyoko?

4 Ya mibale, bato mosusu bazali kokosela Batatoli ya Yehova makambo—ekoki kozala lokuta mpenza to mpe kobongola mateya na bango. Yango wana, na bikólo mosusu bazali kobimisela bango mikakatano ezangi ntina. Lisusu, lokola balingaka te ete bázongisama makila, mpo na kotosa mobeko ya Biblia oyo esɛngi ete ‘tóboya makila,’ bato mosusu bazali kobénga bango “babomi bana” mpe “mwa lingomba ya bato oyo balukaka komiboma.” (Misala 15:29) Nzokande, Batatoli ya Yehova bapesaka bomoi motuya mingi, mpe balukaka lisalisi oyo eleki malamu epai ya minganga ezala mpo na bango moko to mpo na bana na bango. Efundeli oyo ete ebele ya bana ya Batatoli ya Yehova bazali kokufa mbula na mbula mpo ete baboyaka ete bázongisama makila ezali lokuta. Na kati ya libota, lokola bato nyonso te bandimaka solo ya Biblia, bato mosusu balobaka ete Batatoli bakabolaka mabota ya bato. Kasi, baoyo bayebi Batatoli ya Yehova malamu bayebi ete bapesaka motuya mingi na libota mpe basalaka makasi mpo na kolanda mibeko ya Biblia oyo elobi ete mobali na mwasi bálingana mpe bápesana limemya mpe ete bana bátosa baboti na bango, ata soki bazali bandimi to bazali bandimi te.​—Baefese 5:21–6:3.

5 Mbala mingi, baoyo mpenza balukelaka basaleli ya Yehova minyoko ezali bongo bato ya mangomba mosusu oyo balingaka Batatoli ya Yehova te; lokola bayokanaka malamu na bakonzi ya politiki mpe bapanzi-nsango, bapusaka bango ete bápekisa mosala ya Batatoli. Biso Batatoli ya Yehova, tosengeli kosala nini liboso ya botɛmɛli motindo wana—ezala mpo na bindimeli na biso to mpo na bifundeli ya lokuta?

“Tiká ete bato nyonso bámona ete bozali na makambo makasi te”

6. Mpo na nini ezali na ntina ete tózala na bokatikati na ndenge na biso ya kotalela bato oyo bazali na lisangá ya boklisto te?

6 Libosoliboso, tosengeli kozala na likanisi libongi—likanisi ya Yehova—mpo na bato oyo tozali na bango lingomba moko te. Soki te, biso moko tokomibendela koyinama to kopamelama. Ntoma Paulo akomaki ete: “Tiká ete bato nyonso bámona ete bozali na makambo makasi te.” (Bafilipi 4:5, NW) Na yango, Biblia elendisi biso tózala na bokatikati na ndenge oyo tozali kotalela bato oyo bazali na lisangá ya boklisto te.

7. Mpo na ‘komibatela pɛto na mbindo ya mokili’ esengeli kosala nini?

7 Lisusu, Makomami elobi na biso polele ete ‘tómibatela nzoto pɛto na makambo ya mokili.’ (Yakobo 1:27; 4:4) Na esika oyo, lokola mpe na bisika mingi mosusu na Biblia, liloba “mokili” elimboli bato nyonso oyo bazali na lisangá ya boklisto ya solo te. Tozali na kati ya bato yango; tokutanaka na bango na mosala, na eteyelo, na esika oyo tofandi. (Yoane 17:11, 15; 1 Bakolinti 5:9, 10) Kasi, tokomibatela nzoto pɛto na mbindo ya mokili soki tokoboya elimo, elobeli, mpe etamboli oyo eyokani na banzela ya sembo ya Nzambe te. Ezali mpe na ntina mingi tóyeba likama ya kosala boninga makasi na mokili yango, mingimingi na baoyo batyolaka mibeko ya Yehova.​—Masese 13:20.

8. Mpo na nini toli ya komibatela pɛto na mbindo ya mokili epesi biso nzela ya kotyola bato mosusu te?

8 Atako bongo, toli ya komibatela nzoto pɛto na mbindo ya mokili epesi biso nzela te ya kotalela bato oyo bazali Batatoli te lokola biloko mpamba. (Masese 8:13) Tókanisa lisusu ndakisa ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda oyo tolobelaki na lisolo eleki. Yehova andimaki losambo na bango te; mpe yango ebongisaki boyokani na bango na bato ya mabota mosusu te. (Matai 21:43, 45) Lokola bato yango ya molende mabe bamitombolaki mpe bamonaki ete bango nde basembwi, bazalaki kotyola bato ya mabota mosusu. Biso tozalaka na makanisi mabe wana te, totalelaka bato oyo bazali Batatoli te lokola biloko mpamba te. Lokola Paulo, elikya na biso ezali ete bato nyonso oyo bazali koyoka nsango ya solo euti na Biblia bázwa ngɔlu ya Nzambe.

9. Likanisi ya bokatikati mpe oyo endimami na Makomami esengeli kozala na bopusi nini na ndenge oyo tozali kolobela bato oyo tozali na bango lingomba moko te?

9 Kotalela bato oyo bazali Batatoli te na bokatikati mpe na boyokani na Makomami esengeli komonana na ndenge oyo tozali kolobela bango. Paulo ayebisaki Tito ete akundwela baklisto ya esanga Kelete “ete báfinga moto te, báwelana na moto te, bázala na makambo makasi te, bámonisa boboto epai ya bato nyonso.” (Tito 3:2, NW) Tósimba likambo oyo ete baklisto basengelaki kofinga “moto te”—ezala bato oyo bazalaki baklisto te na Kelete, atako bamoko na bango bayebanaki lokola bato ya lokuta, balundi, mpe bato na goigoi. (Tito 1:12) Na bongo, soki tozali kosalela maloba ya kotyola mpo na kolobela bato oyo tozali na bango lingomba moko te ekomonisa ete tobwaki toli ya Makomami. Komilakisa lokola ete biso nde toleki bato mosusu ekobenda bato na losambo ya Yehova te. Nzokande, soki tozali kosalela bato mosusu makambo na bokatikati ndenge Liloba ya Yehova etindi, ‘tokokembisa mateya’ ya Nzambe.​—Tito 2:10.

Ntango nini kozala nyɛɛ, ntango nini koloba

10, 11. Ndenge nini Yesu amonisaki ete ayebaki (a) ‘ntango ya kozala nyɛɛ’? (b) ‘ntango ya koloba’?

10 Mosakoli 3:7 (NW) elobi ete ezali na “ntango ya kozala nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” Na yango, motuna ezali boye: Ntango nini tokolanda te maloba ya batɛmɛli mpe ntango nini koloba mpo na kolongisa kondima na biso? Tokoki koyekola makambo mingi na ndakisa ya Yesu, moto oyo asalelaki bokɛngi na ndenge ya kokoka. (1 Petelo 2:21) Ayebaki “ntango ya kozala nyɛɛ.” Na ndakisa, ntango banganga mpe mikóló bakoselaki ye makambo liboso ya Pilata, Yesu, ‘azongisaki maloba te.’ (Matai 27:11-14) Aboyaki koloba likambo nyonso oyo ekokaki kopekisa kokokisama ya mokano ya Nzambe mpo na ye. Amonaki malamu ete misala na ye eloba yango moko. Ayebaki ete ata soki alobaki solo, elingaki kobongola makanisi mpe mitema na bango ya lolendo te. Na yango, alandaki bifundeli na bango te; ayebaki ntina oyo akangaki monɔkɔ na ye mpe alingaki koloba ata likambo moko te.​—Yisaya 53:7.

11 Kasi, Yesu ayebaki mpe “ntango ya koloba.” Na mabaku mosusu, awelanaki mpenza na batɛmɛli na ye, mpe akweisaki bifundeli na bango ya lokuta. Na ndakisa, ntango Bakomeli mpe Bafalisai balukaki kosambwisa ye liboso ya bato ebele mpe balobaki ete azalaki kobengana bilimu mabe na nguya ya Belezebula, Yesu amonaki ete ezalaki ntango ya kokanga monɔkɔ te. Asalelaki makanisi oyo makoki kokweisama te mpe elakiseli moko ya kosimba motema mpo na kokweisa lokuta na bango. (Malako 3:20-30; talá lisusu Matai 15:1-11; 22:17-21; Yoane 18:37.) Bobele bongo, nsima wana batɛkaki Yesu mpe bakangaki ye, bamemaki ye liboso ya Sanedrina. Nganga Monene Kayafa alobaki na mayele mabe ete: “Nazali kokatisa yo ndai na Nzambe na bomoi ete oloba na biso soko yo ozali Klisto, Mwana na Nzambe.” Libaku wana mpe ezalaki “ntango ya koloba,” mpamba te soki afandaki nyɛɛ, bakokaki kokanisa ete awangani ete azali Klisto. Na yango, Yesu ayanolaki ete: “Ngai nazali.”​—Matai 26:63, 64; Malako 14:61, 62.

12. Na Ikoni, makambo nini epusaki Paulo na Balanaba na koloba na mpiko nyonso?

12 Tókamata lisusu ndakisa ya Paulo na Balanaba. Misala 14:1, 2 elobi ete: “Na Ikoni bakɔtaki lokola liboso na eyanganelo na Bayuda, mpe basololi bongo ete ebele monene na Bayuda mpe na Baela bandimi. Nde Bayuda oyo baboyi kondima batombokisi bapakano mpe babanzisi bango mabe epai na bandeko.” Biblia Boyokani ya Sika elobi ete: “Kasi Bayuda oyo baboyaki kondima bapesi toli ya mabe na bato ya bikólo mosusu mpo bázwela bandeko makanisi ya mabe.” Na esika básuka na koboya nsango bango moko, Bayuda oyo batɛmɛlaki baklisto babandaki kopanza nsango ya lokuta mpo ete bato ya mabota bákóma na makanisi ya mabe mpo na baklisto.a Talá koyina oyo bayinaki baklisto! (Talá Misala 10:28.) Mpo ete makanisi mabe ya bato elɛmbisa bayekoli ya sika te, Paulo na Balanaba bamonaki ete ezalaki “ntango ya koloba.” “Na bongo [Paulo na Balanaba] baumeli ntango molai, mpe basakoli na molende mpo na Nkolo,” oyo amonisaki ete andimi mosala na bango na ndenge apesaki bango nguya ya kosala bikamwiseli. Yango wana bato bakabwanaki, bamoko “epai na Bayuda, mpe bamosusu epai na bantoma.”​—Misala 14:3.

13. Soki bazali kopamela biso, mbala mingi ntango nini ezalaka “ntango ya kozala nyɛɛ”?

13 Na yango, tosengeli kosala nini soki bazali kopamela biso? Yango etalelaka likambo na likambo. Makambo mosusu esɛngaka tósalela motinda oyo elobi ete ezali na “ntango ya kozala nyɛɛ.” Esɛngaka bongo mingimingi na ntango emonani ete batɛmɛli bazali nde koluka kobenda biso na kotyana ntembe oyo ezangi ntina. Tóbosana te ete bato mosusu bazalaka na mposa ya koyeba solo te. (2 Batesaloniki 2:9-12) Koluka kososolisa bato oyo, na lolendo nyonso, batingami na ntembe ezali mosala ya mpunda. Lisusu, soki tomipesi na kotyana ntembe na moto nyonso oyo akoseli biso makambo, tokobosana mosala na biso oyo eleki ntina mpe ya litomba: mosala ya kosalisa bato ya mitema sembo oyo balingi mpenza koyekola solo ya Biblia. Na yango soki tokutani na batɛmɛli oyo bazali na mposa ya kopanza nsango ya lokuta mpo na biso, toli ya Makomami ezali ete: “Bókima bango.”​—Baloma 16:17, 18, NW; Matai 7:6.

14. Na banzela nini tokoki kolongisa kondima na biso liboso ya bato mosusu?

14 Nzokande, yango elingi koloba te ete tokolongisa kondima na biso te. Toyebi malamu ete ezali mpe na “ntango ya koloba.” Tozali komibanzabanza mpo na bato ya sembo oyo bayokaki makambo ya lokuta na ntina na biso. Tozali na mposa ya kolimbola polelepolele bindimeli na biso epai ya bato mosusu; soki libaku motindo wana ezwami tosepelaka mingi. Petelo akomaki ete: “Bóbulisa Klisto lokola Nkolo kati na mitema na bino; bóselingwaka mikolo nyonso mpo na kozongisa monɔkɔ na moto na moto oyo akotuna bino mpo na ntina na elikya ezali kati na bino. Kasi bózongisa monɔkɔ yango na bopɔlɔ mpe na limemya.” (1 Petelo 3:15) Ntango bato oyo basepeli mpenza na nsango na biso batuni biso na ntina na bindimeli oyo topesaka motuya mingi, ntango batuni biso na ntina na bifundeli ya lokuta ya batɛmɛli, tozali na mokumba ya kolongisa kondima na biso mpe kopesa biyano ya sikisiki oyo biuti na Biblia. Lisusu, etamboli malamu ekoki kopesa litatoli monene. Ntango bato ya makanisi malamu bazali komona ete tozali kosala makasi mpo na kolanda mibeko ya sembo ya Nzambe, bakoki mbala moko komona ete makambo oyo ezali kolobama mpo na biso ezali lokuta.​—1 Petelo 2:12-15.

Ntango bakoseli biso makambo

15. Pesá ndakisa moko emonisi lolenge oyo bapanzi-nsango balobaki lokuta mpo na Batatoli ya Yehova.

15 Ntango mosusu, bazulunalo, televizyo mpe radio epesaka nsango ya lokuta na ntina na Batatoli ya Yehova. Na ndakisa, mokolo ya 1 Augústo 1997, zulunalo moko ya ekólo Russie ebimisaki lisolo moko oyo elobaki makambo ya lokuta mingi mpo na Batatoli ya Yehova, kati na yango elobaki ete Batatoli basɛngisaka bato ya lingomba na bango ete ‘báboya basi, mibali, mpe baboti na bango soki bazali kososola te to mpe bazali kolanda bindimeli na bango te.’ Moto nyonso oyo ayebi Batatoli ya Yehova malamu ayebi ete makambo wana ezali lokuta. Biblia elobi ete baklisto basengeli kolinga mpe komemya bandeko na bango oyo bazali bandimi te, mpe Batatoli balandaka toli wana. (1 Bakolinti 7:12-16; 1 Petelo 3:1-4) Atako bongo, lisolo yango ebimisamaki, mpe bato mingi oyo batángaki yango bakosamaki. Ndenge nini tokoki kolongisa kondima na biso ntango bazali kolobela biso mabe?

16, 17, mpe etanda na lokasa 16. (a) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki nini mpo na koyanola na nsango ya lokuta na bipanzelo ya nsango? (b) Ntango nini Batatoli ya Yehova bakoki koyanola na nsango ya lokuta na bipanzelo ya bansango?

16 Na likambo oyo mpe, ezali na “ntango ya kozala nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki likambo yango boye: “Mpo na koyeba soki tosengeli te kotya likebi na makambo [ya lokuta] mayebisami na bipanzelo ya nsango to tosengeli kokɔtela solo na kosaleláká myango oyo mibongi, tosengeli kososola ezalela ya makambo, mobimisi ya matɔ́ngi mpe mokano na ye.” Ntango mosusu eleki malamu kotya likebi te na makambo ya lokuta mpo epalangana mingi te.

17 Na makambo mosusu ekoki kozala “ntango ya koloba.” Ntango mosusu mopanzi-nsango akoki kozala sembo, nzokande bayebisaki ye makambo ya lokuta mpo na Batatoli ya Yehova mpe akoki kosepela koyeba bosolo ya makambo. (Talá etanda “Lokuta esembolami.”) Soki makambo ya lokuta oyo elobami na bipanzelo ya nsango epusi bato na kokanisela biso mabe mpe epesi mokakatano na mosala na biso ya kosakola, bamonisi ya filiale ya Société Watch Tower bakoki kokamata bibongiseli mpo na kolongisa solo na myango oyo mibongi.b Na ndakisa, bakoki kopona bankulutu ya makoki mpo na komonisa ndenge makambo ezali mpenza, na ndakisa na emisyo moko ya televizyo, soki emonani ete koboya kokende na emisyo yango ekoki kotalelama lokola ete Batatoli ya Yehova bazangi eyano ya kopesa. Na makambo ya ndenge wana, Batatoli basalanaka na mayele na biro ya la Société Watch Tower mpe bamonisi na yango.​—Baebele 13:17.

Tósalela mibeko mpo na kolongisa nsango malamu

18. (a) Mpo na nini tozali na mposa ya kozwa ndingisa ya baguvernema ya mokili te mpo na kosakola? (b) Ntango baboyi kopesa biso bonsomi ya kosakola tosengeli kosala nini?

18 Ndingisa ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe euti na likoló. Yesu, oyo atindi biso tósala mosala yango, apesameli ‘bokonzi nyonso, ezala na likoló to na mabelé.’ (Matai 28:18-20; Bafilipi 2:9-11) Na yango, tozali na mposa ya kozwa ndingisa ya baguvernema te liboso ete tósakola. Atako bongo, toyebi ete bonsomi ya losambo ezali kosunga mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi. Na bikólo oyo tozali na bonsomi ya kosambela Nzambe na biso, tokosalela mibeko ya mboka mpo na kobatela bonsomi yango. Na mikili oyo baboyi kopesa biso bonsomi yango, tokosala nyonso, na kolandáká mibeko, mpo ete tózwa yango. Mokano na biso ezali ya kobongola makambo ya mboka te, kasi ya “kolongisa mpe kobatela nsango malamu na mibeko.”c—Bafilipi 1:7, NW.

19. (a) Likambo nini ekoki komonana na ntango tozali ‘kopesa na Nzambe yango ezali na Nzambe’? (b) Tozali na ekateli ya kosala nini?

19 Mpo na biso Batatoli, Yehova nde azali Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Mibeko na ye mizali likoló ya mibeko nyonso. Totosaka bakonzi ya Leta na motema moko, yango wana ‘topesaka epai na Kaisala yango ezali na Kaisala.’ Kasi tokotika nzela na eloko moko te ete epekisa biso kokokisa mokumba na biso oyo eleki ntina: ‘kopesa na Nzambe yango ezali na Nzambe.’ (Matai 22:21) Toyebi malamu ete mabota ‘bakoyina’ biso ntango tozali kosala bongo, kasi tondimi yango lokola motuya ya kofuta mpo ete tozali bayekoli. Lisolo ya Batatoli ya Yehova na ekeke oyo ya 20 liboso ya bisambiselo emonisi ete tozali na ekateli makasi ya kolongisa kondima na biso. Na lisalisi mpe na lisungi ya Yehova, tokokoba mpe ‘tokotika te kolakisa mpe kosakola nsango malamu.’—Misala 5:42.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Buku moko (Matthew Henry’s Commentary on the Whole Bible) elobi ete Bayuda oyo batɛmɛlaki baklisto “bamipesaki mosala ya kokende epai ya [bapakano] oyo bayebanaki na bango, mpe bazalaki koloba makambo nyonso ya lokuta oyo ezalaki koyela bango na motó, mpo ete bato yango básuka bobele na koboya kotyela baklisto likebi te kasi bámona mpenza ete bazali mabe.”

b Nsima wana zulunalo moko ya ekólo Russie ebimisaki lisolo oyo ezalaki na makambo ya lokuta mpo na bango (oyo tolobelaki na paragrafe 10), Batatoli ya Yehova bafundaki likambo yango na esambiselo. Eleki mikolo mingi te, esambiselo yango ekataki likambo mpe ekweisaki zulunalo yango na ndenge ebimisaki lisolo wana.​—Talá Lamuká ya 22 Novɛ́mbɛ 1998, nkasa 26-27 (ebimeli ya Lifalanse).

c Talá lisolo “Tozali kobatela nsango malamu na nzela ya mibeko ya Leta,” na nkasa 19-22.

Ozali komikundola

◻ Mpo na nini bazali ‘koyina’ Batatoli ya Yehova?

◻ Ndenge nini tosengeli kotalela bato oyo tozali na bango lingomba moko te?

◻ Liboso ya batɛmɛli, Yesu apesaki ndakisa nini ya bokatikati?

◻ Ntango bazali kopamela biso, ndenge nini tokoki kosalela motinda oyo elobi ete ezali na “ntango ya kozala nyɛɛ mpe ntango ya koloba”?

[Etanda na lokasa 16]

Lokuta esembolami

“Na engumba Yacuiba, na ekólo Bolivie, bato ya Église évangelique bayokanaki na bakambi ya televizyo moko ete bálakisa filime moko oyo, na ntembe te, bapɛngwi nde babongisaki yango. Lokola filime yango ebebisaki lokumu ya Batatoli ya Yehova na miso ya bato, bankulutu bazwaki ekateli ya kokende na stasyo mibale ya televizyo mpe bafutaki mbongo mpo ete bálakisa bato bakasɛti mibale: Les Témoins de Jéhovah – Un nom, une organisation mpe La Bible: un récit historique exact, des prohéties dignes de foi. Nsima ya kotala bakasɛti ya la Société, nkolo stasyo moko ya radio ayokaki mawa mpo na lokuta oyo emisyo ya bapɛngwi epalanganisaki mpe alobaki ete akosala publisite ya liyangani ya etúká oyo esengelaki kosalema mosika te kozanga ete báfuta ye mbongo. Bayangani bayaki ebele koleka ndenge ezalaka na momeseno, mpe bato mingi ya mitema sembo batunaki mituna ya solosolo ntango Batatoli bakendaki kosakola na bandako na bango.”​—Annuaire 1997 des Témoins de Jéhovah, nkasa 61-62.

[Elilingi na lokasa 17]

Mbala mingi, Yesu azalaki kokweisa mpenza bifundeli ya lokuta ya batɛmɛli na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto