Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 59
  • Okoki koyikela minyoko mpiko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki koyikela minyoko mpiko
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Bósepela ntango bazali konyokola bino
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Omibongisa banda sikoyo mpo na minyoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Ndenge oyo Yehova asalisaka biso tóyika mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Koyikela minyoko mpiko ekumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 59
Liteya 59. Polisi mibale bakangi Motatoli ya Yehova mpe bazali koleka liboso ya bapanzi-nsango ná Batatoli mosusu.

LITEYA 59

Okoki koyikela minyoko mpiko

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Lelo to lobi, bakristo nyonso bakokutana na botɛmɛli, ata mpe minyoko. Yango esengeli kobangisa biso?

1. Mpo na nini tosengeli kokamwa te soki tokutani na minyoko?

Biblia elobi polele ete: “Baoyo nyonso balandaka Yesu mpe balingi kosalela Nzambe na bosembo nyonso bango mpe bakonyokwama.” (2 Timote 3:12) Yesu anyokwamaki mpo azalaki moto ya mokili ya Satana te. Biso mpe tozali bato ya mokili oyo te, yango wana tokamwaka te ntango baguvɛrnema ya mokili oyo mpe mangomba enyokolaka biso.​—Yoane 15:18, 19.

2. Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na minyoko?

Tosengeli banda sikoyo kokómisa kondima na biso makasi epai ya Yehova. Mikolo nyonso, zwáká ntango ya kobondela Yehova mpe kotánga Liloba na ye. Yanganáká na makita nyonso ya lisangá. Makambo wana nyonso ekopesa yo makasi oyo esengeli mpo oyikela minyoko nyonso mpiko, ata soki euti epai ya bato ya libota na yo. Ntoma Paulo, oyo akutanaki na minyoko mbala na mbala, akomaki boye: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te.”​—Baebre 13:6.

Tokoki mpe kokóma na mpiko mingi soki tozali kosakola nsango malamu mbala na mbala. Kosakola esalisaka biso tótyela Yehova motema mpe tótika kobanga bato. (Masese 29:25) Soki ozali na mpiko ya kosakola sikoyo, yango ekosalisa yo okoba kosakola ata soki baguvɛrnema epekisi mosala na biso.​—1 Batesaloniki 2:2.

3. Bolamu nini tokozwa soki toyikeli minyoko mpiko?

Tosepelaka te ntango bazali konyokola biso, kasi ntango toyikeli minyoko mpiko, kondima na biso ekómaka makasi. Komona ndenge Yehova asalisaka biso na ntango oyo tosili makasi, ekómisaka boninga na biso ná ye makasi. (Tángá Yakobo 1:2-4.) Esalaka Yehova mpasi ntango tozali konyokwama, kasi asepelaka mpe ntango tozali koyika mpiko. Biblia elobi ete: “Soki bozali koyika mpiko na bampasi mpo bozali kosala malamu, ezali likambo ya malamu na miso ya Nzambe.” (1 Petro 2:20) Soki totikali sembo, Yehova akopesa biso bomoi ya seko na mokili oyo moto moko te akotɛmɛla lisusu losambo ya solo.​—Matai 24:13.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba nini ekoki kosalisa yo otikala sembo ntango bazali konyokola yo mpe ndenge oyo Yehova akopambola yo.

Mwasi moko azali kokende koyekola Biblia atako baboti na ye bazali kopekisa ye.

4. Okoki koyika mpiko ntango bato ya libota batɛmɛli yo

Yesu ayebaki malamu ete bato mosusu ya libota na biso bakoki kolinga te ete tósambela Yehova. Tángá Matai 10:34-36, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nini ekoki kosalema ntango moto moko ya libota aponi kosalela Yehova?

Mpo na komona ndakisa moko, talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: Yehova alɔkɔtaki biso (5:13)

  • Okoki kosala nini soki ndeko moko ya libota to moninga moko aluki kopekisa yo kosambela Yehova?

Tángá Nzembo 27:10 mpe Marko 10:29, 30. Nsima ya kotánga vɛrsɛ mokomoko, yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini elaka oyo ekoki kosalisa yo ntango okutani na botɛmɛli ya libota to ya baninga?

5. Kobá kosambela Yehova atako minyoko

Esɛngaka mpiko mpo na kokoba kosalela Yehova ntango basusu bazali koluka kopekisa biso. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: Bazali komonisa mpiko atako minyoko (6:27)

  • Makambo nini omoni na video yango epesi yo makasi?

Tángá Misala 5:27-29 mpe Baebre 10:24, 25. Nsima ya kotánga vɛrsɛ mokomoko, yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini ezali na ntina tókoba kosambela Yehova ata soki baguvɛrnema epekisi biso kosakola to koyangana na makita?

6. Yehova akosalisa yo oyika mpiko

Batatoli ya Yehova, ezala bilenge to mikóló, na mokili mobimba bakobaki kosambela Yehova ata ntango bazalaki konyokola bango. Mpo na komona oyo esalisaki bango, talá VIDEO. Na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: Yehova Nzambe akopesa ngai makasi (3:40)

  • Na video yango, nini esalisaki Batatoli ya Yehova báyika mpiko?

Tángá Baroma 8:35, 37-39 mpe Bafilipi 4:13. Nsima ya kotánga vɛrsɛ mokomoko, yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini vɛrsɛ oyo endimisi yo ete okoki koyika mpiko ata na monyoko ya ndenge nini?

Tángá Matai 5:10-12, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini okoki kozala na esengo ata soki bazali konyokola yo?

Batatoli ya Yehova oyo bazali koyikela mikakatano mpiko lelo oyo mpe bakɔtá bolɔkɔ mpo na kondima na bango.

Bamilio ya Batatoli ya Yehova batikalaki sembo atako bakutanaki na botɛmɛli. Yo mpe okoki kosala bongo!

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Nakokoka koyika mpiko te.”

  • Vɛrsɛ nini ya Biblia ekoki kopesa ye makasi?

NA MOKUSE

Yehova azwaka na valɛrɛ mingi milende oyo tosalaka mpo na kosambela ye ata ntango bazali konyokola biso. Na lisalisi na ye, tokoki koyika mpiko!

Bozongeli

  • Mpo na nini bakristo basengeli kokamwa te ntango bazali konyokola bango?

  • Okoki kosala nini sikoyo mpo omibongisa mpo na minyoko?

  • Nini endimisi yo ete okoki kotikala sembo epai ya Yehova ata soki okutani na minyoko ya ndenge nini?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá ndenge elenge mobali moko azali kolobela ndenge oyo Yehova asalisaki ye ntango akɔtaki bolɔkɔ, mpo aboyaki kokɔta na makambo ya mokili.

Kobá koyika mpiko atako minyoko (2:34)

Talá eloko oyo esalisaki mwasi moko ná mobali na ye bátikala sembo epai ya Yehova bambula mingi atako bakutanaki na botɛmɛli.

Tozali kokoba kosalela Yehova ata ntango makambo ezali kobongwana (7:11)

Talá ndenge oyo okoki kozala na mpiko ntango bazali konyokola yo.

“Omibongisa banda sikoyo mpo na minyoko” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 07/2019)

Ndenge nini tosengeli kotalela botɛmɛli ya libota, mpe ndenge nini tokoki kobatela kimya mpe kotikala sembo epai ya Yehova?

“Solo ememaka ‘kimya te, kasi mopanga’” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 10/2017)

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto