Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 48
  • Poná malamu baninga na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Poná malamu baninga na yo
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Ndenge nini tokoki kopona baninga ya malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Poná baninga oyo balingaka Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Ndenge ya kobatela boninga na mokili oyo ezangá bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 48
Liteya 48. Baninga bazali komikanga fɔtɔ.

LITEYA 48

Poná malamu baninga na yo

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Baninga malamu babakiselaka biso esengo ntango makambo ezali kotambola malamu, mpe bapesaka biso makasi na ntango ya mpasi. Kasi Biblia eyebisi biso ete moto nyonso te nde azali moninga malamu. Na yango, ndenge nini okoki kopona baninga ya malamu? Tótalela mituna oyo elandi.

1. Baninga bakoki kosala nini epai na yo?

Mbala mingi tozwaka bizaleli ya malamu to ya mabe ya bato oyo tolekisaka ntango elongo na bango, ezala na nzela ya Internet. Biblia elobi ete: “Moto oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, Kasi moto oyo azali moninga ya bazoba akosuka mabe.” (Masese 13:20) Baninga oyo basambelaka Yehova mpe balingaka ye, bakoki kosalisa yo ozwaka bikateli ya malamu mpe okóma na boninga makasi ná Yehova. Kasi baninga oyo balingaka Yehova te, bakoki kosala ete okóma mosika na ye. Yango wana Biblia eyebisi biso tópona malamu baninga na biso! Soki baninga na biso balingaka Nzambe, bakosalisa biso, biso mpe tokosalisa bango. Kutu, Biblia elobi ete ‘tokokoba kobɔndisana mpe kolendisana.’​—1 Batesaloniki 5:11.

2. Yehova ayokaka ndenge nini ntango toponaka baninga?

Yehova aponaka malamu baninga na ye. Biblia elobi: “Azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.” (Masese 3:32) Yehova ayokaka ndenge nini ntango toponaka baninga oyo balingaka ye te? Ayokaka motema mpasi! (Tángá Yakobo 4:4.) Kasi, soki toboyi baninga mabe mpe tokangami na Yehova mpe na bato oyo balingaka ye, Yehova akosepela mingi mpe akondima tózala baninga na ye.​—Nzembo 15:1-4.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba mpo na nini kopona baninga ya malamu ezali na ntina. Luká koyeba mpe ndenge oyo okoki kosala boninga oyo ekosalisa yo mpenza na bomoi.

3. Boyá baninga mabe

Bato oyo balingaka Yehova te mpe balingaka mibeko na ye te bazali baninga mabe. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: Yebá kokima baninga mabe (6:17)

  • Ndenge nini tokoki kokóma na baninga mabe kozanga ete tóyeba?

Tángá 1 Bakorinti 15:33, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Bato ya ndenge nini bakoki kozala baninga mabe mpo na yo? Mpo na nini?

Tángá Nzembo 119:63, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nini ekoki kosalisa yo oyeba moninga ya malamu?

Saani ya bapɔme. Pɔme moko ya kopɔla ezali kobenda banzinzi mpe ebandi kobebisa bapɔme mosusu.

Mbuma oyo epɔlá ekoki kobebisa bambuma ya malamu. Ndenge moko mpe moninga moko ya mabe akoki kobebisa bizaleli na yo

4. Bato oyo tokeseni na bango bakoki kokóma baninga na biso

Biblia elobeli boninga ya Davidi ná Yonatane, mibali mibale ya Yisraele ya kala. Yonatane azalaki mokóló ya Davidi mpe azalaki mwana ya mokonzi; kasi bazalaki baninga ya solosolo. Tángá 1 Samwele 18:1, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini baninga na biso basengeli kaka te kozala mbula moko na biso to na makambo ya bomoi ndenge moko na biso?

Tángá Baroma 1:11, 12, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini baninga oyo balingaka Yehova balendisanaka?

Na video oyo elandi, talá ndenge elenge mobali moko azwaki baninga na bisika oyo akanisaki te. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

VIDEO: Okoki kozwa baninga na esika oyo okanisaki te (5:06)

  • Na video oyo, mpo na nini baboti ya Akil bazalaki komitungisa mpo na baninga oyo azalaki na bango na kelasi?

  • Mpo na nini aponaki baninga yango?

  • Nini esalisaki ye atika komiyoka ete azali ye moko?

5. Ndenge ya kopona baninga ya malamu

Luká koyeba ndenge oyo okoki kozwa baninga ya malamu mpe ndenge oyo okoki kozala moninga ya malamu. Talá VIDEO.

VIDEO: Moninga ya solosolo azali nani? (4:14)

Bililingi ya video ‘Moninga ya solosolo azali nani?’ Elenge moko elongo na baninga na ye ya mbula, loposo mpe makoki ndenge na ndenge.

Tángá Masese 18:24 mpe 27:17, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge nini baninga ya solosolo basalisanaka?

  • Ozali na baninga ya malamu ya ndenge wana? Soki ozali na bango te, ndenge nini okoki kokóma na bango?

Tángá Bafilipi 2:4, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na kozwa baninga ya malamu, yo moko osengeli kozala moninga ya malamu. Ndenge nini okoki kosala yango?

Bililingi: Elenge mwasi moko akei kotala baninga na ye misato. 1. Azali kosolola na moninga moko na telefone. 2. Azali kosolola na moninga na ye moko ya mobange na Ndako ya Bokonzi. 3. Akei kotala moninga na ye moko oyo azali na mawa.

Mpo na kozwa baninga ya malamu, yo moko osengeli kozala moninga ya malamu

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Eleki malamu kozala na moninga ata ya ndenge nini na esika ozanga baninga.”

  • Okoyebisa ye nini?

NA MOKUSE

Soki toponi malamu baninga na biso, ekosepelisa Yehova mpe ekosalisa biso na makambo mingi.

Bozongeli

  • Mpo na nini kopona malamu baninga na biso ezali na ntina na miso ya Yehova?

  • Baninga ya ndenge nini tosengeli koboya?

  • Ndenge nini okoki kosala boninga makasi ná bato ya malamu?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá ndenge baninga malamu bakoki kosalisa biso na ntango ya mpasi.

“Salá boninga ya makasi ná basusu liboso nsuka eya” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 11/2019)

Luká koyeba makambo oyo okoki kosala mpo ozwa baninga ya malamu.

“Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya malamu?” (Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 1, mokapo 8)

Osengeli koyeba nini na oyo etali baninga na Internet?

Kebá na basite Internet ya kosolola na baninga (4:12)

Na lisolo “Nazalaki na mposa ya tata,” luká koyeba nini etindaki mobali moko apona baninga mosusu.

“Biblia ebongolaka bato” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/2012)

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto