Oyo tosengeli koyeba na ntina na zúwa
ZÚWA ezali nini? Ezali liyoki makasi oyo ekoki kopusa moto na komitungisa na makanisi, na koyoka mawa, to nkanda. Tokoki koyoka zúwa na ntango tomoni ete moto moko azali kokokisa mosala moko malamu koleka biso. To, tokoki koyoka zúwa na ntango bazali kokumisa moninga moko mingi koleka biso. Kasi kozala na zúwa ezalaka ntango nyonso mabe?
Bato oyo bapusamaka na zúwa bakanisaka mabe mpo na bato oyo balingi kokokana na bango. Mokonzi Saulo na Yisalaele ya kala azalaki ndakisa mpo na yango. Na ebandeli azalaki kolinga Davidi, mokumbi-bibundeli na ye, nkutu atyaki ye mokambi ya mampinga. (1 Samwele 16:21; 18:5) Na nsima, Mokonzi Saulo ayokaki mokolo mosusu basi bazalaki kokumisa Davidi na maloba oyo: “Saulo abomi nkóto na ye nde Davidi abomi nkóto zomi.” (1 Samwele 18:7) Ebongaki te ete Saulo atika nzela na likambo yango ete ebebisa boyokani malamu na ye elongo na Davidi. Nzokande, asilikaki. “Longwa na mokolo yango, Saulo akɛngɛlaki Davidi.”—1 Samwele 18:9.
Mbala mosusu moto na zúwa akolinga te kosala moninga mabe. Akoki bobele koyoka mabe mpo na bolóngi ya moninga mpe koluka ete ye mpe azala na makoki to na ezalela ya makambo motindo moko. Epai mosusu, bilulela ezali lolenge mabe ya zúwa. Kozanga komonisa yango polele, moto na bilulela akoki koboya kosala malamu epai na moto oyo ye azali koyokela zúwa to akoki kolinga ete mpasi ekwela ye. Na bantango mosusu, moto na zúwa akokoka te kobomba mayoki na ye. Akoki kopusama na kosala moninga mabe kozanga kobombama, lokola Mokonzi Saulo alukaki koboma Davidi. Na mabaku mingi, Saulo abwakaki likongá mpo na koluka “kobɛta Davidi kino etutu.”—1 Samwele 18:11; 19:10.
Okoki koloba ete: ‘Kasi ngai nazali moto na zúwa te.’ Ya solo, mbala mosusu zúwa ezalaka na bokonzi likoló na bomoi na yo te. Nzokande, kati na makambo mosusu, biso nyonso topusamaka na zúwa—oyo ya biso moko mpe oyo ya basusu. Atako tozalaka pene ya komona nokinoki zúwa ya basusu, oyo ya biso moko tokoki komona yango nokinoki te.
“Mposa ya bilulela”
Lisoló ya ezalela ya masumu oyo ezali na bato, lokola limonisami kati na Biblia Liloba ya Nzambe, lilobelaka mbala mingi masumu oyo masalemaki mpo na bilulela. Ozali komikundola lisoló ya Kaina mpe Abele? Bana nyonso wana mibale ya Adama mpe Eva bapesaki mbeka epai na Nzambe. Abele asalaki yango mpamba te azalaki moto ya kondima. (Baebele 11:4) Azalaki na kondima kati na makoki ya Nzambe ya kokokisa mokano na Ye monene na ntina etali mabelé. (Genese 1:28; 3:15; Baebele 11:1) Abele andimaki mpe ete Nzambe akopambola bato ya sembo na kopesáká bango bomoi kati na Paladiso na mabelé na mikolo mizali koya. (Baebele 11:6) Na yango, Nzambe amonisaki ete asepelaki na mbeka ya Abele. Soki Kaina alingaki mpenza ndeko na ye, alingaki kozala na esengo mpo ete Nzambe apambolaki ndeko na ye. Nzokande, Kaina “asilikaki mingi.”—Genese 4:5.
Nzambe alendisaki Kaina ete asala malamu mpo ete ye mpe akoka kozwa lipamboli. Na nsima Nzambe akebisaki ye ete: “Soko osali malamu te mbɛ lisumu ezali kolala na ekuke na yo. Mposa na yango elingi kosimba yo nde ekoki ete oleka yango.” (Genese 4:7) Na mawa nyonso, Kaina alóngaki te nkanda na ye oyo epusamaki na zúwa. Epusaki ye na koboma ndeko na ye oyo azalaki sembo. (1 Yoane 3:12) Uta na ntango yango, kowelana mpe bitumba esili koboma bankámá ya bamilió ya bato. Búku The World Book Encyclopedia elobi ete: “Moko na bantina mpenza ya bitumba ezali bongo mposa ya kozala na etando monene ya mabelé, mposa ya kozala na bozwi mingi, to mposa ya kozala na nguya mingi, mposa ya kozala na libateli.”
Baklisto ya solo basanganaka te kati na bitumba oyo ezali kosalema na mokili. (Yoane 17:16) Nzokande, na mawa nyonso, baklisto mosusu bamikɔtisaka na makambo ya koswana. Soki basangani mosusu ya lisangá bamikɔtisi na yango, kowelana yango ekoki kokóma bitumba ya maloba oyo ekoki kopesa mpasi. Mokomi ya Biblia Yakobo atunaki baninga na ye bandimi ete: “Bitumba mpe koswana kati na bino iuti wapi?” (Yakobo 4:1) Ayanolaki na motuna yango na komonisáká polele ezaleli na bango ya lokoso na biloko ya mosuni mpe abakisaki ete: “Bokoyokaka zúwa.” (Yakobo 4:2) Ee, mposa ya koluka biloko mingi ya mosuni ekoki komema moto na kozala na bilulela mpe kozala na zúwa mpo na baoyo ezalela ya makambo na bango ezali malamu. Mpo na yango, Yakobo apesaki likebisi na ntina na “mposa ya bilulelá.”—Yakobo 4:5, NW.
Litomba nini tokoki kozwa na kotaleláká malamu makambo oyo ebimisaka zúwa? Yango ekoki kosalisa biso na kozala sembo mpe kokólisa boyokani malamu elongo na basusu. Ekoki mpe kosalisa biso na kozala pene ya kososola mingi, kolekisa makambo, mpe kolimbisa. Oyo eleki mpenza ntina, emonisaka mposa makasi oyo moto azali na yango kozwa litomba na ebongiseli ya bolingo ya lobiko mpe ya kosikolama longwa na bamposa ya bomoto ya masumu.—Baloma 7:24, 25.
Mokili oyo ezangi zúwa ya mabe
Na makanisi ya bato, mokili mozangi zúwa ya mabe mokoki kosalema te. Mokomi Rom Landau alobaki ete: “Boyebi oyo bato basili kozwa na boumeli ya bikeke mingi, na ebele ya bafilozofe . . . mpe baoyo bayekolaka bizaleli ya bato balobaki na ntina na likambo yango, bapesi litambwisi te epai na moto oyo atungisami na zúwa. . . . Monganga moko asilá kosalisa moto ete asilisa zúwa?”
Kasi Liloba ya Nzambe lizali kopesa elikya ya kokóma na bomoi ya moto ya kokoka kati na mokili ya sika epai kuna moko te akotungisama lisusu na zúwa ya mabe to bilulela. Lisusu, kimya oyo ekozala kati na mokili wana ya sika ekobebisama te na bato oyo bamonisaka bizaleli wana ya mabe.—Bagalatia 5:19-21; 2 Petelo 3:13.
Nzokande, zúwa nyonso ezalaka mabe te. Mpamba te, Biblia ezali koloba ete Yehova “azali Nzambe na zúwa.” (Exode 34:14) Yango elimboli nini? Mpe Biblia ezali koloba nini na ntina na zúwa ya malamu? Bobele na ntango yango, lolenge nini moto akoki kolónga zúwa ya mabe? Talá lisoló lilandi.