Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/9 nk. 14-19
  • Bolingo elóngaka zúwa ya mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolingo elóngaka zúwa ya mabe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Zúwa kati na baklisto
  • Kati na lisangá
  • Kati na libota na yo
  • Bandakisa ya baoyo balóngaki zúwa
  • Bandakisa eleki monene
  • Zalá na bokonzi likoló na zúwa na yo
  • Oyo tosengeli koyeba na ntina na zúwa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Zúwa mpo na losambo ya pɛtɔ ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Baklisto basengeli kozala na zuwa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Bayokeli Yozefe zuwa
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/9 nk. 14-19

Bolingo elóngaka zúwa ya mabe

‘Bolingo ezali na zúwa te.’​—1 BAKOLINTI 13:4.

1, 2. (a) Yesu ayebisaki bayekoli na ye nini na ntina etali bolingo? (b) Moto akoki kozala na zúwa mpe na bolingo na mbala moko, mpe lolenge nini okolimbola eyano na yo?

BOLINGO ezali elembo oyo ezali kokesenisa boklisto ya solo. Yesu Klisto alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Ntoma Paulo apemamaki mpo na kolimbola bopusi oyo bolingo esengeli kozala na yango likoló na boyokani kati na baklisto. Kati na makambo yango, akomaki ete: ‘Bolingo ezali na zúwa te.’​—1 Bakolinti 13:4.

2 Na ntango Paulo akomaki maloba yango, azalaki koloba na ntina na zúwa ya mabe. Soki bongo te, mbɛlɛ alingaki te kokomela lisusu lisangá yango ete: “Nazali na zúwa mpo na bino, zúwa oyo eyokani na mokano ya Nzambe.” (2 Bakolinti 11:2, NW) “Zúwa oyo eyokani na mokano ya Nzambe,” oyo azalaki na yango, etumolamaki mpo na bato oyo bazalaki na bopusi mabe kati na lisangá. Yango epusaki Paulo na kokoma mokanda ya mibale epemami oyo ezalaki na batoli etondi na bolingo epai na baklisto ya Kolinti.​—2 Bakolinti 11:3-5.

Zúwa kati na baklisto

3. Lolenge nini likambo moko libimisaki zúwa kati na Baklisto ya Kolinti?

3 Kati na mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti, Paulo asengelaki kosilisa likambo moko oyo ezalaki kopekisa baklisto ya lisangá wana ya sika ya boklisto ete bázala na boyokani malamu kati na bango. Bazalaki kokumisa bato mosusu na koleka ndelo, bakómaki na ezaleli ya “lolendo mpe kotyola mosusu.” Yango ebimisaki bokabwani kati na lisangá, wana bamoko bazalaki koloba ete: “Ngai moto na Paulo,” mpe bamosusu bazalaki koloba ete: “Ngai na Apolo,” “Ngai na Kefa.” (1 Bakolinti 1:12; 4:6) Na litambwisi ya elimo santu, ntoma Paulo azalaki na likoki ya kososola moboko mpenza ya likambo yango. Bakolinti bazalaki komitambwisa lokola bato oyo bamipesaki mingi na makambo ya mosuni, kasi te lokola “bato na [elimo, NW].” Na yango, Paulo akomaki ete: “Bozali bato na mosuni. Mpo naino zúwa mpe nkaka ezali kati na bino, bozali bato na mosuni te? Bozali kotambola lokola bato te?”​—1 Bakolinti 3:1-3.

4. Paulo asalelaki elakiseli nini mpo na kosunga bandeko na ye ete bákóma na likanisi malamu na ntina na moko na mosusu, mpe liteya nini tokoki kozwa na yango?

4 Paulo asungaki Bakolinti ete báyeba motuya ya kozala na makanisi malongobani na ntina na mayele mpe makoki ya bato bakeseni kati na lisangá. Atunaki ete: “Nani azali kolóngisa yo? Ozali na eloko nini oyo yo opesameli yango te? Soko opesameli yango, mpo na nini ozali komikumisa lokola ete opesami te?” (1 Bakolinti 4:7) Kati na 1 Bakolinti mokapo 12, Paulo ayebisaki ete basangani ya lisangá bazali lokola binama bikeseni ya nzoto ya moto, lokola lobɔ́kɔ, liso, mpe litoyi. Amonisaki ete Nzambe asalaki binama ya nzoto na lolenge boye ete bisalisana moko na mosusu. Paulo akomaki mpe ete: “Soko elembo moko ekosepela, bilembo nyonso ikosepela elongo.” (1 Bakolinti 12:26) Lelo oyo basaleli nyonso ya Nzambe basengeli kotosa lilako yango kati na boyokani na bango moko na mosusu. Na esika ya koyokela moto mosusu zúwa mpo na mokumba oyo azali na yango to makambo oyo azali kokokisa kati na mosala ya Nzambe, tosengeli nde kosepela elongo na ye.

5. Nini emonisami kati na Yakobo 4:5, mpe lolenge nini Makomami elobeli polele bosolo ya maloba yango?

5 Ya solo, ezali pɛtɛɛ mpo na koloba, kasi mpasi mpo na kosalela yango. Yakobo mokomi na Biblia akundweli biso ete “mposa ya bilulelá” ezali kati na moto nyonso ya masumu. (Yakobo 4:5) Moto oyo akufaki liboso ezalaki mpo ete Kaina amitikaki kopusama na zúwa na ye. Bafilisitia banyokolaki Yisaka mpamba te balulaki bozwi na ye oyo ezalaki sé kokóla. Rachel ayokelaki ndeko na ye ya mwasi zúwa mpo azalaki kobota. Bana ya Yakobo bayokelaki leki na bango ya mobali Yosefe zúwa mpo ete alingamaki mingi na tata na bango. Emonani mpenza ete Miriame ayokaki zúwa mpo na semeki na ye oyo azalaki Moyisalaele te. Kola, Datana, mpe Abilama bayangaki mwango na zúwa nyonso mpo na kotɛmɛla Mose mpe Alona. Mokonzi Saulo ayokaki zúwa mpo na bolóngi oyo Davidi azwaki kati na bitumba. Na ntembe te, zúwa ezalaki mpe likambo oyo epusaki bayekoli ya Yesu ete báswanaka mbala na mbala mpo na koyeba nani kati na bango aleki monene. Ezali solo ete bato nyonso ya kozanga kokoka bazalaka na “mposa na bilulelá.”​—Genese 4:4-8; 26:14; 30:1; 37:11; Mituya 12:1, 2; 16:1-3; Nzembo 106:16; 1 Samwele 18:7-9; Matai 20:21, 24; Malako 9:33, 34; Luka 22:24.

Kati na lisangá

6. Lolenge nini bankulutu bakoki kolónga zúwa ya mabe?

6 Baklisto nyonso basengeli komibatela na bilulelá mpe na zúwa ya mabe. Yango etaleli mpe masangani ya bankulutu oyo baponami mpo na kobatela masangá ya basaleli ya Nzambe. Soki nkulutu moko azali na komikitisa, akolinga te komimonisa ete ye mpenza aleki basusu. Epai mosusu, soki nkulutu moko azali na makoki mingi mpamba te ayebi kotambwisa malamu makambo to azali molobi malamu, basusu bakosepela mpo na yango, kotaleláká yango lokola lipamboli mpo na lisangá. (Baloma 12:15, 16) Ekoki kozala ete ndeko moko azali kokóla malamu, azali komonisa mpenza ete azali kobota mbuma ya elimo kati na bomoi na ye. Na ntango bakotalela makoki na ye, ekosɛnga na bankulutu ete básɛnzɛla ete bákamata te mabungá na ye ya mikemike mpe bákómisa yango minene mpo na koloba ete abongi te kondimama lokola mosaleli na misala to nkulutu. Kosala bongo ekomonisa kozanga bolingo mpe ezaleli ya makambo makasi.

7. Likambo nini ekoki kobima soki moklisto moko azwi mokumba kati na mosala ya teokrasi?

7 Soki moto moko apesameli mokumba ya teokrasi to lipamboli ya elimo, basusu kati na lisangá basengeli komibatela na bilulelá. Na ndakisa, ndeko mwasi moko ya makoki akoki kosalelama mingi koleka ndeko mwasi mosusu mpo na kosala bilakiseli kati na makita ya boklisto. Yango ekoki kobimisa zúwa epai na bandeko basi mosusu. Ekoki kozala ete likambo motindo wana nde ebimaki kati na Evodi mpe Suntuke na lisangá ya Filipi. Na mikolo na biso, basi motindo wana bakoki kozala na mposa ya elendiseli ya boboto ya bankulutu mpo na kozala na komikitisa mpe ete “bándimama kati na Nkolo.”​—Bafilipi 2:2, 3; 4:2, 3.

8. Zúwa ekoki komema na bizaleli nini ya masumu?

8 Moklisto moko akoki koyeba ekweli ya kala ya moklisto oyo azwi sikawa lipamboli mpe azwi mikumba kati na lisangá. (Yakobo 3:2) Mpo na zúwa, akoki kopusama na kolobela yango epai na basusu mpe kobɛta ntembe na ntina na mokumba ya moto yango kati na lisangá. Yango eyokani na bolingo te, oyo “ekozipaka ebele na masumu.” (1 Petelo 4:8) Masoló ya zúwa ekoki kobebisa kimya ya lisangá. Moyekoli Yakobo apesaki likebisi oyo ete: “Nde soko bozali na makanisi na bilulelá mpe na makaka na mitema na bino, bomikumisa te, bolobaka na lokuta te mpo na kotɛmɛla makambo na solo. Yango ezali mayele mauti na likoló te kasi mauti na mokili, mayele na nzoto, mayele na [bademó, NW].”​—Yakobo 3:14, 15.

Kati na libota na yo

9. Lolenge nini babalani bakoki kozala na bokonzi likoló ya mayoki na bango ya zúwa?

9 Mabala mingi mazali kokufa mpo na zúwa ya mabe. Komonisáká ezaleli ya kozanga kotyela mobalani na yo motema ezali elembo ya bolingo te. (1 Bakolinti 13:7) Lisusu, mobalani moko akoki kozanga kotalela mayoki ya zúwa oyo mobalani mosusu azali komonisa na ntina na ye. Na ndakisa, mwasi moko akoki kozala na zúwa mpamba te mobali na ye azali kotya likebi mingi epai na mwasi mosusu. To mobali akoki koyoka zúwa mpo na ntango oyo mwasi na ye azali kolekisa mpo na kosunga ndeko moko ya mosuni oyo azali na mpasi. Kotungisamáká na ntina na mayoki motindo wana, babalani bakoki kotika kolobana mpe komonisa nkanda na bango na lolenge oyo ekoyeisa makambo ndóngó. Na esika ya kosala bongo, mobalani asengeli kosolola mpe kolobela mayoki na ye na bosembo nyonso. Na nsima, mobalani mosusu asengeli komonisa bososoli mpe kondimisa ye ete alingaka ye. (Baefese 5:28, 29) Ekoki mbala mosusu kosɛnga na bango mibale ete bálongola mayoki ya zúwa na kopɛngoláká makambo oyo makoki kotumola yango. Mbala mosusu ekosɛnga na mokɛngɛli moklisto ete asunga mwasi na ye na koyeba ete azali kotya likebi oyo ezali na ndelo, likebi oyo ebongi, epai na bandeko basi kati na lisangá mpo na kokokisa mokumba na ye ya mobateli ya etongá ya Nzambe. (Yisaya 32:2) Ya solo, nkulutu asengeli kosɛnzɛla mpo ete apɛngola likambo oyo ekoki mpenza kobimisa zúwa. Yango ezali kosɛnga kozala na bokatikati, komitaleláká mpo na koyeba soki mpenza azali kopesa ntango mpo na kolendisa libala na ye.​—1 Timoté 3:5; 5:1, 2.

10. Lolenge nini baboti bakoki kosunga bana na bango ete bálónga mayoki ya zúwa?

10 Baboti basengeli mpe kosunga bana na bango ete báyeba malamu eloko oyo ebéngami zúwa ya mabe. Mbala mingi bana babimisaka koswana oyo ememaka na kobunda. Mingimingi, ntina mozindo na yango ezalaka bongo zúwa. Lokola mwana na mwana azali na bamposa na ye moko, bana bakoki kosalelama makambo lolenge moko te. Lisusu, bana basengeli kososola ete bango nyonso bazali na makasi ndenge moko te mpe bazali na bolɛmbu ndenge moko te. Soki baboti bazali ntango nyonso kolendisa mwana moko ete asala lokola mwana mosusu, yango ekoki kobimisa zúwa epai na mwana moko mpe lolendo epai na mwana mosusu. Na yango, baboti basengeli kolakisa bana na bango ete bámekaka bokóli na bango na kotaleláká bandakisa oyo ezali kati na Liloba ya Nzambe, na kowelanáká te moko na mosusu. Biblia elobi ete: “Tiká ete tókóma na ezaleli ya moimi te, kobimisáká kowelana, kolulanáká moko na mosusu.” Ee, “tiká ete moto na moto amekaka mosala na ye moko, boye akoki komikumisa mpo na mosala na ye moko nde mpo na moto mosusu te.” (Bagalatia 5:26, NW; Gal. 6:4) Eloko eleki ntina mpenza ezali oyo ete, baboti baklisto basengeli kosunga bana na bango na nzela ya boyekoli ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, komonisáká polele bandakisa ya malamu mpe ya mabe oyo ezali kati na Liloba ya Nzambe.​—2 Timoté 3:15.

Bandakisa ya baoyo balóngaki zúwa

11. Lolenge nini Mose azalaki ndakisa malamu mpo na oyo etali kolónga mayoki ya zúwa?

11 Na kokesana na bakonzi ya mokili oyo bazali na lokɔsɔ ya koyangela, “Mose azalaki na bopɔlɔ mingi, na koleka bato nyonso bazalaki na nsé.” (Mituya 12:3) Na ntango mokumba ya kokamba Bayisalaele ekómelaki ye bozito mingi, Yehova atyaki elimo na ye likoló na Bayisalaele mosusu 70, ete esalisa bango mpo na kosunga Mose. Na ntango mibale kati na bato yango babandaki kosala mosala ya basakoli, Yosua amonaki bango lokola ete balingi kobebisa bokonzi ya Mose. Yosua alingaki kopekisa bato yango, kasi Mose asololaki na ye na komikitisa nyonso ete: “Ozali koyoka zúwa na ntina na ngai? Malamu soko bato nyonso na [Yehova] bazalaki basakoli, ete [Yehova] atya elimo na ye likoló na bango.” (Mituya 11:29) Ee, Mose azalaki na esengo na ntango basusu bazwaki mikumba. Alingaki te komizwela nkembo ye moko na zúwa nyonso.

12. Nini esungaki Yonatana ete apɛngola mayoki ya zúwa?

12 Ndakisa eleki malamu ya lolenge oyo bolingo elóngaka mayoki ya zúwa ya mabe emonisamaki na Yonatana, mwana mobali ya Saulo Mokonzi Moyisalaele. Yonatana azalaki ye oyo asengelaki kosangola kiti ya bokonzi ya tata na ye, kasi Yehova aponaki Davidi, mwana na Yisai, mpo ete akitana na bokonzi ya Saulo. Mpo na bato mingi, soki bazalaki na esika ya Yonatana, mbɛlɛ balingaki koyokela Davidi zúwa, balingaki kotalela ye lokola mbanda. Nzokande, bolingo oyo Yonatana azalaki na yango mpo na Davidi epekisaki mayoki motindo wana ete eyangela ye te. Na ntango ayokaki nsango ya liwa ya Yonatana, Davidi alobaki ete: “Nayoki mawa mingi mpo na yo, Yonatana, ndeko na ngai! Yo ozalaki na bolingo epai na ngai. Bolingo na yo epai na ngai ezalaki malamu na kokamwa, koleka bolingo na basi.”​—2 Samwele 1:26.

Bandakisa eleki monene

13. Nani azali ndakisa eleki monene kati na likambo litali zúwa, mpe mpo na nini?

13 Yehova Nzambe azali ndakisa eleki monene ya ye oyo ayebi mpenza kosalela zúwa ya malamu. Atambwisaka mayoki wana na lolenge ya kokoka. Misala nyonso ya nguya ya Nzambe ezalaka ntango nyonso na boyokani na bolingo, na boyengebene, mpe na mayele na Ye.​—Yisaya 42:13, 14.

14. Ndakisa nini Yesu apesaki oyo ekesanaki mpenza na oyo ya Satana?

14 Ndakisa eleki monene ya mibale ya ye oyo azali na bokonzi likoló na zúwa ezali bongo Mwana molingami na Nzambe, Yesu Klisto. “Ata azalaki na motindo na Nzambe,” Yesu “atángaki te ete ameka kokokana na Nzambe.” (Bafilipi 2:6) Oyo nde bokeseni na ezaleli ya lolendo ya anzelu oyo akómaki Satana Zábolo! Lokola “mokonzi na Babilone,” Satana alukaki na zúwa nyonso kokóma “lokola Oyo-Aleki-Likoló” na komityáká lokola nzambe ya bombanda mpo na kotɛmɛla Yehova. (Yisaya 14:4, 14; 2 Bakolinti 4:4) Satana amekaki nkutu kopusa Yesu ete ‘akwea mpe akumbamela’ ye. (Matai 4:9) Kasi eloko moko te ekokaki kopɛngola Yesu na nzela na ye ya komikitisa mpe ya kotosa boyangeli ya Yehova. Na kokesana na Satana, Yesu “amiyeisi mpamba, akamati motindo na moombo, abotami na lolenge na bato. Ezwami ye na motindo na moto, amisokisi mpe atosi kino kufa, ee, kino kufa na [nzeté ya mpasi, NW].” Yesu atombolaki lotómo ya koyangela ya Tata na ye, abwakaki mpenza ezalela ya lolendo mpe ya zúwa ya Zábolo. Mpo na bosembo ya Yesu, “Nzambe [atomboli, NW] ye mingi mpe apesi ye nkombo koleka nkombo mosusu nyonso, ete na nkombo na Yesu [mabɔlɔngɔ] nyonso makumbama, yango na Likoló mpe yango na mokili, mpe ndemo nyonso iyambolaka ete Yesu klisto ye nkolo mpo na nkembo na Nzambe Tata.”​—Bafilipi 2:7-11.

Zalá na bokonzi likoló na zúwa na yo

15. Mpo na nini tosengeli kosɛnzɛla ete tópekisaka mayoki ya zúwa?

15 Na kokesana na Nzambe mpe Klisto, baklisto bazali bato ya kozanga kokoka. Lokola bazali bato ya masumu, na bantango mosusu bakoki kosala makambo mpo na zúwa na bango ya mabe. Na esika ete zúwa epusa biso na kotɔ́nga moninga mondimi moko na ntina na mwa mabungá mikemike to likambo moko ya mabe oyo tokaniseli ye, ebongi malamu ete tómanyola likoló na maloba oyo mapemami: “Zalá na boyengebene na koleka te mpe omibongisa na mayele na koleka te. Mpo na nini okomibebisa?”​—Mosakoli 7:16.

16. Toli nini ya malamu epesamaki na ntina na zúwa na nimero moko ya kala ya zulunalo oyo?

16 Likoló na motó ya likambo ya zúwa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mársi 1911 (ebimeli ya Lingelesi), epesaki likebisi ete: “Atako tokoki kozala na molende mingi, na zúwa mingi kati na mosala ya Nkolo, nzokande tosengeli kondimisama mpenza ete ezali likambo ya moto ye moko te; mpe tosengeli kotalela soki ‘tomikɔtisaka na makambo ya bato’ to te. Bongo, tosengeli mpe kososola malamu soki ezali likambo oyo elongobani mpo na bankulutu ete bákoka kotalela yango, to soki ekozala mokumba na biso ya koyebisa yango epai na bankulutu. Biso banso tosengeli kozala na zúwa mingi mpo na mokano ya Nkolo mpe mosala ya Nkolo, kasi tosengeli kosɛnzɛla ete ezala ya lolenge ya mabe te . . . elingi koloba, tosengeli komindimisa mpenza ete ezali zúwa ya mabe te, kasi zúwa ya malamu, mpo na matomba mpe bolamu na ye.”​—1 Petelo 4:15.

17. Lolenge nini tokoki kopɛngola bizaleli ya zúwa?

17 Lolenge nini biso baklisto tokoki kopɛngola lolendo, zúwa, mpe bilulelá? Ezali bongo na kotikáká nzela na elimo santu ya Nzambe ete esala mosala kati na bomoi na biso. Na ndakisa, tosengeli kosɛnga elimo na Nzambe mpe lisungi na komonisáká mbuma malamu. (Luka 11:13) Tosengeli koyangana na makita ya boklisto, oyo ebandaka na libondeli mpe ezali na elimo ya Nzambe mpe mapamboli likoló na yango. Lisusu, tosengeli koyekola Biblia, oyo epemamaki na Nzambe. (2 Timoté 3:16) Mpe tosengeli kosangana kati na mosala ya kosakola nsango malamu oyo ezali kosalema na lisalisi ya nguya ya elimo santu ya Yehova. (Misala 1:8) Kosalisa baninga baklisto oyo bazali na mitema mitutami mpo na makambo ya mpasi oyo masilaki kokómela bango ezali lolenge mosusu ya kondima bopusi malamu ya elimo ya Nzambe. (Yisaya 57:15; 1 Yoane 3:15-17) Kokokisáká masɛngisi wana nyonso ya boklisto ekosunga mpo na kobatela biso na bizaleli ya zúwa, mpamba te Liloba ya Nzambe elobi ete: “Bótambola na [elimo, NW] mpe bópesa mposa na nzoto nzela te.”​—Bagalatia 5:16.

18. Mpo na nini tokozala ntango nyonso te kobundisa mayoki mabe ya zúwa?

18 Bolingo etángami liboso kati na molɔngɔ́ ya mbuma ya elimo santu ya Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23) Komonisa bolingo ekosalisa biso ete tózala na bokonzi likoló na bizaleli na biso ya masumu uta sikawa. Kasi ezali boni mpo na mikolo mizali koya? Bamilió ya Batatoli ya Yehova bazali na elikya ya bomoi kati na paladiso oyo ekosalema awa na mabelé, epai kuna bakoki kolikya kozongisama na ezalela ya bomoto ya kokoka. Kati na mokili wana ya sika, bolingo ekolónga mpe moto moko te akokwea na makanisi mabe ya zúwa, mpamba te “[mokili] ekosikwa na boombo na libebisi kino lisiko na nkembo na bana na Nzambe.”​—Baloma 8:21.

Makambo ya komanyola

◻ Elakiseli nini Yesu asalelaki mpo na kosunga biso ete tóbengana mayoki ya zúwa?

◻ Lolenge nini zúwa ebebisaka kimya ya lisangá?

◻ Lolenge nini baboti bakoki kosunga bana na bango ete balónga mayoki ya zúwa?

◻ Lolenge nini tokoki kopɛngola bizaleli ya zúwa oyo ememaka na kosala masumu?

[Elilingi na lokasa 16]

Tótika te ete zúwa ebebisa kimya ya lisangá

[Elilingi na lokasa 17]

Baboti bakoki kobongisa bana na bango ete bálónga mayoki ya zúwa

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto