‘Tótɛmɛla Zabolo’ ndenge Yesu asalaki
“Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”—YAK. 4:7.
1. Botɛmɛli nini Yesu ayebaki ete akokutana na yango awa na mabelé, mpe esengelaki kosuka ndenge nini?
YESU KLISTO ayebaki ete akokutana na botɛmɛli ya Zabolo. Likambo yango emonani na maloba oyo Nzambe alobaki na nyoka mpe, na ndenge yango, na anzelu motomboki oyo asololaki na Eva na nzela ya nyoka: “Nakotya bonguna kati na yo ná mwasi [ebongiseli ya Yehova na likoló] mpe kati na momboto na yo ná momboto na ye. Ye [Yesu Klisto] akopanza motó na yo, mpe okoswa ye na litindi.” (Gen. 3:14, 15, NW; Emon. 12:9) Koswa Yesu na litindi elimboli ete asengelaki konyokwama kaka mwa moke awa na mabelé ntango akobomama, mpo Yehova asengelaki kosekwisa ye mpo na kopesa ye nkembo na likoló. Kasi, kopanza nyoka na motó elimboli ete Zabolo akobomama mpo na libela.—Tángá Misala 2:31, 32; Baebele 2:14.
2. Mpo na nini Yehova ayebaki ete Yesu akolonga mpenza botɛmɛli ya Zabolo?
2 Yehova ayebaki ete Yesu akokokisa mokumba na ye malamu mpenza awa na mabelé mpe akotɛmɛla Zabolo. Ndenge nini Yehova ayebaki yango? Mpamba te, akelaki Yesu na likoló mbula mingi liboso, azwaki ntango ya koyekola ye mpe ayebaki ete “mosali [wana] ya mayele” mpe “mwana ya liboso na bozalisi nyonso” azalaki na limemya mpe azalaki sembo. (Mas. 8:22-31, NW; Kols. 1:15) Na yango, ntango Nzambe atindaki Yesu awa na mabelé mpe atikaki Zabolo ameka ye tii na liwa, ayebaki ete Mwana na ye mobotami-se-moko akolonga.—Yoa. 3:16.
Yehova abatelaka basaleli na ye
3. Ndenge nini Zabolo atalelaka basaleli ya Yehova?
3 Yesu abengaki Zabolo “moyangeli ya mokili oyo” mpe ayebisaki bayekoli na ye ete bakonyokwama ndenge ye mpe anyokwamaki. (Yoa. 12:31; 15:20) Mokili oyo eyangelami na Satana Zabolo ezali koyina baklisto ya solo mpo bazali kosalela Yehova mpe bazali basakoli ya boyengebene. (Mat. 24:9; 1 Yoa. 5:19) Zabolo atyaka miso na ye mingimingi likoló ya baklisto bapakolami oyo bakoyangela elongo na Klisto na Bokonzi na ye na likoló. Satana azali mpe kotya miso na ye likoló ya ebele ya Batatoli ya Yehova oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé. Liloba ya Nzambe epesi biso toli ete: “Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto.”—1 Pet. 5:8.
4. Nini ezali komonisa ete basaleli ya Nzambe balongi Zabolo na mikolo na biso?
4 Lokola tozali ebongiseli oyo Yehova Nzambe azali kosunga, tozali mpenza kotɛmɛla Zabolo. Tózwa mwa bandakisa: Na boumeli ya mbula 100, bakonzi mingi ya mabe balukaki kosilisa Batatoli ya Yehova. Kasi, Batatoli bazali se kokóma ebele mpe bakómi lelo soki 7 000 000, na masangá koleka 100 000 na mokili mobimba. Na esika básilisa Batatoli ya Yehova, bakonzi wana ya mabe oyo bazalaki konyokola bango nde bazali lisusu te!
5. Ndenge nini Yisaya 54:17 ezali kokokisama epai ya basaleli ya Yehova?
5 Nzambe apesaki “mwasi” na ye, Yisalaele ya kala, elaka oyo: “Ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te, mpe okozalisa lolemo na lolemo nyɛɛ oyo ekotɛmɛla yo na kosambisama. Oyo ezali libula ya baombo ya [Yehova] mpe boyengebene ya baoyo ekouta na ngai.” (Yis. 54:11, 17) Elaka yango ezali kokokisama epai ya basaleli ya Yehova na mokili mobimba na boumeli ya “mikolo ya nsuka” oyo. (2 Tim. 3:1-5, 13) Tozali kokoba kotɛmɛla Zabolo, mpe ebundeli ata moko te oyo azali kosalela mpo na kosilisa basaleli ya Nzambe ezali kolonga te, mpo Yehova azali na biso.—Nz. 118:6, 7.
6. Na kolanda esakweli ya Danyele makambo nini ekokómela boyangeli ya Zabolo?
6 Na nsuka ya mokili oyo ya mabe, oyo ezali koya mbangu mpenza, boyangeli ya Satana ekolongolama nyɛɛ. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, mosakoli Danyele alobaki ete: “Na mikolo ya mikonzi yango [oyo bazali na mikolo na biso] Nzambe ya lola akotɛlɛmisa bokonzi [na likoló] bokobebisama soki moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [oyo ezali sikoyo], mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Dan. 2:44) Ntango elaka yango ekokokisama, boyangeli ya Satana mpe ya bato ya kozanga kokoka ekolimwa. Makambo nyonso ya mabe ya Satana ekolimwa mpo na libela, mpe Bokonzi ya Nzambe ekoyangela yango moko na mabelé mobimba.—Tángá 2 Petelo 3:7, 13.
7. Ndenge nini toyebi ete mosaleli mokomoko ya Yehova akoki kolonga Zabolo?
7 Ntembe ezali te ete ebongiseli ya Yehova ekobatelama mpe ekokoba kokola na elimo. (Tángá Nzembo 125:1, 2.) Bongo biso? Biblia emonisi biso ete tokoki kolonga Zabolo, ndenge Yesu alongaki ye. Ɛɛ, esakweli oyo Klisto apesaki na nzela ya ntoma Yoane emonisi ete atako botɛmɛli ya Satana ezali, “ebele ya bato” oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé bakobika ntango mokili oyo ekosuka. Makomami elobi ete bato yango bazali koganga ete: “Lobiko na biso ezali ya Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe ya Mwana-Mpate [Yesu Klisto].” (Emon. 7:9-14) Biblia emonisi ete baklisto bapakolami bazali kolonga Satana, mpe ete baninga na bango, “bampate mosusu,” bazali kolonga mpe ye. (Yoa. 10:16; Emon. 12:10, 11) Kasi yango ezali kosɛnga milende mpenza mpe kobondelaka mingi mpo Nzambe ‘abikisa biso longwa na moto mabe.’—Mat. 6:13.
Ndakisa eleki malamu ya kotɛmɛla Zabolo
8. Wapi komekama ya libosoliboso oyo Zabolo asalelaki mpo na komeka Yesu na esobe, mpe Klisto asalaki nini?
8 Zabolo alukaki kobebisa bosembo ya Yesu. Na esobe, Satana amekaki ye mpo aboya kotosa Yehova. Kasi, Yesu atiká ndakisa malamu ya kotɛmɛla Satana. Nsima ya kokila bilei mikolo 40, butu mpe moi, na ntembe te Yesu ayokaki nzala. Satana alobaki na ye boye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, yebisá mabanga oyo ekóma mampa.” Kasi, Yesu aboyaki kosalela nguya oyo Nzambe apesaki ye mpo na litomba na ye moko. Kutu, alobaki ete: “Ekomamá boye, ‘Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.’”—Mat. 4:1-4; Det. 8:3.
9. Mpo na nini tosengeli kotɛmɛla komekama oyo Satana asalelaka ya bamposa na biso ya nzoto?
9 Lelo oyo, Zabolo azali kosalela bamposa ya nzoto ya basaleli ya Yehova. Na yango, tosengeli kozala na ekateli ya kokima pite to ekobo, oyo etondi na mokili oyo ya mbindo. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Boni! Boyebi te ete bato bazangi boyengebene bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te? Bómikosa te. Bato ya pite, mpe basambeli ya bikeko, mpe bato ya ekobo, mpe mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mpe mibali oyo balalaka na mibali . . . bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (1 Kol. 6:9, 10) Na yango, emonani polele ete bato oyo bazali kosala pite mpe ekobo mpe bazali koboya kobongwana, bakokɔta te na mokili ya sika ya Nzambe.
10. Na kotalela Matai 4:5, 6, komekama nini mosusu Satana asalelaki mpo na koluka kokweisa Yesu?
10 Na ntina na moko ya komekama oyo Yesu akutanaki na yango na esobe, Makomami elobi ete: “Zabolo amemaki ye na engumba mosantu, mpe atɛlɛmisaki ye likoló ya efelo moke ya nsamba ya tempelo mpe alobaki na ye ete: ‘Soki ozali mwana ya Nzambe, omibwaka na nse; mpo ekomamá ete, “Akopesa baanzelu na ye etinda mpo na yo, mpe bango bakomema yo na mabɔkɔ na bango, mpo lokolo na yo etutana na libanga ata moke te.”’” (Mat. 4:5, 6) Na ntembe te, yango esengelaki kotinda Yesu asala likambo moko oyo ekomonisa ete azali mpenza Masiya. Nzokande, kosala bongo elingaki kozala likambo moko ya mabe, ya lolendo, oyo Nzambe akokaki kondima ata moke te. Na mbala wana mpe, Yesu atikalaki kaka sembo epai ya Yehova mpe atángaki vɛrsɛ moko. Alobaki ete: “Ekomamá lisusu boye, ‘Osengeli te kotya Yehova Nzambe na yo na komekama.’”—Mat. 4:7; Det. 6:16.
11. Ndenge nini Satana akoki komeka biso, mpe ekoki kosuka ndenge nini?
11 Satana akoki kokosa biso na ndenge mingi mpo tókóma koluka lokumu. Akoki kotinda biso tókóma kolanda elateli ya bato ya mokili, lolenge na bango ya kosala monzɛlɛ to kominanola na ndenge ya mabe. Kasi, soki toboyi kolanda toli ya Biblia mpe tolandi mokili, tokoki nde kolikya ete baanzelu bakobatela biso na makama oyo etamboli na biso ya mabe ekoki kobimisela biso? Atako Mokonzi Davidi abongolaki motema na masumu oyo asalaki na likambo ya Bata-seba, Nzambe abatelaki ye te na makama oyo masumu na ye ememaki. (2 Sam. 12:9-12) Tóluka te kotya Yehova na komekama na kolanda banzela ya mabe, ntango mosusu na koluka kokóma baninga ya bato ya mokili.—Tángá Yakobo 4:4; 1 Yoane 2:15-17.
12. Komekama nini balobeli na Matai 4:8, 9, mpe Mwana ya Nzambe asalaki nini?
12 Na esobe, Zabolo amekaki Yesu mpe na lolenge mosusu: alakaki kopesa ye boyangeli ya politiki. Satana alakisaki Yesu bikonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango mpe alobaki ete: “Biloko oyo nyonso nakopesa yo soki okwei na nse mpe osambeli ngai.” (Mat. 4:8, 9) Oyo nde mayele mabe Satana asalelaki ya koluka kozwa losambo oyo ebongi kaka na Yehova mpe kotinda Yesu atika kozala sembo epai na Nzambe! Lokola alonaki mposa ete bato bákóma kosambela ye, anzelu wana oyo azalaki liboso sembo epai ya Yehova akómaki mosumuki, moto ya bilulela mpe ya mabe, momeki monene oyo abengami Satana Zabolo. (Yak. 1:14, 15) Nzokande, na bokeseni na Satana, Yesu azalaki na ekateli ya kotikala sembo epai ya Tata na ye ya likoló mpe alobaki ete: “Longwá awa, Satana! Mpo ekomamá ete, ‘Ezali Yehova Nzambe na yo nde osengeli kosambela, mpe ezali kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.’” Na ndenge yango, Yesu atɛmɛlaki Zabolo na motema moko. Mwana ya Nzambe alingaki te kosangana na mokili ya Satana mpe aboyaki mpenza kosambela moto mabe wana!—Mat. 4:10; Det. 6:13; 10:20.
“Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino”
13, 14. (a) Ntango Zabolo alakisaki Yesu bikonzi nyonso ya mokili, alingaki kopesa ye nini? (b) Ndenge nini Satana alukaka kobebisa biso?
13 Ntango Zabolo alakisaki Yesu bikonzi nyonso ya mokili oyo, alingaki kopesa ye bokonzi oyo moto ata moko te azwá na mokili. Satana akanisaki ete bikonzi oyo Yesu amonaki ekolɛngisa ye mpe akowela kondima kokóma mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso na mokili. Lelo oyo, Zabolo alakaka biso bikonzi te, kasi asalelaka miso, matoi mpe makanisi na biso mpo na kobebisa mitema na biso.
14 Zabolo azali kotambwisa mokili mobimba. Atambwisaka mpe makambo oyo balakisaka na televizyo, balobaka na radio to bakomaka na bazulunalo. Yango wana, tokoki kokamwa te ete batelevizyo, baradio mpe mikanda, etondi na makambo ya pite to ekobo mpe na mobulu. Biloko oyo mokili ezali kolakisa epesaka biso mposa makasi ya kosomba biloko oyo tosengeli na yango te. Na ndenge yango, Zabolo azali komeka biso ntango nyonso na biloko oyo ekoki kosepelisa miso, matoi mpe mitema na biso. Kasi, ntango tozali koboya kotala, koyoka makambo oyo eyokani te na mitinda ya Biblia mpe tozali koboya kotánga yango, ezali lokola nde tozali koloba: “Longwá awa, Satana!” Na ndenge yango, tozali komekola Yesu oyo atikalaki ngwi mpe akakatanaki te mpo na koboya mokili mabe ya Satana. Tomonisaka mpe ete tozali bato ya mokili ya Satana te ntango toyebisaka na mpiko nyonso na mosala, na eteyelo, na kartye mpe epai ya bandeko na biso ete tozali Batatoli ya Yehova mpe bayekoli ya Yesu.—Tángá Malako 8:38.
15. Mpo na nini kotɛmɛla Satana ezali kosɛnga tókɛngɛlaka ntango nyonso?
15 Ntango Zabolo amonaki ete alongi te kobebisa bosembo ya Yesu epai ya Nzambe mpo na mbala ya misato, “atikaki ye.” (Mat. 4:11) Nzokande, atikaki te likanisi ya komeka Yesu, mpo Biblia eyebisi biso ete: “Bongo Zabolo, ntango asukisaki komekama nyonso wana, atikaki ye tii na ntango mosusu ya malamu.” (Luka 4:13) Soki tolongi Zabolo, tosengeli kotɔnda Yehova. Kasi, tosengeli kokoba koluka lisalisi ya Nzambe, mpo Zabolo akoki kozonga lisusu mpo na komeka biso na ntango mosusu oyo ye moko amoni malamu, kasi te na ntango oyo tozali kokanisa. Na yango, tosengeli kokɛngɛlaka ntango nyonso, kozala na molende mpo na kosalela Yehova mosala mosantu, ata soki tokutani na mikakatano nini.
16. Yehova apesaka biso nguya ya ndenge nini, mpe mpo na nini tosengeli kosɛngaka yango?
16 Mpo na kozwa lisalisi na milende oyo tozali kosala mpo na kotɛmɛla Zabolo, tosengeli kosɛngaka elimo santu ya Nzambe, nguya oyo eleki nguya nyonso na molɔ́ngɔ́, na elikya ete tokozwa yango. Ekosalisa biso tósala makambo oyo tokokaki kosala te na makasi na biso moko. Mpo na kosalisa bayekoli na ye bándima ete Nzambe akoki kopesa bango elimo santu, Yesu alobaki ete: “Soki bino, atako bozali [bato ya kozanga kokoka mpe] bato mabe, boyebi ndenge ya kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na likoló akopesa elimo santu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango!” (Luka 11:13) Tiká tókoba kobondelaka Yehova mpo na kosɛnga elimo santu na ye. Soki nguya wana oyo eleki nguya nyonso ezali kosunga biso na ekateli oyo tozali na yango ya kotɛmɛla Zabolo, tokolonga. Longola kobondela mbala na mbala, tosengeli kolata molato mobimba ya etumba ya Nzambe mpo ‘tótɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.’—Ef. 6:11-18.
17. Esengo nini esalisaki Yesu atɛmɛla Zabolo?
17 Ezali na likambo mosusu oyo esalisaki Yesu atɛmɛla Zabolo, mpe ekoki kosalisa biso. Biblia elobi ete: “Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete moko ya mpasi mpiko, kotyoláká nsɔni, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.” (Ebe. 12:2) Tokoki kozwa esengo motindo wana soki tozali kosimba bokonzi na ye, kokumisa nkombo na ye mosantu, mpe tozali kobosana te likabo ya bomoi ya seko oyo ezali liboso na biso. Oyo nde esengo tokozala na yango ntango Satana ná misala na ye nyonso ekolimwa mpo na libela mpe “bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo”! (Nzembo 37:11) Na yango, tókoba kotɛmɛla Zabolo ndenge Yesu asalaki.—Tángá Yakobo 4:7, 8.
Okopesa eyano nini?
• Makambo nini ezali komonisa ete Yehova abatelaka basaleli na ye?
• Ndakisa nini Yesu atiká na likambo ya kotɛmɛla Satana?
• Makambo nini okoki kosala mpo na kotɛmɛla Zabolo?
[Elilingi na lokasa 29]
Kokóma moninga ya mokili ekokómisa biso banguna ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 31]
Yesu aboyaki bikonzi nyonso ya mokili oyo Satana alingaki kopesa ye