Yehova ayebi motángo ya “nsuki mpenza ya motó na bino”
“Moko te [ya bakɛngɛli-mboka] ekokwea na nse kozanga ete Tata na bino ayeba. Kasi nsuki mpenza ya motó na bino etángami yango nyonso.”—MATAI 10:29, 30.
1, 2. (a) Mpo na nini Yobo akanisaki ete Nzambe asundoli ye? (b) Maloba ya Yobo emonisaki nde ete aboyi Nzambe? Limbolá.
“E NZAMBE, nazali kobelela yo, kasi ozali koyanola ngai te; mpe ntango nazali kobondela, ozali koyoka te. Okitisi nkanda na yo nyonso likoló na ngai; obimisi makasi na yo nyonso mpo na konyokola ngai.” Moto oyo alobaki maloba wana azalaki mpenza na ntina ya komitungisa na makanisi! Abungisaki biloko na ye nyonso, likama moko ebomaki bana na ye nyonso mpe abɛlaki maladi moko ya mabe mpenza. Moto yango ezali Yobo, mpe lisolo ya mpasi na ye ekomamá na Biblia mpo na kopesa biso liteya.—Yobo 30:20, 21, Today’s English Version.
2 Soki moto ayoki maloba ya Yobo, akoki kokanisa ete Yobo aboyi Nzambe, kasi ezalaki bongo te. Mpasi oyo azalaki koyoka na motema na ye nde etindaki ye aloba bongo. (Yobo 6:2, 3) Ayebaki te ete Satana nde azali kobimisela ye mpasi yango, yango wana akanisaki ete Nzambe asundoli ye. Kutu, mokolo moko alobaki na Yehova boye: “Mpo na nini okobomba elongi na yo mpe okotánga ngai lokola moyini na yo?”a—Yobo 13:24.
3. Makanisi nini tokoki kokóma na yango ntango tokutani na mikakatano?
3 Lelo oyo, makambo lokola bitumba, mobulu na makambo ya politiki to kozanga boyokani na kati ya bato, makama ya mipɛpɛ mpe ya mai, konuna, maladi, bobola mpe bipekiseli ezali ntango nyonso kobimisela basaleli ya Yehova bampasi. Na ntembe te, yo mpe ozali konyokwama na lolenge moko to mosusu. Okoki ntango mosusu kokanisa ete Yehova azali kobombela yo elongi na ye. Oyebi malamu maloba ya Yoane 3:16 oyo: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko.” Kasi, soki ozali kobunda na mokakatano moko oyo ezali kosila te, okoki komituna boye: ‘Nzambe alingaka ngai mpenza? Azali mpenza komona mpasi oyo nazali kobunda na yango? Atyelaka ngai mpenza likebi?’
4. Mokakatano nini Paulo azalaki kotungisama na yango, mpe mokakatano ya ndenge wana ekoki kotinda biso tókanisa nini?
4 Kanisá likambo oyo ekómelaki ntoma Paulo. Akomaki boye: “Bapesá ngai nzubɛ moko na kati ya mosuni, anzelu moko ya Satana, mpo akoba kobɛtaka ngai mbata,” mpe abakisaki: “Nabondelaki Nkolo mbala misato mpo yango ekoka kolongwa epai na ngai.” Yehova ayokaki mabondeli na ye. Kasi, ayebisaki Paulo ete akosala likamwisi te mpo na kobikisa ye. Paulo asengelaki nde kotya motema na nguya ya Nzambe mpo esalisa ye ayika mpiko na mokakatano na ye, “nzubɛ moko na kati ya mosuni.”b (2 Bakolinti 12:7-9) Ekoki kozala ete yo mpe ozali kobunda na mokakatano moko oyo ezali kosila te lokola Paulo. Ntango mosusu ozali komituna boye: ‘Lokola ezali komonana ete Yehova azali kosala eloko moko te mpo na kosilisa mokakatano na ngai, elingi nde koloba ete ayebi mpasi na ngai te to ete azali kokipe ngai te?’ Ekoki kozala bongo ata moke te! Maloba oyo Yesu alobaki na bantoma na ye mwa moke nsima ya kopona bango ezali komonisa mpenza ete Yehova amibanzabanzaka mpo na mosaleli na ye mokomoko ya sembo. Tótala ndenge maloba na ye ekoki kolendisa biso lelo oyo.
“Bóbanga te”—Mpo na nini?
5, 6. (a) Ndenge nini Yesu asalisaki bayekoli na ye bábangaka te mikakatano oyo ekokaki kokómela bango? (b) Ndenge nini Paulo amonisaki elikya makasi ete Yehova akosunga ye?
5 Yesu apesaki bantoma nguya moko monene, mpe “bokonzi likoló ya bilimo ya mbindo, mpo na kobimisa yango mpe kobikisa ndenge nyonso ya bamaladi mpe ndenge nyonso ya kolɛmɛla.” Nzokande, yango elingi koloba te ete bakokaki lisusu te konyokwama to komona mpasi. Kutu, Yesu alobelaki mwa mikakatano ndenge na ndenge oyo basengelaki kokutana na yango. Kasi, alobaki na bango boye: “Bóbanga te baoyo babomaka nzoto nde bakoki koboma molimo te; kasi bóbanga nde ye oyo akoki koboma ná molimo ná nzoto na kati ya Gehena.”—Matai 10:1, 16-22, 28.
6 Mpo na kosalisa bantoma na ye báyeba ntina oyo basengelaki kobanga te, Yesu apesaki bango ndakisa mibale. Alobaki na bango boye: “Batɛkaka te bakɛngɛli-mboka mibale na mbongo moko ya ebende ya motuya moke? Nzokande moko te na yango ekokwea na nse kozanga ete Tata na bino ayeba. Kasi nsuki mpenza ya motó na bino etángami yango nyonso. Na yango bóbanga te: Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.” (Matai 10:29-31) Yesu amonisi awa ete soki moto azali kobanga te ntango akutani na mikakatano, yango ekomonisa ete azali na elikya makasi ete Yehova akosunga ye. Emonani mpenza ete ntoma Paulo azalaki na elikya ya ndenge wana. Akomaki boye: “Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotɛmɛla biso? Moto oyo abombaki kutu te Mwana na ye moko kasi akabaki ye mpo na biso nyonso, mpo na nini akopesa biso mpe te elongo na ye biloko mosusu nyonso na boboto mpenza?” (Baloma 8:31, 32) Ezala ozali na mikakatano ya ndenge nini, yo mpe okoki kozala na elikya ete soki otikali sembo epai ya Yehova, ye akotika yo te. Soki totaleli malamumalamu maloba wana oyo Yesu ayebisaki bantoma na ye, tokomona mpenza ete Yehova amibanzabanzaka mpo na biso.
Motuya ya mokɛngɛli-mboka moko
7, 8. (a) Ndenge nini bazalaki kotalela bakɛngɛli-mboka na ntango ya Yesu? (b) Ndenge ezali komonana, mpo na nini Matai 10:29 esaleli liloba ya Grɛki oyo elimboli “bakɛngɛli-mboka” ya mike?
7 Bandakisa wana oyo Yesu apesaki emonisi mpenza ndenge Yehova amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye. Tótalela libosoliboso oyo ya bakɛngɛli-mboka. Na ntango ya Yesu, bazalaki kolya bakɛngɛli-mboka, kasi lokola bazalaki kobebisa milona, bato bazalaki koyina yango mpenza. Bandɛkɛ yango ezalaki mingi mpe ezalaki na motuya moke mpenza; bakɛngɛli-mboka mibale ekokaki kotɛkama lelo oyo na basantime 5 ya dolare. Soki moto apesi mbongo wana mbala mibale, bazalaki kopesa ye bakɛngɛli-mboka minei te, kasi mitano, elingi koloba bazalaki kobakisela ye moko ofele, lokola nde ezali na motuya moko te!—Luka 12:6.
8 Kanisá mpe monene ya mwa ndɛkɛ yango. Soki totali monene ya bandɛkɛ mingi, mokɛngɛli-mboka, ata oyo ekɔmelá, ezali ndɛkɛ moko moke mpenza. Nzokande, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “bakɛngɛli-mboka” na Matai 10:29 ezali kolobela mpenzampenza nde bakɛngɛli-mboka oyo ya mike. Emonani polele ete Yesu alingaki kobenda likebi ya bayekoli na ye na mwa ndɛkɛ ya moke mpenza, oyo ezali na motuya moko te. Ndenge buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia emonisi yango, “Yesu aponaki ndɛkɛ moko ya moke mpenza, mpe alobelaki kutu nde ya moke na yango!”
9. Liteya nini ya ntina mpenza Yesu apesaki na ndakisa ya bakɛngɛli-mboka?
9 Ndakisa ya bakɛngeli-mboka oyo Yesu asalelaki ezali na liteya moko monene mpenza: Eloko oyo ezali na valɛrɛ te na miso ya bato, Yehova amonaka yango na valɛrɛ. Yesu amonisaki yango lisusu malamumalamu ntango abakisaki ete mokɛngɛli-mboka ya moke ekoki te ‘kokwea na nse’ kozanga ete Yehova ayeba.c Liteya ezali polele. Soki Yehova akipaka ata mwa bandɛkɛ ya mike oyo ezali na motuya moko te, akotala nde mpamba mikakatano ya moto oyo aponi kosalela ye?
10. Pesá ndimbola ya maloba oyo: “Nsuki mpenza ya motó na bino etángami yango nyonso.”
10 Longola ndakisa ya bakɛngɛli-mboka, Yesu alobaki mpe boye: “Nsuki mpenza ya motó na bino etángami yango nyonso.” (Matai 10:30) Maloba wana ya mokuse kasi ya ntina mingi, epesi lisusu ndimbola malamumalamu na ndakisa ya bakɛngɛli-mboka. Kanisá naino: Motó ya moto ekoki kozala na nsuki soki 100 000. Mpe ezali mwa mpasi nsuki moko ebenda likebi ya moto mpamba te pene na nsuki nyonso na motó ya moto ekokani. Nzokande, Yehova amonaka mpe atángaka nsuki mokomoko na motó ya moto. Lokola ezali bongo, tokoki koloba ete ezali na eloko moko na bomoi na biso oyo Yehova akoki koyeba te? Na ntembe te, Yehova ayebi ndenge oyo mosaleli na ye mokomoko asalemá. Ya solo, Yehova “akotalaka kati na motema.”—1 Samwele 16:7.
11. Na maloba nini Davidi amonisaki ete azalaki na kondima ete Yehova atyelaka ye likebi?
11 Davidi, oyo akutanaki na mikakatano mingi na bomoi na ye, azalaki mpenza kondima ete Yehova atyelaka ye likebi. Akomaki boye: “E [Yehova], osili kotala motema na ngai mpe oyebi ngai solo. Oyebi ntango wana nakofanda mpe wana nakotɛlɛma; oyebi makanisi na ngai longwa na mosika.” (Nzembo 139:1, 2) Yo mpe osengeli kondima ete Yehova ayebi yo malamu. (Yilimia 17:10) Koloba mbala moko te ete ozali moto mpamba, oyo miso ya Yehova ekoki komona te!
‘Tyá mpisoli na ngai kati na molangi na yo ya mposo ya nyama’
12. Ndenge nini toyebi ete Yehova ayebi malamumalamu mikakatano oyo basaleli na ye bakutanaka na yango?
12 Yehova asukaka kaka te na koyeba mosaleli na ye mokomoko, kasi ayebaka mpe malamumalamu mikakatano oyo ekómelaka mokomoko na bango. Na ndakisa, ntango Bayisalaele bazalaki konyokwama na boombo, Yehova alobaki na Moize boye: “Ngai nasili komona monyoko ya bato na ngai na Ezipito mpe nayoki kolela na bango na ntina na bakapita na bango. Nayebi bolɔzi na bango.” (Exode 3:7) Koyeba ete ntango tozali kotungisama na mokakatano moko, Yehova amonaka yango mpe ayokaka kolela na biso, ebɔndisaka biso mpenza! Yehova akangaka miso te na bampasi na biso.
13. Nini ezali komonisa ete Yehova amitungisaka mpenza mpo na basaleli na ye?
13 Ndenge oyo Yehova azalaki kotalela mikakatano ya Bayisalaele emonisi mpenza ete amibanzabanzaka mpo na bato oyo bazali na boyokani na ye. Atako Bayisalaele bazalaki mbala mingi konyokwama mpo na motó makasi na bango, Yisaya akomaki mpo na Yehova boye: “Na mpasi nyonso na bango [ye mpe ayokaki mpasi, NW].” (Yisaya 63:9) Soki ozali mosaleli ya sembo ya Yehova, osengeli koyeba ete ntango ozali na mpasi, Yehova mpe ayokaka mpasi. Koyeba yango esengeli mpenza kosalisa yo obanga te ntango okutani na mikakatano mpe okoba kosala nyonso oyo okoki mpo na kosalela ye.—1 Petelo 5:6, 7.
14. Na libaku nini Davidi asalaki nzembo 56?
14 Kondima makasi oyo Mokonzi Davidi azalaki na yango ete Yehova atyelaka ye likebi mpe ayokaka mpasi mpo na ye emonani na Nzembo 56, oyo asalaki ntango azalaki kokimakima Mokonzi Saulo oyo azalaki koluka koboma ye. Davidi akimaki na Gata, kasi ntango Bafilistia bayebaki ye, akómaki kobanga ete bakokanga ye. Akomaki boye: “Bayini na ngai [bazali kozela] ngai mokolo mobimba, mingi bakobunana na ngai na lolendo.” Lokola Davidi akómaki na mokakatano wana, amitikaki na mabɔkɔ ya Yehova. Alobaki boye: “Mokolo mobimba maloba na bango makowelana na ngai, makanisi na bango nyonso ezali mpo na mabe.”—Nzembo 56:2, 5.
15. (a) Davidi alingaki koloba nini ntango asɛngaki Yehova ete atya mpisoli na ye na kati ya molangi ya mposo ya nyama to na kati ya buku? (b) Ntango tokutani na mokakatano moko oyo ezali komeka kondima na biso, elikya nini tosengeli kozala na yango?
15 Na nsima, ndenge tozali kotánga yango na Nzembo 56:8, Davidi alobaki maloba kitoko oyo: “Yo otángi motuya ya [kokimakima] na ngai; osili kotya mpisoli na ngai kati na molangi na yo [ya mposo ya nyama]; yango ekomami na mokanda na yo te?” Maloba wana, oyo emonisi ndenge Yehova atyelaka basaleli na ye likebi, ezali mpenza kosimba motema! Ntango tozali na mpasi, tokoki kobelela Yehova na kolela. Ata Yesu oyo azalaki moto ya kozanga kokoka asalaki mpe bongo. (Baebele 5:7) Davidi azalaki na kondima ete Yehova azali komona ye mpe akobosana mpasi na ye te, lokola nde azali kobomba mpisoli na ye na kati ya molangi to azali kokoma yango na kati ya buku.d Ntango mosusu ozali kokanisa ete mpisoli na yo ekoki kotondisa ndambo monene ya molangi yango to ebele ya nkasa ya buku. Soki ezali bongo, kitisá motema. Biblia ezali koyebisa biso boye: “[Yehova] azali penepene na bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na milimo minyɛtami.”—Nzembo 34:18.
Tókóma baninga ya motema ya Yehova
16, 17. (a) Ndenge nini toyebi ete Yehova akangaka miso te na mikakatano oyo basaleli na ye bakutanaka na yango? (b) Yehova asali nini mpo na kosalisa basaleli na ye bázala baninga na ye?
16 Koyeba ete Yehova ayebi motángo ya ‘nsuki mpenza ya motó na biso’ esalisi biso tómona ete tozali na libaku malamu ya kosambela Nzambe oyo atyelaka biso likebi mpe amibanzabanzaka mpo na biso. Atako mpasi mpe mitungisi na biso ekosila nyonso kaka na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, Yehova azali kosalela basaleli na ye likambo moko ya malamu mpenza lelo oyo. Davidi akomaki boye: “Yehova azalaka moninga ya bato oyo babangaka ye, mpe ayebisaka kondimana na ye epai na bango.”—Nzembo 25:14, NW.
17 Kozala “moninga ya Yehova.” Biso bato ya kozanga kokoka tokoki komona likanisi yango lokola ekoki kosalema ata moke te. Nzokande, Yehova azali kobenga bato oyo babangaka ye báya na hema na ye. (Nzembo 15:1-5) Yehova asalaka nini mpo na bato oyo abengi na hema na ye? Ndenge Davidi amonisi yango, ayebisaka bango kondimana na ye. Yehova afungwelaka bango motema, ayebisaka “mwango” na ye epai ya basakoli mpo báyeba mikano na ye mpe nini basengeli kosala mpo bátambola na boyokani na mikano yango.—Amosa 3:7.
18. Ndenge nini toyebi ete Yehova alingi biso tókóma baninga na ye ya motema?
18 Ya solo mpenza, ezali esengo monene koyeba ete biso bato ya kozanga kokoka tokoki kokóma baninga ya motema ya Oyo-Aleki-Likoló, Yehova Nzambe. Kutu, ye moko azali kolendisa biso tósala yango. Biblia elobi boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Yehova alingi tózala baninga na ye ya motema. Kutu, asilá kosala likambo moko mpo na kofungola nzela na boyokani yango. Mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola biso efungwelá biso nzela ya kokóma baninga ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Biblia elobi boye: “Nde biso, tozali kolinga, mpamba te ye alingaki biso liboso.”—1 Yoane 4:19.
19. Ndenge nini koyika mpiko ekoki kokolisa boninga na biso na Yehova?
19 Boninga yango na Yehova ekómaka lisusu makasi ntango tozali koyika mpiko liboso ya mikakatano. Yakobo akomaki boye: “Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba, mpo bino bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, kozangáká eloko te.” (Yakobo 1:4) Ntango toyikelaka mikakatano mpiko “mosala” nini esalemaka? Kanisá lisusu oyo Paulo abengaki “nzubɛ moko na kati ya mosuni.” Mpiko oyo ayikaki liboso ya mokakatano wana ekokisaki likambo nini? Mpo na mikakatano oyo akutanaki na yango, Paulo alobaki boye: “Na esengo ya koleka mpenza nakomikumisa nde na oyo etali bolɛmbu na ngai, mpo nguya ya Klisto ezala lokola hema likoló na ngai. Na yango nazali kosepela na kati ya bolɛmbu, na kati ya mafinga, na kati ya makambo ya kokelela, na kati ya minyoko mpe mikakatano, mpo na Klisto. Mpo ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya.” (2 Bakolinti 12:9, 10) Paulo amonaki ete Yehova azalaki kopesa ye makasi to “nguya oyo eleki makasi,” oyo azalaki na mposa na yango, mpo ayikela mikakatano mpiko. Yango esalaki ete apusana lisusu penepene na Klisto mpe na Yehova Nzambe.—2 Bakolinti 4:7; Bafilipi 4:11-13.
20. Nini ekoki kosalisa biso tózala na elikya ete Yehova akosunga biso mpe akobɔndisa biso na ntango ya mpasi?
20 Ekoki kozala ete Yehova atiki yo okoba konyokwama. Soki ezali bongo, kobosana te elaka oyo apesá na bato oyo babangaka ye: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” (Baebele 13:5) Okoki mpenza kozwa lisalisi mpe libɔndisi ya ndenge wana. Yehova ayebi motángo ya “nsuki mpenza ya motó na yo.” Azali komona ndenge ozali koyika mpiko. Ayebi mpe mpasi na yo. Azali mpenza komibanzabanza mpo na yo. Mpe ata mokolo moko te ‘akobosana mosala na yo mpe bolingo oyo omonisaki mpo na nkombo na ye.’—Baebele 6:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Davidi mpe bana ya Kola, oyo bazalaki bato ya sembo, balobaki mpe maloba ya ndenge wana.—Nzembo 10:1; 44:24.
b Biblia eyebisi te soki “nzubɛ” oyo Paulo azalaki na yango na kati ya mosuni ezalaki mpenza nini. Ntango mosusu ezalaki maladi moko ya nzoto, lokola mokakatano ya komona. Ekoki mpe kozala ete “nzubɛ moko na kati ya mosuni” yango ezalaki bantoma ya lokuta mpe bato mosusu oyo bazalaki koloba ete ye azali ntoma ya solo te mpe bazalaki kotyola mosala na ye ya kosakola.—2 Bakolinti 11:6, 13-15; Bagalatia 4:15; 6:11.
c Bato mosusu oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobaka ete kokwea ya mokɛngɛli-mboka na mabelé elimboli kaka te kokufa na yango. Balobaka ete maloba ya Grɛki oyo Yesu asalelaki ekoki mpe kolimbola kokita na mabelé mpo na koluka bilei. Soki ezali mpenza bongo, maloba ya Yesu ekoki kolimbola ete Nzambe ayebaka mpe amibanzabanzaka mpo na mwa ndɛkɛ yango kaka ntango ekufi te, kasi mpe na makambo nyonso oyo esalaka mokolo na mokolo.—Matai 6:26.
d Na ntango ya kala, bazalaki kosala milangi na mposo ya meme, ya ntaba mpe ya ngɔmbɛ, oyo bakaukisi na moi. Bazalaki kosalela milangi yango mpo na kobomba miliki, manteka, fromaje to mai. Milangi oyo bakaukisi malamumalamu, bakokaki kobomba na yango mafuta to vinyo.
Ozali koyeba lisusu?
• Makambo nini ekoki kotinda moto akanisa ete Nzambe asundoli ye?
• Liteya nini tozwi na bandakisa oyo Yesu apesaki ya bakɛngɛli-mboka mpe ya kotánga nsuki ya motó na biso?
• Koloba ete Yehova atye mpisoli ya moto na kati ya “molangi na ye ya mposo ya nyama” to na kati ya “buku” na ye elimboli nini?
• Ndenge nini tokoki kokóma “baninga ya Yehova”?
[Elilingi na lokasa 22]
Mpo na nini Yehova alongolaki te “nzubɛ moko na kati ya mosuni” ya Paulo?
[Elilingi na lokasa 23]
Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya bakɛngɛli-mboka oyo Yesu apesaki?
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© J. Heidecker/VIREO
[Elilingi na lokasa 25]
Soki tozali kotánga Biblia ntango nyonso, tokomona mpenza ete Nzambe atyelaka mokomoko na biso likebi