Engebene Biblia
Biblia ezali kokweisa bonsomi ya makanisi?
MƆ́TƆ ezali kopɛla makasi wana basáli ya Leta ya Allemagne bazali kobwaka babúku ya ntina mingi kati na mɔ́tɔ. Ezali likambo lisalemaki na Allemagne ya Nazi? Ee, kasi esalemaki lisusu na mobu 1199, ntango episkɔpɔ moko ya Katolike apesaki etinda ete bátumba ba Biblia nyonso ya lokótá ya Allemand.
Solo mpenza, kotumba babúku, elembo ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba mpo na bolongoli bonsomi nyonso ya makanisi mpe ya maloba, esalemaki na bikeke mingi mpe kati na mikili mingi. Mbala mingi, yango eutaki na bakonzi ya mangomba baoyo bazalaki kobanga bopusi oyo bonsomi ya komonisa makanisi ekokaki kozala na yango likoló na bato ya ekólo.
Ezali likambo ya kokamwa te na komona lelo bato mingi bazali kokanisa ete Biblia epekisi kosalela makoki nyonso ya kokanisa. Kasi ezali mpenza bongo? Biblia ezali kokweisa bonsomi ya makanisi?
‘Lingá Yehova na elimo na yo mobimba’
Biblia epekisi biso te ete tósalela makoki na biso ya kokanisa. Na yango, Yesu alendisaki moto na moto ete alinga Yehova na elimo na ye mobimba. (Malako 12:30) Mosala na ye momonisi ete azalaki kotya likebi mingi na makambo mazali koleka (Luka 13:1-5), na zebi etali bozalisi (Matai 6:26, 28; Malako 7:18, 19), zebi etali milóna (Matai 13:31, 32), mpe na lolenge moto azali (Matai 5:28; 6:22-24). Masese na ye malakisi ete azalaki kososola malamu mitinda ya Liloba ya Nzambe, makambo matali efandelo mpe makanisi ya bayoki na ye, mpe azalaki kokanisa malamumalamu na lolenge ya koteya mitinda yango epai na bayoki na ye.
Paulo alɔmbaki baklisto ete básalela Nzambe na ‘kosalela bososoli na bango.’ (Baloma 12:1) Alendisaki Batesaloniki ete ‘baningana te kati na makanisi na bango mpo na maloba mapemami’ ya bokosi. (2 Batesaloniki 2:2) Azalaki na mwa boyebi ya ntɔ́ki ya Bagreke mpe ya Bakelete (Misala 17:28; Tito 1:12), azalaki mpe na boyebi ya lolenge ya molato ya basodá mpe mimeseno na bango (Baefese 6:14-17; 2 Bakolinti 2:14-16). Mpe azalaki kotya likebi na mimeseno ya bato na esika na esika.—Misala 17:22, 23.
Atako bonsomi monene ya makanisi oyo bazalaki na yango, Yesu mpe Paulo bamitalelaki te lokola bobele bango nde basengelaki kokata nini ezali malamu to mabe. Na esika ya kobwaka Biblia mpo na kosalela makanisi na ye moko, mbala na mbala Yesu atángaki makambo mauti na Makomami. Eyano na ye ya makasi na ntango Petelo alobaki na ye ete álanda nzela mosusu na esika ya kokufa lokola mbeka, oyo ezalaki bongo mokano ya Nzambe mpo na ye, emonisi ete azalaki na mposa soko moko te ete asalela makanisi na ye moko. (Matai 16:22, 23) Bobele bongo, Paulo alobaki epai na Bakolinti, ete: “Mokolo nayákí o mbóka bínó, nayéí kosangela bínó matéya ma Nzámbe na maloba kitóko tǒ na maloba ma bwánya té.” (2 Corinthe 2:1, Liloba lya Nzambe) Lolenge moko na Yesu, makanisi na ye matongamaki makasi mpenza likoló na Makomami.—Misala 17:2.
Biblia elendisi biso ete tósalela makoki na biso ya kokanisa, kasi esengeli kozala kati na bandelo etyami. Nzokande, mokumba ya koyokanisa makanisi na biso elongo na oyo ya Yehova etaleli moklisto moko na moko, kasi etaleli lisangá te. Na yango, ntango Baefese mingi batikaki bondoki liboso ya bato mpe bakómaki baklisto, Paulo azwaki te mokumba ya kotumba babúku na bango, kasi “bato bayíké bazalákí na makambo ma bikelákela bayéí na minkandá mya bangó, batumbí myangó o míso ma bato bánso.” (Bikela 19:19, Liloba lya Nzambe) Mpo na nini baklisto wana bamonaki ete bango moko basengelaki kotumba babúku na bango?
Molɔngɔ́ ya liboso mpo na komibatela
Talelá ndakisa oyo. Ebongiseli malamu ya basodá mpo na komibatela ekozalaka mbala mingi na milɔngɔ́ ebele. Mokonzi moko te ya basodá, oyo azali na bokɛngi, asengeli kokanisa ete moko to mosusu kati na milɔngɔ́ yango ezali na ntina te mpe akoki kotikela yango monguna. Bobele bongo, moklisto oyo azali kobundisa lisumu, azali na milɔngɔ́ mingi mpo na komibatela.
Yakobo 1:14, 15 eyebisi ete “moto na moto akomekamaka mpɔ na kobendama mpe kolengolama na mposa mabe na ye mɔkɔ. Na nsima, esili mposa kojua jemi, eboti lisumu.” Kolóna mposa mabe kati na makanisi ezali litambe ya liboso ekomemaka na lisumu. Na yango, molɔngɔ́ ya liboso mpo na komibatela ezali bongo koboya kolóna mposa motindo wana—kopekisa makanisi.
Ezali mpo na boyokani oyo bozali kati na makanisi mpe misala nde Biblia epesi biso toli oyo, ete: “Bobanjaka makambo na Likolo, bobanjaka makambo na mokili tɛ.” (Bakɔlɔsɛ 3:2) Soki baklisto bazali koboya kotya makanisi na bango likoló na pite, na bondoki, to na lipɛngwi, ezali te mpo ete bazali kobanga noki makanisi yango makoki koleka makambo na solo ya Biblia, kasi ezali mpo ete balingi kopɛngola makambo nyonso oyo makoki komema bango na kosala masumu.
‘Nyonso emonani polele’
Bolingo na biso mpo na Yehova mpe limemya tozali na yango mpo na makoki azali na yango ya koyeba makanisi na biso, ezali ntina mosusu monene mpo na yango tosengeli kopekisa elimo na biso. Na ndakisa, ozali na moninga na yo ya motema to ebóto oyo asepelaka te komona bɔsɔtɔ to mputulu. Okotika kobyanga ye epai na yo, koboyáká bongo kobongisa ntei ya ndako na yo? Bolingo ekopusa yo na kosala milende oyo misengeli mpo na kotya bopɛto, boye te? Mayoki ya Yehova mpo na makanisi na biso ya mozindo emonisami na Njembo 44:21, ete: “Ayebi makambo mabombami na motema.” Paulo alobi ete, tokozongisa monɔkɔ mpo na makanisi wana: “Elɔkɔ mɔkɔ ejali tɛ oyo ebombami liboso na ye, kasi yɔnsɔ ejali bolumbu mpe emɔnisami polele na miso na ye oyo ajali na biso na makambo.”—Baɛbɛlɛ 4:13; Nzembo 10:4; Masese 6:16, 18.
Yobo ayebaki ete moto ye moko azali na mokumba liboso na Nzambe mpo na makanisi na ye. “Yobo . . . abimisaki mbɛka na kotumba . . . ; jambi Yobo alobaki ete: ‘Sɔkɔ bana na ngai basali masumu mpe balakeli Njambe mabe na mitema na bango.’” (Yobo 1:5) Kokanisakanisa likoló ya etamboli moko ya mabe, ekoki kotalelama na Yehova lokola lisumu.—Kokanisá na Exode 20:17.
Bonsomi ya solo ya makanisi
Biblia elendisi moklisto moko na moko na kotya mokano ya “kokanga makanisi yɔnsɔ na nkanga ete matosa Klisto.” (2 Bakɔlinti 10:5) Yango ekoki te kosalema na bipekiseli oyo bityami na bakonzi ya mangomba, kasi na komipekisa ya moto ye moko mpe na bolingo na ye mpe boyebi azali na yango mpo na Yehova mpe mitinda na ye. Soki mokano oyo mokokisami, bonsomi ya solo ya makanisi ekoya; ekozwa ndelo bobele na mitinda miuti na Nzambe mpe ekoyeisama kitoko na esengo ya koyeba ete, ata kati na makanisi na biso, tozali kosepelisa Yehova.