Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ndenge ya kobatela esengo na ntango ya mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli)—2021 | Février
    • 2 Mpo na bato mingi, minyoko ezali te likambo oyo ekoki kopesa moto esengo. Nzokande Liloba ya Nzambe esɛngi biso tótalelaka minyoko ndenge wana te. Na ndakisa, Yakobo akomaki ete tosengeli te komitungisa koleka ndelo ntango tokutani na mikakatano. Tosengeli nde komona yango lokola likambo ya esengo. (Yak. 1:2, 12) Mpe Yesu alobaki ete tosengeli kosepela ata ntango bazali konyokola biso. (Tángá Matai 5:11.) Tokoki kosala nini mpo tóbatela esengo na biso atako tozali kokutana na mikakatano? Mwa makanisi oyo ezali na mokanda oyo Yakobo akomelaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso ekoki koteya biso makambo mingi. Tólobela naino mikakatano oyo bakristo wana bakutanaki na yango.

      MIKAKATANO NINI BAKRISTO YA SIƐKLƐ YA LIBOSO BAKUTANAKI NA YANGO?

      3. Ntango Yakobo akómaki moyekoli ya Yesu, makambo nini esalemaki mwa moke na nsima?

      3 Ntango Yakobo akómaki moyekoli ya Yesu, mwa moke na nsima, bakristo ya Yerusaleme bakutanaki na minyoko. (Mis. 1:14; 5:17, 18) Mpe ntango babomaki moyekoli Stefano, bakristo mingi bakimaki engumba mpe bapanzanaki na bitúká ya Yudea, mpe ya Samaria, mpe nsukansuka, bakómaki mosika na Shiprɛ mpe na Antiokia. (Mis 7:58–8:1; 11:19) Meká kokanisa minyoko oyo bakristo wana bakutanaki na yango. Atako bongo, basakolaki na esengo nsango malamu na bisika nyonso oyo bazalaki kokende, mpe bafungolaki masangá na bisika mingi na Ampire ya Roma. (1 Pe. 1:1) Kasi na nsima na yango, bakutanaki mpe na mikakatano mosusu mingi.

      4. Wapi mikakatano mosusu oyo bakristo basengelaki koyikela yango mpiko?

      4 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso basengelaki koyika mpiko na mikakatano ya ndenge na ndenge. Na ndakisa, na mobu soki 50 ya ntango na biso, Klode oyo azalaki amperɛrɛ ya Roma apesaki mitindo ete Bayuda nyonso bálongwa na Roma. Na yango, Bayuda oyo bakómaki bakristo basengelaki kotika bandako na bango mpe kokende kofanda na bisika mosusu. (Mis. 18:1-3) Na mobu soki 61 ya ntango na biso, ntoma Paulo akomaki ete bafingaki bakristo liboso ya bato nyonso, batyaki bango na bolɔkɔ, mpe bayibaki biloko na bango. (Ebr. 10:32-34) Ndenge moko na bato nyonso, bakristo basengelaki koyika mpiko na bobola mpe na maladi.​—Rom. 15:26; Flp. 2:25-27.

  • Ndenge ya kobatela esengo na ntango ya mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli)—2021 | Février
    • Bililingi: 1. Mɔtɔ ezali kopela na kati ya mwinda atako mopepe mpe mbula ezali kobɛta. 2. Ndeko mobali moko ya mobange asimbi Biblia.

      Ndenge kaka vɛrɛ ya mwinda ebatelaka lolemo ya mɔtɔ mpo ekufa te, esengo oyo Yehova apesaka epelaka na kati ya mitema na biso mpe ebatelami malamu (Talá paragrafe 6)

      6. Na kotalela Luka 6:22, 23, mpo na nini mokristo akoki kozala na esengo ata ntango azali kokutana na minyoko?

      6 Bato bakoki kokanisa ete bakozala na esengo kaka soki bazali nzoto kolɔngɔnɔ, bazali na mbongo mingi, mpe soki bazali na boyokani malamu elongo na bato ya libota na bango. Kasi, esengo oyo Yakobo alobeli ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo ya Nzambe, mpe tokoki kozala na esengo yango ata soki tokokutani na likambo nini na bomoi na biso. (Gal. 5:22) Mokristo akoki kosepela to mpe kozala na esengo ya solosolo soki ayebi ete azali kosepelisa Yehova mpe kolanda ndakisa ya Yesu. (Tángá Luka 6:22, 23; Kol. 1:10, 11) Esengo na biso ezali lokola lolemo ya mɔtɔ oyo ezali kopela na kati ya vɛrɛ ya mwinda ya petrole. Kaka ndenge vɛrɛ ya mwinda ebatelaka mɔtɔ yango mpo ekufa te, esengo na biso mpe epelaka na kati ya mitema na biso mpe ebatelami malamu. Ekufaka te ata soki tozali kobɛla to tozali na mbongo mingi te. Esilaka mpe te ata soki bato bazali kotyola biso, to ntango bato ya libota na biso bazali kotɛmɛla biso. Kutu, esengo na biso ebakisamaka ata soki bato baluki kosilisa yango. Minyoko oyo tokutanaka na yango mpo na kondima na biso, emonisaka ete tozali bayekoli ya solo ya Kristo. (Mat. 10:22; 24:9; Yoa. 15:20) Yango wana Yakobo akomaki ete: “Bómona yango esengo mpenza, bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ndenge na ndenge.”​—Yak. 1:2.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto