Yehova azali “mosikoli” na biso
“[Yehova] asungi bango mpe abikisi bango.”—Nz. 37:40.
1, 2. Likambo nini ya ntina mingi Biblia elobi mpo na Yehova oyo esengeli kobɔndisa biso?
ELILI etɛlɛmaka kaka esika moko te. Ntango moi ezali kobaluka, bilili mpe ebalukaka mpe ebongwanaka. Nzokande, Ye oyo akelá moi ná mabelé abongwanaka te. (Mki. 3:6) Biblia elobi boye: “Epai na ye kobongwana ya kobaluka ya elili ezalaka te.” (Yak. 1:17) Likambo wana ya ntina mingi oyo Biblia elobi mpo na Yehova esengeli mpenza kobɔndisa biso, mingimingi ntango tokutani na mikakatano mpe na komekama ya makasi. Mpo na nini?
2 Ndenge tomonaki na lisolo ya liboso, Yehova ‘asikolaki’ basaleli na ye na ntango ya kala. (Nz. 70:5) Abongwanaka te mpe akokisaka ntango nyonso bilaka na ye; yango wana basaleli na ye lelo oyo basengeli mpenza kondima ete ‘akosunga bango mpe akobikisa bango.’ (Nz. 37:40) Ndenge nini Yehova abikisaka basaleli na ye na ntango na biso? Ndenge nini akoki kosala yango mpo na mokomoko na biso?
Tobikisami na mabɔkɔ ya batɛmɛli
3. Mpo na nini tosengeli kondima ete batɛmɛli bakolonga te kopekisa basaleli ya Nzambe kosakola nsango malamu?
3 Ata botɛmɛli ya ndenge nini ekoki te kopekisa Batatoli ya Yehova básambela Yehova, likambo oyo ebongi kaka na ye moko. Liloba ya Nzambe epesi biso elaka oyo: “Ebuneli na ebuneli oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te, mpe okozalisa lolemo na lolemo nyɛɛ oyo ekotɛmɛla yo na kosambisama.” (Yis. 54:17) Batɛmɛli bazali komeka kopekisa basaleli ya Nzambe kokokisa mokumba oyo Nzambe apesá bango ya kosakola, kasi bazali kolonga te. Tózwa ndakisa mibale.
4, 5. Basaleli ya Yehova bakutanaki na botɛmɛli ya ndenge nini na 1918, mpe esukaki ndenge nini?
4 Na 1918, basaleli ya Yehova bakutanaki na ebele ya minyoko oyo bakonzi ya mangomba ya boklisto babimiselaki bango na mokano ya kokanga bango monɔkɔ mpo bátika kosakola. Na mokolo ya 7 ya sanza ya mitano, guvɛrnema ya États-Unis ezwaki ekateli ya kokanga J. F. Rutherford, oyo azalaki kokamba mosala ya kosakola na mokili mobimba na ntango wana, mpe bandeko mosusu oyo bazalaki kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Sanza mibale na nsima, bakoselaki bango ete bazali kotɛka mboka mpe bakatelaki bango etumbu ya bolɔkɔ ebele ya bambula. Batɛmɛli balongaki nde kopekisa mosala ya kosakola libela mpo basalelaki batribinale? Ata moke te!
5 Tóbosana te ete Yehova alakaki ete: “Ebuneli na ebuneli oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te.” Na mokolo ya 26 ya sanza ya Marsi ya mobu 1919, sanza libwa nsima ya etumbu wana oyo bakatelaki Ndeko Rutherford ná baninga na ye, makambo ebongwanaki na ndenge ya kokamwa, mpe bandeko wana oyo bakɔtaki bolɔkɔ babimaki. Na mbula oyo elandaki, mwa 5 Mai 1920, bifundeli nyonso ya banguna ekweaki. Bandeko basalelaki bonsomi na bango mpo na kokoba kokende liboso na mosala ya Bokonzi. Yango esukaki ndenge nini? Banda wana, bokoli monene ezali komonana! Lokumu nyonso mpo na elonga monene wana esengeli kozonga epai ya “Mosikoli” na biso.—1 Kol. 3:7.
6, 7. (a) Minyoko nini Batatoli ya Yehova bakutanaki na yango na ntango ya boyangeli ya Banazi na Allemagne, mpe esukaki ndenge nini? (b) Lisolo ya Batatoli ya Yehova ya ntango na biso emonisi likambo nini?
6 Tózwa sikoyo ndakisa ya mibale. Na 1934, Hitler akataki seleka ete akosilisa Batatoli ya Yehova nyɛɛ na Allemagne. Alobaki yango na lisɛki te. Nsima ya maloba na ye, ebele ya bato bakangamaki mpe babwakamaki na bolɔkɔ. Bankóto ya Batatoli ya Yehova banyokwamaki; bankama na bango babomamaki na bakaa ya bakangami. Hitler alongaki nde kosilisa Batatoli? Alongaki kopekisa mosala ya kosakola nsango malamu na Allemagne? Ata moke te! Na ntango wana ya monyoko, bandeko na biso bakobaki kosakola na kobombana. Ntango boyangeli ya Banazi ekweaki, bandeko basalelaki bonsomi oyo bakómaki na yango mpo na kokoba kosakola. Lelo oyo, basakoli koleka 165 000 bazali na Allemagne. Na mbala wana mpe, “Mosikoli” na biso akokisaki elaka na ye: “Ebuneli na ebuneli oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te.”
7 Lisolo ya Batatoli ya Yehova ya ntango na biso emonisi ete Yehova akotika ata mokolo moko te ete básilisa basaleli na ye nyonso awa na mabelé. (Nz. 116:15) Kasi, ezali boni mpo na mokomoko na biso? Ndenge nini Yehova asikolaka mokomoko na biso?
Yehova abatelaka biso mpe na mosuni?
8, 9. (a) Ndenge nini toyebi ete Nzambe abatelaka mokomoko na biso na mosuni ntango nyonso te? (b) Likambo nini tosengeli kondima?
8 Toyebi ete Yehova alaki te ete akobatela mokomoko na biso na mosuni ntango nyonso. Tokanisaka lokola Baebele misato oyo baboyaki kofukama liboso ya ekeko ya wolo ya Mokonzi Nebukadanesala. Bilenge mibali wana oyo bazalaki kobanga Nzambe bakanisaki te ete Yehova akosala likamwisi mpo na kobikisa bango. (Tángá Danyele 3:17, 18.) Atako bongo, Yehova abikisaki bango na kati ya mɔtɔ oyo ezalaki kongala makasi. (Dan. 3:21-27) Kasi, ata na ntango ya kala, Yehova azalaki kobikisa bato na ndenge ya kokamwa ntango nyonso te. Basaleli ya Yehova mingi ya sembo bakufaki na mabɔkɔ ya batɛmɛli.—Ebe. 11:35-37.
9 Ezali boni lelo oyo? Lokola azali “Mosikoli” na biso, akoki kosikola mokomoko na biso na mpasi. Tokoki mpenza koloba ete Yehova asungaki to te na likambo moko boye? Te. Atako bongo, moto oyo abiki na likama akoki mpenza komona ete Yehova abikisi ye. Bato mosusu bazali na lotomo te ya koloba ete ezali bongo te. Longola yango, tosengeli mpe kondima ete baklisto mingi ya sembo bakufaki na monyoko, lokola baoyo bakufaki na ntango ya boyangeli ya Banazi. Bamosusu kutu bakufaki na makama. (Mos. 9:11, NW) Tokoki komituna ete, ‘Nzambe alongaki nde te “kosikola” basaleli na ye ya sembo oyo babomamaki?’ Soki moke te.
10, 11. Mpo na nini moto akoki kokima liwa te, kasi Yehova azali na likoki ya kosala nini?
10 Tóbosanaka likambo oyo te: Moto akoki kokima liwa te, mpo moto moko te akoki “kobikisa molimo na ye” na Sheole to Hadesi, elingi koloba nkunda. (Nz. 89:48) Kasi, tokoloba boni mpo na Yehova? Ndeko moko oyo abikaki na monyoko ya Banazi akanisi lisusu likambo oyo mama na ye, oyo azalaki Motatoli, alobaki na ye mpo na kobɔndisa ye ntango bandeko na ye bakufaki na kaa ya bakangami: “Soki liwa ekokanga bato libela, lobá eleki Nzambe na makasi, ezali boye te?” Na ntembe te, liwa ekoki kotɛlɛma ata moke te liboso ya Mopesi bomoi, oyo atondi na nguya! (Nz. 36:9) Yehova abombá bato nyonso oyo bazali na Sheole to Hadesi na makanisi na ye, mpe akosikola bango nyonso.—Luka 20:37, 38; Emon. 20:11-14.
11 Atako bongo, Yehova azali mpenza kobikisa basaleli na ye ya sembo lelo oyo. Tótala sikoyo ndenge misato oyo ‘asikolaka’ biso.
Tobatelami na elimo
12, 13. Mpo na nini kobatelama na elimo ezali likambo eleki motuya na bomoi na biso, mpe ndenge nini Yehova abatelaka biso na elimo?
12 Yehova abatelaka biso na elimo, likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. Biso baklisto ya solo toyebi ete ezali na eloko moko oyo ezali na motuya koleka bomoi oyo tozali na yango lelo oyo. Eloko eleki motuya na bomoi na biso ezali boyokani na biso na Yehova. (Nz. 25:14; 63:3) Soki tózalaka na boyokani na Nzambe te, mbele bomoi na biso ya lelo ezali na ntina te, mpe tolingaki kozala na elikya moko te.
13 Likambo ya esengo, Yehova apesi biso nyonso oyo esengeli mpo tóbungisa te boyokani na biso na ye. Azali kosalisa biso na nzela ya Liloba na ye, ya elimo santu na ye mpe ya lisangá na ye oyo ezali na mokili mobimba. Ndenge nini tokoki kozwa litomba na bibongiseli yango? Soki tozali ntango nyonso koyekola Liloba na ye, kondima mpe elikya na biso ekokóma makasi. (Lom. 15:4) Soki tozali kobondela ye na motema moko mpo apesa biso elimo santu na ye, tokozwa makasi mpo na kolonga makanisi mabe oyo ekoki koyela biso, ya kosala makambo oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na ye. (Luka 11:13) Soki tozali ntango nyonso kolanda litambwisi oyo moombo ya sembo azali kopesa biso na nzela ya mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe na nzela ya makita mpe mayangani, tokobanda kolya “bilei [ya elimo] na ntango oyo ebongi.” (Mat. 24:45) Bibongiseli wana ezali kobatela biso na elimo mpe kosalisa biso tózala ntango nyonso na boyokani na Nzambe.—Yak. 4:8.
14. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge Yehova abatelaka biso na elimo.
14 Mpo na komona mpenza ete Yehova abatelaka biso na elimo, kanisá lisusu baboti oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo ya liboso. Mwa mikolo nsima ya koyoka ete mwana na bango Theresa abungi, bayokaki lisusu nsango moko ya mabe: Babomaki Theresa.a Tata na ye alobi boye: “Nabondelaki Yehova abatela ye. Na bosembo mpenza, ntango toyokaki ete babomi ye, na ebandeli namitunaki mpo na nini Yehova ayokaki mabondeli na ngai te. Kasi, nayebi ete Yehova alaki biso te ete akobatela mosaleli na ye mokomoko na mosuni. Nakobaki kobondela ye mpo apesa ngai bososoli. Nabɔndisamaki mpenza ntango nasosolaki ete Yehova abatelaka basaleli na ye na elimo, elingi koloba, apesaka biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo tóbungisa te boyokani oyo tozali na yango na ye. Libateli wana nde ezali na motuya koleka mpo na biso, mpo ekoki kopesa biso bomoi ya seko. Na ndenge wana, Yehova abatelaki Theresa, mpo Theresa atikalaki sembo epai ya Yehova tii ntango akufaki. Nayokaki mpenza motema kimya ntango nayebaki ete bomoi na ye mpo na mikolo ekoya ezali na mabɔkɔ ya Yehova, Nzambe na biso ya bolingo.”
Yehova asungaka biso na mbeto ya maladi
15. Ndenge nini Yehova akoki kosunga biso ntango tozali kotungisama makasi na maladi?
15 Yehova akoki kosunga biso ‘na mbeto ya maladi,’ ndenge asungaki Davidi. (Nz. 41:3) Atako Yehova asikolaka bato na ndenge ya kokamwa te na ntango na biso, asungaka biso kaka. Na ndenge nini? Mitinda oyo ezali na Liloba na ye ekoki kosalisa biso tózwaka bikateli ya malamu ntango tozali koluka komisalisa na maladi to ntango tozali kosala makambo mosusu. (Mas. 2:6) Tokoki kozwa makanisi ya malamu mpenza na masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! oyo elobeli maladi na biso. Na nzela ya elimo santu, Yehova akoki kopesa biso “nguya oyo eleki makasi” mpo tólonga mokakatano na biso mpe tótikala sembo epai na ye, atako mokakatano yango ezali makasi ndenge nini. (2 Kol. 4:7) Lokola tozali na lisungi wana, yango ekosalisa biso tótika komitungisa mingi mpo na maladi na biso mpe tózongisa makambo ya elimo nsima te.
16. Ndeko moko asalaka nini mpo na kolonga mokakatano ya maladi na ye?
16 Kanisá ndeko mobali oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo ya liboso. Na 1998, bazwaki ye na maladi moko ya mabe (sclérose latérale amyotrophique to SLA) oyo nsukansuka ebomaki ye binama nyonso ya nzoto.b Nini esalisaki ye andima maladi na ye? Alobi boye: “Nayokaki mpasi mpe natungisamaki makasi ntango namonaki ete kaka liwa nde ekoki kosikola ngai na mpasi yango. Soki namoni ete nasuki, nabondelaka Yehova apesa ngai makambo misato: kimya, motema molai mpe mpiko. Namonaka mpenza ete Yehova ayokaka ngai. Kimya wana esalisaka ngai nakanisa makambo oyo ekoki kobɔndisa ngai, na ndakisa ndenge nakozala na mokili ya sika ntango nakozala lisusu na likoki ya kotambola, ya koyoka elɛngi ya biloko mpe ya kosolola lisusu na libota na ngai. Motema molai esalisaka ngai nalonga mpasi mpe mikakatano ya kozala ebɔsɔnɔ. Mpiko esalisaka ngai natikala kaka sembo mpe nalɛmba te na elimo. Nakoki mpenza koloba ete nakokani na Davidi, mpo namonaka ete Yehova azali kolendisa ngai na mbeto na ngai ya maladi.”—Yis. 35:5, 6.
Yehova aleisaka biso
17. Yehova alaki kosalela biso likambo nini, mpe elaka yango elimboli nini?
17 Yehova alaki ete akopesa biso biloko ya kobikela. (Tángá Matai 6:33, 34 mpe Baebele 13:5, 6.) Yango elingi koloba te ete tókanga mabɔkɔ mpe tózelaka Nzambe akitisela biso biloko lokola Mana. (2 Tes. 3:10) Elaka wana elimboli nde boye: Soki tozali koluka liboso Bokonzi ya Nzambe na bomoi na biso mpe tondimi kosala mpo na kozwa eloko ya kobikela, tokoki kozala na elikya ete Yehova akosalisa biso tózwa biloko oyo tosengeli na yango. (1 Tes. 4:11, 12; 1 Tim. 5:8) Akoki kopesa biso biloko oyo tosengeli na yango na ndenge oyo tokanisaki kutu te, na ndakisa akoki kosalela ndeko moko asunga biso na mwa eloko to apesa biso mosala.
18. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete Yehova akoki kosunga biso ntango tokómi na bosɛnga.
18 Kanisá lisusu mama oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo ya liboso, oyo abɔkɔlaka mwana na ye ye moko. Ntango ye ná mwana na ye ya mwasi bakendaki kofanda na mboka mosusu, azalaki na mokakatano ya kozwa mosala. Alobi boye: “Nazalaki kobima na mosala ya kosakola ntɔngɔ mobimba, mpe na mpokwa nazalaki kokende koluka mosala. Nazali koyeba lisusu mokolo moko oyo nakendaki na butiki kosomba miliki. Natɛlɛmaki mpe natalaki ndunda, kasi nazalaki na mbongo te ya kosomba yango. Nayoká naino mpasi na motema ndenge wana te. Ntango nazongaki ndako mokolo wana, veranda ya ndako na ngai etondaki na basaki ya ndunda ya ndenge nyonso. Tozwaki biloko oyo tokokaki kolya na boumeli ya basanza. Nalelaki na esengo mpe natɔndaki Yehova.” Mwa moke na nsima, ndeko mwasi yango ayebaki ete ndeko moko ya mobali ya lisangá na bango oyo azalaki na bilanga ya ndunda nde atikelaki bango basaki ya ndunda wana. Na nsima, akomelaki ndeko yango boye: “Atako natɔndaki yo mingi mokolo wana, natɔndaki mpe Yehova na ndenge asalelaki boboto na yo mpo na kokundwela ngai bolingo na ye.”—Mas. 19:17.
19. Na ntango ya bolɔzi monene, basaleli ya Yehova bakozala na elikya nini, mpe tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini banda lelo oyo?
19 Na ntembe te, makambo oyo Yehova asalelaki basaleli na ye na ntango ya kala mpe oyo azali kosala na ntango na biso esengeli kondimisa biso ete azali Mosungi na biso. Mosika te, ntango bolɔzi monene ekobɛta mokili ya Satana, tokozala na mposa ya lisalisi ya Yehova mingi lisusu koleka. Kasi, miso ya basaleli ya Yehova nyonso ekozala kaka epai na ye. Bakotombola mitó na bango mpe bakosepela, mpo bayebi ete lobiko na bango ekómi pene. (Luka 21:28) Liboso ntango yango ekoka, ata tokutani na mokakatano ya ndenge nini, tosengeli kozala na ekateli ya kotyela Yehova motema mpe kondima mpenza ete Nzambe na biso oyo abongwanaka te ‘akosikola biso.’
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Une épouvantable tragédie,” na Lamuká! ya 22 Yuli 2001, nkasa 19-23.
b Talá lisolo “La foi m’aide à vivre avec la SLA,” na Lamuká! ya Yanuali 2006, nkasa 25-29.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini Yehova akoki kosikola bato oyo babomamaki?
• Mpo na nini kobatelama na elimo ezali likambo eleki ntina?
• Elaka oyo Yehova apesi ete akokokisa bamposa na biso ya mosuni elimboli nini?
[Elilingi na lokasa 8]
Bakangaki ndeko Rutherford ná baninga na ye na 1918, na nsima babimaki mpe makambo nyonso oyo bafundaki bango na yango ekweaki
[Elilingi na lokasa 10]
Yehova akoki kosunga biso ‘na mbeto ya maladi’