Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/7 nk. 26-30
  • Ozalaka sembo na makambo nyonso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozalaka sembo na makambo nyonso?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kozala sembo elimboli nini?
  • Bosembo na oyo etali “bomɛngo oyo ezangi boyengebene”
  • Kozala sembo ezali na ntina mingi
  • Bosembo na mosala ya kosakola
  • Tózala bato ya mokili te
  • Mapamboli ya kozala sembo
  • Bamekamaki—kasi batikalaki sembo epai na Yehova!
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Jéhovah apesaka mbano mpo na kondima mpe molende
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Luká bomɛngo ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Bómizwela baninga na nzela na bozwi mabe’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/7 nk. 26-30

Ozalaka sembo na makambo nyonso?

“Moto oyo azali sembo na oyo eleki moke azali mpe sembo na mingi.”​—LUKA 16:10.

1. Yebisá likambo moko oyo Yehova amimonisaka sembo.

OSILÁ komona likambo oyo esalemaka na elili ya nzete ntango ngonga ezali kopusana mokemoke? Tomonaka ete molai na yango ebongwanaka mpe etikalaka ngámbo moko te! Mbala mingi, makambo oyo bato basalaka mpe bilaka na bango ebongwanaka lokola kaka elili wana. Kasi, Yehova Nzambe abongwanaka te, ata soki ntango boni eleki. Moyekoli Yakobo abengi ye “Tata ya miinda ya likoló” mpe alobi na ntina na ye ete: “Epai na ye kobongwana ya kobaluka ya elili ezalaka te.” (Yakobo 1:17) Yehova abongwanaka te mpe tokoki kotyela ye motema ata na makambo mikemike. Azali “Nzambe ya sembo.”​—Deteronome 32:4.

2. (a) Mpo na nini tosengeli komitalela mpo na koyeba soki tozali sembo? (b) Tokotalela mituna nini na likambo etali bosembo?

2 Ndenge nini Nzambe atalelaka ezaleli ya bosembo ya basaleli na ye? Atalelaka yango ndenge moko na Davidi, oyo alobaki na ntina na bango ete: “Miso na ngai ezali likoló ya bandimi kati na mokili ete báfanda esika moko na ngai; oyo akotambolaka na nzela ya sembo ye akosalela ngai.” (Nzembo 101:6) Ya solo, Yehova asepelaka na bosembo ya basaleli na ye. Yango wana mpenza, ntoma Paulo akomaki boye: “Eloko oyo balukaka epai ya bakapita ezali ete moto amonana moto ya sembo.” (1 Bakolinti 4:2) Kozala sembo elimboli nini? Tosengeli komonisa bosembo na makambo nini ya bomoi na biso? Mapamboli nini tokozwa soki tozali ‘kotambola na nzela ya sembo’?

Kozala sembo elimboli nini?

3. Nini emonisaka ete tozali sembo?

3 Baebele 3:5 elobi ete: “Moize lokola mosaleli azalaki sembo.” Mosakoli Moize asalaki nini oyo emonisi ete azalaki sembo? Na mosala ya kotonga mpe kobongisa tabenakle, “Moize asalaki boye; ye asalaki [lokola] yango nyonso elakelaki ye [Yehova].” (Exode 40:16) Biso basambeli ya Yehova tomonisaka ete tozali sembo epai na ye ntango tozali kosalela ye na ndenge oyo azali kosɛnga biso. Yango esɛngi mpe kokangama na Yehova ata ntango tomekami to tozali na mikakatano ya makasi. Nzokande, ezali kaka te ntango tolongi komekama ya makasi nde tokomonisa ete tozali sembo. Yesu alobaki boye: “Moto oyo azali sembo na oyo eleki moke azali mpe sembo na mingi, mpe moto oyo azali moyengebene te na oyo eleki moke azali mpe moyengebene te na mingi.” (Luka 16:10) Tosengeli kozalaka sembo ata na makambo ya mikemike.

4, 5. Bosembo na biso na “oyo eleki moke” emonisaka nini?

4 Ezali na bantina mibale oyo mpo na yango tosengeli kotosaka Nzambe mokolo na mokolo ata na makambo “oyo eleki moke.” Ya liboso, yango emonisaka ndenge oyo totalelaka bokonzi ya Yehova. Tókanisa likambo oyo emekaki bosembo ya Adama ná Eva. Ezalaki likambo ya mpasi ata moke te. Bazalaki na bilei ya ndenge na ndenge na kati ya elanga ya Edene; Nzambe apekisaki bango kolya mbuma ya nzete kaka moko: “nzete ya koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 2:16, 17) Soki mobali ná mwasi ya liboso batosaki mobeko wana, balingaki komonisa ete balingi bokonzi ya Yehova. Soki tozali kotosa mibeko ya Yehova na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, yango emonisaka ete tondimi bokonzi ya Yehova.

5 Ya mibale, ezaleli na biso na makambo “oyo eleki moke” emonisaka ndenge oyo tokosala “na mingi,” elingi koloba, ntango tokokutana na makambo ya minene. Mpo na yango, tótalela likambo oyo ekómelaki Danyele ná baninga na ye misato: Hanania, Misaele, ná Azalia. Bamemaki bango na boombo na Babilone na mobu 617 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Bazalaki naino bilenge ntango bamemaki bango minei na ndako ya Mokonzi Nebukadanesala. ‘Baponelaki bango ndambo ya bilei kitoko ya mokonzi mikolo nyonso, mpe vinyo oyo emɛlaki ye; mpe alakaki ete bábɔkɔlama mbula misato, mpe ete na nsuka ya ntango yango bátɛlɛma liboso ya mokonzi.’​—Danyele 1:3-5.

6. Komekama nini Danyele ná baninga na ye misato bakutanaki na yango na ndako ya mokonzi ya Babilone?

6 Nzokande, kolya bilei ya mokonzi ya Babilone ezalaki komekama mpo na bilenge Baebele wana minei. Ekoki mpenza kozala ete bilei kitoko ya mokonzi ezalaki na biloko oyo Mibeko ya Moize epekisaki. (Deteronome 14:3-20) Mbala mosusu banyama oyo bazalaki koboma bazalaki kobimisa yango makila te; mpe kondima kolya misuni ya ndenge wana ezalaki kobuka Mibeko ya Nzambe. (Deteronome 12:23-25) Ndenge bato ya Babilone bamesanaki, ekoki mpe kozala ete bazalaki kopesa bilei yango mbeka epai ya banzambe ya bikeko liboso bálya yango.

7. Botosi ya Danyele ná ya baninga na ye misato emonisaki nini?

7 Na ntembe te, koboya bilei mosusu ezalaki likambo monene te na ndako ya mokonzi ya Babilone. Kasi, Danyele ná baninga na ye bazwaki mokano ya komikómisa mbindo te na bilei oyo Mibeko ya Nzambe epekisaki. Likambo yango ezalaki kotalela bosembo na bango epai ya Nzambe. Yango wana, basɛngaki bápesaka bango ndunda ná mai, mpe esalemaki bongo. (Danyele 1:9-14) Lelo oyo, bato mosusu bakoki komona ete likambo oyo bilenge wana basalaki ezalaki monene te. Nzokande, botosi na bango epai ya Nzambe emonisaki soki bazalaki na ngámbo nini na ntembe oyo etaleli bokonzi ya Yehova.

8. (a) Baebele misato bakutanaki na likambo monene nini oyo emekaki bosembo na bango? (b) Likambo yango esukaki ndenge nini, mpe yango ezali komonisa nini?

8 Kozala sembo na likambo oyo ekokaki komonana moke ebongisaki baninga misato ya Danyele bálonga komekama ya makasi. Fungolá Biblia na mokanda ya Danyele mokapo ya misato, mpe tángá lisolo oyo elobeli ndenge oyo bakatelaki Baebele wana misato etumbu ya liwa mpo baboyaki kosambela ekeko ya wolo oyo Mokonzi Nebukadanesala asalisaki. Ntango bakendaki na bango liboso ya mokonzi, bayebisaki ye makanisi na bango na mpiko nyonso: “Soki ezali boye mbɛlɛ Nzambe na biso, oyo biso tosaleli ye, ayebi kobikisa biso na litumbu ya mɔtɔ ya kongala; mpe akobikisa biso na lobɔkɔ na yo. Ee mokonzi, oyeba ete ata boye te, biso tokosalela banzambe na yo te, mpe tokosambela elilingi ya wolo oyo etɛlɛmisaki yo te.” (Danyele 3:17, 18) Yehova abikisaki bango? Basoda oyo babwakaki bilenge wana misato na litumbu ya mɔtɔ bakufaki, kasi Baebele misato ya sembo bakufaki te, mɔtɔ makasi wana ebebisaki bango ata loposo te! Lokola bamesanaki komonisa bosembo, yango esalisaki bango bátikala sembo ntango bamekamaki na likambo ya monene. Yango emonisi mpenza ete tosengeli kozalaka sembo ata na makambo ya mike.

Bosembo na oyo etali “bomɛngo oyo ezangi boyengebene”

9. Yesu azalaki kolobela nini ntango alobaki likambo oyo ezali na Luka 16:10?

9 Liboso Yesu aloba ete moto oyo azali sembo na oyo eleki moke azalaka mpe sembo na oyo ezali mingi, apesaki bayekoli na ye toli oyo: “Bómizwela baninga na nzela ya bomɛngo oyo ezangi boyengebene, mpo, ntango ekosila, bango báyamba bino na bifandelo ya seko.” Na nsima, alobelaki likambo ya kozala sembo na oyo eleki moke. Mpo na yango, Yesu alobaki boye: “Na yango, soki bomimonisi sembo te na oyo etali bomɛngo oyo ezangi boyengebene, nani akopesa na mabɔkɔ na bino eloko oyo ezali ya solosolo? . . . Mosali na kati ya ndako akoki kozala moombo ya bankolo mibale te; mpo, to akoyina moko mpe akolinga mosusu, to akokangama na moko mpe akotyola mosusu. Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.”​—Luka 16:9-13.

10. Ndenge nini tokoki komonisa bosembo na biso na ndenge oyo tozali kosalela “bomɛngo oyo ezangi boyengebene”?

10 Na kolanda lisolo mobimba, maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 16:10 etaleli libosoliboso ndenge ya kosalela “bomɛngo oyo ezangi boyengebene,” elingi koloba biloko na biso mpe bozwi na biso. Yesu alobi ete bomɛngo yango ezangi boyengebene mpamba te bozwi ya mokili​—mingimingi mbongo—​ezali na mabɔkɔ ya bato ya masumu. Longola yango, mposa ya bozwi ekoki komema moto asala makambo ezangi boyengebene. Tomonisaka ete tozali sembo soki tozali kosalela bozwi na biso na bwanya. Na esika tósalela yango kaka mpo na kokokisa bamposa na biso, tosengeli kosalela yango mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso mpe mpo na kosalisa baoyo bazali kokelela. Soki tozali sembo na ndenge yango, tokokóma baninga ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto, bankolo ya “bifandelo ya seko.” Bakoyamba biso na bifandelo yango to bakopesa biso bomoi ya seko kuna na likoló to na Paladiso awa na mabelé.

11. Mpo na nini tosengeli kokakatana te koyebisa bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola ete tondimaka makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba?

11 Tótalela mpe libaku oyo topesaka bato oyo totikelaka Babiblia to mikanda oyo elimbolaka Biblia na mosala ya kosakola Bokonzi, ntango toyebisaka bango ete tondimaka makabo mpo na mosala ya kosakola oyo basaleli ya Yehova bazali kosala na mokili mobimba. Topesaka bango libaku ya kosalela malamu bozwi na bango. Atako maloba ya Luka 16:10 elimboli libosoliboso ndenge ya kosalela bozwi ya mokili, likanisi na yango ekoki mpe kosalelama na makambo mosusu ya bomoi.

Kozala sembo ezali na ntina mingi

12, 13. Tokoki komonisa bosembo na makambo nini?

12 Ntoma Paulo akomaki boye: “Tondimi ya solo ete tozali na lisosoli ya sembo, mpo tozali na mposa ya komitambwisa na bosembo na makambo nyonso.” (Baebele 13:18) Na ntembe te, “makambo nyonso” esangisi mpe makambo nyonso etali mbongo. Tofutaka banyongo na biso mpe tofutaka mpako na biso na ntango esengeli mpe na bosembo nyonso. Mpo na nini? Mpo tolingaka kozala na lisosoli ya malamu mpe mingimingi mpo tolingaka Nzambe mpe totosaka mibeko na ye. (Baloma 13:5, 6) Tosalaka nini soki tolɔkɔti eloko moko oyo ezali ya biso te? Tolukaka kozongisa yango epai ya nkolo na yango. Tozwaka libaku malamu ya kopesa litatoli ntango tolimbolaka nini etindi biso tózongisela moto eloko na ye!

13 Kozala sembo na makambo nyonso elimboli mpe kozala sembo na mosala. Kozala sembo na ndenge na biso ya kosala mosala ebendaka likebi ya bato epai ya Nzambe oyo tosambelaka. Tozalaka gɔigɔi te, mpo yango ezali ‘koyiba’ ngonga ya mosala. Kasi, tosalaka na molende lokola nde tozali kosala mpo na Yehova. (Baefese 4:28; Bakolose 3:23) Balapolo emonisi ete na ekólo moko ya Mpoto, soki tokamati basali misato oyo basɛngi monganga asalela bango mokanda mpo bázwa ndingisa ya kozangisa mosala, moko asalisaka mokanda ya lokuta. Basaleli ya solo ya Nzambe bakosaka te mpo na kokima mosala. Mbala mingi, Batatoli ya Yehova mosusu bamataka mpɛtɛ mpo bapatrɔ na bango bamonaka ete bazalaka sembo mpe basalaka malamu.​—Masese 10:4.

Bosembo na mosala ya kosakola

14, 15. Tángá mwa balolenge oyo tokoki komonisa bosembo na biso na mosala ya kosakola.

14 Ndenge nini tomonisaka bosembo na mosala ya kosakola oyo Nzambe apesi biso? Biblia elobi boye: “Tiká tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosala eyambweli mpo na nkombo na ye.” (Baebele 13:15) Lolenge ya libosoliboso oyo tosengeli komonisa bosembo na mosala ya kosakola ezali na kosala yango sanza na sanza. Tozali mpenza na ntina ya kolekisa sanza mobimba kozanga kotatola mpo na Yehova mpe mokano na ye? Kosakola sanza na sanza esalisaka mpe biso tókóma na mayele mingi ya koteya mpe tósalaka mosala ya malamu.

15 Lolenge mosusu ya malamu ya komonisa bosembo na biso na mosala ya kosakola ezali na kolanda malako oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Mosala na biso ya Bokonzi. Ntango tozali kobongisa mpe kosalela makanisi oyo bapesi biso mpo na kopesa litatoli to kolakisa mokanda to mpe makanisi mosusu oyo ebongi, tomonaka ete mosala na biso ebimisaka matomba! Soki tokutani na moto moko oyo asepeli na nsango ya Bokonzi, tosalaka makasi tózongela ye noki? Tokoloba nini mpo na bato oyo tobandi koyekola na bango Biblia? Tomonisaka bosembo na biso na koyekola na bango pɔsɔ na pɔsɔ? Soki tozali sembo na mosala ya kosakola, yango ekoki kobikisa biso moko mpe baoyo bazali koyoka biso.​—1 Timote 4:15, 16.

Tózala bato ya mokili te

16, 17. Na balolenge nini tokoki komonisa ete tozali bato ya mokili te?

16 Na libondeli moko, Yesu asɛngaki Nzambe mpo na bayekoli na ye boye: “Napesi bango liloba na yo, kasi mokili eyini bango, mpo bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te. Nazali te kosɛnga yo olongola bango na mokili, kasi okɛngɛla nde bango mpo na moto mabe. Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:14-16) Tokoki kozala na ekateli makasi ya kozala bato ya mokili te na makambo minene, na ndakisa kokɔta na makambo ya politiki te, kosangana te na bafɛti ya mangomba, mpe koboya pite. Kasi, ezali boni na makambo ya mike? Ekoki nde kozala ete kozanga tóyeba yango, tokómi kolanda banzela ya mokili? Na ndakisa, soki tokebi te, tokoki kokóma na molato oyo ebongi te! Kotikala sembo esɛngi “kolekisa ndelo te” mpe kozala “na makanisi malamu” na oyo etali molato mpe monzɛlɛ. (1 Timote 2:9, 10) “Tozali kobɛtisa libaku ata na likambo moko te, mpo mosala na biso ya baministre ekoka te kofingama; kasi na makambo nyonso tozali komilobela lokola baministre ya Nzambe.”​—2 Bakolinti 6:3, 4.

17 Lokola mposa na biso ezalaka ete Yehova azwa lokumu, tolataka molato oyo ebongi ntango tokei na makita. Ezali mpe bongo ntango tozali kokende na mayangani. Molato na biso esengeli ntango nyonso kozala ya malamu mpe ya nsɔni te. Yango epesaka litatoli epai ya bato oyo bamonaka biso. Ata baanzelu batalaka mosala na biso, se ndenge bazalaki kotala mosala ya Paulo ná baninga na ye. (1 Bakolinti 4:9) Tosengeli ntango nyonso kozalaka na molato ya malamu. Mpo na bato mosusu, kozala sembo na likambo etali kopona molato oyo ebongi ekoki kozala likambo moke, kasi na miso ya Nzambe, ezali na ntina mingi.

Mapamboli ya kozala sembo

18, 19. Kozala sembo ememaka mapamboli nini?

18 Baklisto ya solo babengami “bakapita malamu ya boboto monene ya Nzambe oyo emonisami na mitindo ndenge na ndenge.” Mpo na yango, ‘batalelaka kaka makasi oyo Nzambe apesaka.’ (1 Petelo 4:10, 11) Longola yango, na mosala yango ya bakapita, bapesi biso biloko oyo ezali ya biso te​—makambo oyo ezali komonisa boboto monene ya Nzambe, oyo moko na yango ezali mosala ya kosakola. Soki tozali bakapita ya malamu, tokotya motema na nguya oyo Nzambe apesaka, “nguya oyo eleki makasi.” (2 Bakolinti 4:7) Yango ezali formasyo ya malamu mingi oyo ekosalisa biso tóyika mpiko na minyoko oyo tokoki kokutana na yango na mikolo ekoya!

19 Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Bólinga [Yehova], bino bayengebene nyonso na ye, [Yehova] akobatelaka bayengebene.” (Nzembo 31:23) Tiká tózala na ekateli ya kozala sembo, na elikya nyonso ete Yehova azali “Mobikisi ya bato ya ndenge nyonso, mingimingi mpenza ya bato ya sembo.”​—1 Timote 4:10.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini tosengeli kozala “sembo na oyo eleki moke”?

• Ndenge nini tokoki komonisa:

ete tozali bato ya sembo?

bosembo na mosala ya kosakola?

bosembo na oyo etali kozala bato ya mokili te?

[Bililingi na lokasa 26]

Soki tozali sembo na oyo eleki moke, tokozala mpe sembo na mingi

[Elilingi na lokasa 29]

‘Omitambwisa na bosembo na makambo nyonso’

[Elilingi na lokasa 29]

Lolenge malamu mingi ya komonisa bosembo ezali ya komibongisa malamu mpo na mosala ya kosakola

[Elilingi na lokasa 30]

Kolekisa ndelo te na molato mpe monzɛlɛ

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto