Kanisáká malamu mpe saláká makambo na bwanya
KANISÁ naino likambo oyo: Yesu Klisto azali koloba ete na Yelusaleme, banguna na ye, elingi koloba bakonzi ya mangomba, bakonyokola ye mpe na nsuka bakoboma ye. Ntoma Petelo, moninga na ye ya motema, asepeli na likambo yango te. Na yango, abendi Yesu pembeni mpe apameli ye. Emonani ete makambo oyo Petelo alobi euti mpenza na motema mpo azali komibanzabanza mpo na Yesu. Kasi ndenge nini Yesu ataleli makanisi ya Petelo? Yesu alobi na ye ete: “Leká nsima na ngai, Satana! Ozali epai na ngai libaku oyo ekweisaka, mpamba te ozali kokanisa, makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.”—Matai 16:21-23.
Na ntembe te likambo yango elɛmbisaki Petelo mpenza! Na esika Molakisi na ye amona ye lokola mosungi mpe molendisi, alobaki na ye ete azali “libaku oyo ekweisaka.” Na ndenge nini? Ekoki kozala ete Petelo akosamaki na makanisi oyo bato mingi bazalaka na yango, elingi koloba azalaki kondima kaka makambo oyo motema na ye esepelaki na yango.
Komityela motema koleka te
Likambo moko oyo ekoki kopekisa biso kokanisaka malamu ezali komityela motema koleka. Ntoma Paulo akebisaki baninga na ye baklisto ya Kolinti na maloba oyo: “Tiká ete moto oyo azali kokanisa ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.” (1 Bakolinti 10:12) Mpo na nini Paulo alobaki bongo? Emonani mpenza ete alobaki bongo mpamba te ayebaki ete ezalaka mpasi te mpo makanisi ya moto etɛngama; ata mpe makanisi ya moto oyo azali moklisto ekoki ‘kobebisama mpe kolongwa na bosembo mpe na bopɛto ya bizaleli oyo esengeli na Klisto.’—2 Bakolinti 11:3.
Likambo yango ekómelaká bankɔkɔ ya Paulo. Na ntango wana, Yehova alobaká na bango boye: “Makanisi na ngai mazali makanisi na bino te mpe nzela na bino ezali nzela na ngai te.” (Yisaya 55:8) Bakómaki na “mayele na miso na bango mpenza,” mpe yango esukelaki bango mabe. (Yisaya 5:21) Na yango, tosengeli mpenza kotalela ndenge oyo tokoki kobatela ntango nyonso makanisi na biso malamu, mpo esukela biso mabe te lokola bango.
Kebá na makanisi ya mokili
Bato mosusu na engumba Kolinti bakómaki mpenza kokanisa na ndenge ya mokili. (1 Bakolinti 3:1-3) Bazalaki kotyela bafilozofi ya bato likebi koleka Liloba ya Nzambe. Ezali solo ete bafilozofe ya Bagrɛki na mikolo wana bazalaki bato ya mayele mingi. Kasi, na miso ya Nzambe, bazalaki kaka bazoba. Paulo alobaki boye: “Ekomamá ete: ‘Nakobebisa bwanya ya bato ya bwanya, mpe mayele ya bato ya mayele nakotindika yango pembeni.’ Wapi moto ya bwanya? Wapi mokomeli? Wapi moto ya ntembe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo? Nzambe akómisi nde te bwanya ya mokili bozoba?” (1 Bakolinti 1:19, 20) Bato yango ya mayele bazalaki kotambwisama na “elimo ya mokili,” kasi na elimo ya Nzambe te. (1 Bakolinti 2:12) Mateya na bango ya filozofi mpe makanisi na bango ezalaki na boyokani te na makanisi ya Yehova.
Makanisi wana ya mokili eutaka mpenza nde epai ya Satana Zabolo, oyo asalelaki nyoka mpo na kokosa Eva. (Genese 3:1-6; 2 Bakolinti 11:3) Satana azali naino kaka likama mpo na biso? Ɛɛ! Liloba ya Nzambe ezali koyebisa biso ete Satana “azipi makanisi” ya bato, mpe azali sikoyo “kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela.” (2 Bakolinti 4:4; Emoniseli 12:9) Ebongi mpenza tóyeba mikano na ye!—2 Bakolinti 2:11.
Kebá na “bokosi ya bato”
Ntoma Paulo alobaki mpe ete tosengeli kokeba na “bokosi ya bato.” (Baefese 4:14) Akutanaki na “basali ya mosala ya bokosi” oyo bazalaki koloba ete bazali koteya solo, nzokande bazalaki kobebisa yango. (2 Bakolinti 11:12-15) Mpo na kokokisa mikano na bango, bato ya ndenge wana bazalaki koluka kaka makanisi oyo ekokaki kolongisa bango, maloba ya sukali, kosangisa solo ná lokuta, koloba makambo na kondimisama nyonso lokola nde ezali mpenza bongo, ata mpe kobuka lokuta.
Mbala mingi bato oyo balukaka ete bato bándima bango mpe báboya basusu basalelaka liloba lokola “binzambi-nzambi” mpo na kobebisa lokumu ya basusu. Bapesaki lisangá ya badepite ya Mpoto (Assemblée parlementaire du conseil de l’Europe) toli ete ntango bakonzi bazali kotalela makambo ya mangomba ya sika, “basengeli kokeba ete bátika kosalela liloba binzambi-nzambi.” Mpo na nini? Mpo emonanaki ete bato bazali kosalela liloba “binzambi-nzambi” na ndenge ya mabe mpenza. Abakisaki ete: “Na makanisi ya bato lelo oyo, binzambi-nzambi ezali mabe mpenza mpe ezali likama.” Se ndenge yango, bato ya mayele na Grèce balobaki ete ntoma Paulo azali “esopa.” Balingaki koloba ete azali moto ya bilobaloba, moto oyo alɔkɔtaka mpe alobaka ata makambo oyo ayebi mpenza te. Nzokande, Paulo “azalaki kosakola nsango malamu ya Yesu mpe ya lisekwa.”—Misala 17:18.
Mayele oyo bato oyo balukaka kobebisa lokumu ya bato mosusu basalelaka elongaka nde? Ɛɛ. Bango nde bazali mpenzampenza kokɔtisa koyinana na kati ya bikólo mpe na kati ya mangomba, wana bazali kosala ete bato bákanisaka mabe mpo na bato ya bikólo mosusu mpe ya mangomba mosusu. Bato mingi basalelaki mayele yango mpo na kobebisa lokumu ya mwa bituluku mosusu ya bato. Adolf Hitler alongaki mpenza kosalela mayele yango ntango asalaki ete bato ya Allemagne bámona Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu lokola “bato mpamba,” “bato mabe,” mpe “likama” mpo na ekólo. Kotika nzela te ete bokosi ya ndenge wana ebebisa makanisi na yo.—Misala 28:19-22.
Makanisi na yo moko ekosa yo te
Ezalaka mpe mpasi te biso moko tómikosa. Ya solo, ezalaka pɛtɛɛ te ete moto atika makanisi oyo alingaka mingi to amona yango mabe. Mpo na nini? Mpamba te tosepelaka mingi na makanisi na biso moko. Na bongo, tokoki komikosa na makanisi ya lokuta, elingi koloba koluka kolongisa mabunga na biso mpe makambo mosusu oyo ekoki kobungisa biso nzela.
Likambo yango ekómelaki baklisto mosusu na ekeke ya liboso. Bayebaki Liloba ya Nzambe, kasi batikaki yango te etambwisa bango. Basukaki na ‘komikosa bango moko na makanisi ya lokuta.’ (Yakobo 1:22, 26) Likambo moko oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ete tokómi komikosa ndenge wana ezali soki tomoni ete tosilikaka ntango bazali koloba mabe mpo na makambo oyo tondimaka. Na esika tósilika, tokomonisa bwanya soki tondimi koyoka na likebi mpenza makanisi oyo bato yango bazali na yango—ata soki tozali kokanisa mpenza ete likanisi na biso nde ezali malamu.—Masese 18:17.
Luká mpenza “boyebi ya Nzambe”
Tosengeli kosala nini mpo tókanisaka ntango nyonso malamu? Ezali na makambo mingi oyo ekoki kosalisa biso, kasi ekosalisa biso soki biso moko tosali makasi. Salomo, mokonzi ya bwanya, alobaki ete: “Mwana na ngai, soki okozwa maloba na ngai mpe okobatela malamu mibeko na ngai kati na yo, ete otyela bwanya likebi na litoi na yo, mpe ete otya motema na yo koluka bososoli; lisusu, soki okobelela mayele mpe soki okoganga mpo na bososoli, soki okoluka yango lokola palata, mpe soki okokoba koluka yango lokola biloko ya motuya oyo ebombami, boye okoyeba kobanga Yehova, mpe okozwa mpenza boyebi ya Nzambe.” (Masese 2:1-5, NW) Ya solo, soki biso moko tosali makasi mpo na kotondisa solo ya Liloba ya Nzambe na makanisi mpe mitema na biso, tokozwa bwanya, boyebi mpe bososoli ya solosolo. Ekozala mpenza lokola tozali kotimola mpo na koluka biloko oyo ezali na valɛrɛ koleka ata palata to biloko mosusu ya motuya.—Masese 3:13-15.
Bwanya mpe boyebi ezali na ntina mingi mpo na kokanisa malamu. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Ntango bwanya ekɔti na motema na yo mpe molimo na yo ekómi kosepela na boyebi, likoki ya kokanisa ekozala mobateli na yo, bososoli ekobatela yo, mpo na kolongola yo na nzela mabe, na moto oyo alobaka makambo ya bosɔtɔ, na bato oyo batiki banzela ya sembo mpo na kotambola na banzela ya molili.”—Masese 2:10-13, NW.
Ebongi mpenza tótikaka makanisi ya Nzambe etambwisa biso Na ntango likambo moko ezali kotungisa biso to na ntango ya likama. Makambo lokola nkanda to kobanga ekoki kopekisa biso kokanisaka malamu. Salomo alobaki ete: “Minyoko ekoki kosala ete moto ya bwanya akóma kosala bozoba.” (Mosakoli 7:7) Ekoki mpe kosalema ete ‘atombokela Yehova.’ (Masese 19:3) Na ndenge nini? Soki azali kokanisa ete Nzambe nde azali kobimisela ye mikakatano oyo azali kokutana na yango mpe mpo na yango, akómi kobuka mibeko mpe mitinda ya Nzambe. Na esika tómonaka ntango nyonso ete tokoki komikosa te, tosengeli nde komikitisa mpo na koyoka toli ya bato ya bwanya oyo bazali koluka kosalisa biso na nzela ya Biblia. Mpe ntango emonani polele ete tomikosaki, soki esɛngi ete tótika ata makanisi oyo tokangamaki na yango makasi, tosengeli kozala pene na kotika yango.—Masese 1:1-5; 15:22.
‘Kobá kosɛnga Nzambe’
Tozali na ntango moko ya yikiyiki mpe ya mabe mpenza. Soki tolingi kozala na bososoli mpe kosala makambo na bwanya, esengeli mpenza ete tóbondelaka Yehova mbala na mbala mpo na kosɛnga ye atambwisa biso. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bomitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Soki tozangi bwanya mpo na kosilisa mikakatano to komekama ya makasi, tosengeli ‘kokoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka na bokabi epai ya bato nyonso mpe kozanga kotyola.’—Yakobo 1:5-8.
Lokola ntoma Petelo ayebaki ete baninga na ye baklisto basengelaki kozala na bwanya, amipesaki mokumba ya ‘kolamusa makoki na bango ya kokanisa.’ Azalaki na mposa ete ‘bákanisa lisusu maloba oyo elobamaki kala na basakoli basantu mpe komandema ya Nkolo mpe Mobikisi,’ Yesu Klisto. (2 Petelo 3:1, 2) Soki biso mpe tosali bongo mpe totiki makanisi na biso eyokana na Liloba ya Yehova, tokokanisa malamu mpe tokosala makambo na bwanya.
[Bililingi na lokasa 21]
Baklisto ya liboso batikaki bwanya ya Nzambe etambwisa bango, kasi filozofi te
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Bafilozofe banda na lobɔkɔ ya mwasi: Épicure: Tozwi fɔtɔ na ndingisa ya British Museum; Cicéron: Euti na buku The Lives of the Twelve Caesars; Platon: Rome, Musei Capitolini
[Bililingi na lokasa 23]
Kobondela mpe koyekola Liloba ya Nzambe ezali na ntina mingi