Omekolaka Yehova na ndenge ya kotyela basusu likebi?
‘BÓBWAKA mitungisi na bino nyonso likoló ya Nzambe, mpamba te ye atyelaka bino likebi.’ (1 Petelo 5:7) Oyo ezali mpenza maloba ya kolendisa! Yehova Nzambe atyelaka mosaleli na ye mokomoko likebi. Tokoki kozala na motema mpiɔ mpamba te toyebi ete azali kobatela biso.
Kasi, biso mpe tosengeli komekola ye mpe komonisa ete totyelaka basusu likebi. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ezali na mitambo oyo tosengeli kokeba na yango ntango tozali koluka kotyela basusu likebi. Liboso tólobela mitambo yango mosusu, tótalela naino mwa bandakisa ya lolenge oyo Yehova atyelaka basaleli na ye likebi.
Davidi, mokomi ya nzembo, azwaki ndakisa ya mobateli ya mpate mpo na komonisa ndenge oyo Nzambe atyelaka bato na ye likebi; alobaki boye: “[Yehova] azali mobateli na ngai, nakozanga eloko te. Azali kopemisa ngai kati na matiti mobesu, azali kokendisa ngai epai ya mai ya kimya. Akolendisaka molimo na ngai. . . . Ata natamboli na libulu ya molili ya kufa, nakobanga mabe te; zambi yo ozali na ngai elongo.”—Nzembo 23:1-4.
Lokola Davidi ye moko azalaki mobateli ya mpate, ayebaki makambo oyo mosala yango esɛngaka. Mobateli ya mpate abatelaka bampate mpo banyama ya mabe lokola nkɔsi, mbwa ya zamba, mpe ngombolo esala yango mabe te. Akebaka ete bampate bázala bango nyonso esika moko, alukaka oyo ebungi, amemaka oyo elɛmbi, mpe asalisaka oyo ezali kobɛla to ezoki. Mikolo nyonso apesaka bampate mai ya komɛla. Kasi, yango elingi koloba te ete mobateli ya mpate alandelaka likambo mokomoko oyo bampate bazali kosala. Bampate bazalaka na bonsomi, kasi ye abatelaka bango.
Yehova mpe atyelaka basaleli na ye likebi ndenge wana. Ntoma Petelo alobaki boye: “Bozali kobatelama na nguya ya Nzambe.” Liloba oyo ebongolami na “kobatelama” elimboli “kotyelama miso.” (1 Petelo 1:5) Lokola Yehova amibanzabanzaka mpo na biso, atalaka biso ntango nyonso, azalaka kutu pene ya kosalisa biso ntango nyonso oyo tozali na mposa ya lisalisi. Kasi, Yehova akelá biso na bonsomi ya kopona; na yango atambwisaka te likambo mokomoko oyo tosalaka to bikateli nyonso oyo tozwaka. Ndenge nini biso tokoki komekola Yehova na likambo yango?
Bómekola Nzambe na ndenge ya kobɔkɔla bana na bino
Biblia elobi boye: “Bana mibali bazali likabo ya [Yehova].” Yango wana, baboti basengeli kobatela bana na bango mpe kotyela bango likebi. (Nzembo 127:3) Yango ekoki kosɛnga kosalisa bana na bino bámonisa makanisi mpe mayoki na bango mpe kobosana yango te na makambo oyo bozali kosalela bango. Soki baboti bazali koluka koyebisa bana likambo mokomoko oyo basengeli kosala, kozanga kotalela makambo oyo bana na bango balingaka, bakozala lokola mobateli ya mpate oyo azali kotambwisa mpate na ye na nsinga na nkingo. Mobateli moko te akoki kotambwisa bampate na ye ndenge wana; Yehova mpe abatelaka biso bongo te.
Marikoa alobi boye: “Na boumeli ya bambula mingi nazalaki kosuka kaka na koloba na bana na ngai ete ‘Bosengeli kosala boye’ to ‘Bosengeli kosala boye te.’ Nazalaki kokanisa ete yango nde mokumba na ngai lokola moboti. Nazalaki kopesa bana na ngai longonya te, nazalaki mpe kosolola mpenza na bango te.” Mwana na ye ya mwasi azalaki kolekisa ngonga mingi mpo na kosolola ná baninga na ye na telefone, kasi azalaki kosolola mingi te ná mama na ye. Mariko alobi boye: “Namonaki likambo moko. Ntango azalaki kosolola na baninga na ye azalaki kosalela maloba oyo ezali komonisa ete azali komitya na esika ya moto oyo azali kosolola na ye; maloba lokola ‘Ya solo,’ to ‘Ngai mpe namoni bongo.’ Ngai mpe nakómaki kosalela maloba yango mpo na kosalisa mwana na biso abimisa mayoki na ye mpe mosika te tokómaki kosolola malamu mpe ntango molai.” Ndakisa yango emonisi ntina ya kosolola malamu; yango esɛngaka bato mibale bálobaka.
Baboti basengeli kosalisaka bana na bango bábimisaka mayoki na bango mpe bálobaka bamposa na bango, kasi bana basengeli koyeba ntina oyo tolobi ete ndenge oyo baboti na bango bamibanzabanzaka mpo na bango ezali libateli mpo na bango. Biblia epesi bana toli ete bátosaka baboti na bango; mpe emonisi ntina ya kosala yango na maloba oyo: “Mpo makambo ezala malamu mpo na yo mpe oumela ntango molai na mabelé.” (Baefese 6:1, 3) Bana oyo bandimisami mpenza ete kotosa ezalaka na matomba bazalaka na mokakatano te mpo na kosala yango.
Ntango bozali kobatela bampate ya Yehova
Likebi oyo Yehova atyelaka biso mpe bolingo na ye emonanaka mpe na lisangá ya boklisto. Yesu Klisto, Mokonzi ya lisangá asɛngi na bankulutu ete bábatelaka bampate na ye. (Yoane 21:15-17) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na mokɛngɛli eyokani na verbe moko oyo elimboli “kobatela malamumalamu.” Petelo ayebisaki bankulutu ndenge oyo basengeli kosala yango; alobaki boye: “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ na bino, na kopusama te, kasi na bolingo malamu; na bolingo ya litomba ezangi sembo te, kasi na mposa makasi; na komikómisáká mpe te bakonzi ya baoyo bazali libula ya Nzambe, kasi nde na kokómáká bandakisa epai ya etonga.”—1 Petelo 5:2, 3.
Ya solo, mosala ya bankulutu ekokani na oyo ya babateli ya mpate. Bankulutu bazali na mokumba ya kosalisa bandeko oyo balɛmbi na elimo, kosembola bango mpo bálanda mitinda ya sembo. Bankulutu bazali na mokumba ya kobongisa makambo nyonso oyo etali lisangá, kozwa bibongiseli mpo na makita, mpe kokeba ete makambo etambola na molɔngɔ.—1 Bakolinti 14:33.
Kasi, maloba ya Petelo oyo touti kotánga emonisi biso likama moko oyo bankulutu basengeli kokima: ‘bámikómisa te bakonzi’ na lisangá. Yango ekoki komonana ntango nkulutu moko akómi kotyela bandeko mibeko ebele ebele. Na mposa makasi ya kobatela lisangá, nkulutu akoki kolekisa ndelo na makambo mosusu. Na lisangá moko ya Azia, bankulutu batyaki mibeko na ndenge bandeko basengeli kopesanaka mbote na Ndako ya Bokonzi; na ndakisa nani asengeli kobanda koloba liboso; bakanisaki ete soki basali bongo, kimya ekozala na kati ya lisangá. Ekoki kozala ete bankulutu yango bazalaki na makanisi ya mabe te; kasi, tokoki nde koloba ete bazalaki komekola ndenge oyo Yehova atyelaka basaleli na ye likebi? Ntoma Paulo amonisaki makanisi na ye na maloba oyo: “Ezali te ete tozali bakonzi ya kondima na bino, kasi tozali nde baninga ya mosala mpo na esengo na bino, mpo ezali na nzela ya kondima na bino nde botɛlɛmi.” (2 Bakolinti 1:24) Yehova atyelaka basaleli na ye motema.
Longola likambo ya koboya kotyela bandeko mibeko oyo euti na Biblia te, bankulutu bamonisaka ete bazali kotyela bandeko na bango likebi na ndenge babombaka makambo oyo bandeko bayebisaka bango. Babosanaka te maloba oyo: “Yebisá likambo ya nkuku epai ya moto mosusu te.”—Masese 25:9.
Ntoma Paulo amonisaki ete lisangá ya baklisto bapakolami ekokani na nzoto; alobaki boye: “Nzambe asangisaki biteni ya nzoto . . . na ntina ete bokabwani ezala te na kati ya nzoto, kasi ete binama na yango ezala na lobanzo motindo moko yango na yango.” (1 Bakolinti 12:12, 24-26) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kozala na lobanzo motindo moko yango na yango’ elimboli ‘komibanzabanza mpo na basusu.’ Basangani nyonso ya lisangá ya boklisto basengeli komibanzabanza mpo na basusu.—Bafilipi 2:4.
Ndenge nini baklisto bakoki komonisa ete bazali ‘komibanzabanza mpo na basusu’? Bakoki komonisa yango na ndenge bazali kobondela mpo na bango mpe na ndenge bazali kosunga bandeko na bango oyo bazali na bosɛnga. Yango etindaka mpe basusu bámonisa bizaleli ya malamu. Tótalela ndenge oyo ezaleli ya kotyela basusu likebi esalisaki Tadataka. Azwaki batisimo ntango azalaki na mbula 17; na libota na ye mobimba kaka ye moko nde azalaki Motatoli ya Yehova. Alobi boye: “Libota moko ya lisangá na biso ezalaki mbala na mbala kobengisa ngai mpo na kolya mpe kolekisa mwa ntango elongo. Ntɔngɔ nyonso ntango nazali kokende na kelasi nazalaki naino koleka na ndako na bango mpo tótalela mokapo ya mokolo elongo. Bazalaki kopesa ngai toli ebongi mpo na ndenge ya kolonga mikakatano oyo nazalaki kokutana na yango na kelasi, mpe tozalaki kobondela mpo na yango elongo. Libota yango eteyaki ngai ezaleli ya kopesa.” Lelo oyo, Tadataka azali kosalela makambo oyo ayekolaki; azali kosalela basusu na Betele moko ya Batatoli ya Yehova.
Ntoma Paulo alobelaki mpe motambo mosusu na likambo etali kotyela basusu likebi. Alobelaki basi mosusu oyo bakómaka “bato ya bilobaloba mpe oyo bamikɔtisaka na makambo oyo basengeli te kolobela.” (1 Timote 5:13) Atako tosengeli kotyela basusu likebi, tosengeli kokeba ete tómikɔtisa te na makambo na bango. Tokomonisa ete tozali kotyela basusu likebi na ndenge ya mabe soki tokómi ‘kolobela makambo oyo tosengeli te kolobela,’ na ndakisa kosambisa basusu.
Tóbosana te ete moklisto mokomoko akoki kozala na ndenge oyo alingaka kobongisa makambo na ye, biloko oyo alingaka kolya, mpe lolenge ya kominanola oyo alingaka. Na ntango oyo yango ebuki mibeko ya Biblia te, mokomoko azali na lotomo ya kozwa ekateli mpo na oyo alingi kosala. Paulo apesaki baklisto ya Loma toli oyo: “Tiká ete tósambisanaka lisusu te. . . . Tiká tólanda makambo oyo epesaka kimya mpe makambo oyo etongaka biso nyonso.” (Baloma 14:13, 19) Tokomonisa ete tozali kotyela mpenza bandeko na biso ya lisangá likebi soki tozali pene ya kosalisa bango na esika ya komikɔtisaka na makambo na bango. Soki tozali kotyela basusu likebi na ndenge wana, bolingo mpe bomoko ekokola na kati ya libota na biso mpe na kati ya lisangá.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
[Elilingi na lokasa 19]
Soki ozali kopesa mwana longonya mpe ozali komitya na esika na ye, akomonisa mayoki na ye