MOKAPO 17
‘Omitonga likoló ya kondima na yo ya bosantu koleka’
“Awa bozali komitonga likoló ya kondima na bino ya bosantu koleka, . . . bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.”—YUDA 20, 21.
1, 2. Mosala nini ya kotonga ozali kosala, mpe mpo na nini ndenge oyo ozali kosala yango ezali na ntina mingi?
OZALI kosala mosala moko makasi ya kotonga. Obandaki mosala yango eleki mwa ntango mpe okokoba kosala yango na mikolo ezali koya. Mosala yango ezali mpasi, kasi ezali na matomba mingi. Ozali na ekateli makasi ya kotika te to ya kolɛmbisa mabɔkɔ te, mpamba te lolenge oyo ozali kosala mosala yango ekobongisa to ekobebisa bomoi na yo, ata mpe avenire na yo. Mpo na nini? Mpamba te ndako oyo ezali kotongama ezali nde yo!
2 Moyekoli Yuda alobelaki mosala ya kotonga oyo tozali kosala kati na biso moko. Ntango alendisaki bakristo ete ‘bátikala na kati ya bolingo ya Nzambe,’ na mokapo yango kaka, amonisaki mpe sekele mpo na kosala yango: “Awa bozali komitonga likoló ya kondima na bino ya bosantu koleka.” (Yuda 20, 21) Wapi mwa balolenge oyo okoki komitonga, elingi koloba kokómisa kondima na yo makasi mpo otikala na kati ya bolingo ya Nzambe? Tótalela makambo misato oyo etaleli mosala ya kotonga oyo osengeli kosala.
KOBÁ KOLENDISA KONDIMA NA YO NA MASƐNGAMI YA SEMBO YA YEHOVA
3-5. (a) Satana azali koluka kokosa yo mpo okóma kotalela masɛngami ya Yehova ndenge nini? (b) Ndenge nini tosengeli kotalelaka masɛngami ya Nzambe, mpe yango esengeli kotinda biso tómiyoka ndenge nini? Pesá ndakisa.
3 Ya liboso, tosengeli kolendisa kondima na biso na mobeko ya Nzambe. Na buku oyo, oyekoli masɛngami ndenge na ndenge ya Yehova na oyo etaleli etamboli na biso. Ndenge nini otalelaka yango? Satana alingi kokosa yo mpo omonaka ete mibeko mpe mitinda ya Yehova ezali kopekisa yo makambo ya malamu, to mpe ezali konyokola yo. Asalelaka mayele yango banda amonaki ete elongaki na Edene. (Ebandeli 3:1-6) Mayele yango ekolonga mpe epai na yo? Yango ekotalela mingimingi makanisi na yo.
4 Tópesa ndakisa: Ntango ozali kotambola na parkɛ moko kitoko, omoni lopango moko ya bibende oyo ekaboli parkɛ yango. Otali na madusu mpe omoni ete ngámbo mosusu ya parkɛ yango ezali kitoko mpenza. Okoki mbala moko koloba ete lopango yango ezali kopekisa yo mpamba okatisa na ngámbo mosusu. Kasi, ntango otali malamu kuna na kati, omoni nkɔsi moko ezali koluka eloko ya kolya! Omoni sikoyo ntina ya lopango yango: ezali mpo na kobatela yo. Ezali nde na nyama moko ya mabe oyo ezali koluka kolya yo? Liloba ya Nzambe elobi boye: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.”—1 Petro 5:8.
5 Satana azali lokola nkɔsi moko mabe. Lokola Yehova alingi te ete Satana alya biso, atyeli biso mibeko oyo ezali kobatela biso mpo tókwea te na “mayele mabe” ya ndenge na ndenge oyo Satana asalelaka. (Baefese 6:11) Yango wana, mbala nyonso oyo tozali komanyola mibeko ya Nzambe, tosengeli komonaka ete Tata na biso ya likoló apesi biso yango mpo alingaka biso. Soki tozali kotalela mibeko ya Nzambe ndenge wana, ekobatela biso mpe tokozala na esengo. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Kasi moto oyo azali kotalatala na mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi mpe oyo azali kotingama na yango . . . akozala na esengo ndenge azali kosalela yango.”—Yakobo 1:25.
6. Wapi lolenge eleki malamu oyo okoki kolendisa kondima na yo na mibeko mpe mitinda ya sembo ya Nzambe? Pesá ndakisa.
6 Kotosa mibeko ya Nzambe ezali lolenge eleki malamu ya kolendisa kondima na biso epai ya Mopesi-mibeko mpe na bwanya ya mibeko na ye. Na ndakisa, “mobeko ya Kristo” esangisi etinda na ye ya koteya basusu “makambo nyonso oyo [apesi biso] mitindo.” (Bagalatia 6:2; Matai 28:19, 20) Bakristo basengeli mpe kozwa na lisɛki te etinda ya koyanganaka mpo na losambo mpe mpo na kolendisana. (Baebre 10:24, 25) Longola yango, mobeko mosusu ya Nzambe ezali elendiseli ya kobondela Yehova mbala na mbala mpe na mozindo. (Matai 6:5-8; 1 Batesaloniki 5:17) Soki tozali kotosa mibeko yango, tokobanda mokemoke komona polele ete malako yango ezali mpo na bolamu na biso. Kotosa mibeko yango ekopesa biso esengo oyo tokoki kozwa epai mosusu te na mokili oyo etondi na yikiyiki. Ntango ozali kokanisa matomba oyo ozwi na kotosa mibeko ya Nzambe, omonaka te ete kondima na yo ezali kokóma makasi?
7, 8. Ndenge nini Liloba ya Nzambe ezali kokitisa mitema ya baoyo babangaka ete mbala mosusu bakokoka te kotikala sembo mbula na mbula?
7 Bato mosusu bakanisaka ete ekozala mpasi mingi bábatela mibeko ya Yehova mbula na mbula. Babangaka ete mokolo mosusu bábuka yango. Soki yo mpe okanisaka bongo, kobosana maloba oyo te: “Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola. Ee soki otyaka mpenza likebi na mibeko na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ekómi lokola ebale, mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mbu.” (Yisaya 48:17, 18) Osilá kozwa ntango ya kokanisa likoló ya maloba yango mpe komona ete ezali mpenza kokitisa motema?
8 Na maloba yango, Yehova azali koyebisa biso ete kotosa ye ezali mpo na bolamu na biso. Alaki biso makambo mibale soki totosi mibeko yango. Ya liboso, kimya na biso ekozala lokola ebale, elingi koloba ete ekozala kimya ya solosolo, ekotonda mɛkɛ, mpe ekoumela. Ya mibale, boyengebene na biso ekozala lokola mbonge ya mbu. Soki otɛlɛmi na libongo mpe ozali kotala ndenge mbonge ezali koya kobwakama na mokili, na ntembe te omonaka ete ekokoba kosalema bongo libela na libela. Oyebi ete mbonge ekotika te koya komibwaka na libongo mpe ekobanda kosalema bongo mbula na mbula. Yehova alobi ete boyengebene na yo, elingi koloba misala na yo ya malamu, ekoki kozala ndenge wana. Ntango nyonso oyo okotikala sembo epai na ye, ye akotika yo te! (Tángá Nzembo 55:22.) Bilaka ya ndenge wana ezali te kolendisa kondima na yo epai ya Yehova mpe na masɛngami na ye ya sembo?
“TÓSALA MAKASI TÓKÓMA BATO OYO BAKƆMƐLI”
9, 10. (a) Mpo na nini kokóma moto oyo akɔmɛli na elimo ezali mokano malamu mpo na mokristo? (b) Ndenge nini kotalela makambo na liso ya elimo esalisaka moto azala na esengo?
9 Likambo mosusu etaleli mosala na yo ya kotonga emonisami na maloba oyo ya Biblia: “Tósala makasi tókóma bato oyo bakɔmɛli.” (Baebre 6:1) Kokóma moto oyo akɔmɛli ezali mokano moko malamu oyo mokristo asengeli komityela. Biso bato tokoki kolonga te kokóma bato ya kokoka, kasi tokoki kolonga kokóma bato oyo bakɔmɛli. Longola yango, esengo oyo bakristo bayokaka na kosalela Yehova ebakisamaka ntango bazali kokóma bato oyo bakɔmɛli na elimo. Mpo na nini?
10 Mokristo oyo akɔmɛli atalelaka makambo na liso ya elimo. Atalelaka makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango. (Yoane 4:23) Paulo akomaki boye: “Baoyo bazali kolanda bamposa ya nzoto batyaka makanisi na bango na makambo ya nzoto, kasi baoyo bazali kolanda elimo na makambo ya elimo.” (Baroma 8:5) Kotalela makambo na liso ya mosuni epesaka mpenza esengo te, mpamba te etindaka moto aluka kaka matomba na ye moko, amona mosika te, mpe akanisaka kaka biloko ya mokili. Kotalela makambo na liso ya elimo epesaka esengo, mpamba te etindaka moto atalela Yehova, “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11) Moto oyo atalelaka makambo na liso ya elimo alukaka kosepelisa Yehova mpe azalaka na esengo ata na kati ya mikakatano. Mpo na nini? Mikakatano epesaka ye libaku ya komonisa ete Satana azali mobuki-lokuta, epesaka ye libaku ya kolona bosembo, mpe ya kosepelisa Tata na biso ya likoló.—Masese 27:11; tángá Yakobo 1:2, 3.
11, 12. (a) Paulo alobaki nini mpo na ‘makoki ya kososola’ ya mokristo, mpe liloba oyo ebongolami na “emesená” ezali na ndimbola nini? (b) Nzoto esengeli koteyama ndenge nini mpo ekɔmɛla mpe ekóma na makoki ya kosala makambo ndenge na ndenge?
11 Esɛngaka milende mpo na kokola na elimo mpe kokɔmɛla. Paulo amonisaki yango na maloba oyo: “Bilei ya makasi ezali ya bato oyo bakɔmɛli, baoyo, makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesená kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebre 5:14) Ntango Paulo alobelaki ‘komesenisa’ makoki na biso ya kososola, asalelaki liloba moko ya Grɛki oyo bato bazalaki kosalela mingi na bisika oyo bazalaki kosala ngalasisi na Grɛsi, na siɛklɛ ya liboso, mpamba te ekoki kobongolama na ‘komesenisa na ndenge ya moto oyo asalaka ngalasisi.’ Kanisá makambo oyo esɛngamaka epai ya moto ya ndenge wana.
Nzoto ya moto oyo asalaka ngalasisi emesanaka lokola asalelaka yango
12 Ntango moto abotami, nzoto na ye emesenaka naino te kosala makambo mosusu. Na ndakisa, bebe ayebaka mpenza te kotambwisa mabɔkɔ mpe makolo na ye. Yango wana, aningisaka mabɔkɔ bongobongo, mpe ekómaka mbala mosusu amibɛta mbata na elongi. Kasi, binama na ye emesanaka mokemoke ntango azali kosalela yango. Mwana abandaka naino konguluma; ntango akopusana, abandi kotambola; mpe ntango akopusana lisusu, abandi kokima mbangu.a Ezali boni mpo na moto oyo asalaka ngalasisi? Ntango ozali kotala moto yango azali kobalukabaluka mpe kopumbwa likoló, okamwaka mpe omonaka ete azali mpenza na makoki ya kotosisa nzoto na ye mpo esala ndenge nyonso oyo alingi. Moto wana akómaki na makoki ya kosala makambo yango na mbalakaka te; azalaki kolekisa ebele ya bangonga mpo na komesenisa nzoto na ye. Biblia elobi ete kokóma na nzoto oyo ezali na makoki ya ndenge wana ezali na “litomba na mwa makambo moke.” Nzokande, komesenisa makoki na biso ya kososola ezali na ntina koleka!—1 Timote 4:8.
13. Ndenge nini tokoki komesenisa makoki na biso ya kososola?
13 Na buku oyo, tolobeli makambo mingi oyo ekosalisa yo omesenisa to oteya makoki na yo ya kososola mpo otikala sembo epai ya Yehova mpe ozala moto oyo atalelaka makambo na liso ya elimo. Taleláká na bozindo mpe na kati ya libondeli mitinda mpe mibeko ya Nzambe ntango ozali kozwa bikateli na bomoi na yo ya mokolo na mokolo. Liboso ya kozwa ekateli, omitunaka ntango nyonso boye: ‘Mibeko to mitinda nini ya Biblia etalelami na likambo oyo? Ndenge nini nakoki kosalela yango? Nasengeli kosala nini mpo nasepelisa Tata na ngai ya likoló?’ (Tángá Masese 3:5, 6; Yakobo 1:5.) Ekateli nyonso oyo ozwi na ndenge wana ekoteya makoki na yo ya kososola. Soki omesenisi makoki na yo ndenge wana, okokóma mpe okotikala moto oyo azali mpenza na liso ya elimo.
14. Mpo tókola na elimo, tosengeli kolona mposa nini, kasi tosengeli kokeba na likambo nini?
14 Ata soki moto akɔmɛli, akoki kokoba kokola na elimo. Mpo moto akola, esɛngaka ete alyaka. Yango wana, Paulo alobaki boye: “Bilei ya makasi ezali ya bato oyo bakɔmɛli.” Sekele monene mpo na kolendisa kondima na yo ezali kokoba kolya bilei makasi ya elimo. Ntango ozali mpenza kosalela makambo oyo ozali koyekola, okomonisa ete ozali na bwanya; nzokande, Biblia elobi ete: “Bwanya ezali eloko ya liboso.” Yango wana, tosengeli kokolisa mposa makasi ya koyekola mateya ya solo oyo Tata na biso apesaka. (Masese 4:5-7; 1 Petro 2:2) Kasi, moto oyo azali na boyebi mpe na bwanya azali na ntina moko te ya kokanisa ete aleki basusu to ya kokóma na lolendo. Tosengeli komitalelaka mbala na mbala mpo lolendo to bolɛmbu mosusu ezwa misisa te mpe ekola na motema na biso. Paulo akomaki boye: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima, bókoba kotala soki bozali ndenge nini.”—2 Bakorinti 13:5.
15. Mpo na nini bolingo ezali na ntina mingi mpo na kokola na elimo?
15 Ndako ekoki kotongama mpe kosila, kasi misala na yango esilaka te. Esɛngaka kobatela mpe kobongisa yango; ekoki mpe kosɛnga kobakisa biteni mosusu ntango makambo mosusu ebongwani. Tozali na mposa ya nini mpo na kokɔmɛla mpe kobatela boyokani na biso ná Nzambe? Ezaleli ya liboso ezali bolingo. Esengeli ete bolingo na biso epai ya Yehova mpe mpo na bandeko na biso ekolaka ntango nyonso. Soki tozali na bolingo te, boyebi na biso mpe misala na biso nyonso ekozala na ntina moko te, ekozala lokola makɛlɛlɛ ya mpamba. (1 Bakorinti 13:1-3) Soki tozali na bolingo, tokoki kokóma bakristo oyo bakɔmɛli mpe tokoki kokoba kokola na elimo.
TYÁKÁ NTANGO NYONSO MAKANISI NA ELIKYA OYO YEHOVA APESI
16. Satana azali kolendisa makanisi ya ndenge nini, kasi Yehova apesi biso eloko nini oyo ekoki kobatela biso?
16 Sikoyo, tótalela likambo mosusu etali mosala na yo ya kotonga. Mpo na kotonga kondima na yo mpe kokóma moyekoli ya solosolo ya Kristo, osengeli kobatela makanisi na yo. Satana, moyangeli ya mokili oyo, azali elombe mpo na kokosa bato mpo bákóma na makanisi ya mabe, bálɛmba nzoto, mpe bábungisa elikya. (Baefese 2:2) Makanisi ya ndenge wana ezali likama mpo na mokristo ndenge nsɛlɛlɛ ezalaka likama mpo na ndako ya mabaya. Kasi, Yehova apesi biso eloko oyo ekoki mpenza kobatela biso: elikya.
17. Ndenge nini Liloba ya Nzambe emonisi ntina ya elikya?
17 Biblia etángi biteni ndenge na ndenge ya molato ya etumba ya elimo oyo tosengeli na yango mpo na kobunda na Satana mpe mokili oyo. Eloko moko ya ntina mingi na molato yango ezali ekɔti, elingi koloba “elikya ya lobiko.” (1 Batesaloniki 5:8) Na ntango ya kala, soda azalaki koyeba ete akoki kokufa na etumba soki alati ekɔti te. Mbala mingi ekɔti yango ezalaki ya ebende mpe bazalaki kozinga yango nsuki to mposo ya nyama; yango wana, ntango babwakeli soda mbanzi na motó, mbala mingi ezalaki kozwa na ekɔti, mpe na ndenge yango, azalaki koyoka mpasi te. Elikya ekoki kobatela makanisi na yo ndenge ekɔti ebatelaka motó.
18, 19. Yesu apesaki ndakisa nini na oyo etali kobatela elikya, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?
18 Yesu azali ndakisa eleki monene ya moto oyo abatelaki elikya. Kanisá makambo oyo ayikelaki mpiko na mokolo ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. Moninga na ye moko ya motema atɛkaki ye mpo na mbongo. Moninga na ye mosusu awanganaki ye. Bamosusu basundolaki ye mpe bakimaki. Bato ya ekólo na ye baboyaki ye, basɛngaki na basoda ya Roma bányokola ye mpe báboma ye. Tokoki mpenza koloba ete mikakatano oyo Yesu akutanaki na yango ezali makasi koleka oyo biso tokokutana na yango. Kasi nini esalisaki ye? Baebre 12:2 epesi eyano oyo: “Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete ya mpasi mpiko, atyolaki nsɔni, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.” Yesu abosanaki ata mokolo moko te “esengo oyo etyamaki liboso na ye.”
19 Esengo nini etyamaki liboso ya Yesu? Ayebaki ete soki ayiki mpiko, nkombo ya Yehova ekosantisama. Akopesa eyano ya solosolo ete Satana azali mobuki-lokuta. Ezali na elikya mosusu te oyo ekokaki kopesa Yesu esengo koleka oyo wana! Lisusu, ayebaki ete Yehova akopesa ye mbano monene mpo na bosembo na ye, ayebaki ete mosika te akozala lisusu pembeni ya Tata na ye. Yesu abatelaki elikya wana na makanisi na ye ntango azalaki kokutana na mikakatano makasi. Biso mpe tosengeli kosala lokola ye. Biso mpe tozali na esengo oyo etyami liboso na biso. Yehova apesi mokomoko na biso libaku malamu ya kosangana na kosantisama ya nkombo na ye monene. Tokoki komonisa ete Satana azali mobuki-lokuta soki toponi Yehova lokola Mokonzi na biso mpe tozali kotikala na kati ya bolingo ya Tata na biso ata soki tokutani na mikakatano to komekama ya ndenge nini.
20. Nini ekoki kosalisa yo obatela makanisi ya malamu mpe elikya na yo?
20 Yehova azali kaka te na likanisi ya kopesa basaleli na ye ya sembo mbano; azali mpenza na mposa ya kosala yango. (Yisaya 30:18; tángá Malaki 3:10.) Asepelaka kokokisa mposa ya motema ya basaleli na ye. (Nzembo 37:4) Yango wana, tyáká ntango nyonso makanisi na elikya oyo ezali liboso na yo. Kobendama ata mokolo moko te na makanisi mabe mpe oyo etɛngamá ya mokili ya Satana. Soki omoni ete elimo ya mokili ebandi kokɔtela yo, bondelá Yehova na etingya mpo na kosɛnga “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” Kimya yango oyo euti na Nzambe ekobatela motema na yo mpe makanisi na yo.—Bafilipi 4:6, 7.
21, 22. (a) Elikya nini ya monene “ebele mpenza ya bato” bazali na yango? (b) Likambo nini oyo etaleli elikya ya bakristo ezali na ntina mingi mpo na yo, mpe ozali na ekateli nini?
21 Ozali na elikya kitoko oyo okoki komanyola likoló na yango! Soki ozali na kati ya “ebele mpenza ya bato,” oyo ‘bakouta na bolɔzi monene,’ kanisá bomoi kitoko oyo okozala na libaku ya kozwa. (Emoniseli 7:9, 14) Satana ná bademo na ye bakokangama mpe okoyoka esengo oyo okoki koyeba bonene na yango te sikoyo. Kutu, lokola Satana abebisi mpenza makanisi ya bato, moto moko te kati na biso azali na bomoi oyo ezangi mitungisi! Ntango mitungisi yango ekozala lisusu te, tokozala mpenza na esengo ya kosala mosala mpo na kokómisa mabele paladiso na litambwisi ya Yesu ná bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na ye! Tokozala mpenza na esengo ntango maladi mpe mikakatano mosusu ya nzoto ekozala lisusu te, ntango tokoyamba bandeko mpe baninga na biso oyo bazali na nkunda, mpe ntango tokozala na bomoi ndenge Nzambe akanaki! Ntango tokobanda mokemoke kokóma bato ya kokoka, mbano moko monene ekokóma pene na biso, mbano oyo emonisami na Baroma 8:21: “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”
22 Yehova alingi ete ozala na bonsomi oyo eleki mpenza bonsomi nyonso oyo okoki kokanisa. Botosi nde nzela oyo ekomema yo na bonsomi yango. Omoni te ete ebongi mpenza osala molende mpo na kotosa Yehova mokolo na mokolo mpo ozwa bonsomi yango? Yango wana, kobá komitonga likoló ya kondima na yo ya bosantu koleka mpo otikala na kati ya bolingo ya Nzambe libela na libela!
a Bato ya siansi balobaka ete ntango tozali kokola, nzoto na biso ekómaka na makoki ya komitambwisa mpe kotambwisa mabɔkɔ ná makolo. Na ndakisa, likoki yango esalisaka moto abɛta mabɔkɔ ata soki akangi miso. Mwasi moko oyo abɛlaki mpe abungisaki likoki yango, azalaki lisusu kokoka te kotɛlɛma, kotambola, to mpe kofanda.