Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 254-256
  • Mokanda ya Biblia nimero 61—2 Petelo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 61—2 Petelo
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA PETELO YA MIBALE
  • LITOMBA NA YANGO
  • Tósimba ngwi kondima na biso ya motuya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Batelá Mokolo ya Yehova na makanisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mokanda ya Biblia nimero 60—1 Petelo
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 254-256

Mokanda ya Biblia nimero 61—2 Petelo

Mokomi: Petelo

Esika ya bokomi: Babilone (?)

Nsuka ya bokomi: soko 64 T.B.

1. Makambo nini mamonisi ete Petelo azali mokomi ya mokanda ya mibale ya Petelo?

NTANGO Petelo azalaki kosangisa makambo ya mokanda na ye ya mibale, ayebaki ete akómaki pene na kokufa. Na komibanzabanza nyonso, azalaki na mposa ya kokundwela baninga na ye baklisto ntina ya boyebi ya sikisiki mpo na kosalisa bango na kobatela mpiko kati na mosala ya kosakola. Ezali nde na eloko moko oyo ekoki kobimisa ntembe na likambo oyo ete Petelo azalaki mokomi ya mokanda ya mibale oyo mobéngami na nkombo na ye? Mokanda yango mozali kolongola ntembe nyonso oyo ekoki kobima na likambo litali mokomi na yango. Mokomi alobi ete azali “Simona Petelo, moombo mpe ntoma na Yesu Klisto.” (2 Pet. 1:1, NW) Azali kolobela mokanda yango ete mozali “mokanda na mibale mokomeli ngai bino.” (3:1) Alobi mpo na ye moko ete azali moto oyo amonaki, na miso na ye mpenza, kobongwana ya Yesu Klisto, yango ezali libaku malamu oyo Petelo amonaki elongo na Yakobo mpe Yoane, mpe akomi yango na mayoki mpenza ya moto oyo azalaki wana ntango makambo mazalaki kosalema. (1:16-21) Ayebisi ete Yesu asilaki kolobela liwa na ye [Petelo] liboso mpenza.​—2 Pet. 1:14; Yoa. 21:18, 19.

2. Nini ezali komonisa ete mokanda ya mibale ya Petelo mozali eteni ya Makomami mapemami?

2 Nzokande, bamoko kati na balimboli-makomi bazali kosalela kokesena oyo ezali kati na ekomeli ya mikanda wana mibale lokola ntina ya koboya kondima ete Petelo azalaki mokomi ya mokanda ya mibale. Kasi kokesena wana ekoki te kobimisa mokakatano, mpamba te lisoló mpe mokano ya mokanda yango ekesanaki na oyo ya mokanda ya liboso. Lisusu, Petelo akomaki mokanda na ye ya liboso “na mabɔkɔ na Silwano, . . . ndeko na sembo,” mpe soki Silwano apesamelaki mwa bonsomi na oyo etali lolenge ya kokoma milɔngɔ́, boye tososoli ntina oyo kokesena ezali kati na ekomeli ya mikanda mibale wana, mpamba te, na lolenge oyo yango emonani, Silwano apesaki mabɔkɔ te kati na bokomami ya mokanda ya mibale. (1 Pet. 5:12) Likambo oyo ete mokanda yango mozali eteni ya Makomami mapemami lityelami mpe ntembe na ntina oyo ete “yango epesameli mpenza bilembeteli te epai na Batata na lingomba na ebandeli.” Nzokande, lokola yango etyami na etánda “Bakataloge minene ya kala ya Makomami ya Greke ya boklisto,” mokanda ya mibale ya Petelo motalelamaki lokola eteni ya kataloge ya Biblia na bato mingi ya mayele oyo bazalaki na bomoi liboso ya likita libéngami Troisième concile de Carthage.a

3. Soki totali malamu, ntango nini mpe epai wapi mokanda ya mibale ya Petelo mokomamaki, mpe motindamaki epai na nani?

3 Mokanda ya mibale ya Petelo mokomamaki ntango nini? Emonani mpenza ete mokanda yango mokomamaki, mwa moke nsima na mokanda ya liboso, soko na mobu 64 T.B. na Babilone to na zingazinga ya Babilone, kasi elembeteli ya polele ezali te na ntina na esika ya sikisiki oyo yango ekomamaki. Na ntango ya bokomami na yango, mingi kati na mikanda ya Paulo mizalaki kolekaleka na masangá mpe Petelo ayebaki mikanda yango, oyo ye atalelaki ete mipemamaki na Nzambe mpe atángaki yango esika moko na “makomi mosusu lokola.” Mokanda ya mibale ya Petelo motindamaki epai na “bango basili kozwa likabo na kondima lolenge moko na biso,” mpe epai na baoyo mokanda ya liboso motindamaki, bakisá mpe basusu oyo bateyamaki na Petelo. Bobele lolenge mokanda ya liboso molekalekaki na bisika mingi, mokanda ya mibale mpe mokomamaki mpo na kokende na bisika ndenge na ndenge.​—2 Pet. 3:15, 16; 1:1; 3:1; 1 Pet. 1:1.

MAKAMBO MAZALI KATI NA PETELO YA MIBALE

4. (a) Lolenge nini bandeko basengeli kosala makasi mpo na kokóma bato na kobota mbuma na oyo etali boyebi ya sikisiki, mpe bazwi elaka nini? (b) Lolenge nini liloba ya esakweli lindimisami lisusu koleka, mpe mpo na nini yango esengeli kotosama?

4 Kondimisa libyangi mpo na Bokonzi ya likoló (1:1-21). Nokinoki, Petelo amonisi lobanzo ya bolingo mpo na “bango basili kozwa likabo na kondima.” Azali na mposa ete ngɔlu mpe kimya ebakisama epai na bango ‘kati na boyebi ya sikisiki ya Nzambe mpe ya Yesu, Nkolo na biso.’ Na bokabi nyonso, Nzambe asili kopesa bango “bilaka minene mpe na motuya mingi,” oyo na nzela na yango bakoki kokóma basangani na lolenge ya Nzambe. Na yango, na nzela na milende makasi, tiká ete, likoló na kondima na bango, bábakisa bizaleli malamu, boyebi, komipekisa, mpiko, bokangami epai na Nzambe, kolinga bandeko, mpe bolingo. Soki bizaleli wana bitondi kati na bango, bakokóma soko moke te bato balɛmbi to oyo bazangi kobota mbuma na ntina na boyebi ya sikisiki. Bandeko basengeli kosala makasi mpo na kondimisa libyangami mpe koponama na bango, bakisá mpe bokɔti na bango na Bokonzi ya seko ya Nkolo na bango. Koyebáká ete ‘kotikama ya hema na ye esili kobɛlɛma,’ Petelo akundweli bango makambo oyo na ntina ete bátikala kolobela yango na nsima na ye. Petelo amonaki na miso mpenza kokembisama ya Klisto likoló na ngomba na bulɛɛ, ntango maloba oyo malandi ‘mabimaki epai na ye na nkembo monene monene ete, Oyo Mwana na ngai molingami na ngai; nakosepelaka na ye mingi.’ Na bongo, liloba ya esakweli lindimisami makasi lisusu, mpe lisengeli kotosama, mpo ete yango euti na mokano ya moto te, ‘kasi bato bauti na Nzambe balobi wana ezalaki bango kopusama na elimo santu.’—1:1, 2, 4, 14, 17, 21.

5. Makebisi nini Petelo apesi na ntina na balakisi ya lokuta, mpe bilakiseli nini ya nguya asaleli mpo na komonisa ete bikateli ya Nzambe bikozanga te kokwela bato yango?

5 Makebisi makasi na ntina na balakisi ya lokuta (2:1-22). Basakoli mpe balakisi ya lokuta bakomema bato kati na mikabwano ya libebi, bakolendisa etamboli ya mbindo, mpe bakoloba mabe na ntina na solo. Kasi libebi na bango lizali kolala te. Nzambe azangaki te kopesa etumbu na baanzelu oyo basalaki masumu, wana ayeisaki mpela na mikolo ya Noa, to ntango abebisaki Sodomo mpe Gomola kino mputulu ya mɔ́tɔ. Kasi asikolaki mosakoli Noa mpe moyengebene Lota, boye “Nkolo ayebi kobikisa bango bakosambela ye wana ezali bango kati na komekama nde kobatela bakɛsɛni kino mokolo na kosamba mpo na kozwa etumbu.” Mpamba te, na motó makasi nyonso, bato yango bazali na botomboki lokola banyama bazangi lisosoli, bazali bato bayebi ata eloko moko te, bato bakolobaka na nkó, oyo bazwi esengo kati na mateya ya lokuta, bato na ekobo, bato na bilulela mpe, lokola Balama, balingi kozwa kanyaka na nzela na misala mabe. Bazali kolaka bonsomi epai na basusu nzokande bango moko bazali baombo ya libebi. Elingaki kozala malamu mpo na bango soki bayebaki te nzela ya boyengebene, mpamba te lisese oyo likokani epai na bango ete: “Mbwa azongi kolya biloko bisili ye kosanza; mpe ete, Ngulu asukoli mai mpe akei kolala na bosɔtɔ.”​—2:9, 22.

6. (a) Mpo na nini Petelo akomaki, mpe alobi nini na ntina na elaka ya Nzambe? (b) Na bokeseni na batyoli, lolenge nini baklisto basengeli komimonisa ete bázali kosɛnzɛla?

6 Kobosana mokolo ya Yehova soko moke te (3:1-18). Petelo azali kokoma mpo na kolamwisa makoki ya kokanisa malamu epai na baklisto, ete bámikundwela makambo oyo malobamaki na ntango ya kala. Na mikolo ya nsuka, batyoli bakobima mpe bakoloba ete: “Wapi elaka na Koya [“kozala,” NW]” ya Klisto? Bato yango bazali kososola te ete Nzambe abomaki mokili ya ntango ya kala na mai mpe ete “mpo na Liloba na ye, Likoló mpe nsé na ntango oyo ibombami ete izika” mpe “izali kobatelama kino mokolo na kosambisa mpe na koboma bato bakotyolaka Nzambe.” Epai na Yehova, mbula nkóto izali lokola mokolo moko, boye “Nkolo akoumela nsima na elaka na ye te,” kasi azali na motema molai, alingi te ete moto ata moko abomama. Na yango, baklisto basengeli kokeba na etamboli na bango mpe basengeli kosala misala ya bokangami epai na Nzambe wana bazali kozela mpe bábosana soko moke te koya ya mokolo ya Yehova, na nzela na yango makoló makonangwa na mɔ́tɔ mpe biloko bikonangwa na mɔ́tɔ makasi. Kasi, engebene elaka ya Nzambe, tozali kozela “Likoló na sika mpe nsé na sika.”​—3:4, 7, 9, 13.

7. Lokola bayebi makambo yango liboso, lolenge nini baklisto basengeli kosala milende?

7 Na bongo, basengeli kosala nyonso ekoki na bango ‘ete, na nsuka, bázwama na ye na litɔnɔ te mpe na likambo te mpe kati na kimya.’ Basengeli kotalela motema molai ya Nkolo na bango ete ezali lobiko, bobele lokola molingami Paulo akomelaki bango. Lokola bayebi makambo yango liboso mpenza, basengeli komikɛngɛla ete bákwea te longwa na mpiko na bango. Petelo asukisi ete, ‘Te, kasi bókóla nde na ngɔlu mpe na boyebi na Nkolo na biso mpe Mobikisi, ye Yesu Klisto. Na ye nkembo, na sasaipi mpe na mokolo na seko.’—3:14, 18.

LITOMBA NA YANGO

8. (a) Lolenge nini Petelo andimisi ete Makomami ya Liebele mpe Makomami ya Greke mapemamaki? (b) Lolenge nini tokozwa litomba na kobateláká makasi boyebi ya sikisiki?

8 Oyo nde ntina monene boyebi ya sikisiki ezali na yango! Petelo ye moko akɔtisi kati na bandimbola na ye boyebi ya sikisiki oyo azwaki na Makomami ya Liebele. Andimisi ete yango epemamaki na nzela ya elimo santu: ‘Mpo esakweli moko te ebimaki na mokano na moto, kasi bato bauti na Nzambe balobi wana ezalaki bango kopusama na elimo santu.’ Amonisi lisusu ete mayele ya Paulo ‘mapesamelaki ye.’ (1:21; 3:15) Tokozwa litomba monene na kotyáká likebi na Makomami yango nyonso oyo mapemami mpe na kosimbáká makasi boyebi ya sikisiki. Na yango, tokokokana soko moke te na bato oyo bazali komisepelisa, lokola baoyo Petelo alobeli mpe oyo bazali koloba ete: “Makambo nyonso maumeli bobele bongo lokola ezalaki yango na ebandeli na Kozalisama.” (3:4) Lisusu, tokokwea te kati na mitambo ya balakisi ya lokuta, lokola baoyo Petelo alobeli bango na mokapo 2 ya mokanda na ye. Kútu, tosengeli nde kotya ntango nyonso likebi na makundoli oyo Petelo mpe bakomi mosusu ya Biblia bapesi. Makundoli yango mazali kosalisa biso ete tótikala ‘ngwi kati na solo’ mpe, na motema molai esika moko na mpiko, ‘tólanda kokóla kati na ngɔlu mpe na boyebi ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Klisto.’—1:12; 3:18.

9. Milende makasi nini tolendisami na kosala, mpe mpo na nini?

9 Mpo na kosalisa biso na kokóla kati na ‘boyebi ya sikisiki ya Nzambe mpe ya Yesu, Nkolo na biso,’ Petelo asɛngi ete tósala milende makasi mpo na kolóna bizaleli ya boklisto oyo bitángami kati na mokapo 1, vɛrsɛ́ 5 kino vɛrsɛ́ 7. Na nsima, na vɛrsɛ́ 8, abakisi ete: “Zambi soko makambo oyo mazali kati na bino mpe mazali koyikana, makobatela bino ete bózala mpamba te mpe bózanga kobota mbuma te, mpo na boyebi [ya sikisiki ya, NW] Nkolo na biso Yesu Klisto.” Ya solo, oyo ezali elendiseli makasi mpo na mosala, lokola tozali basaleli ya Nzambe na boumeli ya mikolo oyo mabe!—1:2.

10. (a) Petelo alobeli mingi bilaka nini, mpe apesi elendiseli nini na ntina na yango? (b) Endimiseli nini Petelo apesi na ntina na bisakweli ya Bokonzi?

10 Oyo nde likambo ya ntina kosala nyonso ekoki mpo na kondimisama na kozwa “bilaka minene mpe na motuya” ya Yehova Nzambe! Na yango, Petelo alendisi baklisto bapakolami ete bátya miso na bango likoló na libonza ya Bokonzi, na kolobáká ete: “Bózala na etingya mpo na kolendisa ebyangeli mpe eponeli na bino. Soko bokosalaka bongo, bokotuta mabaku soko moke te. Zambi nzela na koingela kati na Bokonzi na seko na Nkolo na biso, Mobikisi Yesu Klisto, ekozwama mpo na bino na malamu mpenza.” Na nsima, Petelo abendi likebi likoló na komonana ya nkembo ya Bokonzi ya Yesu, oyo ye [Petelo] amonaki yango na miso mpenza na nzela na emonaneli ya kobongwana ya Yesu, mpe abakisi ete: “Tozali kolendisa liloba lisakolami na makasi na koleka.” Ya solo, bisakweli nyonso bitali Bokonzi ya nkembo ya Yehova bikokokisama mpenza. Na yango, ezali na elikya mpenza nde tozali kozongela maloba ya Petelo oyo mauti na esakweli ya Yisaya ete: “Tozali kotalela Likoló na sika mpe nsé na sika, pelamoko elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.”​—2 Pet. 1:4, 10, 11, 19; 3:13; Yis. 65:17, 18.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá etánda na lokasa 303.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto