Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 251-253
  • Mokanda ya Biblia nimero 60—1 Petelo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 60—1 Petelo
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA PETELO YA LIBOSO
  • LITOMBA NA YANGO
  • Tósimba ngwi kondima na biso ya motuya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mokanda ya Biblia nimero 61—2 Petelo
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mateya oyo tokoki kozwa na mikanda mibale ya Petro
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Pápa azali nde “mokitani ya Santu Petro”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 251-253

Mokanda ya Biblia nimero 60—1 Petelo

Mokomi: Petelo

Esika ya bokomi: Babilone

Nsuka ya bokomi: soko 62-64 T.B.

1. Mpo na nini baklisto basengelaki kozwa komekama, mpe mpo na nini tondimi ete mokanda ya liboso ya Petelo moyaki na ntango ebongi?

WANA baklisto ya ekeke ya liboso basakolaki misala malamu ya Nzambe na mboka ya bopaya, mosala ya Bokonzi mokólaki mpe mofulukaki kati na teritware mobimba ya bokonzi ya Loma. Nzokande, mwa mobulungano ebimaki na ntina na etuluku yango ya molende. Ntina ya liboso ezali ete lingomba na bango liutaki na Yelusaleme mpe na Bayuda, mpe bato mosusu batalelaki bango lokola etuluku ya Bayuda oyo bazalaki kobundana mpo na makambo ya politiki mpe oyo bazalaki kotombokela boyangeli ya Baloma mpe kopesa ntango nyonso mpasi epai na baguvernere ya mboka. Mpe lisusu, baklisto bakesanaki na bato nyonso mpamba te bazalaki koboya kopesa mbeka epai na amperɛrɛ to komikɔtisa na milulu ya losambo ya bapakano ya eleko wana. Baklisto balobelamaki mabe mpe bazwaki minyoko mingi na ntina na kondima na bango. Na ntango ebongi, mpe na kopemama na Nzambe oyo epesaki boyebi ya makambo mazalaki koya, Petelo akomaki mokanda na ye ya liboso, kolendisáká baklisto ete bátɛlɛma ngwi mpe amonisaki bango lolenge basengelaki komitambwisa na nsé na boyangeli ya Néron mpe ya Kaisala, na eleko wana. Na kotalela mopɛpɛ ya minyoko oyo mobimaki nokinoki na nsima, tokoki koloba ete mokanda yango mokomamaki mpenza na ntango ebongi.

2. Nini emonisi ete Petelo azalaki mokomi ya mokanda oyo mozali na nkombo na ye, mpe mokanda yango motindamaki epai na nani?

2 Maloba ya ebandeli mazali komonisa ete Petelo azalaki mokomi ya mokanda yango. Lisusu, Irénée, Clément moto na Alesandalia, Origène mpe Tertullien, bango nyonso batángi maloba ya mokanda yango, komonisáká ete Petelo nde moto akomaki yango.a Bosolo ya mokanda ya liboso ya Petelo endimisami motindo moko na mikanda mosusu ya Makomami mapemami. Eusèbe ayebisi biso ete bankulutu ya lingomba bazalaki kosalela mokanda yango na bonsomi nyonso; ntembe ezalaki ata moke te na ntina na bosolo na yango na mikolo na ye (soko na mobu 260-342 T.B.). Ignace, Hermas, mpe Barnabas ya ekeke ya mibale, bango nyonso batángi makambo oyo mazali na mokanda yango.b Mokanda ya Liboso ya Petelo mozali na boyokani mozindo na mikanda mosusu ya Makomami mapemami mpe mozali kopesa nsango moko ya nguya mpo na baklisto Bayuda mpe baklisto ya mabota mosusu oyo bafandaki lokola “bapaya na lipalangana kati na Pɔntɔ, na Galatia, na Kapadokia, na Azia mpe na Bitunia”—bitúká ya Asie Mineure.​—1 Pet. 1:1.

3. Bilembeteli nini bimonisi ntango ya kokomama ya Mokanda ya Liboso ya Petelo?

3 Mokanda yango mokomamaki ntango nini? Elobeli na yango ezali komonisa ete baklisto bazalaki kokutana na komekama mingi, oyo eutaki mbala mosusu epai na bapakano to epai na Bayuda oyo bazalaki bandimi te; na ntango yango, minyoko minene oyo Néron abimisaki na mobu 64 T.B., mibandaki naino te. Emonani polele ete Petelo akomaki mokanda oyo liboso ete minyoko yango mibanda, mbala mosusu na eleko ekaboli mobu 62 mpe mobu 64 T.B. Bosukisi wana bondimisami lisusu na likambo oyo ete Malako azalaki naino elongo na Petelo. Na boumeli ya bolɔ́kɔ ya liboso ya Paulo na Loma (soko na mobu 59-61 T.B.), Malako azalaki elongo na Paulo kasi asengelaki kokenda na Asie Mineure; mpe na ntango ya bolɔ́kɔ ya mibale ya Paulo (s. 65 T.B.), Malako azalaki pene ya kokende kokutana na Paulo kuna na Loma. (1 Pet. 5:13; Kols. 4:10; 2 Tim. 4:11) Na boumeli ya ntango yango, azwaki libaku ya kozala elongo na Petelo na Babilone.

4, 5. (a) Nini ezali kokweisa likanisi oyo ete Petelo akomaki mokanda na ye ya liboso na Loma? (b) Nini emonisi ete akomaki yango mpenza na Babilone ya solosolo [kasi ya elilingi te]?

4 Mokanda ya liboso ya Petelo mokomamaki wapi? Atako balimboli ya Biblia bandimi bosolo ya mokanda yango, mpe bandimi ete yango ezali eteni ya Makomami mapemami, atako bandimi ete Petelo azalaki mokomi na yango mpe bandimi eleko ekanisami oyo mokanda yango mokomamaki, nzokande bazali na makanisi makeseni likoló na esika oyo yango ekomamaki. Engebene litatoli ya Petelo ye moko, akomaki mokanda na ye ya liboso ntango azalaki na Babilone. (1 Pet. 5:13) Kasi basusu balobi ete akomaki yango na Loma, komonisáká ete “Babilone” ezalaki nkombo ya libombami mpo na Loma. Nzokande, likanisi wana lisimbami te na bilembeteli ya solosolo. Biblia emonisi ata na esika moko te ete Babilone ezali komonisa mpenzampenza Loma. Lokola Petelo atindaki mokanda na ye epai na baoyo bazalaki na bamboka ya solosolo, lokola Pɔntɔ, Galatia, Kapadokia, Azia mpe Bitunia, boye ezali likambo libongi na koloba ete Babilone oyo ye alobelaki ezalaki mpe esika ya solosolo oyo ezalaki kobéngama na nkombo wana. (1:1) Ezalaki na bantina ebongi mpenza ete Petelo azala na Babilone. Apesamelaki ‘nsango malamu mpo na bato bakatami ngenga,’ mpe ezalaki na etuluku monene ya Bayuda kati na Babilone. (Gal. 2:7-9) Wana yango ezali kolobela kobimisama ya mokanda Talmud de Babylone, búku Encyclopaedia Judaica elobeli “biteyelo minene ya Babilone” mpo na losambo ya Bayuda na boumeli ya Ntango na Biso.c

5 Makomami mapemami, bakisá mpe mikanda mibale oyo Petelo akomaki, elobeli ata na esika moko te ete ye akendaki na Loma. Paulo azali kolobela kozala na ye moko na Loma, kasi alobeli ata na esika moko te kozala ya Petelo kuna. Ntango Paulo atángaki nkombo ya bato 35 kati na mokanda na ye epai na Baloma mpe wana atindelaki bato 26 mbote na kotángáká nkombo na bango, mpo na nini azangaki kotánga nkombo ya Petelo? Ezali mpo ete Petelo azalaki kuna te na ntango yango! (Lom. 16:3-15) “Babilone” epai kuna Petelo akomaki mokanda na ye ya liboso ezalaki mpenza Babilone ya solosolo oyo ezwamaki na mabóngo ya Ebale Pelata [Euphrate] kati na mokili ya Mésopotamie.

MAKAMBO MAZALI KATI NA PETELO YA LIBOSO

6. Petelo akomi na ntina na elikya nini, mpe na moboko nini ‘kobotama ya sika’ ya elikya yango ekoki kozwama?

6 Kobotama lisusu mpo na elikya ya bomoi na nzela ya Klisto (1:1-25). Na ebandeli ya mokanda na ye, Petelo abendi likebi ya batángi likoló na ‘kobotama ya sika mpo na elikya ya bomoi’ mpe libula likobebaka te oyo libombami mpo na bango kati na makoló. Yango euti na motema mawa ya Nzambe na nzela na lisekwa ya Yesu Klisto. Na bongo, atako banyokwami na komekama ndenge na ndenge, ‘baponami’ bazali kosepela makasi ete ezaleli ya kondima na bango oyo emekami “[ekomonana] mpo na masanzoli na lokumu mpe na lisimi wana ekomonana Yesu Klisto.” Basakoli ya kala, ata mpe baanzelu, balukaki koyeba makambo na ntina na lobiko yango. Boye, baponami basengeli kolendisa makanisi na bango mpo na mosala mpe kotya elikya na bango likoló na ngɔlu oyo, kokómáká bulɛɛ kati na etamboli na bango nyonso. Yango ezali likambo libongi mpenza soki totaleli kosikwama na bango, oyo euti soko moke te na biloko bikobebaka, kasi euti nde “na makila na Yesu Klisto maleki nyonso na motuya, lokola makila na mwana na mpate oyo na mpota te mpe na litɔnɔ te,” boye te? ‘Kobotama na bango ya sika’ ezali na nzela ya liloba ya Yehova, Nzambe na bomoi mpe na seko, liloba oyo likoumelaka libela na libela mpe oyo lisakwelamaki bango lokola nsango malamu.​—1:1, 3, 7, 19, 23.

7. (a) Baklisto bazali kotongama lokola eloko nini, mpe mpo na mokano nini? (b) Na motindo na bango ya bapaya ya ntango mokuse, lolenge nini basengeli komitambwisa?

7 Kobatela etamboli malamu kati na bapakano (2:1–3:22). Lokola mabanga na bomoi, baklisto batongami ndako na elimo, kopesáká mbeka ya elimo oyo indimami na Nzambe na nzela ya Yesu Klisto, libanga ya moboko, oyo likómaki libaku mpo na bato bazangi kondima. Baoyo bazali komonisa kondima basili kokóma ‘banganga na bokonzi, libota ya bulɛɛ, mpo na koyebisa makambo malamu na oyo abyangi bango longwa na molili kino pole na ye ya kokamwisa.’ Lokola bazali bapaya ya ntango moke kati na bapakano, tiká ete báboya misala ya nzoto mpe bábatela etamboli malamu. Tiká ete bátosa ‘bibongiseli nyonso ya bato,’ ezala mokonzi monene to bayangeli. Ɛɛ, tiká ete ‘bátosa bato ya lolenge nyonso, bázala na bolingo mpo na libota mobimba ya bandeko, bázala na bobángi Nzambe, bákumisa mokonzi.’ Bobele bongo, tiká ete basáli bátosa bankolo na bango na lisosoli malamu, koyikáká mpiko na nsé na minyoko ya bokɛsɛnɛ. Klisto mpe, atako asalaki lisumu moko te, afingamaki mpe azwaki mpasi mingi, kotikáká “elakiseli” ete bato bálanda matambe na ye na bosembo nyonso.​—2:9, 13, 17, 21.

8. (a) Toli malamu nini epesami epai na basi mpe mibali? (b) Nini ezali na ntina mpo ete moto azwa lisosoli malamu liboso na Nzambe?

8 Botosi esɛngami mpe epai na basi oyo, na nzela ya etamboli malamu esika moko na limemya mozindo, bakoki ata kolónga mibali na bango oyo bazali bandimi te, kozanga ete bábimisa liloba. Lobanzo na bango losengeli kotyama likoló na kitoko ya libándá te. Yango esengeli nde kozala lokola oyo ya Sala, ‘eloko ebombami na motema, kitoko oyo ekobeba te, oyo na elimo na bopɔlɔ mpe na kimya; yango ezali na motuya monene na miso na Nzambe.’ Mibali basengeli kokumisa basi lokola ‘mbeki ya motau’ mpe lokola “bato bakozwa libula na likabo na bomoi.” Baklisto nyonso basengeli komonisa bolingo ya bandeko. ‘Ye oyo azali na mposa ya kosepela na bomoi . . . , tiká ete apɛngwa longwa na mabe mpe asala malamu, tiká ete aluka kimya mpe alanda yango. Mpo ete miso ya Yehova mazali epai na bayengebene.’ Na esika ya kobanga bato, basengeli ntango nyonso kozala pene mpo na kokɔtela elikya na bango. Soki yango ezali mokano ya Nzambe, komona mpasi mpo na misala ya sembo ezali likambo ya malamu koleka komona mpasi mpo na misala mabe. ‘Zambi Klisto akufaki mpo na masumu mbala moko mpo na libela, ye moyengebene mpo na bakɛsɛni, ete abɛlɛmisa biso na Nzambe. Abomamaki solo na nzoto na ye kasi azalisami na bomoi na elimo.’ Kondima ya Noa, oyo amonisaki yango na kotongáká masuwa, ememaki lobiko mpo na ye moko mpe libota na ye. Bobele bongo, na moboko ya kondima kati na Yesu oyo asekwisami, baoyo bamipesi epai na Nzambe, bazwi batisimo lokola elembo ya kondima, mpe balandi kosala mokano ya Nzambe, babikisami mpe bazwi ndanga ya lisosoli malamu uta na Nzambe.​—3:4, 7, 10-12, 18.

9. Baklisto basengeli kozala na makanisi motindo nini? Atako mokakatano nini mozali?

9 Kosepela na kosala mokano ya Nzambe lokola moklisto, atako minyoko mizali (4:1–5:14). Baklisto basengeli kozala na makanisi motindo moko na Klisto, kozaláká na bomoi bobele mpo na kosala mokano ya Nzambe mpe koboya kosala lisusu mokano ya bapakano, atako bapakano yango bazali koloba mabe mpo na bango mpo ete bazali lisusu kotambola elongo na bango te ‘mpo na kosala makambo mabe.’ Lokola nsuka ya biloko binso ebɛlɛmi, basengeli kozala na makanisi malamu, basengeli kozala bato na kobondela, mpe kozala na bolingo mozindo moko na mosusu, kosaláká makambo nyonso mpo na lokumu ya Nzambe. Wana komekama ezali kobimela bango, basengeli kokamwa te, kasi basengeli nde kosepela mpamba te bazali basangani kati na mpasi ya Klisto. Nzokande, tiká ete moko te anyokwama mpo ete azali mosáli na mabe. Lokola kosambisama ekobanda na ndako ya Nzambe, “bango bazali koyoka mpasi pelamoko ekani Nzambe mokano, bápesa bomoi na bango epai na Mozalisi na bango mpo na kosalaka malamu.”​—4:4, 19.

10. Toli nini epesami epai na mikóló mpe epai na bilenge, mpe mokanda ya liboso ya Petelo mosuki na endimiseli nini ya nguya?

10 Bankulutu basengeli kobatela etongá ya Nzambe na kopusama te, ɛɛ, na mayoki ya mɔ́tɔ mpenza. Kozala ndakisa mpo na etongá ekosala ete bázwa, na komonana ya Klisto Mobateli Mokonzi, motole ya nkembo oyo mokobebaka te. Tiká ete bilenge bátosa mikóló mpe banso bázala na elimo ya kosɔkɛma, “mpo ete Nzambe akotɛmɛlaka bato na lolendo, nde akopesaka basɔkɛmi ngɔlu.” Tiká ete bázala ngwi kati na kondima mpe bázala na bokɛngi liboso na Zábolo, ye “nkosi [na] konguluma.” Maloba ya nguya oyo mazali kopesa kondimisama mayokani lisusu ntango Petelo asukisi bilendiseli na ye ete: “Nde Nzambe na ngɔlu nyonso, ye oyo abyangi bino ete bókɔta na nkembo na ye na seko kati na Klisto, ye moko akokokisa bino, akolendisa bino, akopesa bino makasi, esili bino koyoka mpasi mwa ntango moke. Na ye makasi libela na libela. Amen.”​—5:5, 8, 10, 11.

LITOMBA NA YANGO

11. Lolenge nini Petelo alandi toli ya Yesu mpe ya Paulo wana apesaki toli epai na bakɛngɛli?

11 Mokanda ya liboso ya Petelo mozali na batoli malamu mpo na bakɛngɛli. Kolandáká toli oyo Yesu ye moko apesaki na Yoane 21:15-17 mpe toli ya Paulo oyo ezwami na Misala 20:25-35, Petelo amonisi lisusu mosala ya mokɛngɛli ete ezali mosala ya bobateli, oyo esengeli kosalema na moimi te, kasi na motema malamu mpenza, mpe na mayoki ya mɔ́tɔ. Mokɛngɛli azali mobateli-moke, oyo azali kosala na kotosáká “Mobateli Mokonzi,” Yesu Klisto, mpe akozongisela ye monɔkɔ na ntina na etongá ya Nzambe, oyo asengeli kobatela matomba na yango na kozaláká ndakisa mpe na kosaláká yango na komikitisa nyonso.​—5:2-4.

12. (a) Botosi nini ya ndelo bosengeli kopesama epai na bayangeli mpe bankolo? (b) Petelo apesi toli nini na ntina na botosi oyo basi basengeli kozala na yango mpe na ntina na bokonzi ya mibali? (c) Ezaleli nini ya boklisto elobelami mingi kati na mokanda mobimba ya Petelo ya Liboso?

12 Makambo mingi mosusu oyo matali botosi ya boklisto malobelami kati na mokanda ya Petelo, epai kuna toli malamu epesami. Na 1 Petelo 2:13-17, toli epesami likoló na botosi bobongi na bayangeli, lokola mokonzi monene mpe baguvernere. Nzokande, botosi yango ezali na ndelo; yango esengeli komonisama mpo na Nkolo mpe esangani na “bobángi Nzambe,” oyo baklisto bazali baombo na ye. Basáli kati na ndako balendisami ete bátosa bankolo na bango mpe báyika mpiko soki basengeli kozwa mpasi ‘na ntina na lisosoli na bango liboso na Nzambe.’ Basi mpe bapesameli batoli ya motuya mingi ete bázala na botosi epai na mibali na bango, sangisá mpe mibali oyo bazali bandimi te, na boye ete etamboli na bango ya pɛto mpe ya limemya ezala na “motuya monene na miso na Nzambe” mpe ekoka ata kolónga mibali na bango ete báyeba solo. Mpo na komonisa likanisi yango polele, Petelo asaleli ndakisa ya botosi ya sembo oyo Sala azalaki na yango epai na Abalayama. (1 Pet. 2:17-20; 3:1-6; Gen. 18:12) Na ngala na bango, mibali basengeli kosalela bokonzi na bango na boboto ebongi mpo na “mbeki na motau.” Bobele na likambo yango, Petelo apesi elendiseli ete: “Bobele bongo, bino bilenge, bótosa mibangé.” Mpe na nsima, alobeli makasi ntina ya kozala na elimo ya kosɔkɛma, kozala na komikitisa, ezaleli ya boklisto oyo elobelami mingi kati na mokanda na ye mobimba.​—1 Pet. 3:7-9; 5:5-7; 2:21-25.

13. (a) Kati na mokanda na ye, lolenge nini Petelo amonisi polele mokano ya libyangi ya Nzambe epai na lisangá ya boklisto? (b) Petelo azali kolobela libula nini, mpe nani akozwa yango?

13 Na ntango moko boye, wana komekama makasi mpe minyoko mibandaki kobima lisusu, Petelo apesaki bilendiseli ya nguya, mpe ntembe ezali te ete mokanda na ye mozali na motuya mingi mpo na baoyo nyonso bazali kokutana na komekama motindo wana lelo. Talá lolenge asaleli Makomami ya Liebele na kotángáká maloba ya Yehova: “Bózala bulɛɛ mpo ete ngai nazali bulɛɛ.” (1 Pet. 1:16; Lev. 11:44) Mpe lisusu, kati na mokapo moko oyo motondi na maloba mauti na biteni mosusu ya Makomami mapemami, Petelo amonisi lolenge oyo lisangá ya boklisto litongami lokola ndako ya elimo ya mabanga ya bomoi oyo Klisto azali moboko na yango. Nde mpo na mokano nini? Petelo ayanoli ete: “Bino bozali libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulɛɛ, bato baponami, ete bóyebisa malamu na oyo abyangi bino kobima na molili kokɔta na moi na ye na kokamwisa.” (1 Pet. 2:4-10; Yis. 28:16; Nz. 118:22; Yis. 8:14; Ex. 19:5, 6; Yis. 43:21; Hos. 1:10; 2:23) Ezali epai na ‘bonganga yango ya bokonzi,’ bonganga oyo esali libota mobimba ya bulɛɛ ya Nzambe, nde Petelo amonisi elaka ya Bokonzi ya “libula likobeba te [mpe oyo] lizangi mbindo,” “motole na nkembo mokobeba te,” “nkembo na ye na seko kati na Klisto.” Na bongo, bango balendisami makasi ete bálanda kosepela na boye ete bákoka ‘kosepela na esengo monene wana ekomonana nkembo na ye.’—1 Pet. 1:4; 5:4, 10; 4:13.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Cyclopedia ya McClintock mpe Strong, ebimeli ya 1981, Vol. VIII, lokasa 15.

b New Bible Dictionary, ebimeli ya mibale, 1986, ebimisami na J. D. Douglas, lokasa 918.

c Jerusalem, 1971, Vol. 15, col. 755.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto