Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/6 nk. 5-7
  • Zelá na motema molai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zelá na motema molai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tókanisaka malamu
  • Nzambe azali koumela te
  • Misala mitatolaka malamu koleka maloba
  • Koyeba liboso
  • “Bómibatela kati na bolingo na Nzambe”
  • Batelá Mokolo ya Yehova na makanisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tósimba ngwi kondima na biso ya motuya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mokanda ya Biblia nimero 61—2 Petelo
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/6 nk. 5-7

Zelá na motema molai

MOBATELI moko ya mpate azalaki konganga mbala na mbala ete “Mbwa ya zamba!” kasi ntango bato bakoya, mbwa ya zamba ezalaki te; na nsima, bazalaki lisusu kotya likebi na mbela na ye te. Bobele bongo, lelo oyo bato mingi bazali kotya likebi te ete mokolo ya Yehova ebɛlɛmi mpamba te basilá koyoka makebisi mingi oyo na nsima emonanaki ete ezali solo te. Satana, monguna monene ya Nzambe mpe “anzelu ya moi” ya lokuta azali kosalela likambo oyo bato mingi bayebaka kososola te, wapi likebisi ya solo mpe na bongo bátyela yango likebi.​—2 Bakolinti 11:14.

Elimo ya kozanga kotya likebi ezali likama ata mpo na baoyo bazali kosalela Yehova uta mwa ntango. Mpo na nini? Tótalela likebisi oyo ntoma Petelo apesaki na ekeke ya liboso.

Tókanisaka malamu

Mokanda ya mibale oyo Petelo akomaki ezalaki bokundoli epai na baklisto ya ekeke ya liboso, ezali mpe bongo mpo na biso lelo oyo. Akomaki ete: “Balingami, oyo mokanda na mibale mokomeli ngai bino. Na nyonso mibale nazali kolamukisa mitema na bino na pɛto mpo na kokanisela bino.” (2 Petelo 3:1) Mpo na nini Petelo azali na lobanzo yango? Petelo alobeli mingi kozala ya basɛki kati na bango oyo kosɛka na bango ezali kolɛmbisa basaleli ya Nzambe mpo bámona te ete ntango oyo bazali kobika na yango ezali ntango ya kosala na lombangu. Sikawa tosengeli kokeba ete tózimbisama te na basɛki. Yango wana, Petelo akebisi batángi ya mokanda na ye ete ‘bákanisa lisusu maloba malobamaki liboso na basakoli na bulɛɛ.’ (2 Petelo 3:2; Misala 3:22, 23) Basakoli balobaki nini?

Na mabaku mingi, basaleli ya sembo ya Nzambe babendaki likebi na lolenge oyo bitumbu ya Nzambe bisukisaki misala ya mabe. Petelo akundweli batángi ya mokanda na ye Mpela na mikolo ya Noa oyo Nzambe asalelaki mpo na kolongola mabe oyo etondaki na mokili. Mpela monene wana ebomaki mpenza mokili na ntango wana. Kasi, Nzambe abikisaki Noa na libota na ye kati na masuwa mpe abikisaki lolenge nyonso ya bikelamu ya bomoi “ya lolenge nyonso ya mosuni.” Masapo ya mikili ndenge na ndenge mazali kondimisa bosolo ya lisolo ya Biblia.a—Genese 6:19, NW; 2 Petelo 3:5, 6.

Petelo abéngi likambo oyo Nzambe asalaki ete ‘likambo oyo’ bato mosusu ‘bazali kobosana.’ Na nsima, basusu bazimbisamaki na basɛki ya ntango wana ete bázanga kotya likebi. Kasi, biso tosengeli kobosana soko moke te makambo oyo Yehova asilá kosala. Petelo ayebisi biso ete: “Mpo na Liloba na ye, Likoló mpe nse na ntango oyo ibombami ete izika; izali kobatelama kino mokolo na kosambisa mpe na koboma bato bakotyolaka Nzambe.” (2 Petelo 3:7) Ɛɛ, Nzambe akosala lisusu eloko moko na mokili oyo.

Nzambe azali koumela te

Bankóto ya bambula esili koleka. Mpo na nini Nzambe azeli ntango molai boye mpo na kosilisa mikakatano ya bato? Petelo abendi lisusu likebi na likambo mosusu. Alobi ete: “Balingami, likambo oyo moko likima bino te, ete epai na Nkolo, mokolo moko ezali lokola [mbula, NW] nkóto mpe [mbula] nkóto lokola mokolo moko.” (2 Petelo 3:8) Lolenge oyo Yehova atalelaka ntango ekeseni na lolenge oyo biso totalelaka yango. Epai na Nzambe ya seko, banda Adama azalisamaki kino sikawa, pɔsɔ mobimba ekoki naino te. Kasi, ata soki totalelaka ntango lolenge nini, mbula nkóto nyonso mpe mokolo mokomoko oyo ezali koleka ezali kobɛlɛmisa biso na ntango oyo Yehova akokokisa mokano na ye.

Lisese moko elobaka ete, “Nzungu oyo bakɛngɛlaka, etɔkaka te.” Yango elingi koloba ete likambo oyo bazelaka emonanaka lokola ete eumelaka mingi. Nzokande, Petelo apesi toli ete ‘tózelaka mpe tóbatelaka ntango nyonso na makanisi koya ya mokolo ya Yehova.’ (2 Petelo 3:12, NW) Lolenge nini tokoki kokolisa makanisi oyo ekobatela biso ntango nyonso ete tólala mpɔngi te lokola mokolo oyo Nzambe akosala likambo ebɛlɛmi?

Misala mitatolaka malamu koleka maloba

Petelo abendi likebi likoló na bizaleli mpe misala. Alobeli “bizaleli na bulɛɛ” mpe “[misala ya] kosambela Nzambe.” (2 Petelo 3:11) Yango esangisi makambo nini?

Mosaleli ya solosolo ya Nzambe asalaka makambo na lolenge oyo ekosepelisa Ye. Kondima ya mosambeli ya solo motindo yango emonanaka na etamboli na ye. Yango ezali kokesenisa ye na baoyo bazali bobele koloba ete bazali na kondima epai na Nzambe mpe na bilaka na ye. Mbala mosusu omonaka ete mosala ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova bakokisaka ekesenisaka bango na bato mosusu. Bayaka na ndako na yo mpo na kolakisa yo bilaka ya Nzambe oyo bimonisami kati na Biblia. Kasi bazali mpe kotatola bilikya mpe bindimeli na bango na bisika nyonso oyo bazali kokutana na bato.

Motatoli oyo azali kosala mingi mpo na koyambola kondima na ye epai na basusu azali bongo kopika makasi mpe kolendisa bindimeli na ye. Koyambola ekɔtisaka mayoki na mozindo ya motema mpe, na mbala moko epesaka esengo mpe bosepeli na motema. Ntango tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, tozali mpe kosepelisa Yehova. Toyebi ete ‘azangi boyengebene te ete abosana mosala na biso mpe bolingo bosili biso kotalisa na nkombo na ye,’ lolenge Paulo, oyo azalaki ntoma lokola Petelo alobi yango.​—Baebele 6:10; Baloma 10:9, 10.

Mbano nini ezali kozwama na komibanzabanzáká na kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mikolo ya nsuka ya ebongiseli mabe oyo? Bankóto mingi ya bato ya mitema sembo bazali koyekola lolenge ya kozala na boyokani malamu elongo na Yehova, mpe kozwa ngɔlu na ye mpe bolamu ya solo na elikya ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé.

Koyeba liboso

Atako na lisalisi ya Biblia toyebi ete Yehova Nzambe akosala eloko moko na ntango oyo ebongi, tosengeli kolanda likebisi mosusu oyo Petelo apesi. “Awa eyebi bino liboso, bókeba ete bólongwa na mpiko na bino mpenza te mpo na kopɛngwa na libunga na bato na lofundo.”​—2 Petelo 3:17.

Na ntembe te, Yehova ayebaki liboso ete basusu oyo bazali na kondima ya makasi te bakoki kolɛmba na komonáká lokola ete Nzambe azali koumela mpo na kosala eloko moko. Lisusu, ayebaki ete bopusi ya bato oyo bazali kotyola Nzambe ekoki kobebisa basaleli na ye ya solo to ata kolɛmbisa kondima na bango na likambo oyo ete kosantisama ya nkombo ya Nzambe ebɛlɛmi. Na mikolo oyo ya nsuka, ekozala mpenza mawa soki moto abungisi bompikiliki na ye!

Oyo ezali lisusu ntango ya kobɛta ntembe te to ya kokakatana te na ntina na makambo oyo Yehova akosala. (Baebele 12:1) Nzokande, sikawa ezali ntango ya kokolisa bosepeli na kotaláká makambo oyo motema molai ya Yehova epesi nzela—bamilio ya bato oyo bayei kobakisama na ebele monene kati na mikili mingi bazali na elikya ya kobikisama mpe bazali na elikya ya koleka na bolɔzi monene oyo ebɛlɛmi. (Emoniseli 7:9, 14) Petelo apesi elendiseli oyo: “Bókola nde na ngɔlu mpe na boyebi na Nkolo na biso mpe Mobikisi, ye Yesu Klisto. Na ye nkembo, na sasaipi mpe na mokolo na seko.”​—2 Petelo 3:18.

“Bómibatela kati na bolingo na Nzambe”

Komipesa mingi na kosakola Bokonzi mpe koyangana na makita ya boklisto pɔsɔ na pɔsɔ mpo na losambo mpe boyekoli ya Liloba ya Nzambe ezali kobatela biso. Na bongo, tokozala na ntango te ya kokanisakanisa mingi na ndenge makambo mazali se kobeba na ebongiseli mabe oyo. Bomoi ya moklisto ya solo esengeli kotonda na bobangi mpe komitungisa te. (1 Bakolinti 15:58) Soki tomipesi mingi na kosalela Yehova, tokomona ete ntango ezali koleka noki.

Yuda, oyo azalaki ndeko ya Yesu mpe azalaki na bomoi na eleko moko na Petelo alendisi biso na maloba oyo: “Bino, balingami, bómilendisa na kondima na bino, oyo na bulɛɛ mpenza, kobondeláká kati na [elimo santu, NW]; bómibatela kati na bolingo na Nzambe; bótalela mawa na Nkolo na bino, Yesu Klisto, kino na bomoi na seko.” (Yuda 20, 21) Talá ntina ya kozala na makanisi malamu oyo mazali kolendisama na kolendendeláká na mabondeli. (1 Batesaloniki 5:17) Na nsima, Yuda abakisi ete: “Soko bamosusu bakotyana na bino ntembe, bóyokela bango mawa; bóbikisa bango kobɔtɔláká bango na mɔ́tɔ. Bóyokela bango mawa kati na nsɔmɔ, koyinaka ata elamba na bango esili kobeba mpo na nzoto.” (Yuda 22, 23) Na eleko oyo ya mpasi, ezali mpenza na ntina mingi ete tólendisana bamoko na bamosusu! Ezali mpe na ntina mingi ete tókwea na komekama te, na kosalela “mokolo na kobika” oyo eyeisami molai lokola libaku mpo na komipesa na “etamboli ya mbindo,” oyo epalangani mingi na mokili oyo esili kopola.​—Yuda 4, NW; 2 Bakolinti 6:1, 2.

Na kolandáká toli etondi na bolingo oyo Petelo, Paulo, na Yuda bapesi biso mpe na komipesáká na mosala ya Nzambe, okoki kozela na motema molai kino Yehova akosala eloko moko. Kasi okosala bongo?

Kokakatana te mpo na kotuna Batatoli ya Yehova na esika oyo ofandi ete básalisa yo mpo na kolendisa kondima na yo na elaka ya bomoi ya seko oyo Mozalisi apesi biso. Yekolá masɛngami oyo osengeli kokokisa mpo na kosangana na mosala ya kopesa litatoli na mokili mobimba, mosala oyo ekozongelama lisusu te mpe oyo ekosuka na bolɔzi monene oyo ekómi sikawa pene. (Malako 13:10) Na bongo, okozala na elikya ya kofanda na mokili ya sika mpe ya boyengebene oyo Yehova alaki. (2 Petelo 3:13) Tyá likebi na makundoli na ye! Zelá na motema molai! Omipesa na mosala!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá buku La Bible : Parole de Dieu ou des hommes ?, lokasa 116, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Elilingi na lokasa 7]

Sikawa, yekolá bilaka ya Nzambe na ntina na Paladiso

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 5]

Mbwa ya zamba: Animals/Jim Harter/Dover Publications, Inc.; elenge mobateli ya mpate: Children: A Pictorial Archive from Nineteenth-Century Sources/Grafton/Dover Publications, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto