Kebá na basɛki!
Lelo oyo, tozali koyoka bisakweli ndenge na ndenge, mpe bolukiluki mpo na koyeba makambo makoya ezali kokola mingi. Zulunalo The Daily Telegraph oyo ebimaka na engumba Londres eyebisi ete, “Lokola mobu 2000 ebɛlɛmi, likambo moko ya kokamwa mpe oyo bato bazali mwa moke kozela yango ekosalema. Na mokili mobimba, bankóto ya bato bazali na makanisi kilikili mpe ya nsɔmɔ mpo na mikolo mizali koya.” Mpo na ebele ya bato, likebi mingi oyo bato mosusu bazali kotya na makambo makoya ezali bobele kozongelama ya ezaleli oyo emonanaká kala mpo na kozela mbongwana oyo, nsukansuka esalemaki na yango te.
NA EKEKE ya 19, ntango bato mingi bakómaki kosalela mingi bampunda mpo na kobenda makalo, moto moko asakolaki ete bingumba ya Mpoto bikotonda na nyei ya mpunda. Nzokande, esakweli na ye ekokisamaki te. Na yango, mpo na komonisa ete mbala mingi bisakweli bikokisamaka te, zulunalo The Times oyo ebimaka na Londres eyebisaki ete: “Nyei ya mpunda ekotonda na mikolo mizali koya.”
Bato mosusu basɛkaka baoyo bazali komona ete likama ezali liboso. Na ndakisa, na États-Unis, profesere moko ya iniversite oyo ateyaka makambo ya mombongo asɛngaki na baoyo bazali kokebisa ete ezingelo ekobeba bábɛta na ye mondenge mpo na kotala soki makambo makokoba kobeba. Lokola zulunalo New Scientist eyebisi yango, profesere yango alobi ete “bomoi na biso ezali kobonga mpe ekokoba kobonga libela na libela.”
Kati na mobulungano ya baoyo bazali koloba mpe basusu bazali kotɛmɛla maloba na bango, bato mingi bazali kokanisa ete makambo makobongwana mpenza te. Na lolenge bazali kotyola likanisi nyonso oyo elobi ete Nzambe akosala eloko moko mpo na kobongola makambo ya mokili, bato yango bazali komonisa ezalela motindo moko na basɛki na ekeke ya liboso T.B.
Makambo nyonso mazali se ndenge mazalaka?
Mokanda ya mibale mopemami na Nzambe oyo ntoma moklisto Petelo akomaki pene na mobu 64 T.B., mokebisaki na maloba oyo: “Na mikolo na nsuka basɛki bakoya mpe bakosɛka, bakotambola pelamoko na mposa mabe na bango mpenza.”—2 Petelo 3:3.
Basɛki balukaka ete makambo oyo bango bazali kosɛka basusu mpe bámona yango makambo ya lisɛki. Moto oyo azali kosɛka akoki kokwea na motambo ya ezaleli ya moimi mpamba te mbala mingi mosɛki alingaka ete bayoki na ye bátalela makambo lolenge oyo ye azali kotalela yango. Ekoki kozala ete basɛki mosusu oyo Petelo akebisaki na ntina na bango bazalaki lolenge yango, ‘kotambola pelamoko na mposa mabe na bango mpenza.’ Mpo na kokebisa batángi ya mokanda na ye, ntoma azongelaki maloba yango mbala mibale mpo na kobɛta nsɛtɛ. Akebisaki ete “basɛki bakoya mpe bakosɛka.”
Basɛki wana na ekeke ya liboso babɛtaki ntembe na bosolo ya ‘elaka ya kozala’ ya Klisto, kolobáká ete: “Wapi elaka na Koya [“kozala,” NW] na ye? Zambi longwa na ntango na kufa na bankɔkɔ, makambo nyonso maumeli bobele bongo lokola ezalaki yango na ebandeli na Kozalisama.” (2 Petelo 3:4) Emonanaki bongo na miso na bango. Kasi, na mobu 33 T.B., Yesu asakolaki likama oyo esengelaki kokwela Yelusaleme. Alobaki ete: “Mpo ete na mikolo mizali koya na yo bayini na yo bakosala lopango monene na mabelé, mpe bakozinga yo kokangisa yo na bipai nyonso, mpe bakobwaka yo na nse na bana na yo na kati na yo, mpe bakotika libanga moko na likoló na libanga mosusu kati na yo te.” Baoyo basɛkaki likebisi yango bazalaki mpenza na libunga! Na mobu 70 T.B., basoda ya Loma bazingaki Yelusaleme mpe babebisaki engumba yango, mpe babomaki bato mingi mpenza oyo bafandaki kati na yango. Mpo na nini bato mingi oyo bafandaki kati na engumba yango bamibongisaki te liboso ete likama yango eya? Mpamba te basosolaki te ete Nzambe ayaki kotala misala na bango na nzela ya Mwana na ye Yesu.—Luka 19:43, 44.
Ntoma Petelo alobeli likambo mosusu oyo Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso akosala na mikolo mizali koya. Petelo akebisi ete, “Mokolo na Nkolo ekoya lokola moyibi.” (2 Petelo 3:10) Na ntango yango, Nzambe akoboma bato nyonso oyo bazali kotyola ye awa na mabelé mpe akobikisa baoyo bazali bato ya sembo na miso na ye. Lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimbolaka yango mbala na mbala, “kozala” ya Klisto Yesu ebandaki na 1914. Kasi, koya lokola Mokokisi ya bikateli ya Nzambe mpo na kolongola misala ya mabe, akosala yango na mikolo mizali koya. Yango wana, tosengeli kosala nokinoki mpo na kolanda likebisi ya ntoma ete tókeba na basɛki.
Mbala mosusu ozelaka uta kala ntango oyo Nzambe akosala eloko moko mpo na kobongisa makambo ya bato. Eloko nini ekosalisa yo ete okoba kozela na motema molai, kozanga ete ozimbisama na basɛki? Tolɔmbi yo ete otánga lisolo lilandi.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
“Mikolo mizali koya na yo bayini na yo . . . bakozinga yo kokangisa yo na bipai nyonso, . . . mpe bakotika libanga moko na likoló na libanga mosusu kati na yo te.” Likebisi oyo ezalaki likambo ya lisɛki te. Basoda ya Loma babebisaki Yelusaleme, mpe babomaki bato mingi mpenza.