Nani akobika na “Mokolo ya Yehova”?
“Ebongi na bino kozala bato boni na bizaleli na bulɛɛ mpe na kosambela Nzambe, kotalela mpe koyeisa noki emonaneli na mokolo na Nkolo?”—2 PETELO 3:11, 12.
1. Nani asalaki na elimo mpe na nguya lokola ya Eliya?
YEHOVA NZAMBE asili kopona kati na bato baoyo bakokóma basangoli ya libula elongo na Mwana na ye, Yesu Klisto, kati na Bokonzi ya likoló. (Baloma 8:16, 17) Ntango bazali naino awa na mabelé, baklisto bapakolami bazali kokokisa mosala na elimo mpe na nguya lokola ya Eliya. (Luka 1:17) Na lisoló oyo eleki, tomonaki bokokani mosusu kati na misala na bango mpe oyo ya mosakoli Eliya. Kasi ezali boni mpo na misala ya mosakoli Elisa, mokitani ya Eliya?—1 Mikonzi 19:15, 16.
2. (a) Ekamwiseli ya nsuka oyo Eliya asalaki ezalaki nini, mpe ekamwiseli ya liboso oyo Elisa asalaki ezalaki nini? (b) Elembeteli nini ezali komonisa ete Eliya akendaki na likoló te?
2 Ekamwiseli ya nsuka oyo Eliya asalaki ezalaki bongo kokabola mai ya Ebale Yaladene na kobɛtáká elamba na ye ya mosala likoló na yango. Yango epesaki nzela na Eliya mpe Elisa ete bákatisa esika yango na mabelé makauka. Wana bazalaki kotambola na ngámbo ya ɛ́sti ya ebale, mopɛpɛ makasi ekumbaki Eliya kino akendaki kokita epai mosusu awa na mabelé. (Talá etanda na motó na likambo ete “Eliya akendaki na lola oyo wapi?” na lokasa 15.) Elamba oyo Eliya azalaki kolata mpo na mosala etikalaki wana. Ntango Elisa asalelaki yango mpo na kobɛta Ebale Yaladene, mai na yango makabwanaki lisusu, yango epesaki ye nzela ete akatisa na mabelé makauka mpo na kozonga. Ekamwiseli yango emonisaki polele ete Elisa akómaki mokitani ya Eliya mpo na kotombola losambo ya solo na Yisalaele.—2 Mikonzi 2:6-15.
Bizaleli ya bobangi Nzambe bizali na ntina mingi
3. Paulo mpe Petelo balobaki nini na ntina na kozala ya Klisto mpe “mokolo ya Yehova”?
3 Bikeke mingi na nsima ya eleko ya Eliya mpe Elisa, ntoma Paulo mpe ntoma Petelo balobelaki “mokolo ya Yehova” esika moko na kozala ya Yesu Klisto mpe na “makoló na sika mpe nsé na sika” oyo ekozala na ntango wana. (2 Batesaloniki 2:1, 2; 2 Petelo 3:10-13) Mpo na kobika na mokolo monene ya Yehova—ntango Nzambe akoboma banguna na ye mpe kobikisa bato na ye—tosengeli koluka Yehova mpe komonisa ezaleli ya kosɔkɛma mpe bosembo. (Sefania 2:1-3) Kasi ezali na bizaleli mosusu oyo bizali komonana wana tozali kotalela makambo matali mosakoli Elisa.
4. Molende ezali na ntina nini kati na mosala ya Yehova?
4 Molende kati na mosala ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na kobika na “mokolo ya Yehova.” Eliya mpe Elisa bazalaki na molende kati na mosala ya Yehova. Lelo oyo, batikali baklisto bapakolami bazali kosalela Yehova mosala ya bulɛɛ mpe bazali na esika ya liboso na mosala ya kosakola nsango malamu, komonisáká molende lokola ya Eliya mpe Elisa.a Kobanda na katikati ya bambula ya 1930, bazali kolendisa baoyo bazali kondima nsango ya Bokonzi mpe bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé ete bámipesa na Yehova mpe bázwa batisimo. (Malako 8:34; 1 Petelo 3:21) Bamilió mingi ya bato basili kondima elendiseli yango. Liboso bazalaki na molili ya elimo mpe bazalaki bakufi kati na masumu, kasi sikawa bayekoli solo ya Nzambe, bazwi elikya ya bomoi ya seko kati na paladiso awa na mabelé, mpe bazali na molende kati na mosala ya Yehova. (Nzembo 37:29; Emoniseli 21:3-5) Na molende na bango, kosalana elongo, boyambi bapaya, mpe misala mosusu ya malamu, bazali kopesa kopema na bandeko ya Klisto oyo bazali naino awa na mabelé.—Matai 25:31-46.
5. Mpo na nini kosala malamu epai ya “bandeko” ya Klisto ezali na ntina, mpe ndakisa nini ya mikolo ya Elisa tozali na yango?
5 Baoyo bazali kosalela “bandeko” ya Yesu malamu mpo ete bapakolami yango bazali balandi na ye bazali na elikya ya kobika na “mokolo ya Yehova.” Babalani mibale ya mboka Suneme bazwaki lipamboli monene mpo ete bamonisaki boboto mpe bayambaki Elisa mpe mosungi na ye. Babalani yango bazalaki na mwana te, mpe mobali azalaki mobangé. Kasi Elisa alakaki mwasi yango ya Suneme ete akobota mwana mobali, mpe esalemaki bongo. Mwa bambula na nsima ntango mwana yango bobele moko akufaki, Elisa akendaki na Suneme mpe asekwisaki ye. (2 Mikonzi 4:8-17, 32-37) Oyo nde mbano kitoko mpo ete bayambaki Elisa oyo azalaki mopaya!
6, 7. Namana apesaki ndakisa nini, mpe yango ezali na boyokani nini na likambo ya kobika na “mokolo ya Yehova”?
6 Ezaleli ya komikitisa ezali na ntina mpo na kondima litambwisi ya Biblia oyo “bandeko” ya Klisto bazali kopesa mpe elikya ya kobika na mokolo ya Yehova. Namana, mokonzi ya mampinga ya Sulia, oyo azalaki na maladi ya maba asengelaki komonisa ezaleli ya komikitisa mpo na kolanda toli ya elenge mwasi Moyuda oyo azalaki moombo mpe alukaki kobikisama na kokendáká na Yisalaele mpo na kokutana na Elisa. Na esika ete abima libándá ya ndako na ye mpo na kokutana na Namana, Elisa atindelaki ye maloba ete: “Kendá kosukola na Yaladene mbala nsambo mpe nzoto na yo ekobika mpe ekozala pɛto.” (2 Mikonzi 5:10) Lolɛndɔ ya Namana etumolamaki, mpe asilikaki, kasi na nsima amikitisaki mpe akendaki mpe azindaki mbala nsambo na Yaladene, “nzoto na ye ekómaki lisusu lokola nzoto ya mwana moke, apɛtwaki.” (2 Mikonzi 5:14) Liboso ya kozonga epai na ye, Namana akendaki lisusu kino na Samalia mpo na kotɔ́nda mosakoli ya Yehova. Lokola azalaki na ekateli makasi ete akoluka litomba ya mosuni te na nguya oyo Nzambe apesaki ye, Elisa abimaki kokutana na Namana kasi andimaki kozwa ata likabo moko te. Na komikitisa nyonso, Namana ayebisaki Elisa ete: “Moombo na yo akopesa mbeka na kotumbama to mbeka ebomami epai na banzambe mosusu te bobele epai na [Yehova].”—2 Mikonzi 5:17.
7 Lelo oyo, bamilió ya bato bazwi mapamboli ebele mpo ete na komikitisa nyonso, balandaki toli ya bapakolami oyo euti na Makomami. Lisusu, na komonisáká kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu, bato yango ya mitema sembo basili kopɛtolama na elimo. Sikawa bazali na libaku malamu ya kozala baninga ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto. (Nzembo 15:1, 2; Luka 16:9) Mpe komipesa na bango epai ya Nzambe mpe na mosala na ye ekopesamela mbano na boye ete bakobikisama na libebi ya seko oyo mosika te ekokwela bato ya lofundo, bato na masumu oyo baboyi kobongola mitema na “mokolo ya Yehova” oyo ezali koya na lombangu.—Luka 13:24; 1 Yoane 1:7.
“Nani azali mpo na ngai? Nani?”
8. (a) Lolenge nini baoyo bakobika na “mokolo ya Yehova” bazali kotalela kosala mokano ya Nzambe? (b) Yehu apesamelaki mokumba nini? (c) Nini esengelaki kokómela Yezabele?
8 Baoyo bazali na elikya ya kobika na “mokolo ya Yehova” basengeli mpe kozala na ekateli makasi ya kosala mokano ya Nzambe. Na mpiko nyonso, Eliya asakolaki kosilisama ya libota mobimba ya Mokonzi Ahaba oyo bazalaki babomi na bato mpe basambeli ya Baala. (1 Mikonzi 21:17-26) Nzokande, liboso ete likambo yango ekoka kosalema, Elisa oyo azalaki mokitani ya Eliya asengelaki naino kokokisa mosala mosusu etikalaki. (1 Mikonzi 19:15-17) Wana ntango ya Yehova ekokaki, Elisa atindaki mosali na ye moko ete akenda kopakola Yehu mokonzi ya basodá lokola mokonzi ya sika na Yisalaele. Nsima ya kosopa mafuta na motó ya Yehu, momemi-nsango ayebisaki ye ete: “[Yehova], Nzambe ya Yisalaele alobi ete, Napakoli yo lokola mokonzi na bato na [Yehova], likoló na Yisalaele. Okobɛta libota na Ahaba, nkolo na yo ete nabukanisa epai na Yezabele makila na basakoli baombo na ngai mpe makila na baombo nyonso na [Yehova]. Libota mobimba na Ahaba bakokufa.” Yezabele mokonzi-mwasi mabe asengelaki kobwakama epai ya bambwa mpe akotyama na nkunda te oyo ebongi na ye.—2 Mikonzi 9:1-10.
9, 10. Lolenge nini maloba ya Eliya na ntina na Yezabele makokisamaki?
9 Bato ya Yehu basosolaki bosolo ya bopakolami na ye mpe basakolaki ete ye azali mokonzi ya sika ya Yisalaele. Kosaláká na mpiko, Yehu akendaki mbangu na Yizelele mpo na kobanda mosala na ye ya koboma bakambi ya losambo ya Baala. Mokonzi Yolama, mwana ya Ahaba, azalaki moto ya liboso oyo azwaki mbanzi ya Yehu mpo na kobomama. Ye abimaki na libándá ya engumba mpo na kotuna Yehu soki ayaki na likambo ya kimya. Yehu ayanolaki ye ete: “Kimya ekozala wapi naino makambo na Yezabele, mama na yo mpe kozimbisa na ye ezali?” Na yango, Yehu atɔbɔlaki motema ya Yolama na mbanzi.—2 Mikonzi 9:22-24.
10 Basi oyo bazali na bobangi Nzambe basengeli kopɛngola kozala lokola Yezabele to lokola basi mosusu ya motindo na ye. (Emoniseli 2:18-23) Ntango Yehu akómaki na Yizelele, Yezabele asilaki kosala monzɛlɛ. Atalaki na nsé longwa na lininisa, mpe apesaki ye mbote na maloba oyo ezalaki mpenza makaneli. Yehu atunaki na basáli ya Yezabele ete: “Nani azali mpo na ngai? Nani?” Nokinoki, basáli mibale soki misato na ndako ya mokonzi batalaki na nsé. Bazalaki nde na ngámbo ya Yehu? Alobaki na bango ete: “Bwaká ye na nsé!” Na yango, basalaki na mpiko mpe babwakaki Yezabele na nsé longwa na lininisa. Ekoki kozala ete banyataki ye na nsé na makolo ya bampunda. Ntango bato bayaki mpo na kokunda ye, ‘bamonaki bobele mokwa ya motó mpe makolo mpe matandu ya mabɔkɔ.’ Oyo nde kokokisama ya kokamwa ya maloba ya Eliya ete: “Bambwa bakolya mosuni na Yezabele”!—2 Mikonzi 9:30-37.
Kosunga losambo ya solo na motema mobimba
11. Yonadaba azalaki nani, mpe ndenge nini amonisaki lisungi na ye mpo na losambo ya solo?
11 Baoyo bazali na elikya ya kobika na “mokolo ya Yehova” mpe kozala na bomoi ya seko na mabelé basengeli kosunga losambo ya solo na motema mobimba. Basengeli kozala lokola Yehonadaba, to Yonadaba, mosambeli ya Yehova oyo azalaki Moyuda te. Wana Yehu azalaki kokóba kokokisa mokumba na ye na molende nyonso, Yonadaba alingaki komonisa ete andimaki likambo yango mpe alingaki kopesa lisungi. Na yango abimaki mpo na kokutana na mokonzi ya sika, oyo azalaki kokende na Samalia koboma bato ya ndako ya Ahaba oyo batikalaki. Ntango amonaki Yonadaba, Yehu atunaki ye: “Motema na yo ezali malamu lokola motema na ngai ezali esika moko na motema na yo?” Eyano ya Yonadaba oyo emonisaki ete andimi epusaki Yehu na kopesa ye lobɔkɔ mpe abyangaki Yonadaba ete amata na likalo na ye, kolobáká ete: “Yaká na ngai mpe sosolá mposa na ngai [ete nandimi bombanda na Yehova te, NW].” Kozanga koumela, Yonadaba andimaki libaku malamu ya kosunga mopakolami ya Yehova mpo na kokokisa bikateli na ye.—2 Mikonzi 10:15-17.
12. Mpo na nini Yehova azali na elónga ya kosɛnga ete tómipesa mobimba bobele epai na ye?
12 Na ntembe te, lisungi oyo euti mpenza na motema mpo na losambo ya solo ezali likambo libongi, mpamba te Yehova azali Mozalisi mpe Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ye oyo azali kosɛnga mpe abongi ete tómipesa mobimba epai na ye. Asɛngaki Bayisalaele ete: “Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi na eloko na lola na likoló te, na mokili na nsé te, to na mai na nsé na mokili te. Okokumbamela yango te to kosalela yango te, mpo ete ngai [Yehova] Nzambe na yo nazali Nzambe na zúwa na kobatela.” (Exode 20:4, 5) Baoyo bazali na elikya ya kobika na “mokolo ya Yehova” basengeli kosambela bobele ye, na “elimo mpe na solo.” (Yoane 4:23, 24, NW) Basengeli kokangama ngwi na losambo ya solo, lokola Eliya, Elisa, mpe Yonadaba.
13. Lolenge moko motema ya Yonadaba ezalaki na motema ya Yehu, banani bandimi Mokonzi Masiya, mpe ndenge nini bazali komonisa yango?
13 Nsima ya koboma libota ya Ahaba, Mokonzi Yehu akóbaki mosala na ye mpo na koluka basambeli ya Baala mpe kosilisa nyɛɛ lingomba yango ya lokuta na Yisalaele. (2 Mikonzi 10:18-28) Lelo oyo, Yesu Klisto, mokonzi ya likoló asilaki koponama mpo na koboma banguna ya Yehova mpe kolóngisa lotómo na Ye ya kozala mokonzi. Lolenge moko motema ya Yonadaba ezalaki na motema ya Yehu, lelo oyo “ebele monene” ya “bampate mosusu” ya Yesu bazali kondima na motema mobimba Klisto lokola Mokonzi Masiya mpe bazali kosalana na bandeko na ye ya elimo oyo bazali awa na mabelé. (Emoniseli 7:9, 10; Yoane 10:16) Bazali komonisa yango polele na ndenge bazali kosalela lingomba ya solo mpe bazali kosangana na molende kati na mosala ya boklisto, kokebisáká banguna ya Nzambe na ntina na “mokolo ya Yehova” oyo ezali koya na lombangu.—Matai 10:32, 33; Baloma 10:9, 10.
Makambo minene mazali liboso!
14. Nini ezali kozela mangomba ya lokuta?
14 Yehu asalaki likambo mpo na kosilisa nyɛɛ losambo ya Baala na Yisalaele. Na mikolo na biso, na nzela ya Yehu Monene, Klisto Yesu, Nzambe akoboma Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. Mosika te tokomona kokokisama ya maloba ya anzelu epai na ntoma Yoane ete: “Maseke zomi mamonaki yo, bango mpe Nyama bakoyina mwasi na pite [Babilone Monene], bakobebisa ye, mpe bakozalisa ye bolumbu; bakolya mosuni na ye, mpe bakotumba ye na mɔ́tɔ. Mpo ete Nzambe atyaki na mitema na bango ete básala mokano na ye, mpe ete bándimana na kopesa Nyama bokonzi na bango, kino ekokoka maloba na Nzambe.” (Emoniseli 17:16, 17; 18:2-5) “Maseke zomi” mazali komonisa banguya ya politiki oyo bazali na mampinga ya basodá mpe bazali koyangela mokili. Atako sikawa bazali kosala na ye pite ya elimo, Babilone Monene etikali na ntango mokuse. Eteni wana ya mokili oyo, elingi koloba banguya ya politiki, ekoboma mangomba ya lokuta, mpe “nyama na yauli”—Mabota Masangani—ye na “maseke zomi” bakozala na mokumba monene kati na kobebisama ya mwasi yango ya pite.b Oyo nde libaku ya kosanzola Yehova!—Emoniseli 19:1-6.
15. Nini ekosalema na ntango bakomeka kobebisa lisangá ya Nzambe na mabelé?
15 Mokonzi Yehu abundisaki losambo ya Baala, nsima na ye, baoyo bakitanaki ye na bokonzi batyaki likebi na bikólo oyo ezalaki banguna ya Yisalaele. Mokonzi Yesu Klisto akosala mpe likambo ya motindo moko. Banguya ya politiki ekotikala naino nsima ya kobomama ya mangomba ya lokuta oyo ekokani na losambo ya Baala. Na bopusi ya Satana Zábolo, banguna yango oyo bazali kotɛmɛla lotómo ya Yehova ya kozala Mokonzi bakobimisa matumoli ya nsuka mpo na komeka kobebisa lisangá ya Nzambe na mabelé. (Ezekiele 38:14-16) Kasi Yehova akotinda Mokonzi Yesu Klisto ete abɛta bango kino koboma bango na Armagedon, “etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” mpo na kosukisa bobekoli na ntina na Bokonzi ya Yehova.—Emoniseli 16:14, 16; 19:11-21; Ezekiele 38:18-23.
Tósala na molende lokola ya Elisa
16, 17. (a) Ndenge nini toyebi ete Elisa azalaki na molende kino na nsuka ya bomoi na ye? (b) Tosengeli kosala nini na mbanzi ya solo?
16 Basaleli ya Nzambe bakozala ntango nyonso na mpiko mpe na molende lokola Elisa kino “mokolo ya Yehova” ekotya nsuka na ebongiseli mabe ya biloko ya Satana. Longola mosala na ye lokola mosungi ya Eliya, Elisa asalaki lokola mosakoli ya Yehova ye moko na boumeli ya mbula koleka 50! Mpe Elisa azalaki na molende kino nsuka ya bomoi na ye oyo ezalaki molai mpenza. Liboso ya liwa na ye, Mokonzi Yoasa, mwana ya mwana ya Yehu akendaki kotala ye. Elisa alobaki na ye ete abɛta mbanzi longwa na lininisa. Mbanzi ekómaki na esika oyo akanaki, mpe Elisa angangaki ete: “Mbanzi na kobikisa na [Yehova]! Mbanzi na kobika epai na Sulia zambi okobɛta Basulia na Afeke kino okosilisa bango nyɛɛ.” Lokola Elisa asɛngaki yango, Yoasa abɛtaki mabelé na bambanzi na ye. Kasi asalaki na molende te, mpo ete abɛtaki bobele mbala misato. Boye, Elisa alobaki ete, na ntina yango, Yoasa akolónga Sulia bobele mbala misato, mpe esalemaki bongo. (2 Mikonzi 13:14-19, 25) Mokonzi Yoasa abɛtaki Sulia na mobimba te, ‘kino kosilisa bango nyɛɛ.’
17 Kasi, na molende lokola ya Elisa, batikali bapakolami bazali kokóba kobundisa losambo ya lokuta. Baninga na bango oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé bazali mpe kosala bongo. Lisusu, baoyo nyonso bazali na elikya ya kobika na “mokolo ya Yehova” ekozala malamu ete bábatela na makanisi na bango maloba ya Elisa na ntina na kobɛta mabelé. Tókamata mbanzi ya solo mpe tóbɛta na yango na molende nyonso—lisusu mpe lisusu—ɛɛ, kino Yehova akoloba ete mosala na biso na mbanzi yango esuki.
18. Ndenge nini tosengeli koyanola na maloba ya 2 Petelo 3:11, 12?
18 Mosika te “mokolo ya Yehova” ekotya nsuka na ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo. Na yango, tiká ete tópusama na maloba ya kosimba motema ya ntoma Petelo. Ye alobaki ete: “Awa ezali biloko nyonso mpo na konangwa, ebongi na bino kozala bato boni na bizaleli na bulɛɛ mpe na kosambela Nzambe, kotalela mpe koyeisa noki emonaneli na mokolo na Nkolo?” (2 Petelo 3:11, 12) Ntango biteni nyonso ya ebongiseli oyo ekonangwa na mɔ́tɔ ya nkanda ya Nzambe oyo akomonisa yango na nzela ya Yesu Klisto, bobele baoyo bazalaki na etamboli malamu mpe komipesa na Nzambe nde bakobika. Bopɛto ya elimo mpe ya bizaleli ezali na ntina mingi. Tosengeli mpe kolinga bazalani na biso, na kokokisáká bamposa na bango, mingimingi na elimo na nzela ya mosala ya boklisto.
19. Tosengeli kosala nini mpo na kobika na “mokolo ya Yehova”?
19 Maloba na yo mpe misala na yo ezali komonisa ete ozali mosaleli ya sembo mpe ya molende ya Nzambe? Soki ɛɛ, okoki kozala na elikya ya kobika na “mokolo ya Yehova” mpe kokɔta na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. Ɛɛ, yo mpe okoki kobika soki ozali kosalela bandeko ya Klisto makambo malamu mpo ete bazali balandi na ye, lolenge babalani mibale ya mboka Suneme bayambaki Elisa. Mpo na kobika osengeli mpe kozala lokola Namana, oyo na komikitisa mpenza, andimaki etindá ya Nzambe mpe akómaki mosambeli ya Yehova. Soki ozali na mposa ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé, osengeli kosunga losambo ya solo na motema mobimba, ndenge Yonadaba asalaki yango. Na bongo okoki kozala kati na basaleli ya sembo ya Yehova baoyo, mosika te bakomona kokokisama ya maloba ya Yesu ete: “Yaká bino bopambwami na Tata na ngai, bósangola libula na bokonzi bobongisami mpo na bino longwa na ebandeli na mokili.”—Matai 25:34.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mikapo 18 mpe 19 ya búku “ Que ton nom soit sanctifié ”, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
b Talá búku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, nkasa 254-256, ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Wapi mwa ndambo ya bizaleli bisengeli mpo na kobika na “mokolo ya Yehova”?
◻ Babalani ya mboka Suneme bapesaki ndakisa nini na mikolo ya Elisa?
◻ Liteya nini tokoki kozwa na ezalela ya Namana?
◻ Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yonadaba?
◻ Bopusi nini 2 Petelo 3:11, 12 esengeli kozala na yango likoló na biso?