Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/3 nk. 9-14
  • Osili komilɛngɛla mpo na Mokolo ya Yehova?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osili komilɛngɛla mpo na Mokolo ya Yehova?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bazelaki na motema likoló
  • Mokolo ya Yehova mpe koya ya Yesu
  • Bamilɛngɛlaki
  • “Bósɛnzɛlaka”
  • Bizaleli na bulɛɛ bizali na ntina mingi
  • Okweisaka mokili na kondima na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Sikoyo tosengeli mpenza kokɛngɛla mingi koleka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Kondima ya Noa ekweisi mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Ntina oyo Nzambe asepelaki na Noa mpe ntina oyo tosengeli kokeba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/3 nk. 9-14

Osili komilɛngɛla mpo na Mokolo ya Yehova?

“Mokolo monene na [Yehova] ebɛlɛmi; ebɛlɛmi, eyei mbango mpenza.”​—SEFANIA 1:14.

1. Lolenge nini Makomami mazali kolobela mokolo ya Yehova?

ETIKALI moke, “mokolo monene mpe na nsɔ́mɔ” ya Yehova ekokwela ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo. Makomami mazali komonisa ete mokolo ya Yehova ekozala mokolo ya etumba, ya molili, ya nkanda, ya mpasi, ya mawa, ya bwale, ya kolela, ya libebi. Nzokande, babiki bakozala, mpamba te “moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika.” (Yoele 2:30-32; Amosa 5:18-20) Ɛɛ, na ntango yango, Nzambe akoboma banguna na ye mpe akobikisa basaleli na ye.

2. Mpo na nini tosengeli kosala na lombangu na ntina na mokolo ya Yehova?

2 Basakoli ya Nzambe bamonisaki ete mokolo ya Yehova esengelaki koya na lombangu. Na ndakisa, Sefania akomaki ete: “Mokolo monene na [Yehova] ebɛlɛmi; ebɛlɛmi, eyei mbango mpenza.” (Sefania 1:14) Lelo oyo, ezali koya mpe na lombangu lisusu koleka mpamba te Mokokisi Monene ya bikateli ya Nzambe, Mokonzi Yesu Klisto, azali pene ya ‘kokanga mopanga na ye na ebɛlɔ na ye mpe kobima mpo na kobundela solo, komikitisa, mpe boyengebene.’ (Nzembo 45:3, 4, NW) Osili komilɛngɛla mpo na mokolo yango?

Bazelaki na motema likoló

3. Bilikya nini bamoko kati na baklisto ya Tesaloniki bazalaki na yango, mpe mpo na bantina nini mibale bazalaki na libungá?

3 Bilikya ya bato mingi likoló na mokolo ya Yehova ekokisamaki te. Bamoko kati na baklisto ya liboso na Tesaloniki balobaki ete: “Mokolo na Nkolo esili koya!” (2 Batesaloniki 2:2) Kasi, ezalaki na bantina mibale mpo na yango mokolo wana ebɛlɛmaki naino te. Ntango atángaki moko na bantina yango, ntoma Paulo alobaki ete: “Ekolobaka bato ete, Kimya ezali, makambo mazali te, wana libebi ekokwela bango pwasa.” (1 Batesaloniki 5:1-6) Na ‘mikolo oyo ya nsuka,’ biso mpe tozali kozela kokokisama ya maloba wana. (Danyele 12:4, NW) Batesaloniki bazangaki mpe elembeteli mosusu oyo esengelaki komonisa kobɛlɛma ya mokolo monene ya Yehova, mpamba te Paulo ayebisaki ete: “Ekoya te bobele ete kotomboka [“lipɛngwi,” NW] eyei liboso.” (2 Batesaloniki 2:3) Na ntango Paulo akomaki maloba wana (soko na mobu 51 T.B.), “lipɛngwi” uta na boklisto ebimaki naino na mobimba mpenza te. Lelo oyo, tomoni ete esili kobima nyonso mpenza kati na boklisto ya nkombo mpamba. Atako bilikya na bango bikokisamaki te, kasi nsukansuka, bapakolami wana ya sembo oyo bazalaki na Tesaloniki, baye bakóbaki kosalela Yehova na bosembo nyonso kino liwa bazwaki libonza na likoló. (Emoniseli 2:10) Biso mpe tokozwa libonza soki totikali sembo wana ezali biso kozela mokolo ya Yehova.

4. (a) Mokolo ya Yehova ezali na boyokani na likambo nini oyo elobelami kati na 2 Batesaloniki 2:1, 2? (b) Makanisi nini baoyo babéngamaki Batata ya Lingomba bazalaki na yango na ntina na kozonga ya Klisto mpe makambo mosusu oyo makangani na yango?

4 Biblia emonisi ete bokangami ezali kati na “mokolo monene ya Yehova” mpe “kozala ya Nkolo na biso Yesu Klisto.” (2 Batesaloniki 2:1, 2, NW) Baoyo babéngami ete Batata ya Lingomba bazalaki na makanisi makeseni na ntina na kozonga ya Klisto, kozala na ye, mpe na ntina na Boyangeli na ye ya Mbula Nkóto. (Emoniseli 20:4) Na ekeke ya mibale T.B., Papias moto na Yelapoli azalaki na endimeli oyo ete na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto mabelé ekobota mbuma na lolenge ya kokamwa. Justin Martyr alobelaki mbala na mbala kozala ya Yesu mpe azalaki na elikya ete Yelusaleme ebongisami lisusu esengelaki kozala efandelo ya Bokonzi na Ye. Irénée moto na engumba Lyon ateyaki ete nsima ya kobebisama ya Boyangeli ya Loma, Yesu asengelaki kobima mpe komonana na miso ya bato, kokanga Satana, mpe koyangela na Yelusaleme ya mabelé.

5. Banganga-mayele mosusu balobaki nini na ntina na “Koya ya Mibale” ya Klisto mpe Boyangeli na ye ya Mbula Nkóto?

5 Philip Schaff, mokomi ya makambo ya kala, alobaki ete “likambo oyo ebendaki likebi mingi koleka makambo nyonso” na eleko oyo ezalaki liboso ya likita monene ebéngami Concile de Nicée na 325 T.B. ezalaki bongo “endimeli oyo elobi ete boyangeli ya Klisto esengelaki komonana na miso ya bato kati na nkembo awa na mabelé, na boumeli ya mbula nkóto, elongo na basantu basekwisami liboso ete bato mosusu nyonso básekwisama mpe básambisama.” Búku A Dictionary of the Bible (Diksionɛrɛ ya Biblia), ebimisami na James Hastings, elobi ete: “Tertullien, Irénée, mpe Hippolyte bazali ntango nyonso na endimeli ete Koya [ya Yesu Klisto] esengeli kosalema nokinoki; kasi tozwi likanisi ya sika mpo na bateolojiɛ́ oyo balandaka bindimeli ya Alexandrie. . . . Ntango Augustin amonisi ete Boyangeli ya Mbula Nkóto ezali bongo eleko ya basangani ya lingomba, Koya ya Mibale [ya Klisto] epusami na mikolo mizali mosika.”

Mokolo ya Yehova mpe koya ya Yesu

6. Mpo nini tosengeli te koloba ete mokolo ya Yehova ezali naino mosika?

6 Makanisi ya libunga mapusaki bato na komiyoka ete bilaka na bango bikokisamaki te, kasi tókanisa te ete mokolo ya Yehova mozali naino mosika. Kozala ya Yesu oyo ezangi komonana, oyo engebene Makomami ezali na bokangami na mokolo ya Yehova, esilá kobanda. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mikanda mosusu ya Batatoli ya Yehova emonisaka mbala na mbala bilembeteli biuti na Makomami oyo bindimisi ete kozala ya Yesu ebandaki na 1914.a Na bongo, Yesu alobaki nini na ntina na kozala na ye?

7. (a) Wapi mwa makambo mosusu matali elembo ya kozala ya Yesu mpe nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo? (b) Lolenge nini tokoki kobikisama?

7 Mwa moke liboso ya liwa ya Yesu, kozala na ye elobelamaki mingi. Nsima ya koyoka ye wana azalaki kosakola kobebisama ya tempelo ya Yelusaleme, bantoma na ye, Petelo, Yakobo, mpe Andalea, batunaki ete: “Makambo oyo makozala ntango nini, mpe nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo?” (Matai 24:1-3, NW; Malako 13:3, 4) Kati na eyano na ye, Yesu asakolaki bitumba, nzala, koningana ya mabelé, mpe makambo mosusu oyo mamonisi “elembo” ya kozala na ye mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo. Alobaki lisusu ete: “Nde ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” (Matai 24:13) Tokobikisama soki toyiki mpiko na bosembo nyonso kino nsuka ya bomoi na biso ya lelo to kino nsuka ya ebongiseli mabe ya ntango oyo.

8. Liboso ete ebongiseli ya Bayuda esuka, nini esengelaki kokokisama naino, mpe nini ezali kosalema na ntina na yango lelo oyo?

8 Liboso ete nsuka eya, esengeli ete likambo moko ya ntina mingi ekokisama mpo na oyo etali kozala ya Yesu. Na ntina na yango, alobaki ete: “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Liboso ete Baloma bábebisa Yelusaleme mpe ete ebongiseli ya biloko ya Bayuda esuka na mobu 70 T.B., Paulo alobaki ete nsango malamu ‘esilaki kosakolama epai na bato nyonso na nsé na Likoló.’ (Bakolose 1:23) Nzokande, lelo oyo, na etando monene koleka, Batatoli ya Yehova bazali kosala mosala ya kosakola “na mokili mobimba.” Na boumeli ya mwa bambula oyo euti koleka, Nzambe afungolaki nzela mpo ete litatoli monene lipesama na mikili ya Mpótó ya Ɛ́sti. Na lisalisi ya binyateli mikanda mpe bisaleli mosusu, lisangá ya Yehova emibongisi mpo na kokokisa mosala moleki monene, ata na “teritware oyo esakolami naino te.” (Baloma 15:22, 23, NW) Motema na yo ezali kopusa yo ete osala nyonso oyo ekoki na yo mpo na kopesa litatoli liboso ete nsuka eya? Soki ezali bongo, Nzambe akoki kopesa yo makasi mpo ete osangana kati na mosala oyo ezali liboso na lolenge oyo ekoki mpenza kobota mbuma.​—Bafilipi 4:13; 2 Timoté 4:17.

9. Yesu amonisaki nini kati na Matai 24:36?

9 Mosala ya kosakola Bokonzi oyo moyebisamaki uta kala mpe makambo mosusu ya elembo ya kozala ya Yesu ezali kokokisama sikawa. Na yango, nsuka ebɛlɛmi mpo na ebongiseli mabe ya biloko oyo. Ya solo, Yesu alobaki ete: “Mpo na mokolo yango mpe ntango yango, moto ayebi te, ata baanzelu na Likoló te, kasi bobele Tata ayebi.” (Matai 24:4-14, 36) Kasi esakweli ya Yesu ekoki kosalisa biso ete tómilɛngɛla libela mpo na “mokolo yango mpe ntango yango.”

Bamilɛngɛlaki

10. Lolenge nini toyebi ete likoki ezali solo ya kolala mpɔngi te na elimo?

10 Mpo na kobika na mokolo monene ya Yehova, tosengeli kolala mpɔngi na elimo te mpe tosengeli kotɛlɛma ntango nyonso ngwi mpo na losambo ya solo. (1 Bakolinti 16:13) Toyebi ete tokoki solo kolendendela na lolenge wana, mpo ete libota moko oyo ezalaki na bokangami epai na Nzambe elendendelaki mpe ebikaki na Mpela oyo ebomaki bato mabe na mobu 2370 L.T.B. Na kokokanisáká eleko wana na eleko ya kozala na ye, Yesu alobaki ete: “Lokola ezalaki na mikolo na Noa, koya [“kozala,” NW] na Mwana na moto ekozala bongo. Mpo ete na mikolo yango liboso na mpela monene, bazalaki kolya mpe komɛla, kobala mpe kobalisa, kino mokolo eyingelaki Noa na bwato; bayebaki likambo te kino eyaki mpela mpe elongolaki bango nyonso. Koya [“kozala,” NW] na mwana na moto ekozala mpe bongo.”​—Matai 24:37-39.

11. Ezaleli nini Noa amonisaki atako mobulu ezalaki na eleko na ye?

11 Lolenge moko na biso, Noa mpe libota na ye bazalaki kofanda na mokili oyo etondaki na mobulu. Baanzelu, “bana ya Nzambe ya solo,” bazangaki botosi, balataki nzoto ya mosuni mpe bakamataki basi oyo babotaki na bango Banefilime, oyo bazalaki na lokumu mabe mpenza​—bilombe oyo, na ntembe te, bakɔtisaki mobulu mingi lisusu koleka. (Genese 6:1, 2, 4, NW; 1 Petelo 3:19, 20) Nzokande, “Noa atambolaki na Nzambe elongo” kati na kondima. “Azalaki moto na sembo mpe na boyengebene kati na bato na ntango na ye”​—libota ya bato mabe ya ntango na ye. (Genese 6:9-11) Na kotyáká motema epai na Nzambe na etingya nyonso, biso mpe tokoki kosala bongo kati na mokili oyo etondi na bato ya mobulu mpe ya mabe awa tozali kozela mokolo ya Yehova.

12. (a) Longolá mosala ya kotonga masuwa, mosala nini mosusu Noa asalaki? (b) Lolenge nini bato bayambaki nsango ya Noa, mpe yango ememelaki bango makambo nini ya mpasi?

12 Noa ayebani malamu lokola moto oyo atongaki masuwa mpo na kobatelama ya bomoi na boumeli ya Mpela. Azalaki mpe “mosakoli na boyengebene,” kasi bato ya eleko na ye “batyaki likebi te” na nsango na ye oyo eutaki na Nzambe. Balyaki mpe bamelaki, babalaki, babɔkɔlaki bana na bango, mpe bakóbaki misala na bango ya bomoi ya mokolo na mokolo liboso ete Mpela eya kolongola bango nyonso. (2 Petelo 2:5; Genese 6:14) Baboyaki koyoka toli nyonso oyo ezalaki kolendisa bango ete bázala na elobeli mpe na etamboli ya pɛto, ndenge moko mpe libota mabe ya mikolo na biso bazali kokanga matoi na bango na makambo oyo Batatoli ya Yehova bazali koloba na ntina na “kobongola mitema epai na Nzambe,” kondima kati na Klisto, boyengebene, mpe na ntina na ‘lisambisi oyo ezali koya.’ (Misala 20:20, 21; 24:24, 25) Ezali na mokanda moko te lelo oyo ezali komonisa motángo ya bato oyo bazalaki na bomoi na mabelé na ntango Noa azalaki kosakola nsango ya Nzambe. Kasi ezali solo ete, na 2370 L.T.B. motángo ya bato na mabelé ekómaki moke mpenza! Mpela elongolaki bato mabe nyonso, kobateláká bobele Noa mpe bato mosusu nsambo oyo bazalaki basangani ya libota na ye​—bango bamilɛngɛlaki liboso ete mosala wana ya Nzambe esalema.​—Genese 7:19-23; 2 Petelo 3:5, 6.

13. Noa atyaki motema na ye mobimba na bikateli nini mpe asalaki nini mpo na yango?

13 Na ntina na mokolo mpe ngonga ya sikisiki oyo Mpela esengelaki koya, Nzambe ayebisaki yango te epai na Noa bambula mingi liboso. Nzokande, ntango Noa akómaki na mibu 480, Yehova abimisaki ekateli oyo ete: “[“Elimo,” NW] na ngai ekoumela seko kati na bato te, mpo ete moto azali bobele mosuni, mpe mikolo na ye ikozala mbula mokámá na ntuku mibale.” (Genese 6:3) Noa atyaki motema mobimba na kokokisama ya bikateli ya Nzambe. Nsima ya kokokisa mibu 500, “abotaki Semi mpe Hama mpe Yɛfɛtɛ,” mpe mimeseno ya eleko wana ezalaki kosɛnga ete bana bálekisa liboso mbula 50 to 60 liboso ete bákoka kobala. Na ntango Noa azwaki etindá ya kotonga masuwa mpo na kobatelama na Mpela, emonani polele ete, bana na ye ya mibali mpe basi na bango basungaki ye kati na mosala monene wana. Na ntembe te, na ntango oyo Noa azalaki kotonga masuwa, azalaki mpe kokokisa mosala na ye ya “mosakoli na boyengebene,” oyo amipesaki na yango na boumeli ya mbula 40 to 50 liboso ete Mpela eya. (Genese 5:32; 6:13-22) Na boumeli ya bambula wana nyonso, ye mpe libota na ye basalaki na kondima nyonso. Tiká ete biso mpe tómonisa kondima awa ezali biso kosakola nsango malamu mpe kozela mokolo ya Yehova.​—Baebele 11:7.

14. Nsukansuka, Yehova ayebisaki Noa likambo nini, mpe mpo na nini?

14 Ekoki mbala mosusu kozala ete, ntango mosala ya kotonga masuwa ekómaki pene na kosila, Noa akanisaki ete etikalaki moke Mpela eya, atako ayebaki sikisiki te soki esengelaki kobanda ntango nini. Nsukansuka, Yehova ayebisaki ye ete: “Na nsima na mikolo nsambo, nakonɔkisa mbula mikolo ntuka minei mpe butu ntuku minei.” (Genese 7:4) Yango epesaki Noa ntango oyo ekokaki mpenza mpo na kokɔtisa nyama ya mitindo nyonso kati na masuwa mpe ye moko na libota na ye bákɔta mpe kati na yango liboso ete Mpela ebanda. Tozali na ntina te ya koyeba mokolo mpe ngonga oyo kobebisama ya ebongiseli oyo ekobanda; kobikisama ya nyama ezali mokumba na biso te, mpe bato oyo bakobika bazali uta lelo kokɔta na masuwa wana ya elilingi, paladiso ya elimo ya libota ya Nzambe.

“Bósɛnzɛlaka”

15. (a) Na maloba na yo moko, lolenge nini okoki kolimbola maloba ya Yesu oyo mazwami na Matai 24:40-44? (b) Kozanga koyeba mokolo ya sikisiki ya koya ya Yesu mpo na kokokisa nkanda ya Nzambe ezali na bopusi nini likoló na biso?

15 Na ntina na kozala na ye, Yesu alobaki ete: “Bato mibale bakozala na elanga; moko akokamatama, mosusu akotikala. Basi mibale bakotuta na etutelo; moko akokamatama, mpe mosusu akotikala. Boye bótala mpo ete boyebi te soko Nkolo na bino akoya na mokolo nini. Bóyeba nde likambo oyo ete soko mokóló na ndako ayebaki ntango nini ekoya moyibi, mbɛ akɛngɛlaki mpe atikaki te ete moyibi apunza ndako na ye. Bongo ekoki na bino koselingwa, mpo ete Mwana na moto akoya na ntango ekanisi bino te.” (Matai 24:40-44; Luka 17:34, 35) Kozanga koyeba ntango ya sikisiki oyo Yesu akoya kokokisa nkanda ya Nzambe ezali kosalisa biso ete tózala ntango nyonso na bokɛngi mpe ezali kopesa biso libaku ya komonisa mokolo na mokolo ete tozali kosalela Yehova na mikano mizangi moimi.

16. Nini ekokómela bato oyo ‘batikami’ mpe baoyo ‘bakamatami’?

16 Kati na bato oyo ‘batikami’ mpo na kobebisama elongo na bato mabe ezali mpe na baoyo bazalaki liboso kati na pole kasi bamipesaki na lolenge ya bomoi ya moimi. Tiká ete tózala kati na baoyo ‘bakamatami,’ baoyo bamipesi mobimba epai na Yehova mpe bazali solo na botɔ́ndi mpo na bilei ya elimo oyo azali kopesa bango na nzela ya “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Tiká ete kino nsuka, tosalela ye na “bolingo uta na mitema na pɛto mpe na lisosoli malamu mpe kondima ezangi bokosi.”​—1 Timoté 1:5.

Bizaleli na bulɛɛ bizali na ntina mingi

17. (a) Nini esakolamaki na 2 Petelo 3:10? (b) Wapi mwa ndambo ya bizaleli ya bulɛɛ oyo bilendisami na 2 Petelo 3:11?

17 Ntoma Petelo akomaki ete: “Mokolo na Nkolo ekoya lokola moyibi. Na yango, Likoló ekolimwa na makɛlɛlɛ monene mpe biloko bikonangwa na mɔ́tɔ makasi; nsé mpe misala nyonso kati na yango ikotumbama.” (2 Petelo 3:10) Makoló mpe mabelé ya elilingi ekobika te na mɔ́tɔ ya kongala makasi ya Nzambe. Na yango Petelo abakisi ete: “Na bongo, awa ezali biloko nyonso mpo na konangwa, ebongi na bino kozala bato boni na bizaleli na bulɛɛ mpe na kosambela Nzambe!” (2 Petelo 3:11) Kati na bizaleli yango, tokoki kotánga koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya boklisto, kosalela basusu malamu, mpe kosangana na lolenge ebongi mpenza kati na mosala ya kosakola nsango malamu.​—Matai 24:14; Baebele 10:24, 25; 13:16.

18. Tosengeli kosala nini soki ezaleli ya kokangama na mokili oyo ekómi komonana epai na biso?

18 “Bizaleli na bulɛɛ mpe na kosambela Nzambe” ezali kosɛnga ete ‘tómibatela kozanga litɔnɔ na makambo ya mokili.’ (Yakobo 1:27, NW) Kasi ekozala boni soki ezaleli ya koluka kokangama na mokili oyo ekómi komonana epai na biso? Ekoki mbala mosusu kozala ete tozali kolɛngolama kino kokóma na etɛlɛmɛlo moko ya likámá liboso na Nzambe, na kolukáká lolenge ya kominanola ya mbindo to na koyokáká miziki mpe nzembo oyo ezali kokumisa mpe kolendisa elimo mabe ya mokili oyo. (2 Bakolinti 6:14-18) Soki ezali bongo, tiká ete tóluka lisungi ya Nzambe kati na libondeli mpo ete tólongolama te nzela moko na mokili kasi tóndimama liboso na Mwana na moto. (Luka 21:34-36; 1 Yoane 2:15-17) Lokola tosilá komipesa epai na Nzambe, tokolinga mpenza kosala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kokólisa boyokani ya esengo elongo na Nzambe mpe kobatela yango; mpe na bongo tokomilɛngɛla mpo na mokolo monene mpe ya nsɔ́mɔ ya Yehova.

19. Mpo na nini bibele ya basakoli ya Bokonzi bazali na elikya ya kobikisama ntango ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo ekosuka?

19 Noa, moto oyo azalaki na bokangami epai na Nzambe, mpe libota na ye, babikaki na Mpela oyo ebomaki mokili ya kala. Bato ya sembo babikaki na ntango ebongiseli ya Bayuda esukaki na mobu 70 T.B. Na ndakisa, ntoma Yoane azalaki naino kosala mosala ya Nzambe na molende nyonso na mobu soko 96-98 T.B., ntango akomaki mokanda ya Emoniseli, Envazile na ye mpe mikanda na ye misato mipemami. Na ntembe te, kati na ebele ya bato oyo bayambaki kondima ya solo na Pantekote ya mobu 33 T.B., mingi na bango babikaki na ntango ebongiseli ya Bayuda esukaki. (Misala 1:15; 2:41, 47; 4:4) Lelo oyo, bibele ya basakoli ya Bokonzi bakoki kolikya ete bakobika na ntango ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo ekosuka.

20. Mpo na nini tosengeli kozala ‘basakoli ya boyengebene’ oyo batondi na molende?

20 Lokola tozali na elikya ya kobika mpe kokɔta na mokili ya sika, tiká ete tózala ‘basakoli ya boyengebene’ oyo batondi na molende. Oyo nde libaku malamu tozali na yango ya kosalela Nzambe na mikolo oyo ya nsuka! Mpe tozali mpenza na esengo ya kokamba bato kino na “masuwa” ya mikolo na biso, paladiso ya elimo oyo basaleli ya Nzambe bazali kati na yango! Tiká ete bamilió ya bato oyo bazali kati na yango bábatela bosembo na bango, bálala mpɔngi na elimo te, mpe bámilɛngɛla libela mpo na mokolo monene ya Yehova. Kasi nini ekosalisa biso nyonso ete tólala mpɔngi na elimo te?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá mokapo 10 mpe mokapo 11 ya mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

Okoyanola lolenge nini?

◻ Bilikya nini bato mosusu bazalaki na yango na ntina na mokolo ya Yehova mpe na ntina na kozala ya Klisto?

◻ Mpo na nini tokoki koloba ete Noa mpe libota na ye basilaki komilɛngɛla mpo na Mpela?

◻ Nini ekokómela baoyo bazali kolala “mpɔngi na elimo” te mpe nini ekokwela baoyo bazali kolala mpɔngi?

◻ Mpo na nini bizaleli ya bulɛɛ bizali na ntina, mingi mpenza awa ezali biso kobɛlɛma na mokolo monene ya Yehova?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto