Mituna ya batángi
Mpo na nini na 2 Petelo 3:13, Traduction du monde nouveau elobelaka “makoló ya sika [na boike] mpe mabele ya sika,” nzokande Emoniseli 21:1 elobelaka “likoló ya sika [na bomoko] mpe mabele ya sika”?
Yango ezali nde mwa bokeseni moke oyo etali mibeko ya lokota (grammaire) ya minɔkɔ oyo basalelaki na ebandeli mpo na kokoma Biblia. Yango ekoki mpenza te kobongola ndimbola ya maloba yango.
Libosoliboso, tótalela Makomami ya Liebele. Na makomi ya ebandeli, liloba ya Liebele shamayim, oyo ebongolami na “makoló,” ezalaka ntango nyonso na boike. Emonani ete ndenge liloba yango ezali na boike ezali mpo na komonisa eloko moko ya mobimba oyo esalemi na biteni ebele ya mikemike, to oyo epalangani na etando moko molai mpenza, kasi ezali boike ya komonisa lokumu monene te. Yango ezali bongo, mpamba te bipai nyonso, makoló oyo emonanaka ezali mosika mpenza na mabele mpe etondi na bamiliare ya minzoto. Na bisika oyo article défini ezwami liboso ya liloba shamayim, Traduction du monde nouveau ebongolaka yango mbala mingi na “makoló,” lokola na Yisaya 66:22. Soki liloba shamayim ezali na article défini te, ekoki kobongolama na bomoko (“likoló,” lokola na Genese 1:8; 14:19, 22; Nzembo 69:34) to mpe na boike (“makoló,” lokola na Genese 49:25; Basambisi 5:4; Yobo 9:8; Yisaya 65:17).
Na Yisaya 65:17 mpe na 66:22, liloba ya Liebele oyo elimboli makoló ezali na boike, mpe lolenge malamu oyo toponaki mpo na kobongola yango ezali “makoló ya sika mpe mabele ya sika.”
Liloba ya Grɛki ouranos elimboli “likoló,” mpe boike na yango ezali ouranoi, oyo elimboli “makoló.” Kutu, Septante, oyo ezali libongoli moko ya Biblia na Grɛki, esaleli liloba ouranos, oyo ezali na bomoko, na Yisaya 65:17 mpe na 66:22.
Sikoyo tokoloba nini mpo na bisika mibale oyo tozali kokuta maloba yango “likoló [to makoló] ya sika mpe mabele ya sika,” na kati ya Makomami ya Grɛki ya boklisto?
Na 2 Petelo 3:13, ntoma Petelo asalelaki liloba ya Grɛki oyo ezali na boike. Liboso ete asalela liloba yango (na vɛrsɛ 7, 10, 12), alobelaki “makoló” mabe ya ntango oyo, mpe asalelaki boike. Na bongo mpo na kolandisa malamu likanisi yango, ezalaki malamu asalela boike na vɛrsɛ 13. Lisusu, emonani lokola ete azongelaki maloba oyo ezwami na Yisaya 65:17 ndenge ekomamaki na ebandeli, na vɛrsɛ yango liloba ya Liebele ezali na boike; na 2 Petelo 2:22 mpe, azongelaki maloba oyo ezwami na Masese 26:11 ndenge oyo ekomamaki na Liebele. Ezali mpo na ntina wana nde Petelo alobelaki “makoló [na boike] ya sika mpe mabele ya sika oyo tozali kozela na boyokani na elaka na ye.”
Na kokesena mwa moke, na Emoniseli 21:1, ntoma Yoane asalelaki nde mokapo ya Yisaya 65:17 ndenge ezwami na libongoli ya Septante; lokola tosili komona yango, libongoli wana esalelaki na bomoko liloba ya Grɛki oyo elimboli “likoló.” Na yango, oyo Yoane akomaki ezalaki nde: “Namonaki likoló [na bomoko] ya sika mpe mabele ya sika; mpo ete likoló ya kala mpe mabele ya kala esili kolongwa.”
Nyonso oyo tolobeli ezali kaka mwa makambo ya mikemike ya mibeko ya lokota oyo etali babongoli. Ebongi tózongela koloba ete ezali ata na bokeseni moko te na ndimbola, ezala soki moto atángi to alobi “makoló ya sika” to mpe “likoló ya sika.” Maloba yango ezali kaka na ndimbola moko.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]
Minzoto: Frank Zullo