Tolanda kokóla kati na boyebi
‘Bobakisa boyebi wana ezali bino na . . . kondima.’—2 PETELO 1:5, MN.
1, 2. (a) Tozali koyekola nini na kotaláká makoló? (Baloma 1:20) (b) Kino na meko nini mpenza moto asili kokóla kati na boyebi?
OKOKI koyekola likambo nini soki omoni kongɛnga ya sanza mpe ya ebele ya minzoto na libandá, kati na molili makasi? Okoki koyekola mwa makambo na ntina na Ye oyo azalisaki biloko nyonso wana.—Nzembo 19:1-6; 69:34.
2 Soki olingi kokólisa boyebi wana, okomata na nsambá ya ndako na yo mpo na kotala likoló? Bongo te. Albert Einstein asalelaki lisese oyo mpo na komonisa ete bato ya sianse bakólisaki mpenza te boyebi mpo na molɔ́ngɔ́ mpe bazali mpenza te na boyebi mpo na Ye oyo azalisaki yango.a Monganga Lewis Thomas akomaki ete: “Likambo lileki monene oyo sianse esili komonisa na ekeke oyo yango esali makambo mingi mpenza, ezali likambo oyo ete biso toyebi eloko moko te; tozali bobele na boyebi moke likoló na biloko bizalisami mpe toyebi yango malamu te.”
3. Na ndimbola nini tokoki koloba ete kokólisa boyebi ekobakisaka mpasi?
3 Atako olekisi bambula nyonso etikali na bomoi na yo mpo na koluka boyebi wana, okososola ete moto azali na bomoi mokuse, mpe okomona mpenza ndelo oyo moto azali na yango mpo na kosalela boyebi na ye mpo na kozanga kokoka mpe mpo na ‘kozanga sembo’ ya mokili oyo. Yango nde Salomo amonisaki wana akomaki ete: “Mawa mingi ezali kati na mayele mingi; mpe ye oyo akofulisa boyebi, akobakisa mpe mpasi.” (Mosakoli 1:15, 18) Ya solo, kozwa boyebi mpe mayele oyo eyokani te na mikano ya Nzambe, mbala mingi ekopesaka mpasi mpe mitungisi.—Mosakoli 1:13, 14; 12:12; 1 Timoté 6:20.
4. Boyebi nini tosengeli kolinga kozwa yango?
4 Biblia esɛngi ete tomibanzabanza te mpo na kokólisa boyebi na biso? Ntoma Petelo akomaki ete: “Bongo te, kasi bolanda kokóla kati na ngolu mpe na boyebi ya Nkolo na biso mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Nkembo epesama na ye uta sikawa mpe kino mokolo na seko!” (2 Petelo 3:18, MN) Tokoki mpe tosengeli kotalela toli oyo esɛngi biso na kokóla na boyebi ete epesameli biso. Kasi boyebi ya lolenge nini? Lolenge nini tokoki kokóla kati na yango? Tozali mpenza kosala yango?
5, 6. Lolenge nini Petelo amonisaki ete tozali na mposa ya kozwa boyebi?
5 Kokóla kati na boyebi ya sikisiki ya Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mpe ya Yesu, ezali moko na makanisi ya ntina malobelami na mokanda ya mibale ya Petelo. Na ebandeli na yango, akomaki ete: “Tika ngolu mpe kimya ekóla kati na bino na nzela na boyebi ya sikisiki na Nzambe mpe Yesu, Nkolo na biso; mpo ete nguya na ye na bonzambe epesi biso makambo manso na bomoi mpe na ezaleli ya kobanga Nzambe, na nzela na boyebi ya sikisiki na ye oyo abyangi biso na nkembo mpe na bizaleli bibongi.” (2 Petelo 1:2, 3, MN) Akangisi bongo ngolu mpe kimya elongo na kozwa boyebi na ntina na Nzambe mpe Mwana na ye. Yango ebongi mpenza, lokola azali Mozalisi, Jéhovah azali liziba ya boyebi ya malamu. Moto oyo azali kobanga Nzambe akoki komona makambo na liboso mpe kozwa bikateli malamu.—Masese 1:7.
6 Na nsima, Petelo apesaki toli ete: “Bobakisa bizaleli bibongi wana ezali bino na kondima; mpe bobakisa boyebi wana ezali bino na bizaleli bibongi; mpe bobakisa komipekisa wana ezali bino na boyebi, mpe bobakisa koyika mpiko wana ezali bino na komipekisa, mpe bobakisa ezaleli ya kobanga Nzambe wana ezali bino koyika mpiko, bozala na bolingo mpo na bandeko wana ezali bino na ezaleli ya kobanga Nzambe, mpe bobakisa bolingo wana ezali bino na bolingo mpo na bandeko. Mpo ete soko makambo oyo mazwami mpe mayikani kati na bino, ekopekisa bino ete bolɛmba te mpe bozanga kobota mbuma te mpo na boyebi ya sikisiki na Nkolo na biso Yesu Klisto.” (2 Petelo 1:5-8, MN)b Na mokapo molandi, tozali kotanga ete kozwa boyebi ezali kosalisa bato na kokima mbindo ya mokili oyo. (2 Petelo 2:20) Mpo na yango, Petelo amonisi polele ete baoyo bazali kokóma baklisto basengeli kozala na boyebi, lolenge moko na baoyo bazali kosalela Jéhovah uta kala. Ozali moko na motindo na bato wana?
Koyekola, kozongela, kosalela
7. Lolenge nini bato mingi bazwaki boyebi ya sikisiki ya basolo ya moboko ya Biblia?
7 Mbala mosusu ozali koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah mpo ete osili komona solo kati na nsango na bango. Mbala moko na poso, soko na boumeli ya ngonga moko, ozali kotalela lisoló moko ya Biblia na lisalisi ya mokanda moko lokola Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Ezali malamu mingi! Ebele na bato oyo basili koyekola elongo na ba Témoins de Jéhovah basili kozwa boyebi ya sikisiki. Atako bongo, okoki kosala nini mpo na kokólisa lisusu makoki na yo ya koyekola? Tala mwa makanisi mosusu.c
8. Moyekoli ya Biblia akoki kosala nini mpo na kobakisa boyebi wana ezali ye kobongisa boyekoli na ye?
8 Wana ozali komibongisa mpo na boyekoli na yo, talela libosoliboso makambo oyo bokoyekola. Yango elimboli kotalela motó na likambo ya mokapo, mitó na makambo mike, mpe bililingi nyonso bisalelami mpo na kolobela likambo wana. Na nsima, wana ozali kotanga paragrafe moko to eteni ya maloba ya mokanda, luká makanisi ya ntina mpe mikapo ya Makomami oyo misimbi yango, tya elembo to mpe mokɔ́lɔ́tɔ́ na nsé na yango. Mpo na koyeba soki oyekolaki makambo ya solo oyo matalelami, meka koyanola na mituna ya baparagrafe ekeseni. Na kosaláká bongo, meka koyanola na maloba na yo moko. Na nsima, talela lisusu lisoló, meka komikundola makanisi ya ntina mpe maloba oyo masimbi yango.
9. Moto oyo alandi makanisi mapesami, azali kozwa lisalisi nini mpo na kozwa boyebi?
9 Okoki komizela kokóla kati na boyebi soki ozali kosalela makanisi oyo. Mpo na nini bongo? Moko na bantina ezali ete okotalela makambo yango na mposa makasi ya koyekola, wana ezali yo komibongisa. Kotaleláká lisoló na mobimba na yango, mpe na kolukáká makanisi ya ntina mpe makanisi oyo mazali kopusa na kososola, okoyeba lolenge ya kokangisa makambo malandi na motó na likambo wana to mpe na bosukisi. Kozongela makambo ekosalisa yo na komikundola makambo oyo oyekolaki. Eloko nini ekosalisa yo na nsima, na boumeli ya boyekoli na yo ya Biblia?
10. (a) Mpo na nini kozongelazongela makambo ezali na ntina te? (b) “Bozongeli nsima ya ntango moke” ezali na ntina mpo na likambo nini? (c) Lolenge nini bana ya Bayisraele bazwaki litomba na mwango ya kozongela makambo?
10 Bato oyo bayekoli myango ya kolakisa bayebi ntina ya kozongela makambo na ntango malamu mpe na mokano ya sikisiki. Yango elimboli te ete ozongelazongela maloba kozanga kokanga ntina na yango, likambo oyo mbala mosusu ozalaki komeka kosala yango na eteyelo na ntango ya koyekola kokanga bankombo, makambo to makanisi na motó. Atako bongo, omonaki ete obosanaki nokinoki makambo oyo ozalaki kozongela na motó, mpe ete ezalaki kolongwa nokinoki na bɔɔngɔ́ na yo? Mpo na nini? Kozongelazongela liloba moko soko mpe likambo moko ya sika kozanga kokanga ntina na yango, ekoki kolɛmbisa, mpe matomba makoumelaka te. Nini ekoki kobongisa yango? Mposa na yo ya koyekola ekosalisa yo. Mwango mosusu ezali bongo kozongela makambo na motó na lolenge ya mayele. Mwa minite nsima na koyekola likambo moko, meka kolobela yango naino elongwe na bɔɔngɔ́ na yo te. Yango ebéngami “bozongeli nsima ya ntango moke.” Na kokanisáká yango liboso ete elongwa na bɔɔngɔ́ na yo, ozali kokólisa makoki ya kobomba makambo. Na Yisraele, batata basengelaki kokɔtisa mibeko ya Nzambe kati na mitema ya bana na bango. (Deteronome 6:6, 7, MN) “Kokɔtisa” elimboli koteya na kozongela makambo mbala na mbala. Na ntembe te, mingi na batata yango, bazalaki liboso kolakisa mibeko epai na bana na bango; na nsima, bazalaki kozongela yango mbala na mbala; mpe na nsuka, bazalaki kotuna bana na bango mituna na ntina na makambo oyo bayekolaki.
11. Tokoki kosala nini mpo na kokólisa boyebi na boumeli ya boyekoli ya Biblia?
11 Soki Temwe moko azali koyekolisa yo Biblia, akoki kosalisa yo ete okanga makanisi ya ntina ya eteni na eteni na boumeli ya boyekoli. Yango ezali mpo na bana mike te. Ezali mwango ya kokólisa makoki ya koyekola; zalá na esengo mpo na kosalela yango mbala na mbala. Lisusu, na nsuka ya boyekoli, na bozongeli ya lisoló mobimba, yanola na motó. Okoki kolimbola makambo na maloba na yo moko lokola nde ozalaki koteya moto mosusu. (1 Petelo 3:15) Yango ekosalisa yo mpo na kobomba makambo oyo oyekolaki na boumeli ya ntango molai kati na bɔɔngɔ́ na yo.—Tala Nzembo 119:1, 2, 125; 2 Petelo 3:1.
12. Moyekoli ya Biblia ye moko akoki kosala nini mpo na kobakisa makoki na ye ya komikundola makambo?
12 Ozali na lisalisi mosusu ya malamu: na nsima ya mokolo moko to mikolo mibale, lobela makambo oyo oyekolaki epai na moto moko, ekoki kozala moninga ya kelasi, moninga ya mosala, to moto oyo afandi penepene na yo. Okoki kolobela motó na likambo mpe na nsima, yebisa ete olingi bobele koyeba soki okoki komikundola makanisi ya ntina to mikapo ya Biblia oyo misimbi yango. Yango ekoki kolamwisa mposa ya moto mosusu. Ata soki esalemi bongo te, bobele kozongela mateya ya sika nsima ya mokolo moko to mikolo mibale, okobomba yango kati na bɔɔngɔ́ na yo. Na bongo, okoyekola yango malamu, na kosaleláká toli ya 2 Petelo 3:18.
Koyekola na molende
13, 14. Mpo na nini tosengeli te kosuka bobele na koyeba makambo mpe komikundola yango?
13 Koyekola ezali te bobele kokanga makambo na motó soko mpe kozala na makoki ya komikundola makambo oyo oyekolaki. Bakonzi na mangomba mpe bandimi na bango na eleko na Yesu basalaki mpe bongo na mabondeli na bango oyo bazalaki kozongelazongela. (Matai 6:5-7) Kasi boyebi yango ezalaki na bopusi nini likoló na bango? Babotaki mbuma ya boyengebene? Soko moke te. (Matai 7:15-17; Luka 3:7, 8) Moko na bantina ezali ete boyebi ekɔtaki kati na mitema na bango te, ete epusa bango na kosala malamu.
14 Engebene Petelo, esengelaki kozala bongo te mpo na baklisto ya ntango wana mpe oyo ya lelo. Alendisi biso ete tóbakisa boyebi likoló na kondima na biso oyo ekosalisa biso ete tólɛmba te mpe tózanga kobota mbuma te. (2 Petelo 1:5, 8) Mpo ete yango ekokana mpo na biso, tosengeli kolinga kokóla kati na boyebi wana mpe kolinga ete yango ezala na bopusi mozindo likoló na biso, na kosimbáká motema na biso. Yango esalemaka ntango nyonso te.
15. Baebele mosusu baoyo bakómaki baklisto bazalaki na mokakatano nini?
15 Na eleko ya Paulo, baklisto Baebele bazalaki na mokakatano kati na likambo wana. Lokola bazalaki Bayuda, bazalaki na mwa boyebi ya Makomami. Bayebaki mwa makambo na ntina na Jéhovah mpe masɛngami na ye. Na nsima, babakisaki boyebi na ntina na Masiya, bandimelaki ye, mpe bazwaki batisimo mpe bakómaki baklisto. (Misala 2:22, 37-41; 8:26-36) Lisusu, sanza na sanza mpe mbula na mbula, bazalaki koyangana na makita ya boklisto, epai bazalaki kotanga makomami mpe kopesa bakomantere. Nzokande, basusu bakólaki te kati na boyebi. Paulo akomaki ete: “Mbɛlɛ bozali balakisi uta kala, nzokande bozali naino na mposa ete moto moko alakisa bino makambo na ebandeli ya maloba na bulee na Nzambe. Bozali na mposa ya mabɛlɛ, nde bilei ya makasi te.” (Baebele 5:12, MN) Lolenge nini yango ekokaki kosalema? Yango ekoki mpe kokómela biso?
16. Pergélisol ezali nini, mpe yango ezali na bopusi nini likoló na banzeté?
16 Tozwa ndakisa ya oyo babéngi ete pergélisol, mabelé mazipami ntango nyonso na mabangá ya mbula mpɛmbɛ na mikili ya Arctique mpe na bitúka mosusu epai mpiɔ ezali makasi mingi koleka. Mabelé, mabangá, mpe mai mazwami na nsé na mabelé makangami makasi, mbala mosusu na bozindo ya metele 900. Na eleko ya molungé, mabangá ya mbula mpɛmbɛ makoki kosenzwa kati na eteni ya likoló ya mabelé (oyo ebengami couche active). Nzokande, mabelé wana masenzwi mazalaka lokola pɔtɔpɔtɔ mpo ete mai makoki te kokita kati na mabelé mazipami na mabangá ya mbula mpɛmbɛ oyo mazali na nsé. Banzeté oyo ezali kobima na mabelé wana, mingimingi ezali mike to ezangi kokóla malamu; misisa na yango mikoki te kokita kati na pergélisol. Okoki mbala mosusu komituna ete: ‘Boyokani nini ezali kati na mabelé mazipami na mabangá ya mbula mpɛmbɛ (pergélisol) mpe likambo ya koyeba soki nazali kokóla kati na boyebi ya solo ya Biblia?’
17, 18. Lolenge nini pergélisol mpe mabelé na yango mazwami likoló ekoki kosalelama mpo na komonisa oyo ekómelaki Baebele mosusu oyo bazalaki baklisto?
17 Mabelé mazipami na mabangá ya mbula mpɛmbɛ mamonisi malamu ezalela ya moto oyo makanisi na ye mazali mpenza na makoki te mpo na kokɔtisa boyebi ya sikisiki, kosimba yango mpe kosalela yango. (Tala Matai 13:5, 20, 21.) Na ntembe te, moto wana azali na makoki ya koyekola makambo makeseni, kati na yango, solo ya Biblia. Ayekolaki “makambo na ebandeli ya maloba na bulee na Nzambe,” mpe mbala mosusu akoki komibongisa mpo na kozwa batisimo, lokola baklisto Baebele oyo. Atako bongo, akoki te ‘kopota noki mpo na kokomela’ mpo na kotika “mateya na ebandeli na ntina na Klisto.”—Baebele 5:12; 6:1.
18 Kanisa mpo na bamoko na baklisto wana ya kala na ntango ya makita. Bazalaki wana mpe balalaki te, kasi makanisi na bango mazalaki mpenza kati na boyekoli? Bazalaki mpenza kokóla na molende mpe na mpiko nyonso kati na boyebi? Mbala mosusu, bakólaki te. Kati na makita, baoyo batɛlaki na elimo te bazalaki lokola nde eteni ya likoló ya mabelé (couche active), nyonso ya bozindo oyo etikalaki, ekangamaki na mpiɔ. Misisa ya solo oyo eleki makasi to oyo eleki monene ekokaki te kokɔta kati na etuká wana ya pergélisol ya makanisi.—Tala Yisaya 40:24.
19. Kati na likambo nini moklisto moko aumeli mingi na lisangá, akoki lelo oyo kokóma lokola baklisto Baebele?
19 Ekoki mpe kokómela moklisto moko lelo oyo. Atako azali na makita, akoki kozanga kozwa litomba na mabaku oyo mapesameli ye mpo na kokóla kati na boyebi. Ezali boni mpo na kosangana na [makita] yango na molende? Soki moto ya sika to elenge moko oyo andimi kotanga mokapo ya Makomami to apesi komantere engebene paragrafe, boye asali milende makasi mimonisi ete azali komekisa makoki na ye na lolenge ya malamu mpe ya kitoko. Kasi Paulo amonisaki ete basusu, baoyo bazali baklisto uta kala, basengelaki kokóla mpe koleka litambe wana ya ebandeli mpo na kosangana [na makita], soki balingi kolanda kokóla kati na boyebi.—Baebele 5:14.
20. Mituna nini moko na moko na biso asengeli komituna?
20 Soki moklisto moko ya kala azali kokóla te kati na likambo wana, nde azali bobele kotanga verset moko ya Biblia to kopesa komantere na mwa maloba oyo mazwami na paragrafe, lolenge na ye ya kosangana [na makita] ekouta mpenza na “couche active,” likolólikoló, na elimo na ye. Mpo na kokóba ndakisa na biso ya pergélisol, na boumeli ya makita, bozindo ya makanisi na ye ekangami na mpiɔ. Tosengeli komituna ete: ‘Ezali bongo mpo na ngai? Nasili kopesa nzela na makanisi makangami na mpiɔ ete mazala kati na ngai? Nasalaka noki mpo na koyekola mpe nazali komibanzabanza mpo na yango?’ Soki tomoni ete totungisami mpo na biyano na biso ya sembo, tokoki sikawa kobanda kozwa meko mpo na kokóla kati na boyebi.
21. Makanisi nini mapesami na likoló oyo tokoki kosalela na ntango tozali kobongisa makita to wana toyangani na yango?
21 Moko na moko, akoki kolanda makanisi mapesami na paragrafe 8. Ata toumeli mingi na lisangá to mpe toumeli mingi te, tokoki kozwa ekateli ya kopota noki mpo na kokomela mpe kokóla kati na boyebi. Mpo na bamoko, yango elimboli kobongisa makita malamumalamu, mbala mosusu na kozongeláká mimeseno oyo tozalaki na yango na mibu mileki nde tosili kotika yango mokemoke. Ezali yo komibongisa, meka koluka makanisi ya ntina mingi mpe kososola mikapo ya Makomami oyo mizwami wana nde miyebani malamu te oyo misalelami mpo na kosimba makanisi oyo mapesami. Luká likanisi ya sika to ndimbola ya sika kati na makambo oyo mayekolami. Bobele bongo, na boumeli ya makita, meka kosalela makanisi ya paragrafe 10 mpe paragrafe 11 kati na makanisi na yo. Meka kozala na bokɛngi mpe na mɔ́tɔ kati na makanisi. Yango ekotɛmɛla makanisi nyonso makomema ete “pergélisol” esalema kati na yango; molende wana makasi ekosenzola “mabelé makangami na mpiɔ,” ezaleli oyo elingaki kokóla.—Masese 8:12, 32-34.
Boyebi ezali kosunga biso mpo na kobota mbuma
22. Bolamu nini tokozwa soki tosali makasi mpo na kokólisa boyebi na biso?
22 Bolamu nini moko na moko akozwa soki tomipesi na likambo ya kokóla kati na ngolu mpe na boyebi ya Nkolo na biso mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto? Na nzela na milende na biso makasi mpo na kobatela elimo ya bokɛngi, na komilengela mpo na kozwa boyebi, mbotó ya sika mpe ya minene mingi ya solo na Biblia ekolónoma na mitema, mpe bososoli na biso ekobakisama mpe yango ekoumela. Yango ekokokana na oyo Yesu alobaki kati na lisese mosusu na ntina na mitema. (Luka 8:5-12) Mbotó oyo ezali kokwea na mabelé malamu ekoki kobimisa misisa makasi mpo ete eleisa nzeté oyo ezali kobota mbuma.—Matai 13:8, 23.
23. Matomba nini makoki kozwama wana tokangi ntina ya 2 Petelo 3:18? (Bakolose 1:9-12)
23 Lisese na Yesu likesenaki mwa moke, kasi matomba malamu oyo mazwamaki makokani na oyo Petelo alakaki ete: “Mpo na ntina oyo, bosala na makasi nyonso ete bobakisa bizaleli ya bulee wana ezali bino na kondima; mpe bobakisa bizaleli bibongi wana ezali bino na kondima; mpe bobakisa boyebi wana ezali bino na bizaleli bibongi . . . Mpo ete soko makambo oyo mazwami mpe mayikani kati na bino, ekopekisa bino ete bolɛmba te mpe bozanga kobota mbuma te mpo na boyebi ya sikisiki na Nkolo na biso Yesu Klisto.” (2 Petelo 1:5-8, MN) Ya solo, kokóla na biso kati na boyebi ekosalisa biso na kobota mbuma. Tokomona ete kozwa boyebi ezali ntango nyonso likambo ya esengo mingi. (Masese 2:2-5) Makambo mazali yo koyekola makotikala na bɔɔngɔ́ na yo, mpe makozala na ntina mpo na yo wana okoteya bato mosusu ete bakóma bayekoli. Na bongo, okobota mbuma mingi mpe okokumisa Nzambe mpe Mwana na ye. Petelo asukisi mokanda na ye ya mibale ete: “Bolanda kokóla kati na ngolu mpe na boyebi ya Nkolo na biso mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Nkembo epesama na ye uta sikawa mpe kino mokolo na seko!”—2 Petelo 3:18, MN.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Yango ekokisami na oyo ekoki kozwama na moto oyo amipesi mingi na koyekola sanza, kobutáká likoló na nsambá ya ndako na ye mpo na kotala engɛngɛli yango na penepene.”
b Kondima mpe bizaleli bibongi, bizaleli mibale ya liboso oyo bizwami kati na mokapo oyo, bilobelamaki na nimero ya 15 Juillet 1993.
c Makanisi oyo makoki mpe kosalisa baklisto oyo baumeli mpo na kozwa matomba mingi na boyekoli ya bango moko mpe na komibongisa mpo na makita.
Okoki komikundola?
◻ Mpo na nini tosengeli komibanzabanza mpo na kokólisa boyebi na biso?
◻ Lolenge nini moyekoli ya sika ya Biblia akoki kozwa matomba na boyekoli na ye?
◻ Likáma nini tolingi kopɛngola oyo limonisami na pergélisol?
◻ Mpo na nini tosengeli kozwa meko mpo na kobakisa makoki na biso ya kokólisa boyebi?
[Elilingi na lokasa 15]
Nazali nde na mokakatano na pergélisol ya makanisi?