Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bókeba na Balakisi ya lokuta!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1997 | 1 Septembre
    • 3. Likambo nini esalemáká kala oyo Petelo alobi ete ekosalema lisusu?

      3 Nsima ya koyebisa bandeko na ye ete bátya likebi na esakweli, Petelo alobi ete: “Kasi basakoli na lokuta bazalaki kati na [Yisalaele ya kala] pelamoko balakisi na lokuta [bakozala, NW] kati na bino.” (2 Petelo 1:14–​2:1) Libota ya Nzambe na ntango ya kala bazwaki bisakweli ya solo, kasi basengelaki mpe kobundisa mateya mabe ya basakoli ya lokuta. (Yilimia 6:13, 14; 28:1-3, 15) Yilimia akomaki ete: “Epai na basakoli na Yelusaleme mpe namoni likambo mabe mingi, bazali kosala ekobo mpe kotambola na bokosi.”​—Yilimia 23:14.

      4. Mpo na nini balakisi na lokuta babongi kobomama?

      4 Kolobeláká makambo oyo balakisi ya lokuta bakosala kati na lisangá ya boklisto, Petelo alobi ete: “Bango bakoyeisa mikabwano na libebi, bakowangana ata Mokonzi [Yesu Klisto] oyo asili kosikola bango, bakobenda libebi noki epai na bango mpenza.” (2 Petelo 2:1; Yuda 4) Mbuma ya nsuka oyo ebimaki mpo na mikabwano wana ya ekeke ya liboso ezali bongo mangomba ya boklisto na ndenge toyebi yango lelo. Petelo amonisi ntina oyo balakisi ya lokuta babongi mpenza kokwela libebi: “Mingi bakobila mobulu na bango monene [“etamboli ya mobulu,” NW] mpe mpo na bango, nzela na solo ekotukama.”​—2 Petelo 2:2.

  • Bókeba na Balakisi ya lokuta!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1997 | 1 Septembre
    • Kokɔtisama ya mateya ya lokuta

      6. Nini ezali kopusa balakisi ya lokuta, mpe lolenge nini bazali koluka kozwa oyo bazali na yango mposa?

      6 Ekozala likambo ya mayele na koyeba lolenge oyo balakisi ya lokuta bazali kokɔtisa makanisi na bango ya mabe. Petelo alobi liboso ete bazali kosala yango na kimya, to na malɛmbɛ, kozanga kobenda likebi. Abakisi ete: “Na bilulela na bango bakozwa litomba kati na bino na maloba na kokosa.” Ezali bongo mposa ya moimi nde ezali kotindika balakisi ya lokuta, lokola yango emonisami polele na libongoli Bible de Jérusalem: “Bakomeka kosomba bino na lokoso nyonso na maloba ya lokuta.” Lolenge moko libongoli ya James Moffat elobi na esika yango ete: “Mpo ya mposa mabe bakokosa bino na maloba ya lokuta.” (2 Petelo 2:1, 3) Bilobaloba ya balakisi ya lokuta ekoki komonana ete ezali solo epai na ye oyo azali na bokɛngi te na elimo, kasi maloba na bango malambami malamu mpo na “kosomba” bato, kolɛngoláká bango na ntina ete básalela mikano ya moimi mpe ya bakosi.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto