Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/12 nk. 10-15
  • Bayanolaki na motema mobimba na bolingo na Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bayanolaki na motema mobimba na bolingo na Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge oyo Moize ayanolaki na motema mobimba
  • Ezaleli malamu ya Davidi
  • Yesu Klisto,Ndakisa na biso ya kokoka
  • Lolenge nini koyanola na bolingo na Nzambe na motema mobimba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tiká ete bolingo etonga bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Lingá Nzambe oyo alingaka yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Tokoyanola nde na bolingo na Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/12 nk. 10-15

Bayanolaki na motema mobimba na bolingo na Nzambe

“Tika ete tosanzola Jéhovah mpo na boboto na ye; mpo na misala na ye na kokamwa epai na bana na bato.”​—NZEMBO 107:8.

1. Ndenge nini ntoma Yoane abendi likebi likoló na bolingo kati na mokanda na ye ya liboso?

“NZAMBE azali bolingo.” Oyo nde maloba na ntina mpenza! Ezali likambo na kokamwa te ete ntoma Yoane amonaki ntina na kozongela yango mbala mibale kati na mokanda na ye ya liboso. (1 Yoane 4:8, 16) Jéhovah Nzambe azali bobele bolingo te, kasi azali mpe ye oyo bolingo emonisami lokola moto kati na ye.

2. Ndenge nini Nzambe amonisaki bolingo na kozalisáká mobali mpe mwasi, mpe na kokokisáká bamposa na bango?

2 Kanisa naino mpo na bolingo oyo Nzambe amonisaki na motindo oyo asalaki biso. Davidi, mokomi na Nzembo oyo apemami na Nzambe, amonisaki botondi na ye na maloba oyo mabongi: “Nakotondo yo mpo ete nasalami na motindo na kokamwa mingi; misala na yo mizali ya kokamwa mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.” (Nzembo 139:14) Mpo ete tozala na bomoi ya esengo mpe na kolongono malamu na nzoto, Nzambe asalaki biso na biyokeli mitano (miso, matoyi, lolemo, zólo mpe maboko) oyo bikosalisaka biso na kozwa bisengo ndenge na ndenge. Zingazinga na biso, tokomonaka bonzenga na biloko bizalisami. Bomoi kitoko ya ndenge na ndenge, banyama mpe banzete. Tokoloba boni mpo na bonzenga mpe makoki oyo nzoto na moto esalemi na yango! Nzambe asili kopesa biso bambuma ndenge na ndenge, ndunda mpe biloko mosusu ya kitoko mpenza. (Nzembo 104:13-16) Ezali bongo sembo ete ntoma Paulo amonisaki epai na bafandi na Lusutula na Kala ete, Nzambe “asali misala malamu mpe apesi bino mbula na likoló mpe bilaká na kobota mbuma mingi, mpe atondisi mitema na bino na biloko na kolya mpe na esengo.”​—Misala 14:17.

3. Makoki nini ya kitoko Nzambe asili kopesa biso?

3 Kanisa lisusu bisengo nyonso oyo bikoutaka na bomoi na libota ya esengo. Lisusu, kanisa bisengo nyonso oyo tokoki kozwa na nzela na makoki na biso ya kokanisa mpe ya mayoki: makanisi na biso, mayele na biso, boongo na biso, lisosoli na biso mpe, mingi mpenza, makoki na biso ya kosambela, ezali wana biloko oyo bitye biso likoló na banyama. Tokoki mpe kobosana te esengo oyo tokozwaka na miziki. Makabo wana, mpe ebele mosusu, emonisi bolingo oyo Nzambe azali na yango epai na biso.

4. Bilembo nini ya bolingo Nzambe asili komonisa epai na bato uta bankoko na biso babukaki mobeko?

4 Na ntembe te, Adam mpe Eva bazalaki na bisengo mingi mpenza wana ezalaki bango bato na kokoka kati na elanga ya Edene. (Genese 2:7-9, 22, 23) Kasi ntango batikaki koyanola na bilembo nyonso ya bolingo na Nzambe, ye (Nzambe) aboyaki bato mpo na yango? Soki moke te! Na kokesena, akamataki bibongiseli nokinoki mpo na kobongisa mbeba nyonso oyo ebimaki na libunga ya bankoko na biso ya liboso. (Genese 3:15) Jéhovah amonisaki lisusu bolingo na ye na koyikáká mpiko mpo na bakitani ya Adam bazangi kokoka. (Baloma 5:12) Azali kosala motindo wana uta pene na mibu 6 000. Nzambe amonisaki mpenza bilembo ya bolingo na motindo na ye ya kosala epai na basaleli na ye. Maloba oyo mazali solo: “Jéhovah, Jéhovah, azali Nzambe na mawa mpe na ngolu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkóto na nkóto, mpe akolimbisa mabe, kobuka mibeko mpe lisumu.”​—Exode 34:6, 7

5. Ndenge nini Jéhovah amonisaki elembo ya bolingo mpe ya koyika mpiko kati na boyokani na ye elongo na Yisraele?

5 Ya solo, motema molai oyo Jéhovah Nzambe monisaki kati na boyokani na ye elongo na Bayisraele uta ntango oyo abongisaki bango libota na ngomba ya Sinai, kino ntango oyo bizaleli na bango ya botomboki bimemaki ye na koboya bango libélá, ezalaki monene. Mpo na yango, totangi na 2 Ntango 36:15, 16, (MN) ete: “Jéhovah, Nzambe na batata na bango atindaki mbala na mbala maloba na kokebisa na nzela na bantoma na ye, mpamba te azalaki na mawa mpo na libota na ye mpe mpo na efandelo na ye. Kasi bazalaki koseka bantoma na Nzambe ya solo, mpe batyolaki maloba na ye mpe kotuka basakoli na ye, mpe nkanda makasi na Jéhovah ekitaki likolo na libota na ye, kino akokaki kolimbisa te.” Kasi, ezali na bato oyo bayanolaki na motema mobimba na bolingo na Jéhovah Nzambe. Totala lolenge oyo basalaki na kotaleláká bomoi ya bamoko kati na bango. Tososola mpenza lolenge oyo biso mpe tokoki koyanola na bolingo na Jéhovah.

Lolenge oyo Moize ayanolaki na motema mobimba

6. Na likambo nini ndakisa na Moize ezali mpenza kitoko, mpe mikumba nini akokisaki mipesaki ye nzela na komona bolingo na Nzambe?

6 Moise ayanolaki mpenza na lolenge na kokamwa na bolingo na Nzambe. oyo nde avenire kitoko emonanaki liboso na ye, mwana oyo abokwamaki na mwana-mwasi na Farao! Kasi, aponaki “kozwa bolózi elongo na libota na Nzambe na esika na kosepela na bisengo na masumu ya mwa ntango moke, mpamba te andimaki nsoni na Klisto lokola bozwi monene koleka biloko na motuya na Ezipito.” (Baebele 11:25, 26, MN) Na eleko moko, Moize alingaki kosikola bandeko na ye, Bayisraele, na boombo na Ezipito. Kasi bango basepelaki na milende na ye te, mpe, na epai mosusu, ntango oyo etyamaki na Nzambe mpo na kosikola bango ekokaki naino te. (Misala 7:23-29) Kasi, bambula mingi na nsima, mpo na kondima na Moize mpe mposa na ye monene ya kosalisa bandeko na ye, Jéhovah apesaki ye nguya ya kosala ebele na makamwisi, mpe asalelaki ye na boumeli ya mibu 40 lokola mosakoli, mosambisi, moto na mibeko mpe moyokanisi. Na kokokisáká misala wana, mbala mingi Moize amonaki bolingo oyo Jéhovah azalaki na yango mpo na ye mpe mpo na bandeko na ye Bayisraele.

7. Ndenge nini Moize ayanolaki na bilembo na bolingo na Nzambe?

7 Lolenge nini Moize ayanolaki na bolingo na Nzambe? ‘Ayambaki nde ngolu na Nzambe lokola eloko mpamba’? (2 Bakolinti 6:1) Soko moke te! Moize ayanolaki na motema mobimba na bolingo na Jéhovah na kotyáká elikya ntango nyonso epai na ye, Mozalisi na ye, mpe na kozaláká na boyokani malamu mpenza elongo na ye. Nzambe amonisaki ete asepelaki mpenza na Moize wana apamelaki Arona, ndeko na ye ya mobali, mpe Miriama, ndeko na ye ya mwasi, mpo ete balobaki mabe na ntina na Moize. Azalaki koloba elongo na ye “lokola moto na moninga na ye” mpe azalaki komonisa ye “elilingi na Jéhovah.” (Mituya 12:6-8) Atako mabaku malamu nyonso azwaki, Moize atikalaki bobele moto na bopóló mingi koleka bato nyonso bazalaki na nsé, mpe asalaki makambo nyonso oyo Jéhovah atindaki ye kosala “Asalaki bobele bongo.”​—Exode 40:16; Mituya 12:3.

8. Ndenge nini Moize amonisaki ete amipesaki mpenza epai na Nzambe?

8 Moize amipesaki lisusu na bolingo nyonso epai na Jéhovah na komibanzabanza mpo na nkombo na Ye, mpo na lokumu na Ye mpe mpo na losambo na Ye ya peto. Na yango, abondelaki Jéhovah mbala mibale ete ayokela Yisraele mawa likoló na nkombo na Ye mpe maloba na ye mandimamaki. (Exode 32:11-14; Mituya 14:13-19) Ntango Bayisraele basalaki losambo na ekeko ya mwana—na—ngombe, Moize amonisaki molende na ye mpo na losambo ya peto na kolobáká ete: “Soko nani azali na ngambo na Jéhovah, aya na ngai.” (MN) Nsima wana nde, ye mpe baoyo bazalaki na ngambo na ye babomaki bato 3 000 baoyo bazalaki kosambela ekeko. Nsima, na boumeli ya mibu 40, ayikaki mpiko na ntina na libota na botomboki mpe lizangi botondi. Ntembe ezali te, Moize amipesaki mpenza na bilembo na bolingo na Nzambe, kotikeláká biso ndakisa malamu.​—Exode 32:26-28; Deteronome 34:7, 10-12.

Ezaleli malamu ya Davidi

9. (a) Ndenge nini Davidi ayanolaki na bolingo na Nzambe? (b) Lokola Davidi, ndenge nini tokoki kokumisa Jéhovah na biloko na biso ya motuya?

9 Davidi, mokomi na nzembo mpe mokonzi ya mibale na Yisraele, azali mpe moto mosusu ayanolaki na molende mpenza na bolingo na Nzambe, oyo Biblia elobeli. Molende na ye mpo na nkombo na Jéhovah epusaki ye na kobundisa Goliate, elombe mofilistia oyo atumolaki Yisraele, mpe Nzambe apesaki ye elónga. (1 Samwele 17:45-51) Molende wana mopusaki Davidi na komema sanduku na kondimana na Yelusaleme. (2 Samwele 6:12-19) Epai mosusu, mposa na ye ya kotonga temple mpo na Jéhovah ezalaki nde lolenge mosusu oyo amonisaki molende na ye mpe botondi na ye mpo na bolingo mpe boboto na Nzambe. Boye te? Solo mpenza Atako libaku malamu ya kotonga temple lipesamelaki ye te, kasi asalaki bibongiseli ya botongi ndako mpe akumisaki Jéhovah na kopesáká ye mpenza makabo ya wolo, ya paláta mpe ya mabanga na motuya mingi mpenza. (2 Samwele 7:1-13; 1 Ntango 29:2-5) Lokola ye, biso mpe tosengeli koyanola na bolingo na Jéhovah na ‘kokumisáká ye na biloko na biso ya motuya,’ na kosaleláká biloko na biso ya mosuni mpo na kokólisa matomba na Bokonzi.​—Masese 3:9, 10; Matai 6:33.

10. Na likambo nini ezaleli ya Davidi ebongi ete tomekola yango?

10 Ezali solo ete Davidi asalaki mabunga minene, kasi na boumeli ya bomoi na ye, amimonisaki ‘moto oyo asepelisaki motema na Jéhovah.’ (1 Samwele 13:14; Misala 13:22) Nzembo na ye mingi oyo akomaki ezali na maloba mingi ya botondi mpo na bolingo na Nzambe. Mpo na yango, mokanda moko molobeli makambo ya Biblia (The lnternational Standard Bible Encyclopaedia) elobi ete, Davidi “asanzolaki Nzambe koleka bato nyonso mosusu oyo balobelami kati na Makomami mosantu.” Mokomi na nzembo Asafe alobaki ete Nzambe “aponaki Davidi, mosaleli na ye, mpe abimisaki ye kati na lopango na bibwele. . . . mpo na kozala mobateli likoló na Yakobo, libota na ye, mpe likoló na Yisraele, libula na ye. Mpe abatelaki b o na motema sembo.” (Nzembo 78:70-72) Ezaleli na Davidi ebongi mpenza ete tomekola yango.

Yesu Klisto,Ndakisa na biso ya kokoka

11, 12. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki mpenza kotalela Nzambe?

11 Ya solo mpenza, Yesu Klisto azali ndakisa eleki malamu oyo Biblia elobeli mpo na moto oyo ayanolaki na motema moko na bolingo na Nzambe. Apusamaki na kosala nini? Apusamaki liboso mpenza na komonisa bokangami makasi epai na Jéhovah. Ntembe soko moke te ete Yesu azalaki ntango nyonso kotalela Nzambe. Botondi na ye mpo na bolingo mpe boboto ya Tata na ye ya likoló, epusaki ye na kozala mpenza moto na elimo. Azalaki na boyokani malamu, boyokani makasi elongo na Nzambe. Yesu azalaki kosala mabondeli mingi; azalaki kolinga kosolola elongo na Tata na ye ya likoló. Mbala mingi tokotangaka ete, Yesu Klisto azalaki kobondela Mbala mosusu ezalaki kokómela ye ete abondela butu mobimba. (Luka 3:21, 22; 6:12; 11:1; Yoane 17:1-26) Na botondi na ye mpo na bolingo na Nzambe, Yesu alandaki solo oyo engebene yango, ‘moto akobika bobele na limpa te, kasi na maloba nyonso makobimaka na monoko na Jéhovah.’ Na solo, kosala mokano na Tata na ye ezalaki bilei mpo na ye. (Matai 4:4; Yoane 4:34) Biso mpe tosengeli te koyanola na bolingo na Nzambe na komonisaka bokangani makasi epai na ye?

12 Na koyanolaka na motema na ye mobimba na bolingo na Nzambe, Yesu Klisto azalaki ntango nyonso kobenda likebi ya bato likoló na Nzambe mpe Tata na ye. Wana moto moko abengaki ye “molakisi malamu,” aboyaki likanisi yango mpe alobaki ete: “Moto malamu azali te, bobele moko, Nzambe.” (Luka 18:18, 19) Yesu alobelaki mbala mingi ete, akokaki kosala likambo te na bokonzi na ye moko. Asalelaki mabaku nyonso mpo na kokumisa nkombo ya Tata na ye, mpe na lolenge oyo lobongi mpenza, abandaki libondeli ya elakiseli na lilómbo oyo ete: “Tika ete nkombo na yo ekumisama!” Asengaki lisusu boye: “Tata, kumisa nkombo na yo.” Mpe mwa moke liboso na kufa na ye, Klisto alobaki na Tata na ye ete: “Nasili kokumisa yo na mokili. Nasali mosala mopesi yo ngai ete nasala yango.” (Matai 6:9; Yoane 12:28; 17:4) Ya solo mpenza, mpo na koyanola na bolingo ya Jéhovah Nzambe, tosengeli koluka kopesa ye nkembo mpe kobondela mpo na lokumu ya nkombo na ye mosantu.

13. Bolingo na Nzambe epusaki Yesu na kosala nini?

13 Totalela sikawa lolenge na mibale oyo Yesu ayanolaki na bolingo na Nzambe: alingaki boyengebene mpe ayinaki bokesene, lokola oyo elobelami na esakweli ya Nzembo 45:7. (Baebele 1:9) Amimonisaki “sembo, na lofundo te, kozanga litono, atangwi na bato na masumu.” (Baebele 7:26) Yesu abetelaki banguna na ye ntembe ete bamonisa lisumu oyo ye asalaki, kasi bakokaki komonisa yango te. (Yoane 8:46) Mbala mibale, koyina na ye ya bokesene epusaki ye na kopetola temple na kobenganaka kati na yango, bato na lokoso oyo bazalaki kosambela Nzambe na bokosi. (Matai 21:12, 13; Yoane 2:13—17)Yesu abimisaki na molende mpenza mabe ya bakonzi na mangomba na bokosi, kino koloba na bango ete bautaki na Diable!​—Matai 6:2, 5, 16; 15:7-9; 23:13-32; Yoane 8:44.

14. Mpo na koyanola na bolingi na Jéhovah, lolenge nini Yesu asukaki epai na bayekoli na ye?

14 Bolingo na Jéhovah ezalaki lisusu na bopusi likoló na lolenge na kosala na Yesu epai na bantoma na ye mpe bayekoli na ye mosusu. Yesu amonisaki bolingo mingi, ayikelaki bango mpiko mpe azalaki na motema molai epai na bango. Amekamaki mpenza likoló na kowelana na bango; na butu oyo abomamaki, baswanaki lisusu mpo na koyeba soko nani kati na bango aleki monene. (Luka 22:24-27) Atako bongo, Yesu amimonisaki ntango nyonso na bopóló mpe na motema mosokemi. (Matai 11:28-30) Ya solo, Yuda atekaki ye, Petelo awanganaki ye mbala misato mpe bantoma mosusu bakimaki ntango ebele ya bato bakendaki kokanga ye. Kasi amonisaki koyina te mpe asilikaki te. Ndenge nini toyebi yango? Na ntango amonanaki lisusu na bantoma nsima na lisekwa na ye, Yesu apamelaki bango te na nkele nyonso mpo ete bamitikaki na bobangi. Te, kasi ayikisaki bango mpiko mpe alendisaki bango mpo ete basalela lisusu Bokonzi.​—Yoane 20:19-23.

15. Ndenge nini Yesu akokisaki na bolingo nyonso mpenza bamposa ya mosuni na bato?

15 Yesu Klisto ayanolaki lisusu na bolingo na Nzambe na lolenge mosusu: na komipesáká lokola mbeka mpo na bato, kino kokufa na motindo na liwa ya nsoni mpe ya mpasi likoló na nzete na mpasi. (Bafilipi 2:5-8) Yesu akokisaki mpe bamposa ya mosuni na bato na koleisáká bibele na likamwisi, mpe na kobikisáká ebele na bato na bokono. (Matai 14:14-22; 15:32-39)Azalaki ntango nyonso kolekisa matomba ya bato mosusu liboso na oyo ya ye. Yango wana alobaki ete: “Nkaja ezali na mabulu, mpe ndeke na lola ezali na zumbu, nde mwana na moto azali na esika na kolalisa motó na ye te.” (Matai 8:20) Yesu azalaki koyeba mosala ya elimo santu wana ezalaki yango kobima longwa na ye mpe kosala makamwisi na kobikisáká bato na bokono. Alukaki te komizwela misolo mpo na nguya wana, na ndakisa ntango mwasi moko oyo azalaki na maladi ya kotanga makila uta mibu 12 asimbaki elamba na ye ya likoló mpe abikaki (Malako 5:25-34) Epai mosusu, Yesu asalelaki soko moke te nguya na ye eleki oyo na bato mpo na matomba na ye moko.​—Tala Matai 4:2-4.

16. bolenge nini Klisto akokisaki bamposa ya elimo ya bato?

16 Yesu akokisaki na bolingo nyonso mpenza bamposa ya mosuni ya bato na kobikisáká bango na maladi mpe na koleisaka bango na lolenge na makamwisi; nzokande, likambo ya liboso na mosala na ye awa na mabelé ezalaki nde kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe, koteya mpe kozalisa bayekoli. Atako kobikisa nyonso kitoko oyo asalaki, Yesu ayebanaki te lokola Monganga to Mosali na bikamwisi, kasi lokola Moteyi malamu. (Matai 4:23, 24; Malako 10:17) Yesu amimonisaki lokola moteyi, mpe ayebanaki bongo epai na bayekoli na ye ata mpe na banguna na ye. (Matai 22:16; 26:18; Malako 9:38) Ateyaki mpenza solo na bozindo, na ndakisa kati na Lisolo likoló na ngomba (Matai 5:1 kino 7:29) Bandakisa na ye elekaki mpenza kitoko mpe, masese na ye na bisakweli ata mpe makambo mosusu oyo asakolaki ezalaki mpenza kosimba mitema na bato. Ezali likambo na kokamwa te ete na libaku moko, basoda oyo batindamaki mpo na kokanga ye, bazalaki lisusu na nguya te mpo na kosala yango.​—Yoane 7:45, 46.

17. (a) Ndenge nini Yesu atikelaki biso ndakisa ya kokoka mpo na oyo eteli bolingo? (b) Nini ekomonisama kati na lisolo lilandi?

17 Na ntembe te, Yesu Klisto amonisaki mpenza na motindo na kokoka, lolenge nini koyanola na motema moko mpenza na bolingo na Nzambe. Atyaki Tata na ye na esika ya liboso kati na bomoi na ye mpe kati na mayoki na ye. Alingaki mpenza boyengebene, asalaki na bolingo nyonso epai na bantoma na ye mpe bayekoli na ye mosusu, mpe amipesaki bomoi mobimba na kokokisa bamposa na elimo mpe na mosuni ya bazalani na ye. Mpe asukisaki mosala na ye na kopesáká bomoi na ye lokola mbeka na lisikó. (Matai 20:28) Bongo yo? Ya solo, tozali bato bazangi kokoka, lokola Moize mpe Davidi. Kasi tokoki, na lolenge malamu, komekola Yesu, Ndakisa na biso, na koyanoláká na motema mobimba na bolingo na Nzambe. Ezali yango nde ekomonisama na lisolo lilandi.

Bozongeli?

◻ Mpo na nini tokoki koloba ete “Nzambe azali bolingo”?

◻ Ndenge nini Moize ayanolaki na bolingo na Nzambe?

◻ Motindo nini Davidi ayanolaki na bolingo na Nzambe?

◻ Na lolenge nini eleki malamu Yesu Klisto ayanolaki na bolingo na Nzambe?

[Bililingi na lokasa 12, 13]

Yesu ayanolaki na bolingo na Nzambe na kosalisáká bazalani na ye na elimo mpe na mosuni mpe na kopesaka bomoi na ye lokola mbeka na lisiko

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto