Mokapo 10
Boyina “makambo mozindo ya Satana”
TIYATIRE
1. Yebisa esika Tiyatire ezalaki na kokokisa yango na masangá mosusu, mpe ezalela ya losambo na mboka yango ezalaki ndenge nini?
KOLONGWA Bergama (Pelegame) mpe kotambola kilometre 65 epai ya sud-est, okokuta engumba kitoko Akhisar, bobele kuna na mokili ya Turquie. Esili koleka mibu 1900, mboka Tiyatire ezalaki wana. Uta Pelegame, mokengeli na zongazonga akokaki kokoma na Tiyatire na mindondo te, kotambolaka na nzela moko ebongisamaki kati na mokili yango, mpe na nsima akokaki kolanda mobembo na ye epai na masangá mosusu malobelami kati na mokapo 3 ya Emoniseli, ezali bongo lisangá ya Saladesi, lisangá ya Filadelefi mpe lisangá ya Laodikia. Soki losambo ya mokonzi to empereur engalaki makasi na Pelegame, nzokande na Tiyatire ezalaki bongo te. Kasi mboka yango ezalaki ata bongo na bisambelo na yango mpe batemple etongamaki mpo na banzambe ya bapakano. Tiyatire eyebanaki mingi mpo na mombongo.
2, 3. (a) Makomami malobaki nini liboso na ntina na mwasi moko ya Tiyatire oyo akomaki moklisto? (b) Mpo na baklisto ya Tiyatire elimboli nini ete Yesu azali “Mwana na Nzambe” mpe azali na ‘miso lokola epeleli na móto’?
2 Ntango Paulo asakolaki na Makedonia, akutanaki na mwasi moko nkombo na ye Ludia, ye moto na Tiyatire, motekisi na bilamba motane. Mwasi yango mpe bato na ndako na ye mobimba bandimaki na esengo nyonso nsango oyo Paulo asakolaki. Na nsima Ludia ayambaki ba-Paulo na eyambeli moko monene. (Misala 16:14, 15) Engebene Biblia, ye nde moto ya liboso ya mboka Tiyatire oyo akomaki moklisto. Nsima na bambula, lisangá esalemaki na mboka yango. Ezali na lisangá yango nde Yesu atindaki nsango oyo elekaki molai. Alobi boye: “Komélá anzelu na lisangá na Tiyatire ete, Mwana na Nzambe, Oyo azali na miso lokola epeleli na mɔ́to, mpe makolo na ye lokola kwivre engengisami alobi boye ete . . .”—Emoniseli 2:18.
3 Ezali mbala bobele moko oyo liloba “Mwana na Nzambe” emonani kati na Emoniseli, atako na kati na biteni mosusu Yesu alobi mpenza mpo na Jéhovah, wana elobi ye ete “Tata na ngai.” (Emoniseli 2:27; 3:5, 21) Motindo Yesu asalelaki titre oyo, boye ekundolaki epai ya baklisto ya Tiyatire boyokani makasi oyo ezali kati na Yesu mpe Jéhovah. Mwana yango azali na ‘miso lokola epeleli na móto’; ezali wana likebisi epai na baklisto ya Tiyatire oyo ekebisi bango ete ekateli na ye ekopela mpo na kotemela eloko nyonso oyo amoni ete ezali mbindo na kati na lisangá. Kolobaka na mbala ya mibale mpo na makolo na ye mazali lokola kwivre engengisami, abimisi polele ndakisa ya bosembo mpenzampenza oyo ye amonisaki, wana ezalaki ye kotambola awa na mabelé. Na ntembe te baklisto ya Tiyatire boye bayokaki toli na ye; ezali yango biso mpe tosengeli kosala lelo.—1 Petelo 2:21.
4, 5. (a) Mpo na nini Yesu akokaki kokumisa baklisto ya Tiyatire? (b) Kokokana nini ezali kati na masangá ya ba Témoins de Jéhovah na lisangá na Tiyatire?
4 Nzokande, Yesu azali na bantina ya kokumisa baklisto ya Tiyatire. Alobi: “Nayebi misala na yo, na bolingo na yo, na kondima na yo, na lisungi na yo, na mpiko na yo. Nayebi mpe ete misala na yo na nsuka mileki misala na yo na liboso.” (Emoniseli 2:19) Na kokesena na Baefese, baklisto oyo bapakolami batikaki te bolingo na bango ya liboso mpo na Jéhovah. Kondima na bango ezali makasi. Epai mosusu, misala na bango mizali mingi koleka oyo ya liboso, mpe na ndakisa na masangá misato oyo touti kolobela, baklisto ya Tiyatire bazali koyika mpiko. Ezali mpe ndenge moko mpo na masangá pene na 100 000 ya ba Témoins de Jéhovah oyo mapalangani lelo na mokili mobimba. Bolingo mpo na Jéhovah ezali komonana mpe molende kati na mosala ya kosakola ezali koningisa masangá, kopusaka bilenge mpe mikoló. Motuya mozali kobakisama ntango nyonso ya Batemwe bamipesi na mosala ya pionnier; bazali bongo kosalela na mayele ntango oyo etikali mpo na kosakola elikya kitoko mingi ya Bokonzi na Nzambe oyo ezali koya.—Matai 24:14; Malako 13:10.
5 Uta mbula mingi, bandeko mingi ya sembo, bapakolami to na kati na ebele monene, bayikaki mpiko mpenza kati na mosala na Nzambe, nzokande mokili oyo ezingi bango efandi kati na molili mpenza kozanga elikya. Tozala bongo na mpiko! Emoniseli endimisi litatoli na basakoli na Nzambe ya ntango ya kala. “Mokolo monene na Jéhovah ebelemi; ebelemi, eyei mbango mpenza.”—Sofoni 1:14; Yoele 2:1; Habakuku 2:3; Emoniseli 7:9; 22:12, 13.
“Mwasi yango Yezabele”
6. (a) Atako Yesu akumisaki lisangá ya Tiyatire, nzokande apamelaki bango na likambo nini? (b) Yezabele azalaki nani, mpe azalaki na lotomo na komibenga ete mosakoli mwasi?
6 Miso na Yesu, makokani na epeleli na móto, mazali komonisa polele eloko nini esengeli kobongisama nokinoki. Yesu alobi na lisangá ya Tiyatire: “Kasi nazali na yo likambo oyo ete opesi nzela na mwasi yango Yezabele, oyo akolobaka ete ye mosakoli, mpe azali kolakisa mpe azali kozimbisa baombo na ngai ete basala pite mpe balia mbeka na bikeko.” (Emoniseli 2:20) Na ekeke ya zomi liboso na ntango na biso, mokonzi-mwasi Yezabele, mwasi na mokonzi Akaba na Yisraele mpe mosambeli na Baala azwaki lokumu mabe ya mobomi bato, mosali-ekobo mpe monyokoli bato. Yehu, mopakolami na Jéhovah, apesaki etinda ete baboma ye. (1 Mikonzi 16:31; 18:4; 21:1-16; 2 Mikonzi 9:1-7, 22, 30, 33) Yezabele, mosambeli na bikeko azalaki na lotomo te ya komibenga mosakoli. Akokanaki ata moke te na Miriame mpe Débora, oyo bazalaki basi basakoli na sembo na Yisraele. (Exode 15:20, 21; Basambisi 4:4; 5:1-31) Mpe elimo ya Jéhovah ezalaki na ye te mpo ete akoka kosakola, lokola ezalaki bongo mpo na Ana, mosakoli mwasi mobange, mpe mpo na bana basi minei ya Filipe, mopalanganisi na nsango malamu.—Luka 2:36-38; Misala 21:9.
7. (a) Na kolobaka ete “mwasi yango Yezabele,” emonani ete Yesu azalaki kolobela bopusi nini? (b) Ndenge nini basi mosusu kati na lisangá balukaki kolongisa etamboli na bango mabe?
7 Emonani bongo ete “mwasi yango Yezabele,” oyo azali komibenga ye mosakoli na mboka Tiyatire azali mobuki na lokuta. Azali na elimo na Nzambe te mpo na kosunga ye. Kasi mwasi yango nani? Emonani ete ezalaki mwasi moko to etuluku moko ya basi oyo bazalaki na bopusi mabe likoló na lisangá. Ekokaki kozala ete basi mosusu kati na lisangá bakweisaki bandeko mosusu kati na pite, kosalelaka mabe mikapo ya Makomami mpo na kolongisa etamboli na bango ya nsoni. Ezalaki wana bisakweli ya lokuta mpenza! Kosalelaka bopusi na bango mabe, bazalaki kozimbisa baklisto mosusu ete bamipesa, lokola bango, na ‘pite, na mbindo, na mposa na nzoto, na mposa mabe mpe bilulela oyo ezali losambo na bikeko.’ (Bakolose 3:5) Bazalaki kozimbisa bandeko kati na lisangá ete balanda kotambola na motindo na mbindo mpe na moimi, lokola ezali bongo komonana lelo epai na bandimi na mangomba na boklisto ya mokili oyo.
8. (a) Likebisi nini Yesu apesi na ntina na “Yezabele” ya mboka Tiyatire? (b) Ndenge nini bopusi mabe ya basi emonanaki na ntango na biso?
8 Yesu alobi lisusu boye epai na bankulutu ya lisangá ya Tiyatire: “Napesaki ye ntango ete abongola motema, nde azali na mposa na kobongola motema na pite na ye te. Tala, nakobwaka ye na mbeto, mpe baoyo basali na ye ekobo, kati na mpasi monene, soko bakobongola mitema na misala na ye te.” (Emoniseli 2:21, 22) Yezabele ya ntango ya kala amatelaki mobali na ye Akaba mpe atyaki ntembe na Yehu, mokokisi na ekateli na Nzambe; bobele bongo basi wana balukaki kotambwisa mibali na bango mpe bankulutu. Emonani lokola ete bankulutu na lisangá ya Tiyatire bazwaki meko moko te mpo na kotemela mwasi wana Yezabele to bopusi mabe ya basi. Yango wana Yesu akebisaki bango makasi mpe likebisi yango etali mpe libota ya Jéhovah na ntango na biso. Na eleko na biso, basi motindo wana basili kobenda mibali na bango kati na lipengwi, bamosusu bakomi kino kofunda basaleli ya sembo ya Jéhovah na batribinale ya mokili.—Tala Yuda 5-8.
9. (a) Mpo na nini maloba na Yesu na ntina na Yezabele mabebisi te lokumu ya basi na kati na lisangá? (b) Bobele ntango nini tokoki koloba ete bopusi na Yezabele ebandi komonana?
9 Nzokande yango esengeli te kobebisa lokumu ya basi ya sembo kati na lisangá ya boklisto. Lelo oyo, ndambo monene ya mosala na kosakola ezali kosalema na bandeko basi ya sembo; na nzela na boyekoli ya Biblia oyo bazali kotambwisa, bazali komema bibele ya bato ya sika na lisangá. Nzambe ye moko azali kopambola bango, lokola emonisami na Nzembo 68:11 (MN) epai totangi: “Jéhovah ye moko alakisi liloba; basi baoyo bapalanganisi nsango malamu bazali mingi mpenza.” Mwasi na limemya mpe na bopolo, bizaleli oyo bizali “na motuya monene na miso na Nzambe,” akoki kozala na bopusi malamu likoló na mobali na ye. (1 Petelo 3:1-4) Mwasi na mayele mpe mosali akumisami na mokonzi Lemuele. (Masese 31:10-31) Ezali bobele ntango mwasi atiki esika na ye, na kozimbisaka mibali to na koboyaka kotosa bokonzi na bango, nde na ntango wana bopusi na ye ekomi lokola ya Yezabele.—Baefese 5:22, 23; 1 Bakolinti 11:3.
10. (a) Mpo na nini Yezabele mpe bana na ye bakweisami? (b) Bana na Yezabele bazali na ezalela nini na mpasi, mpe eloko nini basengeli kosala?
10 Na ntina na “mwasi yango Yezabele,” Yesu alobi lisusu ete: “Nakoboma bana na ye na malali na kufa. Bongo masangá nyonso bakoyeba ete ngai moluki kati na makanisi na mitema mpe nakopesa bino lokola ebongi na misala na moto na moto.” (Emoniseli 2:23) Yesu apesaki ntango na Yezabele mpe na bana na ye mpo ete babongola motema, kasi balandi se kosalaka pite na bango mpe basengeli bongo kozwa etumbu. Yango ezali likebisi makasi mpo na baklisto na ntango na biso. Baoyo bazali kolanda ndakisa mabe ya Yezabele, mibali to basi, mpe bakomi bongo bana na ye na kobukaka mibeko ya Biblia oyo mitindi botosi epai na bokonzi mpe mipekisi pite, to mpe bakomi na motó makasi kino koboya kotosa ebongiseli ya teokratike, baoyo wana bazali na maladi makasi na elimo. Ya solo, soko moto motindo wana abengi bankulutu ya lisangá mpo ete basambela mpo na ye, “libondeli na kondima ekobikisa mobeli, mpe Jéhovah akotelemisa ye,” soki akozala na komikitisa mpe koyokanisa etamboli na ye na mabondeli motindo yango. Kasi moto te, mobali to mwasi, asengeli kokanisa ete akoki kokosa Nzambe to Klisto na kobombaka misala ya mbindo oyo asalaki, to na komimonisa bobele na miso na bato ete azali Temwe ya molende.—Yakobo 5:14, 15.
11. Ndenge nini masangá mazwi lisalisi lelo ete bakeba na bopusi mabe ya basi?
11 Nzokande, ntalo monene ya masangá ya ba Témoins de Jéhovah lelo bazali kolalisa miso te mpo na likama oyo. Bankulutu bazali kokengela mpe bazali komona banani bazali kotambola mabe mpe banani bazali na botosi te na bibongiseli ya teokratike. Bazali kosala makasi mpo na kosalisa mibali mpe basi oyo babandi kotambola na nzela mabe, mpo ete balendisama na elimo mpe basala makasi ete bamisembola liboso ete bakwea. (Bagalatia 5:16; 6:1) Na bolingo mpe kozanga kobongola mitinda ya Biblia, bakengeli baklisto bazali kokanga nzela na mposa nyonso ya basi ya koluka kosala mangomba lokola oyo ebengami ete Lingomba mpo na bonsomi ya basi. Epai mosusu, toli malamu ezali ntango nyonso kopesama na mikanda ya Batatoli ya Yehova.a
12. Motindo nini kelasi na Yoane bazali komonisa molende ekokani na oyo na Yehu?
12 Nzokande, soki pite esalemi, mpe mingimingi soki ekomi momeseno, basumuki bazangi kobongola motema basengeli kobimisama na lisangá. Tokanisa lisusu motindo Yehu alimwisaki bopusi mabe nyonso ya Yezabele na Yisraele. Bobele bongo lelo, kelasi na Yoane bazali ngwi, kopesaka ndakisa epai na ba ‘Yonadaba,’ baninga na bango, mpe komonisaka ete bakeseni mpenza na bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo.—2 Mikonzi 9:22, 30-37; 10:12-17.
13. Nini ezali kozela baoyo bazali kokwea na bopusi mabe ya basi?
13 Lokola Momemi-nsango mpe Mosambisi aponami na Jéhovah, Mwana na Nzambe akoki mpo na kosambisa mwasi oyo Yezabele na ntango na biso mpe kobwaka ye na mbeto na mpasi, mpamba te maladi na ye na elimo ezali makasi mingi mpe akoki kobika te. (Malaki 3:1, 5) Baoyo basili kokwea na bopusi oyo mabe ya basi, bango mpe bakobwakama na kati na mpasi monene, oyo ya kobimisama na lisangá ya boklisto, lokola bato bakufi. Soki bakobongola motema te, mpe soki bakotika te kosala mabe mpo na kokoka kozongisama na lisangá, bakokufa mpe na nzoto mpenza na “malali na kufa,” mingimingi na ntango na bolozi monene. Nzokande, lokola yango eyei naino te, soki babongoli solo motema mpe batiki kosala mabe, bakoki kozongisama na lisangá.—Matai 24:21, 22; 2 Bakolinti 7:10.
14. (a) Ndenge nini Yesu azali kosalela bankulutu mpo na kokata makambo mosusu, ndakisa bopusi oyo ebengami ete ya Yezabele? (b) Ndenge nini lisangá esengeli kosimba bankulutu oyo bazali kokata makambo yango?
14 “Masangá nyonso” masengeli koyeba ete Yesu azali “moluki kati na makanisi na mitema,” kati na bomoto mozindo, bakisa na mikano mibombami. Mpo na yango, azali kosalela mibali oyo atii bango motema, myoto to bankulutu, mpo na kosambisa makambo, ndakisa kosambisa baoyo bazali kokwea na bopusi na Yezabele. (Emoniseli 1:20) Nsima wana bankulutu bataleli malamumalamu likambo ya motindo oyo mpe bazwi ekateli mpo na yango, moto te asengeli koluka koyeba mpo na nini mpe ndenge nini bazwi ekateli yango. Banso basengeli kondima na komikitisa nyonso ekateli ezwami na bankulutu mpe kolanda kotosa meko nyonso ekamatami na myoto wana ya lisangá. Baoyo bazali sembo epai na Jéhovah mpe na lisangá na ye bakozwa mbano. (Nzembo 37:27-29; Baebele 13:7, 17) Mpo na bino, tika ete Yesu apambola bino wana ekofuta ye moto na moto engebene misala na ye!—Bagalatia 5:19-24; 6:7-9.
“Bosimba yango ezwi bino”
15. (a) Yesu alobaki nini epai na baklisto oyo bamibebisaki te na bopusi mabe na Yezabele? (b) Nini emonisi ete baoyo nyonso bazalaki komibenga baklisto na 1918 babebisamaki te na boklisto ya lipengwi?
15 Na nsima Yesu apesi maloba oyo na kolendisa: “Nde na bino mosusu wana na Tiyatire, bino nyonso bondimi mateyo yango te, bino bozangi koyeba makambo mozindo na Satana (lokola bakobiangaka yango), nakotiela bino mokumba na bozito mosusu te. Kasi bosimba yango ezwi bino kino ekoya ngai.” (Emoniseli 2:24, 25) Na Tiyatire, ezali na milimo na sembo oyo bakwei te kati na bopusi mabe na Yezabele. Bobele bongo, na boumeli na mbula 40 oyo ezalaki liboso na 1918 mpe uta ntango yango, kati na baoyo bazalaki komibenga ete baklisto, banso bandimaki te banzela mabe na pite mpe na kobeba oyo epalangani kati na boklisto na mokili oyo. Mwa etuluku moke na bayekoli na Biblia bayebani lelo na nkombo Témoins de Jéhovah batyaki molende mpo na kosalisa bandimi na kati na mangomba bakoka komona polele ete mateya mingi mateyami na boklisto na mokili oyo mautaki na losambo ya solo ya boklisto te; bango basili kobwaka bindimeli nyonso mpe misala nyonso miutaki na Babilone, oyo boklisto ya lipengwi eyambaki yango. Basili mpe kobwaka liteya na mbindo na “mwasi yango Yezabele.”
16. Atako Yesu mpe collège central na ekeke ya liboso babakisaki bozito mosusu te, nzokande esengeli komibatela na makambo nini?
16 Kelasi na Yoane basili mpe koyikisa mpiko epai na baninga na bango, ebele monene, ete baboya bopusi mabe lokola ezali komonana na mokili oyo emipesi na masano na mbindo. Ntina ezali te ya koluka naino komona to koluka naino komeka. Nzela na mayele ezali boye ete tozala mosika na “makambo mozindo na Satana.” Lokola elobaki yango Yesu: “Nakotiela bino mokumba na bozito mosusu te.” Yango ekundoli biso ekateli elandi oyo collège central ya boklisto ekamataki yango na ekeke ya liboso: “Mpo ete emonanaki malamu na elimo santu mpe na biso kotiela bino mokumba mosusu te, bobele makambo oyo mabongi, ete boboya biloko bipesameli bikeko, na makila, na banyama bakamolami, na ekobo. Soko bokomibatela na makambo oyo, bokozala malamu.” (Misala 15:28, 29) Mpo tokoka kozala malamu na elimo, toboya mangomba na lokuta, toboya kosalela makila na lolenge mabe, (ndakisa kozongisa makila na nzoto) mpe toboya pite. Kosalaka bongo, tokozala na santé malamu ata na mosuni.
17. (a) Lelo oyo, wapi “makambo mozindo” oyo Satana azali kosalela mpo na komeka na yango bato? (b) Ezalela na biso esengeli kozala nini liboso na “makambo mozindo” ya mokili oyo etambwisami na Satana?
17 Lelo oyo, Satana azali lisusu na “makambo mozindo” oyo azali kolakisa, na ndakisa mateya ya kwokoso oyo mazali kobenda mposa na bato na mayele. Longola makanisi na kotika nzela na makambo nyonso, mpe makambo na pite, “makambo” wana esangisi mpe losambo na bilimu mabe mpe liteya ya évolution. Ndenge nini Mozalisi na biso na mayele nyonso azali kotalela makambo yango? “Nakobebisa mayele na bato na mayele.” Oyo ezali maloba na Nzambe mayebisami na biso na nsima na ntoma Paulo. Nzokande, mpo na oyo etali “makambo mozindo na Nzambe,” yango ezali petee, ezali polele mpe ezali kolendisa. Baklisto na mayele bazali kopengola “makambo mozindo” na mokili oyo na Satana. Tobosana te: “Mokili ezali koleka mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumela seko.”—1 Bakolinti 1:19; 2:10; 1 Yoane 2:17.
18. Mapamboli nini Yesu alaki epai na baklisto bapakolami oyo bakotikala sembo kino na nsuka, mpe libaku malamu nini basekwi yango bakozwa na Armagedon?
18 Yesu apesi sikawa maloba na koyikisa mpiko epai na baklisto wana na Tiyatire. Maloba yango mazali mpe liziba na mpiko mpo na baklisto bapakolami na ntango na biso: “Mpo na molongi oyo akobatela misala na ngai kino nsuka, nakopesa ye bokonzi likoló na mabota, mpe akokengela bango na mpimbo na ebende, lokola mbeki na mabelé ekobolama, lokola ngai mpe nazwi nguya epai na Tata na ngai.” (Emoniseli 2:26, 27) Ya solo, oyo nde libaku malamu! Nguya wana epesami epai na balongi bapakolami, nsima na kosekwa na bango, elimboli ete bakosangana esika moko na Yesu mpo na koboma mabota na Armagedon na nzela na “mpimbo na ebende.” Bibundeli nyonso ya nikleere ya mabota yango ekozala lokola mbuma na alimete epoli na mai ntango Klisto akosukisa banguna na ye nyonso na kobomaka bango ndenge bakopasolaka mbeki ya mabele.—Nzembo 2:8, 9; Emoniseli 16:14, 16; 19:11-13, 15.
19. (a) Nani “monzoto na ntongo,” mpe elimboli nini ete ekopesama epai na balongi? (b) Mpiko nini epesami epai na ebele monene?
19 Yesu abakisi: “Mpe nakopesa ye monzoto na ntongo.” (Emoniseli 2:28) Na nsima Yesu ye moko alimbolaki “monzoto” yango, wana elobaki ye ete: “Ngai [mosisa] mpe mokitani na Davidi, monzoto mokongengaka na ntongo.” (Emoniseli 22:16) Ezali Yesu nde azali kokokisa esakweli elandi oyo Jéhovah alobisaki yango Balama: “Monzoto ekobima na Yakobo, mpe nzete na mokonzi ekotelema na Yisraele.” (Mituya 24:17) Elimboli nini ete Yesu akopesa “monzoto na ntongo” epai na balongi? Na ntembe te wana elimboli ete ye moko akomipesa epai na bango, kosalaka elongo na bango boyokani na penepene, boyokani oyo eleki nyonso. (Yoane 14:2, 3) Oyo nde elendiseli makasi mpo na koyika mpiko! Bobele bongo, ezali elendiseli mpo na ebele monene na koyeba ete “monzoto na ntongo,” mosika te akosalela nguya na ye lokola mokonzi mpo na kozongisa Paradis na mabelé.
Totikala sembo
20. Makambo nini na kati na boklisto na mokili oyo ekokani na bolembu mosusu ezaláká kala na lisangá ya Tiyatire?
20 Nsango oyo boye epesaki mpiko mingi epai na baklisto na Tiyatire. Kanisa mwa moke: Mwana na Nzambe akembisami kuna na makoló alobaki ye mpenza epai na baklisto ya Tiyatire na ntina na mikakatano oyo bazalaki kokutana na yango! Na ntembe te, mwa bamoko kati na bango bandimaki etambwiseli na ye na bolingo mingi. Nsango wana, oyo eleki molai kati na mikanda nsambo, ezali mpe kosalisa biso ete tokoka koyeba lisangá ya solo ya boklisto na ntango na biso. Na 1918, ntango Yesu ayáká na temple ya Jéhovah mpo na kosambisa, ntalo monene na mangomba oyo mazalaki komibenga ete mangomba na boklisto basilaki komibebisa na ndenge bamipesaki na losambo ya bikeko mpe na pite na elimo. (Yakobo 4:4) Mosusu kati na mangomba yango batongaki bindimeli na bango likoló na mateya na basi na lokumu na ekeke na zomi na libwa, na ndakisa mwasi Ellen White ya lingomba ya ba adventistes du septième jour mpe mwasi mosusu Mary Baker Eddy na lingomba ya la science chrétienne, mpe na mikolo na biso oyo, basi mingi bakomi mpe koleka liboso mpo na koteya. (Tala 1 Timote 2:11, 12.) Na kati na lingomba na katolike, mbala mingi bazali kokumisa Marie koleka Nzambe mpe Klisto. Nzokande, Yesu akumisaki ye bongo te. (Yoane 2:4; 19:26) Mangomba oyo mazali kondima bopusi mabe boye ya basi mazali solo mangomba ya boklisto?
21. Mateya nini tokoki kozwa na nsango oyo Yesu atindelaki lisangá ya Tiyatire?
21 Moklisto mokomoko, ata azali na kelasi na Yoane to azali na kelasi na bampate mosusu, ebongi ete atya likebi na nsango oyo. (Yoane 10:16) Bamoko bakoki komekama na kolanda nzela ya bolembu, lokola esalaki yango bayekoli na Yezabele na lisangá ya Tiyatire. Bamosusu bakoki mpe kopusama ete batika etelemelo na bango ya boklisto. Na ndakisa, na makambo matali bilei bisalemi na makila to makambo matali kozongisa makila na nzoto. Ezali mpe na bamosusu oyo bazali kokanisa ete soki ozali na molende mingi kati na mosala ya kosakola to ozali kosalaka badiskur mingi, okoki komipesa nzela na kotalaka bafilme ya mobulu to ya pite, to lisusu komelaka masanga mingi. Likebisi oyo Yesu akebisaki Baklisto ya Tiyatire epekisi biso komipesa bonsomi motindo wana. Jéhovah alingi ete tozala peto, tokangama mobimba epai na ye, kasi tozala na motema mokabwani te, lokola ezalaki bongo mpo na ebele na baklisto na Tiyatire.
22. Ndenge nini Yesu alobeli makasi ntina ya kozala moyoki malamu?
22 Mpo na kosukisa, Yesu alobi: “Oyo azali na matoi ayoka yango elobi elimo na masangá!” (Emoniseli 2:29) Oyo mbala ya minei Yesu azongeli liloba oyo mpe na mikanda mosusu misato oyo mikolanda akosukisa bobele na liloba yango. Ozali na matoyi malamu? Soki ee, landa koyokamela na likebi mpenza toli oyo Nzambe azali kopesa biso na nzela na elimo na ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala na ndakisa, lisolo “Basi baklisto ya sembo—Basambeli oyo bazali na motuya na miso ya Nzambe,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2003.
[Bililingi na lokasa 51]
Lelo oyo, mosala ya kosakola esalami mingimingi na bandeko na biso basi ya sembo oyo bazali kondima na bopolo nyonso bokonzi ya teokratike