Mituna na batangi
◼ Baklisto mosusu bapakolami bakobika na “bolozi monene” mpo na kotikala na mabelé, na mokili ya sika, liboso ete bakamatama na likoló?
Biblia ezali koyanola sikisiki te na motuna oyo.
Uta kala baklisto bazali kosepela na mikumba malamu oyo mbala mosusu Nzambe akopesa bango yango. (Misala 1:6) Ezali ndenge wana mpenza na mikolo na biso, uta kotyama na Bokonzi. (Matai 24:3, 24, 34) Mpo ete nsuka ya biloko mabe esengeli koya na ntango na bango, baklisto bazali komituna soki bamosusu kati na baoyo bapakolami na elimo bakobika na ”etumba ya mokolo monene na Nzambe” mpe bakoba kosala awa na mabele mpo na mwa ntango moke liboso ete bazwa mbano na bango na likolo. (Emoniseli 16:14) Biblia elobi te ete ekozala bongo, kasi bilakiseli mosusu ya elilingi mpe bisakweli bisalamaki mpo na komonisa ete mbala mosusu ekozala ndenge wana. Na esika ya kotangama na makanisi na biso, tosengeli kotalela ndenge nini Nzambe akosala.
Tokoki kokokanisa makambo mosusu minene ekomema na Biblia mpe makambo mosusu minene oyo mabimaki nsima epai na basaleli na Nzambe. Na ndakisa toyebi ete Yona alekisaki mikolo misato mpe butu misato kati na libumu ya mbisi monene. Bato mosusu bakoki kolalela likambo yango lokola ndakisa na kobikisa oyo Nzambe asali, kasi Yesu alobaki ete ezalaki elakiseli na esakweli oyo ezalaki kosakola ete akotikala kati na nkunda na boumeli na ntango oyo ekokani na yango liboso ete asekwisama (Yona 1:17; Matai 12:40) Ya solo mpenza, likambo oyo likómelaki Yona ezalaki elembo na esakweli Tozali kokanga ntina ete basaleli na Nzambe bazali kolalela bisakweli mpe masolo na Biblia na sikisiki mpo na koyeba soki ekomonisa lolenge nini Jéhovah akosala epai na bango.
Tozwa ndakisa totalela oyo La Tour de Garde ya mars 1929 elobaki mpo na esakweli na Biblia oyo ezwami kati na Mika 5:2-15. Mokanda na Mika ezali koloba mpo na kobebisama ya Samari na “Ba Asulya” mpe kozonga ya Bayuda na boombo na bango longwa na Babilone. (Mika 1:1, 5-7; 4:10) Kasi asakolaki lisusu makambo minene oyo mabimaki nsima, lokola kobotama ya Masiya na Beteleme. (Mika 5:2) Mika asakolaki ete nsima ya kosikwama na maboko ya ”ba Asulya”, ’’litika na Yakobo” bakokóma “lokola mamwe makoutaka na Jehovah” mpe “lokola mwana na nkosi katikati na bitonga na bampate.” (Mika 5:8) La Tour de Garde elobaki ete Likambo yango ekoki kotalelama lokola elembo ete mwa basangani na batikali bakozala lisusu na mabelé nsima na etumba ya Armagedon, mpe ete na ntango yango mosala mosusu ekosalema mpo na nkombo ya Nkolo, mpo na lokumu mpe nkembo na ye.” Tala liloba oyo ya kozanga kondimisa sikisiki oyo esalelami mpo na komonisa likoki yango: “Likambo yango ekoki kotalelama lokola elembo.”
Sikawa tokozwa lisolo nini na Biblia oyo ekoki kopesa bokokani elongo na kobika yango na mabelé? Moko na masolo oyo epesamaki etalelaki Noé mpe libota na ye. Elimbolamaki ete Noa azali komonisa Yesu na ntango ya nsuka. (Genese 6:8-10; Matai 24:37) Lokola Noa azalaki kokamba mwasi na ye, elongo na bana na ye misato na basi na bango na boumeli na nsuka ya biloko mabe ya ntango na kala, Yesu Klisto azali kopesa litambwisi epai na batikali na kelasi ya mwasi na ye mpe epai na baoyo bakómi bana mpo na ye, oyo ye azali ‘Tata na seko,’ Mwasi na Noé abikaki na mpela mpe apesaki maboko mpo na kotelemisa lisusu losambo ya solo na mabelé oyo epetolamaki. Bokokani ekoki kozala na ntina etali kobika mpe kokola kati na mokili ya sika mpo na batikali na kelasi ya mwasi na libala.—Yisaya 9:6, 7; 2 Bakolinti 11:2; Emoniseli 21:2, 9.
Etalelamaki lisusu ete masolo mosusu ya Biblia ezali kopesa likanisi ete baklisto bapakolami bakoki kozala na bomoi mpo na kokola kati na mokili ya sika. Na ndakisa, Yilimia abikaki na kobomama ya Yelusaleme; ”moto” alataki molangi na mai na ekomeli azalaki wana mpo na komona mosala ya koboma liboso ete azonga kopesa rapport.—Ezekiele 9:4, 8, 11.
Makambo oyo malobamaki mpo na likoki oyo baklisto mosusu bapakolami bakobika mpe bakokota kati na mokili ya sika, malobamaki na makanisi malamu mpe na kotalela pole ya makambo oyo masili kokomama na kati na Biblia mpo na komeka kokanga ntina ya bisakweli to bilakiseli oyo bikanisamaki ete bikozala na kokokana na yango nsima. Soki mpe ata moklisto mopakolami moko te akotikala na mabelé, ntina ya kolemba mpo na yango ekozala te. Tosili kondima ete bososoli ya makambo oyo mazali kati na Biblia eyaka malembemalembe. Na yango, La Tour de Garde ya le 15 Octobre 1981 etalelaki lisusu Mika 5:6-9 mpe elimbolaki ete “batikali na Bayisraele ya elimo bazelaki te nsuka ya . . . Armagedon mpo na kozala ‘matono na mbula’ oyo mazali kosilisa mposa.” Zulunalo yango elobelaki lisusu mpo na likoki ete batikali bakobika na etumba monene na Nzambe mpe na boumeli na mwa ntango bakolanda “kozala lokola ‘matono na mbula’ oyo mazali kosilisa mposa mpo na ‘ebele monene’ na bampate mosusu. Na bongo tozali komona ete a boumeli ya ntango mpe na bokóli ya pole na elimo, mayele na biso mpo na bisakelweli to mpe bilakiseli na Biblia makoki kofungwama mpe kobengisama.—Masese 4:18.
Toyebi ete Biblia ezali Kokokanisa ‘koya ya Mwana na moto’ na ‘koyanganisama na baponami longwa na mipepe minei’. (Matai 24:29-31) Epai mosusu, na boumeli na “kozonga na Nkolo” wana esili ye kozwa nguya na bokonzi, baklisto bapakolami baoyo balalaki kati na kufa basekwisami mpo na bomoi na likolo. (1 Batesaloniki 4:15, 16) Baklisto oyo batyami elembo basengeli kozala basangani ya mwasi na Mwana na Mpate. Ntango nini likambo wana esalamaki?
Kati na mokanda ya Emoniseli, mbala moko nsima na kolobela mpo na kobomama ya mwasi na pite. Babilone Monene, Yoane amonisi kosalama na “libala ya Mwana na Mpate”. “Mwasi” mabe oyo mpe na bosoto abomami, mpe tomoni “mwasi na libala, mwasi ya Mwana na Mpate,” ‘Oyo alali bilamba petepete, na langilangi na peto, oyo elimboli misala na boyengene na basantu.’ (Emoniseli 18:10; 19:2, 7, 8; 21:9) Kobomama ya Babilone Monene ezali eteni ya bolozi monene. (Matai 24:21; Emoniseli 7:14) Tokoki bongo kokanisa ete basangani mosusu ya kelasi na mwasi na libala bakobika na bolozi monene mpo ete bazala bataloli ya solo na kondimama mpe kobatelama na Jehovah. (Sofoni 2:3, tala Matai 24:22) Soki bakobatelama ndenge wana na mabelé, bakotikala wana kino Nzambe akozwa likatami ya koyamba bango na likoló.
Nzokande, Emoniseli elakisami mpenza na lolenge ya kolandana na molongo te. Epai mosusu, ezali mpenza ntina te ete etuluku moke na batikali baklisto bapakolami bazala wana mpo na kobongisa mokili ya sika, mpamba te basili kopesa formation epai na bamilio ya baklisto basembwi oyo bakobika seko na mabele. Na yango, ekoki kozala ete Nzambe akamata na likoló baklisto yango bapakolami mbala moko nsima na kobomama ya Babilone Monene, mpo na kopesa nzela ete “libala ya Mwana na Mpate” esalema. Na lolenge yango, basantu nyonso bakoki kosangana na Klisto mpo na ‘kokengela mabota na fimbo na ebende’ na boumeli ya eteni mosusu ya bolozi monene. (Emoniseli 2:26, 27; 19:11-21) Soki ezali na lolenge yango nde Nzambe akosala, ba 144 000 na motuya na bango ekoki bakozala elongo na Yesu Klisto mpo na koyangela elongo na ye na boumeli nyonso ya mbula nkoto.”—Emoniseli 20:4.
Yango ebongi mpenza ete basaleli na Nzambe bazala na mposa makasi ya kotalela Jehovah na lolenge oyo akokamba bango mpe akopesa bango mbano. (1 Petelo 1:12) Ezalela motindo wana emonisi ete bazali na elikya ete mokano na ye ekosalema. Tokoki te to tosengeli te kokangama na makanisi na biso moko mpo na oyo etali makambo mosusu ya mikemike kasi yango epekisi biso te kozela na motema likoló, makambo oyo makolanda nsima.