Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • re mok. 7 nk. 33-37
  • Pelisa lisusu bolingo bozalaki na yo na ebandeli!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Pelisa lisusu bolingo bozalaki na yo na ebandeli!
  • Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Sala misala na liboso lisusu”
  • “Mpo na molongi”
  • Klisto azali koloba na masangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Libombami mosantu elimbolami
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Yoka makambo oyo elimo ezali koloba na masangá!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Tiká ete bolingo etonga bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
re mok. 7 nk. 33-37

Mokapo 7

Pelisa lisusu bolingo bozalaki na yo na ebandeli!

EFESE

1. Na lisangá nini Yesu atindi nsango na ye ya liboso, mpe akundoli nini epai na bakengeli?

NSANGO ya liboso oyo Yesu atindi ezali mpo na lisangá ya Efese, oyo kala ezalaki mboka ya bonzenga na Asie Mineure, etongamaki pene na mai monene, mosika te na esanga ya Patamo. Yesu apesi etinda oyo epai na Yoane: “Komélá anzelu na lisangá na Efese ete, Oyo azali kosimba myoto yango nsambo na loboko na ye na mobali, mpe azali kotambola na kati na bitemelo na miinda na wolo yango nsambo, alobi boye ete.” (Emoniseli 2:1) Lokola na kati na nsango mosusu motoba, Yesu amonisi lisusu awa bokonzi na ye. Akundoli na bakengeli ya Efese ete bankulutu nyonso bazali na nse na bokonzi na ye mpe na nse na libateli na ye, mpe azali kotalaka masangá nyonso. Kino na ntango na biso, atiki te kosalela bokonzi oyo na bolingo mingi, kosenzelaka likoló na bankulutu mpe kobatelaka basangani nyonso ya lisangá. Mbala na mbala, akosembolaka makambo na kati na lisangá mpo ete pole engenga lisusu makasi koleka. Ee, Yesu azali Mobateli-na-Mpate Mokonzi na etonga na Nzambe.—Matai 11:28-30; 1 Petelo 5:2-4.

2. (a) Makumisi nini Yesu akumisi na yango lisangá ya Efese? (b) Toli nini ya ntoma Paulo, bakengeli ya Efese boye balandaki yango?

2 Na nsima Yesu alakisi motindo ekozala nsango mitano kati na nsango nsambo: abandi naino kokumisa to kopesa longonya mpenza. Tala nsango na ye epai na lisangá ya Efese: “Nayebi misala na yo, na bwale na yo, na mpiko na yo; mpe ete okoki kondima bato mabe te. Nayebi mpe ete osili komeka baoyo bakolobaka ete bazali bantoma, nde bazali bongo te, mpe ete ozwi bango bato na lokuta. Ozali na mpiko, oyikaki mpiko mpo na nkombo na ngai, mpe osili kolemba te.” (Emoniseli 2:2, 3) Bambula mingi na liboso, ntoma Paulo akebisaki bankulutu ya Efese mpo na “bankosi na yauli,” bapengwi mpe bato na mobulu na kati na etonga, mpe alobaki na bango ete ‘basenzela,’ kolandaka bongo ndakisa ya bosembo na ye. (Misala 20:29, 31) Lokola Yesu azali kokumisa bango awa mpo na mosala na bango, mpiko na bango mpe mpo ete balembi te, elakisi ete balandaki toli oyo.

3. (a) Ndenge nini “basakoli ya lokuta” balukaki kokosa baklisto ya sembo na mikolo na biso? (b) Likebisi nini Petelo apesaki na ntina na bapengwi?

3 “Bantoma na lokuta” bamonani mpe na mokolo na Nkolo, baoyo ‘balakisi mateyo na kokosa ete babenda bayekoli nsima na bango.’ (2 Bakolinti 11:13; Misala 20:30; Emoniseli 1:10) Bato wana bazali koloba ete mangomba nyonso oyo makabwani mpe mazali kolakisa mateyo ya motindo na motindo mazali kaka malamu; balobi ete Nzambe azali na lisangá te mpe baboi kondima ete Yesu azwaki bokonzi na 1914. Bazali kokokisa esakweli ekomami na 2 Petelo 3:3, 4, epai totangi boye: “Na mikolo na nsuka baseki bakoya mpe bakoseka, bakotambola pelamoko na mposa mabe na bango mpenza, bakoloba ete, wapi elaka na koya na ye? Mpo ete longwa na ntango na kufa na bankoko, makambo nyonso maumeli bobele bongo lokola ezalaki yango na ebandeli na kozalisama.”

4. (a) Ndenge nini lolendo mpe elimo ya kotomboka ya baseki ezali komonana? (b) Lokola Baefese, eloko nini baklisto ya lelo basali mpo na kotelemela banguna mpe bakosi?

4 Baseki oyo baboi mosala ya kosakola oyo ezali kopesa nzela na moklisto ete atatola mpo na kondima na ye na miso ya bato nyonso. (Baloma 10:10) Basili koyokana na bakonzi ya mangomba ya boklisto ya mokili oyo mpe na bakomi na nsango elongo na basali na televizio mpo na koloba lokuta likoló na baninga na bango ya kala. Baklisto ya sembo bamonaki noki ete maloba mpe etamboli ya bakosi oyo ezali na boyokani na solo te. Motindo moko na Baefese, baklisto ya lelo ‘bakoki kondima bato mabe te,’ yango wana bazali kobimisa bango na masanga.a

5. (a) Engebene Yesu, bolembu ya Baefese ezalaki nini? (b) Maloba nini Baefese mbele basengelaki komikundola yango?

5 Na nsima, lokola asali yango mpo na masangá mitano kati na masangá nsambo, Yesu abimisi likambo moko ya ntina mingi. Alobi na lisangá ya Efese: “Kasi nazali na yo na likambo oyo ete osili kotika bolingo na yo na liboso.” (Emoniseli 2:4) Baklisto na Efese mbele ekokaki te ete bakwea na likambo oyo, mpamba te ntoma Paulo asilaki kokomela bango mbula 35 liboso na ntina na ‘bolingo monene bozali na Nzambe mpo na kolinga biso’, mpe apesaki bango toli na maloba oyo: “Bozala bamekoli na Nzambe, lokola bana balingami. Botambolaka mpe na bolingo pelamoko Klisto alingaki bino.” (Baefese 2:4; 5: 1, 2) Epai mosusu, maloba oyo ya Yesu mbele malingaki kotikala libela kati na motema na bango: “Jéhovah Nzambe na biso, ye azali Jéhovah moko. Okolinga Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na mayele na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba.” (Malako 12:29-31) Baefese bazalaki lisusu na bolingo oyo ya liboso te.

6. (a) Ata tosili koumela na lisangá to tokoti kala mingi te, tokebisami na likama nini mpe na bamposa nini? (b) Bolingo na biso mpo na Nzambe esengeli kopusa biso na nini?

6 Ata ezala ete tosili koumela na lisangá to tokoti kala mingi te, tosengeli komibatela ete tobungisa te bolingo na biso ya liboso mpo na Jéhovah. Ndenge nini tokoki kobungisa bolingo yango? Soki totii na esika ya liboso mosala na biso ya mosuni to mposa ya kozwa mosolo mingi to lisusu mposa ya bisengo. Makanisi na biso makozala bongo likoló na biloko ya mosuni esika ete ezala likoló na makambo ya elimo. (Baloma 8:5-8; 1 Timote 4:8; 6:9, 10) Bolingo na biso mpo na Jéhovah esengeli kopusa biso na komisembola mpo na koboya mposa nyonso ya motindo oyo mpe ‘koluka liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye,’ na motindo boye ete ‘tomibombela biloko na motuya kuna na likoló.’—Matai 6:19-21, 31-33.

7. (a) Eloko nini esengeli kopusa biso na kosalela Jéhovah? (b) Yoane alobaki nini na ntina na bolingo?

7 Tika ete mosala na biso mpo na Jéhovah epusama ntango nyonso na bolingo mozindo oyo tozali na yango mpo na ye! Tozala na limemya mpenza mpe na botondi mpo na nyonso oyo Jéhovah mpe Klisto basalaki mpo na biso. Lokola Yoane ye moko akomaki yango na nsima: “Bolingo ezali boye te ete biso tolingaki Nzambe, kasi ezali boye ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola mbondi mpo na masumu na biso.” Mpe Yoane alobi na biso: “Nzambe azali bolingo. Ye oyo akoumelaka kati na bolingo azali koumela kati na Nzambe mpe Nzambe akoumelaka kati na ye.” Tika ete bolingo na biso mpo na Jéhovah, mpo na Nkolo Yesu Klisto mpe mpo na Liloba na Nzambe na bomoi elemba soko moke te! Bolingo yango ekoki komonana bobele te na mosala ya molende mpo na Nzambe, kasi lisusu na botosi na “lilako oyo tozwi epai na ye ete ye oyo akolingaka Nzambe alinga mpe ndeko na ye lokola.”—1 Yoane 4:10, 16, 21; Baebele 4:12; tala lisusu 1 Petelo 4:8; Bakolose 3:10-14; Baefese 4:15.

“Sala misala na liboso lisusu”

8. Engebene Yesu, Baefese basengelaki kosala nini?

8 Lisangá ya Efese esengeli kopelisa lisusu bolingo oyo ezalaki na yango liboso, mpo ete ebungisa nyonso te. Yesu alobi na ye: “Na bongo kanisa esika elongwi yo kokwea wana, bongola motema, mpe sala misala na liboso lisusu. Soko bongo te, nakokoma epai na yo, mpe nakolongola etemelo na miinda na yo na esika na yango, soko okobongola motema te.” (Emoniseli 2:5) Ndenge nini baklisto na lisangá na Efese bayambaki maloba oyo? Toyebi te. Totii motema ete boye babongolaki motema mpe bapelisaki lisusu bolingo na bango mpo na Jéhovah. Soki te, boye mwinda na bango ezimamaki mpe etemelo na miinda na bango elongolamaki. Wana mbele babungisi libaku ezalaki na bango ya kongengisa solo.

9. (a) Maloba nini ya koyikisa mpiko Yesu atindelaki Baefese? (b) Nsima na kufa na Yoane, motindo nini masangá makomaki na bopoto mpo na oyo etali kolanda toli oyo Yesu apesaki na Baefese?

9 Nde ata boye, Yesu ayikisi bango mpiko na maloba oyo: “Kasi likambo moko ya malamu ezali na yo, ete ozali koyina misala na Banikolaiti, oyo ngai mpe nazali koyina yango.” (Emoniseli 2:6) Baklisto na Efese bazalaki na ezaleli malamu ya koboya mikabwano na mangomba mikemike, motindo moko Nkolo Yesu Klisto ye moko aboyi mpe yango. Nde na mawa, nsima na bambula, masangá mingi batosaki lisusu maloba oyo ya Klisto te. Kozanga bolingo mpo na Jéhovah, mpo na solo mpe mpo na baninga na bango ekotisaki bango kati na molili na elimo. Bakabwanaki na ebele na mangomba mikemike to basekte oyo ezalaki na boyokani te. Bakopiste mosusu, “baklisto” ya nkombo mpamba, bazangi bolingo mpo na Jéhovah, balimwisaki nkombo ya Nzambe mpenza kati na Biblia. Kozanga bolingo ekolisaki mpe mateya mauti na Babilone mpe na Bagreke, lokola liteya ya lifelo, ya epongelo mpe ya la Trinité to Bosato, nyonso oyo na nkombo ya boklisto. Lokola bazangaki bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na solo, mingi kati na baoyo bazalaki komibenga ete baklisto batikaki kosakola nsango malamu na Bokonzi na Nzambe. Bamityaki na nse na bokonzi na batambwisi na mangomba oyo, kati na moimi na bango, bamisaleli bokonzi na bango moko awa na mabelé.—Tala 1 Bakolinti 4:8.

10. Ezalela nini ezalaki na kati na mangomba ya boklisto ya mokili oyo na 1918?

10 Ntango kosambisa ebandaki na ndako na Nzambe na 1918, bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo bamonisaki polele ete bazali kopesa maboko mpenza na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, kolendisaka bakatolike mpe baprotestá na ngambo nyonso mibale ete babomana. (1 Petelo 4:17) Na kokesena na lisangá ya Efese oyo eyinaki misala na lingomba na Banikolaiti, mangomba ya boklisto ya mokili oyo bamibebisi uta kala na mateya na lokuta mpe mateya mazali kotemela Nzambe, mpe bakonzi na mangomba yango bamikotisi mpenza na makambo ya mokili, nzokande Yesu alobaki ete bayekoli na ye basangani na mokili te. (Yoane 15:17-19) Kozanga koyeba motó na likambo na Biblia, oyo ezali bongo Bokonzi na Nzambe, masangá na bango mazalaki bitemelo na miinda te kati na temple ya elimo ya Jéhovah. Na esika ete bazala minzoto, bato na bango ya lokumu (mibali mpe basi) bamonanaki ete bazali kelasi na “motioli na mibeko.”—2 Batesalonike 2:3; Malaki 3:1-3.

11. (a) Na 1918, etuluku nini ya baklisto kati na mokili basalelaki maloba na Yesu oyo atindelaki Baefese? (b) Kelasi na Yoane basalaki nini kobanda na 1919?

11 Nzokande kelasi na Yoane, babimaki na mobulu ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba na bolingo mingi mpo na Jéhovah mpe mpo na solo, yango epusaki bango na kosalela ye na molende lokola móto ezali kopela. Baklisto yango batemelaki bato oyo balukaki kokotisa mikabwano, na ndakisa baoyo babandaki kokumisa Charles Russell nsima na liwa na ye na 1916, koleka ndelo, kino ete elingaki kokoma losambo ya ekelamu. Ezwaki bango disipline na nzela na minyokoli mpe koyinama, bayokaki Nkolo alobelaki bango: “Malamu,” mpe babengamaki ete baingela na esengo na ye. (Matai 25:21, 23) Baklisto yango basosolaki ete makambo mazalaki kobima na mokili mpe makambo oyo bango moko bakutanaki na yango mazalaki kokokisa elembo epesamaki na Yesu mpo na komonisa ete asili kozonga lokola Mokonzi ata azali komonana na miso na bato te. Kobanda na 1919, bakendaki liboso mpo na kokokisa eteni mosusu ya esakweli monene ya Yesu, oyo alobaki: “Mpe nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 6:9, 10; 24:3-14) Soki bolingo na bango mpo na Jéhovah ekomaki mwa mpio, nzokande ebandaki kopela longwa na ntango wana.

12. (a) Libyangami nini epesamaki na likita monene oyo esalamaki na 1922? (b) Nkombo nini baklisto ya solo bakamataki na 1931, mpe babongolaki motema mpo na makambo nini?

12 Na likita moko monene oyo baklisto yango bayanganaki na motuya ya 18 000, na mboka Cedar Point (Etats-Unis) kobanda na le 5 kino na le 13 Septembre 1922, libyangami oyo epesamaki: “Bozonga na bilanga, bino bana na Nzambe oyo aleki likolo! . . . Mokili esengeli koyeba ete Jéhovah azali Nzambe mpe Yesu Klisto azali Mokonzi na mikonzi. . . . Yango wana: Bosakola, bosakola, bosakola Mokonzi mpe bokonzi na ye!” Nkombo monene ya Jéhovah esakolamaki lisusu polele. Na 1931, baklisto oyo bayanganaki na likita moko monene na mboka Columbus (Etats-Unis) bakamataki na esengo nyonso nkombo oyo Nzambe akomisaki yango kati na esakweli ya Yisaya, nkombo yango ezali bongo Témoins de Jéhovah. (Yisaya 43:10, 12) Kobanda na nimero na yango ya le 1er Mars 1939, Mosenzeli, esaleli ya liboso ya lisangá ekomaki kobengama ete La Tour de Garde, Annonciatrice du Royaume de Jéhovah; kobanda wana lokumu nyonso epesamaki na Mozalisi na biso mpe na bokonzi na ye. Epusamaki bango na bolingo ya sika mpo na Jéhovah, ba Témoins de Jéhovah babongolaki motema mpo ete kala bazalaki na bopoto mpo na oyo etalaki kokumisa nkombo monene ya Jéhovah mpe Bokonzi na ye monene.—Nzembo 106:6, 47, 48.

“Mpo na molongi”

13. (a) Lipamboli nini ezalaki liboso na Baefese soki bakozala ‘balongi’? (b) Ndenge nini baklisto ya Efese ‘balingaki kozala balongi’?

13 Mpo na kosukisa, ndenge asali yango mpo na nsango na ye mosusu, Yesu abendi likebi likoló na elimo na Nzambe, oyo na nsima na ye eyebisi mbano ekozwama na baoyo bakotikala sembo. Alobi epai na Baefese: “Oyo azali na matoi ayoka yango elobi elimo na masangá ete, Mpo na molongi, nakopesa ye nzela na kolia mbuma na nzete na bomoi, oyo ezali kati na paladiso na Nzambe.” (Emoniseli 2:7) Baoyo bayebi koyokamela boye basalaki noki na kotya likebi mpenza na nsango oyo ya bomoi, koyebaka ete euti bobele na Yesu te, kasi na Nkolo Moyangeli Jéhovah na nzela na elimo santu na ye to makasi na ye oyo akosalaka na yango mosala. Ndenge nini bakozala ‘balongi’? Na kotambolaka malamu kolanda matambe na Yesu oyo atikalaki sembo kino na kufa, mpe oyo akokaki koloba ete: “Boyika mpiko, ngai nasili kolonga mokili.”—Yoane 8:28; 16:33; tala lisusu 1 Yoane 5:4.

14. “Paladiso na Nzambe” oyo Yesu alobeli awa elakisi nini?

14 Lokola elikya na bango ezali ya kofanda na paradis na mabelé te, ndenge nini baklisto bapakolami lokola baoyo na Efese, bazwi mbano ya kolya “mbuma na nzete na bomoi, oyo ezali kati na paladiso na Nzambe”? Ezali Paladiso oyo ekozongisama na mabelé te, mpamba te baklisto bapakolami 144 000, bakisa baoyo na lisangá ya Efese, basombami kati na bato mpo na koyangela elongo na Mwana na Mpate Klisto Yesu likoló na ngomba Siona na likoló lokola bana ya elimo. (Baefese 1:5-12; Emoniseli 14:1, 4) Na yango, oyo elobelami awa ezali nde efandelo na likoló, ekokani na paladiso, oyo balongi wana bakozwa lokola libula. Kuna, “kati na paladiso na Nzambe,” elingi koloba liboso na Jéhovah mpenza, balongi wana oyo basili kozwa bomoi bokoki kosuka te bakolanda kozala na bomoi seko na seko, lokola emonisami na elilingi ete bazali kolya mbuma na nzete na bomoi.

15. Mpo na nini maloba na Yesu na koyikisa mpiko mpo na kolonga mazali na litomba monene mpo na ebele monene lelo?

15 Ezali boni mpo na baninga ya sembo ya bapakolami 144 000, baninga oyo elikya na bango ezali ya mabelé? Ebele monene ya Batemwe yango bakolonga mpe. Kasi elikya ya balongi yango ezali ete bakota kati na paladiso na mabelé, epai kuna bakomela mai “na ebale na mai na bomoi” mpe bakobikisama na nzela na “nkasa na nzete” elonami epai na epai na ebale yango. (Emoniseli 7:4, 9, 17; 22:1, 2) Bino baoyo bozali kati na ebele yango, tika ete bino mpe bomonisa bolingo na bino makasi mpo na Jéhovah mpe bolonga na nzela na kondima na bino! Bokooka bongo esengo ya kozala na bomoi ya seko kati na Paladiso na mabelé.—Tala 1 Yoane 2:13, 14.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba ndenge nini bantoma ya lokuta babimaki na nsima, tala mokanda Comment raisonner à partir des Ecritures na pages 386-393, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda na lokasa 36]

Masanzoli na Jéhovah mpe na Mwana na ye

Mokanda na nzembo oyo ebimisamaki na libota na Jéhovah na 1905 ezalaki na banzembo mingi oyo ezalaki kokumisa Yesu, mbala mibale koleka oyo ezalaki kokumisa Jéhovah. Na mokanda ya nzembo oyo ebimaki na 1928, motuya na banzembo mpo na kokumisa Jéhovah mpe kokumisa Yesu ekokanaki. Nzokande, na mokanda na nzembo oyo ebimaki na 1984 ezali na banzembo mingi oyo ezali kokumisa Jéhovah mbala minei koleka oyo ezali kokumisa Yesu. Yango ekokani mpenza na maloba malandi ya Yesu: “Tata aleki ngai.” (Yoane 14:28) Bolingo mpo na Jéhovah esengeli koleka; esengeli kozala elongo na bolingo mozindo mpo na Yesu mpe botondi mpo na mbeka na ye ya motuya, mpe mpo na mosala na ye ya Nganga Nzambe Monene mpe Mokonzi.

[Etanda na lokasa 34]

Yesu: lolenge na ye ya kopesa toli

(na mikapo mpe ba versets ezwami na Emoniseli)

Nsango Bokonzi Ebandeli Amonisi Mpamela Bolamu

na lisanga mpo na kopesa ezali kolendisa bolembu mpe⁄to na

toli polele elendiseli yango

Efese 2:1 2:2, 3 2:4 2:5, 6 2:7

Sumuluna 2:8 2:9 — 2:10 2:11

Pelegame 2:12 2:13 2:14, 15 2:16 2:17

Tiyatire 2:18 2:19 2:20, 21 2:24, 25 2:26-28

Saladesi 3:1 — 3:1, 2 3:3, 4 3:5

Filadelfi 3:7 3:8 — 3:8-11 3:12

Laodiki 3:14 — 3:15-17 3:18-20 3:21

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto