Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bazali koluka nzela nyonso na kozala balongi
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 3. (a) Maloba nini ya koyikisa mpiko Yesu atindelaki baklisto ya Sumuluna? (b) Atako baklisto ya Sumuluna bazalaki babola, mpo na nini Yesu alobaki ete bazali “bazwi”?

      3 “Nayebi monyoko na yo, na bobola na yo, kasi ozali mozwi. Nayebi mpe kotuka na bango bakolobaka ete bazali Bayuda, nde bazali bongo te kasi bazali lingomba na Satana.” (Emoniseli 2:9) Yesu apameli bandeko na ye ya Sumuluna na likambo moko te; nkutu azali nde kokumisa bango. Bayiki mpiko na bolozi mingi mpo na kondima na bango. Bazali babola na mosuni, mbala mosusu mpo na bosembo na bango. (Baebele 10:34) Nde ata bongo, lobanzo na bango ya liboso etali makambo na elimo, mpe basili komibombela biloko na motuya na likoló, na boyokani na toli na Yesu. (Matai 6:19, 20) Yango wana Mobateli na mpate mokonzi azali komona bango ete bazali “bazwi.”—Tala Yakobo 2:5.

      4. Baklisto ya Sumuluna bazwaki monyoko monene uta na banani, mpe Yesu abengi banguna yango na nkombo nini?

      4 Yesu alobi ete baklisto ya Sumuluna bakutanaki na botemeli makasi uta na Bayuda na mosuni. Na ebandeli, basambeli mingi na lingomba ya Bayuda batemelaki makasi losambo ya boklisto ete epalangana te. (Misala 13:44, 45; 14:19) Nzokande, bambula koleka ntuku mibale nsima na kokwea na Yelusaleme, Bayuda wana ya Sumuluna bazali se na makanisi ya Satana. Ntina wana Yesu abengi bango ete “lingomba na Satana.”a

  • Bazali koluka nzela nyonso na kozala balongi
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • a Mbula soko 60 nsima na liwa na Yoane, Polycarpe, oyo azalaki na mibu 86 atumbamaki na móto na mboka Sumuluna mpo aboyaki kowangana Yesu. Na mokanda Le Martyre de Polycarpe, mokanda oyo mbala mosusu ekomamaki na eleko oyo likambo yango esalamaki, eyebisami ete ntango bazalaki kolokota nkoni mpo na kopelisa móto, “Bayuda bamonisaki, engebene ezaleli na bango, molende makasi mpo na kosangana na mosala yango,” atako likambo yango esalemaki na mokolo na “sabata monene.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto