Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/7 nk. 4-7
  • Mosika te mokili ya sika ekoya!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosika te mokili ya sika ekoya!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokili ya sika molakámi
  • Mosika te mokili ya sika ekoya!
  • Bolamu oyo bato bakoki komema yango te
  • Bamposa nyonso ya ntina mpo na bato ekokisami
  • Okozala wana?
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mokili ya lelo ekoumela lisusu?
    Mokili ya lelo ekoumela lisusu?
  • Mikolo ya nsuka
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Nsuka ya mokili ekómi pene?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/7 nk. 4-7

Mosika te mokili ya sika ekoya!

BAKONZI ya Leta basili kobibmisa maloba mingi na ntina na ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba oyo bango balingi kosala. Bazali koloba na ntina na kolongola bobangi na mokili mpe kolongola bandelo oyo ezali kopekisa boyokani kati na mabota mpe kati na Bikólo. Kasi bazali nde na makoki ya kosala mokili ya sika?

Bato basili kolekisa bikeke mingi mpenza oyo bakokaki kosala mokili ya kimya mpe na libateli. Ya solo, bato mingi basalaki mpenza milende makasi. Kasi, ata mitindo na biyangeli nini oyo bato basilaki kosala mpo na kokokisa mikano yango, maloba na Biblia oyo malandi, masili kokokana ete: “Nzela na moto ezali kati na ye moko te.”​—Yilimia 10:23.

Mokili ya sika molakámi

Nzokande, bobele Liloba na Nzambe yango lipemami, ezali kondimisa biso ete mokili ya sika mokozala solo. Nsima na kosakola nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo ezali sikawa ebongiseli ya kala, ntoma Petelo alobaki ete: “Tozali kotalela makoló na sika mpe mabelé na sika, pelamoko elakáki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.”​—2 Petelo 3:10-13.

Elaká oyo euti na nani? Euti na moto mosusu te bobele na Jéhovah, ye oyo “Aleki-Likoló na mokili mobimba.” (Nzembo 83:18) Akokokisa makambo oyo moto akokaki kosala yango te. Ee, mpo na Jéhovah Nzambe, mokili ya sika ekosalema. Kasi ntango nini?

Mosika te mokili ya sika ekoya!

Liboso ete mokili ya sika oyo molakámi na Nzambe ekóma likambo ya solo, “mokili,” to mpe “ebongiseli ya biloko” ya ntango oyo esengeli kozwa nsuka. Na ntina yango, bayekoli na Yesu Klisto batunaki motuna oyo molandi ete: “Yebisa biso, nyonso oyo ekoya ntango nini mpe elembo na komonana na yo mpe nsuka na ekeke ekozala nini?” (Matai 24:3, Biblia Lingala Haut fleuve) Mpo na kozongela maloba ya Traduction du monde nouveau, bayekoli batunaki ye mpenza ete: “Yebisa biso: Nyonso oyo ekoya ntango nini, mpe elembo ya koya na yo mpe ya nsuka na biloko ya ntango oyo ekozala nini?”

Mpo na koyanola, Yesu asakolaki ebele na makambo ya elembo ya koya na ye ezangi komonana, komonana ya moto na elimo oyo azwi nguya na Bokonzi ya likoló. (1 Petelo 3:18) Na ndakisa, alobaki ete: “Libota moko likotɛmela libota mosusu mpe bokonzi moko bakotɛmɛla bokonzi mosusu; nzala mpe koningana na mabele ekozala na esika na esika.” Uta “ebandeli ya bolozi” na 1914, “libota yango” lilobelamaki sikisiki na Yesu esili komona, kati na makambo mosusu ya elembo na koya na ye ezangi komonana, bitumba, nzala mpe koningana na mabelé oyo ezali sé kolanda kosalema.​—Matai 24:7, 8, 34.

Uta 1914, etumba ezali konyokola libota yango koleka na ntango na liboso. Ekanisami ete, na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bamilió 14 ya bato bakufaki na yango. Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bamilió 55 ya bato bakufaki, basodá mpe basivile. Ya solo, uta 1914, bitumba bisili koboma bato koleka bamilió 100! Na ntembe te, likambo moko ya elembo na koya na Yesu lizali kokokisama.

Nsima na bitumba mibale ya mokili mobimba, nzala ekɔtaki kati na bamboka mingi, lokola Klisto asakolaki yango. Atako sianse ezali na bokóli, pene na ndambo ya minei ya bafandi na mokili bazali lelo konyokwama na nzala. Mbula na mbula, bamilió ya bana mike mpe mikóló bazali kokufa mpo na kozanga bilei. Tokoki kotanga kati na zulunalo The World Book Encyclopedia ete: “Bikólo mingi ya bobólá na Afrique, na Asie mpe na Amérique latine, bazali bobele na mwa biloko moke oyo bafandi na yango bakoki kolya. Bamilió ya ba citoyens ya bamboka yango bazali na nzala. Bobimisi biloko ya kolya to bosengi yango na mikili misusu, ezali kokwea mpo na ntina bobele moko, mpe nzala ezali makasi, mpe bankoto to bamilió na bato bazali na likámá ya kufa.”

Koningana ya mabelé esili koboma bato mingi mpenza na boumeli ya eleko oyo ya “ntango na nsuka.” (Danyele 12:4) Motuya ya bato bazwi makámá na koningana ya mabelé, ekobongwanaka mbala na mbala. Kasi uta 1914, makámá masalemi na koningana ya mabelé ezali kobakisama na mokili mobimba, mpe baoyo bazali kozwa makámá bazali na motango ya bankoto na nkoto. Na ntina na mbala mibale oyo mabelé maninganaki na lolenge lokeseni mpenza na mosusu, zulunalo Yorkshire Post ya mokolo ya 19 Octobre 1989 elobi ete: “Na 1920, koningana ya mabelé ebomaki bato 180 000 kati na etúká moko ya chine, ebengami ete Jiangsu, mpe na mokolo ya 28 Juillet 1976, Chine ezwaki koningana ya mabelé eleki makasi mpenza kati na lisoló na yango mobimba. Soko bato 240 000 bakufaki na koningana ya mabelé oyo ebakisamaki na 7, 8 degrés engebene motango ya Richter. Koningana yango esalemaki na engumba ya Tangshan mobimba, epai na Nord-Est ya chine.” Na nsima zulunalo yango elobelaki koningana makasi ya mabelé koleka 30, oyo esalemaki na boumeli na ekeke ya ntuku mibale.

Mosala ya kosakola Bokonzi eyebisamaki mpe lokola moko na makambo ya elembo na koya na Yesu ezangi komonana. Mpo na yango, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Lokola Yesu asakolaki yango, ba Témoins de Jéhovah koleka bamilió 4 bazali sikawa kokokisa mosala yango ya kosakola na mabelé mobimba, kati na mikili 212.

Kokokisama ya bisakweli yango na ntango oyo, mpe bisakweli mosusu lokola, emonisi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka.” (2 Timoté 3: 1-5) Tozali pene na “bolozi monene” oyo Yesu asakolaki yango lokola. Ekosuka na “etumba ya mokolo yango monene ya Nzambe Mozwi-na nguya Nyonso,” na Armaguedon mpe yango ekotya nsuka na ebongiseli na biloko mabe ya ntango oyo. (Matai 24:21; Emoniseli 16:14-16) Na ntango wana, mokili ya sika molakámi na Nzambe ekokóma likambo ya solo.a

Bolamu oyo bato bakoki komema yango te

Bakonzi ya Leta bazali komikumisa ete bakoki kosala ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba. Kasi Jéhovah, Nzambe ya likoló mpe ya mabelé, asengi na bato te ete bakitanya mokili ya sika na esika ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo. Ezali ye nde akosala yango, na mokolo moko mpe na ngonga oyo bobele ye moko nde ayebi yango. (Matai 24:34, 36) Wana akómaki mokóló, ntoma Yoane amonaki liboso makambo oyo Nzambe akokokisa, kasi yango ekosalema na bato te, nde alobi ete:

“Namonaki likoló ya sika mpe mabelé ya sika, mpo ete likoló na kala mpe mabelé na kala esili kolongwa. Mai monene mpe ezali lisusu te. Namoni mpe mboka mosanto, Yelusaleme ya sika kokita na likoló, kouta na Nzambe. Esilaki kobongisama lokola mwasi na libala oyo asili kokémbisa nzoto mpo na mobali na ye. Nayoki mongongo makasi kobima na kiti na bokonzi ete: ‘Tala! Efandelo na Nzambe ezali elongo na bato. Akofanda na bato esika moko, mpe bango bakokóma bato na ye, mpe Nzambe ye moko akozala elongo na bango. Akolongola mpisoli na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.’ Mofandi na kiti na bokonzi alobi ete: ‘Nakozalisa biloko nyonso biloko ya sika.’ Alobi mpe ete, ‘Komá, mpamba te maloba oyo mazali sembo mpe na solo.’”​—Emoniseli 21:1-5.

“Likoló ya sika” ezali Bokonzi ya likoló na Yesu Klisto. “Mabelé ya sika” ezali mabelé mosusu te, kasi libota ya sika ya bato awa na mabelé, bato na botósi ya Bokonzi na Klisto, libota oyo lizali na bokabwani kati na mposo te, na bikólo to mpe minoko te. (Tala Nzembo 96:1.) Likoló mpe mabelé ya elilingi ya sikawa, ebongiseli ya biloko na Diable, elongo na biyangeli na yango bipusami na Satana mpe bilimu mabe, ekobomama. (1​Yoane 5:19) Wana mai monene ya solo ekotikala, mai monene ya elilingi, bato na yikiyiki mpe na mabe, bakolimwa. Bakonzi ya likoló oyo bazali elongo na Yesu basali Yelusaleme ya Sika, mpe elongo na ye basali lisangá oyo, na lolenge na kapitale, ekoyangela libota ya bato na sembo. Nzambe akozala na ‘efandelo ya elingi kati’ na bato ya botósi oyo bakozonga mpenza na boyokani elongo na ye na nzela na Klisto na boumeli ya Mokolo ya kosambisama ya mbula nkɔto.​—Emoniseli 14:1-4; 20:6.

Bantina ya esengo ekozala mingi mpenza na nsé na boyangeli ya Bokonzi. Mawa, kolela, mpasi, makambo mauti na maladi, na mitungisi, mpe na mpasi mosusu, ekozala makambo na kala. Ata kufa oyo bato bazwaki yango na nzela na mosumuki Adam, tata na biso nyonso, ekozala lisusu te. (Baloma 5:12) Oyo nde esengo wana eloko oyo ekobimisaka mpisoli, ekolimwa mpo na libela!

Nzambe ye moko, kasi bato oyo bakokufaka te, azali kopesa ndanga na ntina na mapamboli yango. Azali Ye oyo alobi ete: “Nakozalisa biloko nyonso biloko ya sika.” Ee, Jéhovah Nzambe alobaki lisusu epai na ntoma Yoane ete: “Komá, mpamba te maloba oyo mazali sembo mpe na solo.”

Bamposa nyonso ya ntina mpo na bato ekokisami

Kati na mokili ya sika mosalemi na Nzambe, na boumeli ya ntango, mabelé makokóma paradis. Ezali mpenza likambo ya solo, mpamba te Yesu alakaki epai na mosali na masumu oyo abongwaki, ye oyo akakisamaki na likoló na nzete pene na ye, ete: “Solo nazali koloba na yo lelo ete: ‘Okozala na ngai elongo na Paradiso.’”(Luka 23:43, MN) Ezalela wana ya paradiso ekosala ete bamposa nyonso ekokisama, lokola bilei mpe bifandelo.

Lelo oyo, nzala ezali mpenza koboma bamilió na bato. Milende mingi mizali kosalema mpo na koleisa bato oyo banyokwami na nzala, kasi lokoso mpe makambo mosusu ezali kopekisa bato na kosilisa makambo wana. Na ndakisa, Saturday Star, zulunalo oyo ekobimaka poso na poso na Johannesburg, na Afrike ya Ngele, elobaki ete: “Maloba na lokutá ya politike, komata na ntalo ya esansi mpe mazuti, mpe kobanga oyo euti na matáta makosilaka te oyo mazali koningisa Afrike, nyonso wana ezali kopekisa nzela ete makambo makoka kobonga . . . Na Soudan, moko na bamboka oyo ezwami na likambo yango, katikati na bamilio mitano na bato to bamilió motoba ezali na likámá ya kokufa na nzala na mobu 1991.” Nzokande, na mokili ya sika, nzala ekozala lisusu te. Na nsé na boyangeli na Bokonzi, “mbuma ekotonda na mokili ata kino na likoló na ngomba.”​—Nzembo 72:16.

Bifandelo ezali mposa mosusu oyo ekokisami naino te mpo na bato mingi. Bamilió na bato bazali kofanda na bisika mabe, nzokande bamosusu bazangi mpenza bisika ya kofanda. Soki tolandi maloba ya zulunalo New York Times, mboka moko ya Asie ezali kati na ezalela oyo ete, “na kompanyi moko ya lontiliki (kurá), basali oyo bazali na mibu 20 basengeli kozela ete bakóma na mibu 73 mpo na kopesamela ndako,” mpe rapport ya boyangeli emonisi ete bamosusu “bazali kofanda na bisika bakobómbaka biloko, na babiro ata nkutu na zongo.” Oyo nde mbongwana kati na mokili ya sika! Kati na Paradiso oyo ekoya, “bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokóna bilanga na miwiti mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokóna te ete mosusu alya; mpamba te lokola mikolo na nzete, bongo ekozala mikolo na bato na ngai, mpe baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala na mabɔkɔ na bango.”​—Yisaya 65:21, 22.

Makambo matali kobebisa zámba mpe banyama, ekolimwa kati na mokili ya sika molakámi na Nzambe. Kobebisama ya mopepe oyo ezali likámá mpo na kolongono ya nzoto mpe ezali kobebisa milóna, ekozala lisusu te. Kobebisa zámba ezali kosilisa mitindo mingi na banzete mpe banyama; likambo yango likozala lisusu te. Bomoi na mabelé ekozala lisusu na likámá te na ntina na kobebisama ya ozone to mipepe misusu mikokani na yango. Tokoki kondimisama ete Jéhovah Nzambe akosilisa bampasi nyonso, mpamba te Liloba na ye liyebisi biso ete, mosika te, “akobebisa babebisi na mokili.”​—Emoniseli 11:18.

Kati na mokili ya sika, bitumba mpe bikozala lisusu te, kasi yango ekolongwa te na ntina na lolenge oyo bakonzi ya Leta bazali kopekisa kosala bibundeli. Ezali Nzambe nde akokokisa yango na esika oyo bato balongaki te. Akopesa kimya epai na bato na botósi na boyokani na maloba na mokomi na nzembo, ete: “Yaka kotala misala na Jéhovah, ye oyo asali bikamwiseli kati na mokili. Asili kosukisa bitumba kino na nsuka na mokili. Akobukabuka litimbo mpe akokatakata likɔnga; akozikisa mpe makálo kati na mɔtɔ.” (Nzembo 46:8, 9) Kati na mokili ya sika molakámi na Nzambe, mokili oyo mobelemi pene, bato bakosala lisusu etumba te, nde bakozala na kimya mpe na libateli ya solo.​—Mika 4:2-4.

Okozala wana?

Okoki kotya elikya na yo kati na mokili ya sika molakámi na Jéhovah Nzambe, ye oyo akobukaka lokutá te. (Baebele 6:17, 18) Liloba na ye, Biblia, ezali solo, mpe makambo oyo yango ezali kolaka, ezali ntango nyonso kokokana.​—Yoane 17:17.

Ba Témoins de Jéhovah bazali kosala milende ya koyebisa nsango malamu ya mapamboli oyo mabómbami mpo na bato na botósi, epai na bato nyonso ya motema sembo. Osengeli kosala makasi uta sikawa mpo na koyeba mokano na Nzambe mpe kosala eloko na kotaleláká bilaká kitoko oyo bizali kati na Makomami Mosantu. Etamboli yango ekoki kopesa nzela na kozwa bomoi ya seko, mpamba te Yesu alobaki ete: “Oyo ezali bomoi ya seko, ete bayeba yo Nzambe bobele moko ya solo, mpe motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Okosepela bongo na kozela eleko wana ya esengo oyo mosika te tokokóma na yango, mpamba te mokili ya sika molakámi na Nzambe mobelemi penepene!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tala mokapo 17 mpe 18 ya mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto